Wildebeest analysis examples for:   lin-lin   -    February 25, 2023 at 00:37    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

24  GEN 1:24  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango : bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba ! » Yango esalemaki mpe bongo.
25  GEN 1:25  Nzambe akelaki banyama ya zamba kolanda lolenge na yango : bibwele mpe bikelamu nyonso ya mike-mike. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
26  GEN 1:26  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! »
28  GEN 1:28  Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. »
40  GEN 2:9  Yawe Nzambe abimisaki wuta na mabele banzete ya lolenge nyonso oyo ezalaki kitoko mpo na kotala mpe elengi mpo na kolia. Atiaki mpe nzete ya bomoi na kati-kati ya elanga ; lisusu atiaki nzete ya koyeba malamu mpe mabe.
59  GEN 3:3  Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. »
85  GEN 4:5  kasi asepelaki te na Kayina mpe na makabo na ye. Bongo, Kayina asilikaki makasi mpe elongi na ye ekomaki mawa-mawa.
86  GEN 4:6  Yawe alobaki na Kayina : — Mpo na nini osiliki ? Mpo na nini elongi na yo ekomi mawa-mawa ?
102  GEN 4:22  Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. »
140  GEN 6:2  milimo emonaki ete bana basi ya bato bazali kitoko ; boye ekomisaki ba-oyo eponaki basi na yango.
157  GEN 6:19  Okokotisa mpe kati na masuwa, mibale-mibale, bikelamu nyonso ya bomoi, mwasi mpe mobali, mpo ete obatela yango na bomoi elongo na yo.
181  GEN 7:21  Bikelamu nyonso ya bomoi kati na mokili ekufaki, ezala bandeke, bibwele, banyama ya zamba to mpe banyama ya mike-mike oyo etambolaka na mabele to mpe bato nyonso.
183  GEN 7:23  Boye, Yawe alongolaki kati na mokili bikelamu nyonso oyo ezalaki na bomoi, kobanda na moto kino na ebwele, ekelamu oyo etambolaka na libumu mpe ndeke ya likolo ; alongolaki bango na mokili mpe etikalaki kaka Noa na ba-oyo bazalaki na ye elongo na masuwa.
187  GEN 8:3  Mayi ekomaki kolongwa moke-moke likolo ya mabele, mpe sima na mikolo nkama moko na tuku mitano, mayi ekitaki.
229  GEN 9:23  Kasi Semi mpe Jafeti bazwaki elamba mpe batiaki yango na mapeka na bango. Bazongaki sima-sima mpe bazipaki bolumbu ya tata na bango. Lokola bilongi na bango etalaki na ngambo mosusu, bamonaki bolumbu ya tata na bango te.
246  GEN 10:11  Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala
247  GEN 10:12  mpe Reseni, engumba monene na kati-kati ya Ninive mpe Kala.
308  GEN 12:9  Sima, Abrami alongwaki wana mpe akendeki malembe-malembe kino na Negevi.
315  GEN 12:16  Basalelaki Abrami bolamu likolo ya Sarayi, mpe Abrami azwaki bameme, bantaba mpe bangombe, ba-ane, basali ya basi mpe ya mibali, bana ya ba-ane mpe bashamo.
322  GEN 13:3  Longwa na Negevi, akendeki malembe-malembe kino na Beteli, na esika oyo ezalaki kati ya Beteli mpe Ayi, epai wapi ndako na ye ya kapo ezalaki
342  GEN 14:5  Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ;
344  GEN 14:7  Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.
350  GEN 14:13  Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami.
355  GEN 14:18  Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo
356  GEN 14:19  mpe apambolaki Abrami na maloba oyo : « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abrami !
357  GEN 14:20  Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.
359  GEN 14:22  Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome : — Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili,
395  GEN 16:13  Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? » Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi : Nzambe oyo azali komona ngai.
396  GEN 16:14  Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi.
399  GEN 17:1  Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.
421  GEN 17:23  Kaka na mokolo wana, Abrayami azwaki mwana na ye ya mobali, Isimaeli, mpe bawumbu nyonso, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mosolo, akatisaki bango nyonso ngenga ndenge kaka Nzambe alobaki na ye.
425  GEN 17:27  Mibali nyonso kati na ndako ya Abrayami, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mokili ya bapaya, bakatamaki ngenga elongo na ye.
432  GEN 18:7  Mpe Abrayami apotaki mbangu na lopango ya bibwele, azwaki mwana ngombe ya mafuta mpe apesaki yango na mosali na ye mpo ete alamba yango noki-noki.
459  GEN 19:1  Ba-anjelu oyo mibale bakomaki na Sodome na pokwa. Wana Loti avandaki na ekuke, amonaki bango, akendeki koyamba bango mpe afukamaki elongi kino na mabele.
473  GEN 19:15  Tango kaka tongo etanaki, ba-anjelu batungisaki Loti mpe balobaki : — Sala noki, kamata mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya basi oyo bazali awa ; soki te, bokobebisama tango engumba oyo ekozwa etumbu.
496  GEN 19:38  Leki mpe abotaki lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Beni-Ami ; » azali tata ya ekolo ya Amoni, kino na mokolo ya lelo.
504  GEN 20:8  Na tongo-tongo, Abimeleki alamukaki mpe abengisaki basali na ye nyonso. Tango ayebisaki bango makambo oyo ekomelaki ye, babangaki makasi.
528  GEN 21:14  Na tongo makasi ya mokolo oyo elandaki, Abrayami azwaki lipa mpe mbeki ya mayi ; apesaki yango na Agari. Atiaki yango likolo ya lipeka na ye, apesaki ye mwana mpe abenganaki ye. Agari akendeki mpe atambolaki bipai na bipai na esobe ya Beri-Sheba.
545  GEN 21:31  Yango wana babengaki esika yango Beri-Sheba, pamba te na esika yango nde bango mibale balapaki ndayi.
546  GEN 21:32  Sima na bango kosala boyokani kuna na Beri-Sheba, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bazongaki na mokili ya Filisitia.
547  GEN 21:33  Abrayami alonaki nzete ya tamarisi na Beri-Sheba mpe abelelaki Yawe, Nzambe ya bileko na bileko.
551  GEN 22:3  Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye.
567  GEN 22:19  Abrayami azongaki epai ya basali na ye mpe bakendeki elongo na Beri-Sheba epai wapi akobaki kovanda.
574  GEN 23:2  Akufaki na Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. Abrayami asalaki matanga mpo na Sara mpe alelaki ye.
595  GEN 24:3  mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango.
627  GEN 24:35  Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi : apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo.
654  GEN 24:62  Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi.
670  GEN 25:11  Sima na kufa ya Abrayami, Nzambe apambolaki Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Izaki azalaki kovanda pene ya Lakai-Royi.
679  GEN 25:20  mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami.
716  GEN 26:23  Kolongwa wana, akendeki na Beri-Sheba.
717  GEN 26:24  Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. »
724  GEN 26:31  Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balapanaki ndayi ; bongo Izaki abimisaki bango na nzela mpe atikaki bango kokende na kimia.
726  GEN 26:33  Izaki apesaki libulu yango kombo « Sheba. » Yango wana engumba yango ebengami kino lelo Beri-Sheba.
776  GEN 28:2  Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo.
777  GEN 28:3  Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso apambola yo, apesa yo bana, akomisa bana na yo ebele mpe okoma lisanga monene ya bato.
779  GEN 28:5  Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi.
780  GEN 28:6  Ezawu ayokaki ete Izaki apambolaki Jakobi mpe atindaki ye na Padani-Arami mpo na kobala mwasi ; ayokaki mpe ete, tango apambolaki ye, apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana. »
781  GEN 28:7  Jakobi atosaki tata na ye mpe mama na ye, mpe akendeki na Padani-Arami.
784  GEN 28:10  Jakobi alongwaki na Beri-Sheba mpe akendeki na Arani.
786  GEN 28:12  Na se ya pongi, alotaki ndoto : Amonaki ematelo moko ebanda na mabele mpe songe na yango etutaki likolo. Ba-anjelu ya Nzambe bazalaki komata mpe kokita na ematelo yango.
792  GEN 28:18  Na tongo-tongo, Jakobi azwaki libanga oyo atiaki moto, atelemisaki yango lokola elembo mpe asopaki mafuta na songe na yango.
857  GEN 30:26  Pesa ngai mpe basi mpe bana na ngai, ba-oyo mpo na bango nasaleli yo ; bongo nakokende na ngai. Pamba te oyebi malamu mosala makasi oyo nasaleli yo.
863  GEN 30:32  Lelo, nakoleka na kati-kati ya bibwele na yo, nakolongola kati na bana meme, bameme nyonso ya madodo-madodo mpe oyo ezali ya banzela-nzela ya mwindo ; mpe lisusu kati na bantaba nyonso ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe. Wana nde ezala lifuti na ngai.
866  GEN 30:35  Kaka na mokolo wana, Labani alongolaki kati na bibwele, bantaba ya mibali ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, bantaba nyonso ya basi ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, mpe bibwele nyonso oyo ezalaki mwa pembe mpe mwa mwindo kati na bana meme. Apesaki yango na maboko ya bana na ye ya mibali.
870  GEN 30:39  Boye, bibwele ezalaki koya kosangisa nzoto liboso ya bitape wana ; mpe tango ezalaki kobota, bana na yango ezalaki na banzela-nzela ya pembe, banzela-nzela ya mwindo mpe madodo-madodo.
871  GEN 30:40  Jakobi atiaki pembeni bana meme mpe atindaki yango na esika oyo bana meme ya nzela-nzela mpe ya mwa mwindo ezalaki ; pamba te yango ezalaki kobotama mingi kati na bibwele ya Labani. Ezali boye nde akomaki na bibwele ya ye moko oyo asangisaki te na bibwele ya Labani.
874  GEN 30:43  Na nzela wana nde moto oyo akomaki na bozwi mingi koleka. Azwaki bibwele ebele, basali ya basi mpe ya mibali, bashamo mpe ba-ane.
882  GEN 31:8  Tango azalaki koloba : « Bibwele ya nzela-nzela ekozala lifuti na yo, » bibwele nyonso ezalaki kobota bana ya nzela-nzela. Mpe tango azalaki koloba : « Bibwele ya madodo-madodo nde lifuti na yo, » bibwele nyonso ezalaki kobota bana ya madodo-madodo.
884  GEN 31:10  Bongo, na tango oyo bibwele esengelaki kosangisa nzoto, namonaki na ndoto ete bantaba ya mibali, oyo ezalaki kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezalaki ya madodo-madodo, ya banzela-nzela ya mwindo mpe ya banzela-nzela ya pembe.
886  GEN 31:12  Alobaki na ngai : « Tombola miso mpe tala : bantaba nyonso ya mibali, oyo ezali kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezali na madodo-madodo, na banzela-nzela ya mwindo mpe na banzela-nzela ya pembe ; pamba te namoni makambo nyonso oyo Labani asali yo.
892  GEN 31:18  Amemaki bibwele na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki, bibwele oyo azwaki tango avandaki na Padani-Arami, mpo na kozonga epai ya Izaki, tata na ye, na mokili ya Kanana.
921  GEN 31:47  Labani abengaki esika yango Yegari-Saduta mpe Jakobi abengaki yango Galedi.
929  GEN 32:1  Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Labani apesaki bakoko na ye mpe bana na ye ya basi beze ; apambolaki bango mpe azongaki na ndako na ye.
930  GEN 32:2  Wana Jakobi azalaki kokoba mobembo na ye, ba-anjelu ya Nzambe bayaki kokutana na ye.
934  GEN 32:6  Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi ; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye. ’ › »
944  GEN 32:16  shamo ya basi tuku misato elongo na bana na yango, bangombe ya basi tuku minei mpe bangombe ya mibali zomi, ba-ane ya basi tuku mibale mpe ya mibali zomi.
960  GEN 32:32  Tango moyi ebimaki, Jakobi alekaki Penueli. Azalaki kotambola tengu-tengu mpo na loketo na ye.
975  GEN 33:14  Boye, tika ete nkolo na ngai akende liboso, wana ngai nakotambola malembe-malembe na sima, kolanda etamboli ya bibwele oyo ezali liboso na ngai, mpe kolanda etamboli ya bana, kino nakokoma epai ya nkolo na ngai, na Seiri.
979  GEN 33:18  Longwa na mokili ya Padani-Arami, Jakobi akomaki na kimia na engumba Sishemi oyo ezali na mokili ya Kanana ; mpe atelemisaki ndako na ye ya kapo liboso ya engumba.
1009  GEN 34:28  Babotolaki bangombe na bango, bameme mpe bantaba na bango, ba-ane na bango, biloko nyonso oyo ezalaki kati na engumba mpe na bilanga.
1020  GEN 35:8  Ezalaki wana nde Debora, mama mobokoli ya Rebeka, akufaki. Bakundaki ye pembeni ya Beteli, na se ya nzete oyo, wuta na tango wana, bakomaki kobenga « Aloni-Bakuti. »
1021  GEN 35:9  Nzambe abimelaki lisusu Jakobi tango azongaki wuta na Padani-Arami mpe apambolaki ye.
1023  GEN 35:11  Nzambe alobaki na ye lisusu : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Bota bana mpe bokoma ebele ; bokoma ekolo moko mpe bikolo ebele ekobima na nzela na yo, bakonzi bakobima kati na yo.
1030  GEN 35:18  Lokola azalaki kobundana mpo na kokufa, liboso ya kokata motema, apesaki mwana na ye ya mobali kombo Beni-Oni. Kasi tata na ye apesaki ye kombo Benjame.
1033  GEN 35:21  Sima, Isalaele alongwaki mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo mosika ya Migidali-Ederi.
1038  GEN 35:26  Bana mibali ya Zilipa, mwasi mosali ya Lea : Gadi mpe Aseri. Bango nde bana mibali ya Jakobi oyo babotelaki ye na Padani-Arami.
1039  GEN 35:27  Jakobi azongaki epai ya Izaki, tata na ye, na Mamire, pene ya Kiriati-Ariba oyo ebengami Ebron, epai wapi Abrayami mpe Izaki bazalaki kovanda.
1065  GEN 36:24  Bana mibali ya Tsibeoni : Aya mpe Ana. Ezali Ana nde amonaki maziba ya mayi kati na esobe tango azalaki koleisa ba-ane ya Tsibeoni, tata na ye.
1079  GEN 36:38  Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi.
1080  GEN 36:39  Tango Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akufaki, Adari akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi, mwana mwasi ya Mezaabi.
1109  GEN 37:25  Wana bavandaki mpo na kolia, batombolaki miso mpe bamonaki bato ya libota ya Isimaeli elongo na bashamo na bango koya wuta na Galadi. Bashamo na bango ezalaki komema na Ejipito : biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mafuta ya solo kitoko mpe mire.
1117  GEN 37:33  Jakobi asosolaki ete ezali elamba ya Jozefi mpe agangaki : — Ezali elamba ya mwana na ngai ! Nyama moko ya mabe elie ye ! Solo, bakati-kati Jozefi na biteni !
1164  GEN 39:14  abengaki basali ya ndako na ye mpe alobaki : — Botala ! Mo-Ebre oyo bamemelaki biso ayaki nde kosakanela biso ! Aluki kosangisa na ngai nzoto, kasi ngai nagangi makasi.
1167  GEN 39:17  Bongo abetelaki ye lisolo : — Mowumbu Mo-Ebre oyo omemelaki biso, ayaki epai na ngai mpo na kosakana na ngai.
1179  GEN 40:6  Na tongo, Jozefi akendeki epai na bango mpe amonaki ete bazali mawa-mawa.
1180  GEN 40:7  Jozefi atunaki bakalaka ya lokumu ya Faraon, oyo bazalaki kati na boloko elongo na ye, kati na ndako ya nkolo na ye : — Mpo na nini lelo bilongi na bino ezali mawa-mawa ?
1188  GEN 40:15  Pamba te babimisaki ngai na makasi wuta na mokili ya Ba-Ebre ; mpe awa nasali likambo moko te ya mabe mpo ete batia ngai na boloko. »
1208  GEN 41:12  Kuna, tozalaki na elenge mobali moko, azali Mo-Ebre mpe mosali ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. Toyebisaki ye bandoto na biso mpe alimbolaki yango mpo na biso, apesaki moto na moto ndimbola ya ndoto na ye.
1230  GEN 41:34  Tika ete Faraon asala bongo ; tika ete apona basali na mokili, ba-oyo bakokongola eteni ya mitano ya bambuma ya Ejipito na tango ya mibu sambo ya bofuluki.
1241  GEN 41:45  Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito.