Wildebeest analysis examples for:   lin-lin   ?    February 25, 2023 at 00:37    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

57  GEN 3:1  Nzokande, kati na banyama nyonso ya zamba oyo Yawe Nzambe akelaki, nyoka nde elekaki na mayele mabe. Alobaki na mwasi : — Nzambe alobaki na bino solo ete bolia mbuma ata moko te ya banzete ya elanga ?
65  GEN 3:9  Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye : — Ozali wapi ?
67  GEN 3:11  Nzambe alobaki : — Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu ? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia ?
69  GEN 3:13  Yawe Nzambe alobaki na mwasi : — Mpo nini osali bongo ? Mwasi azongisaki : — Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango.
86  GEN 4:6  Yawe alobaki na Kayina : — Mpo na nini osiliki ? Mpo na nini elongi na yo ekomi mawa-mawa ?
87  GEN 4:7  Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango.
89  GEN 4:9  Yawe atunaki Kayina : — Wapi ndeko na yo Abele ? Kayina azongisaki : — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ?
90  GEN 4:10  Nzambe alobaki : — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai.
317  GEN 12:18  Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye : « Likambo nini osali ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo ?
318  GEN 12:19  Mpo na nini olobaki : ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi ? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende ! »
363  GEN 15:2  Kasi Abrami azongisaki : — Oh Nkolo Yawe, okopesa ngai nini ? Nazali na mwana te, mpe ezali Eliezeri ya Damasi nde akokitana na libula na ngai.
369  GEN 15:8  Kasi Abrami alobaki : — Ah Nkolo Yawe, nakoyeba ndenge nini ete mokili oyo epesameli ngai ?
390  GEN 16:8  Atunaki ye : — Agari, mosali ya Sarayi, owuti wapi mpe ozali kokende wapi ? Azongisaki : — Nazali kokima mosika ya Sarayi, nkolo na ngai.
395  GEN 16:13  Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? » Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi : Nzambe oyo azali komona ngai.
434  GEN 18:9  Sima, batunaki ye : — Wapi Sara, mwasi na yo ? Abrayami azongisaki : — Azali na ndako.
437  GEN 18:12  Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange ! »
438  GEN 18:13  Yawe alobaki na Abrayami : — Mpo na nini Sara aseki mpe alobi : « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange ? »
439  GEN 18:14  Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.
442  GEN 18:17  Yawe amilobelaki : « Boni, nakoki solo kobombela Abrayami likambo oyo nalingi kosala ?
448  GEN 18:23  Bongo Abrayami apusanaki mpe alobaki : — Boni, Nkolo na ngai, okoboma penza elongo moto ya sembo mpe moto mabe ?
449  GEN 18:24  Soki bato ya sembo bazali tuku mitano kati na engumba, okoboma bango kaka ? Okolimbisa engumba yango te mpo na bato ya sembo tuku mitano oyo bazali kati na yango ?
450  GEN 18:25  Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?
453  GEN 18:28  Bongo soki motango na bato ya sembo ezali tuku minei na mitano ? Boni, okobebisa engumba mobimba mpo na bato mitano oyo bazangi ? Yawe azongisaki : — Soki nakuti bato ya sembo tuku minei na mitano, nakobebisa yango te.
454  GEN 18:29  Abrayami alobaki na Ye lisusu : — Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku minei ? Azongisaki : — Soki bazali kaka tuku minei, nakobebisa yango te.
455  GEN 18:30  Bongo Abrayami alobaki : — Tika ete Nkolo na ngai asilika te soki nakobi koloba : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku misato ? Azongisaki : — Soki nakuti bato ya sembo tuku misato, nakobebisa yango te.
456  GEN 18:31  Abrayami alobaki : —Awa nameki kosolola na Nkolo, boni, okosala nini soki bato ya sembo bazali kaka tuku mibale ? Azongisaki : — Mpo na bato ya sembo tuku mibale, nakobebisa engumba te.
457  GEN 18:32  Bongo Abrayami alobaki : — Tika ete Nkolo na ngai asilika te, pamba te nazali koloba mpo na mbala ya suka : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka zomi ? Azongisaki : — Mpo na bato ya sembo zomi, nakobebisa engumba te.
463  GEN 19:5  Babelelaki Loti : — Wapi mibali oyo bayaki epai na yo na butu oyo ? Bimisela biso bango mpo ete tosangisa na bango nzoto.
470  GEN 19:12  Mibali yango mibale balobaki na Loti : — Ozali lisusu na moto mosusu na engumba oyo, ndakisa : mibali ya bana na yo ya basi, bana na yo ya mibali mpe ya basi to mpe ndeko mosusu ? Bimisa bango libanda ya esika oyo
500  GEN 20:4  Nzokande, Abimeleki apusanaki nanu te pembeni na ye. Agangaki : — Nkolo, okoboma penza ekolo ata soki esali na yango mabe te ?
505  GEN 20:9  Abimeleki abengaki Abrayami mpe alobaki na ye : — Likambo nini osali biso, lisumu nini nasali yo mpo ete omemisa ngai mpe mokili na ngai ngambo ya monene boye ? Osali ngai makambo oyo ekoki kosalema te.
506  GEN 20:10  Abimeleki atunaki Abrayami : — Makanisi nini ozalaki na yango mpo ete osala boye ?
521  GEN 21:7  Abakisaki : « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele ? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. »
531  GEN 21:17  Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye : « Agari, likambo nini ? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye.
543  GEN 21:29  Abimeleki atunaki Abrayami : — Bana meme sambo oyo otie pembeni elakisi nini ?
555  GEN 22:7  Izaki atunaki Abrayami, tata na ye : — Tata na ngai ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo ! Izaki alobaki : — Tozali na moto mpe koni, kasi wapi mpate mpo na mbeka ya kotumba ?
587  GEN 23:15  — Yoka, nkolo na ngai ! Mabele ya motuya ya mbongo ya bibende, nkama minei, ezali penza nini kati na ngai mpe yo ? Kamata mabele yango mpe kunda mwasi na yo.
597  GEN 24:5  Mosali atunaki ye : — Tango mosusu mwasi yango akolinga na ye te kolanda ngai na mokili oyo. Boni, nakoki na ngai kozongisa mwana na yo ya mobali na mokili epai wapi owuta ?
615  GEN 24:23  Atunaki ye : — Ozali mwana mwasi ya nani ? Nabondeli yo, yebisa ngai. Boni, esika ekoki komonana na ndako ya tata na yo mpo na biso mpo ete tolekisa kuna butu ?
623  GEN 24:31  Alobaki : « Yaka na ndako na biso, yo oyo opambolama na Yawe. Mpo na nini otelemi awa na libanda ? Nabongisi ndako mpe esika mpo na bashamo. »
635  GEN 24:43  Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo ? 
639  GEN 24:47  Natunaki ye : « Ozali mwana mwasi ya nani ? » Azongisaki : « Nazali mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali oyo Milika abotelaki Naori. » Boye natiaki lopete na zolo na ye mpe basheneti na maboko na ye.
650  GEN 24:58  Babengaki Rebeka mpe batunaki ye : — Ondimi solo kokende na mobali oyo ? Rebeka azongisaki : — Iyo, nandimi.
657  GEN 24:65  Atunaki mosali ya Abrayami : — Nazali komona mobali moko kati na bilanga, azali koya kokutana na biso ; azali nani ? Mosali ya Abrayami azongisaki : — Azali nkolo na ngai. Bongo Rebeka azwaki vwale na ye mpe amizipaki na elongi.
681  GEN 25:22  Kati na libumu na ye, bana bazalaki kowelana. Alobaki : « Likambo nini oyo ekomeli ngai ? » Boye, akendeki kotuna Yawe.
691  GEN 25:32  Ezawu azongisaki : — Tala, nakokufa na nzala. Boyaya na ngai ekopesa ngai nini ?
702  GEN 26:9  Bongo Abimeleki abengisaki ye mpe alobaki na ye : — Rebeka azali solo mwasi na yo. Mpo na nini olobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ? » Izaki azongisaki : — Kati na ngai, nazalaki koloba ete nakokaki kokufa mpo na ye.
703  GEN 26:10  Abimeleki alobaki lisusu : — Nasali bino likambo nini ? Etikalaki kaka moke ete mobali moko kati na bato na ngai akota mpe asangisa nzoto na mwasi na yo. Boye, olingaki komemisa biso ngambo.
720  GEN 26:27  Izaki atunaki bango : — Mpo na nini boyei epai na ngai, bino bato oyo bolingaka ngai te mpe bobenganaki ngai epai na bino ?
746  GEN 27:18  Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki : — Tata na ngai ! Izaki azongisaki : — Ngai oyo, mwana na ngai ; yo nani ?
748  GEN 27:20  Izaki atunaki mwana na ye : — Mwana na ngai, osali ndenge nini mpo ete ozwa nyama noki ? Jakobi azongisaki : — Ezali Yawe, Nzambe na yo, nde atindaki yango na nzela na ngai.
752  GEN 27:24  Kasi liboso, atunaki ye : — Ozali penza mwana na ngai Ezawu ? Jakobi azongisaki : — Iyo, ezali ngai solo.
760  GEN 27:32  Tata na ye, Izaki, atunaki ye : — Yo nani ? Azongisaki : — Ngai Ezawu, mwana na yo ya liboso.
761  GEN 27:33  Bongo Izaki alengaki makasi mpe alobaki : — Nani wana abomaki nyama mpe amemelaki ngai yango ? Naliaki yango liboso ete yo oya, mpe napambolaki ye. Boye apambolami solo !
764  GEN 27:36  Ezawu alobaki : — Mpo ete kombo na ye ezali « Jakobi, » yango wana akosi ngai mbala mibale ? Ya liboso, azwaki boyaya na ngai, mpe tala sik’oyo azwi lisusu mapamboli na ngai ! Bongo atunaki : — Boni, obombelaki ngai mapamboli te ?
765  GEN 27:37  Izaki azongiselaki Ezawu : — Tala, nakomisi ye nkolo na yo mpe napesi ye bandeko na ye nyonso lokola basali ; napesi ye ble mpe vino. Mwana na ngai, nasala lisusu nini mpo na yo ?
766  GEN 27:38  Ezawu alobaki na tata na ye : — Tata na ngai, ozalaki kaka na lipamboli moko wana ? Tata na ngai, pambola ngai mpe ! Ezawu atombolaki mongongo na ye mpe alelaki makasi.
773  GEN 27:45  Tango kanda na ye ekosila mpe akobosana makambo oyo osalaki ye, nakotindela yo maloba mpo ete olongwa kuna mpe ozonga. Mpo na nini nazanga bino mibale mokolo moko ? › »
800  GEN 29:4  Jakobi atunaki babateli bibwele : — Bandeko na ngai ya mibali, bowuti wapi ? Bazongisaki : — Towuti na Arani.
801  GEN 29:5  Atunaki bango lisusu : — Boyebi Labani, koko ya Naori ? Bazongisaki : — Iyo, toyebi ye.
802  GEN 29:6  Jakobi abakisaki lisusu : — Boni, azali malamu ? Bazongisaki : — Iyo, azali malamu. Tala kutu Rasheli, mwana na ye ya mwasi, azali koya elongo na bameme.
811  GEN 29:15  Labani alobaki na Jakobi : — Boni, osalela ngai mosala ya ofele mpo ete ozali moto ya libota na ngai ? Yebisa ngai : olingi ete lifuti na yo ezala nini ?
821  GEN 29:25  Tango tongo etanaki, Jakobi amonaki ete ezalaki nde Lea. Bongo alobaki na Labani : — Likambo nini oyo osali ngai ? Boni, ezali mpo na Rasheli te nde ngai nasalelaki yo ? Mpo na nini okosi ngai ?
833  GEN 30:2  Jakobi asilikaki makasi mpo na Rasheli mpe alobaki : — Boni, ngai nakomi nde Nzambe oyo akangi yo mabota ?
846  GEN 30:15  Kasi Lea azongiselaki ye : — Boni, ndenge ozwi mobali na ngai, ekoki te ? Olingi lisusu kozwa bambuma ya mandragore ya mwana na ngai ? Rasheli alobaki na ye : — Malamu ! Soki opesi ngai bambuma ya mandragore ya mwana na yo, Jakobi akolala epai na yo na butu ya lelo.
861  GEN 30:30  Moke oyo ozalaki na yango, liboso ete ngai naya, ekomi ebele penza. Yawe apamboli yo na nzela na ngai. Kasi sik’oyo, nakosala tango nini mpo na libota na ngai moko ?
862  GEN 30:31  Labani atunaki ye : — Nasengeli kopesa yo nini ? Jakobi azongisaki : — Okopesa ngai eloko te. Kasi soki olingi kosala likambo oyo mpo na ngai, nakokoba koleisa mpe kobatela bibwele na yo.
888  GEN 31:14  Rasheli mpe Lea bazongisaki : — Boni, tozali lisusu na eloko to na libula kati na ndako ya tata na biso ?
900  GEN 31:26  Labani alobaki na Jakobi : — Makambo nini osali ngai ? Okosi ngai mpe omemi bana na ngai ya basi lokola bakangami ya bitumba !
901  GEN 31:27  Mpo na nini okimi na nkuku mpe okosi ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ? Nalingaki kutu kotika yo kokende na esengo elongo na banzembo, na makelele ya bambunda mpe ya lindanda.
904  GEN 31:30  Sik’oyo, lokola okeyi mpo ete ozalaki na posa ya ndako ya tata na yo, mpo na nini oyibi banzambe na ngai ?
910  GEN 31:36  Bongo Jakobi asilikaki mpe aswanisaki Labani. Alobaki na ye : — Mbeba nini nasalaki ? Lisumu nini nasalaki mpo ete olanda ngai na kanda boye ?
911  GEN 31:37  Tango oluki kati na biloko na ngai nyonso, eloko nini ya ndako na yo omoni ? Tia yango awa liboso ya bandeko na yo ya mibali mpe ya ngai mpo bakatela biso mibale likambo.
917  GEN 31:43  Labani azongiselaki Jakobi : — Basi oyo bazali bana na ngai ya basi, bana oyo bazali bana na ngai, bibwele oyo ezali ya ngai mpe nyonso oyo ozali komona ezali ya ngai. Bongo lelo, eloko nini nakoki kosala mpo na bana na ngai ya basi mpe mpo na bana oyo bango baboti ?
946  GEN 32:18  Jakobi apesaki mitindo oyo epai ya mosali na ye ya liboso : « Tango Ezawu, ndeko na ngai, akokutana na yo mpe akotuna yo : ‹ Yo ozali mosali ya nani, ozali kokende wapi mpe nani nkolo ya banyama nyonso oyo ezali liboso na yo ? 
956  GEN 32:28  Moto yango atunaki Jakobi : — Kombo na yo nani ? Jakobi azongisaki : — Kombo na ngai ezali Jakobi.
958  GEN 32:30  Jakobi alobaki : — Nabondeli yo, yebisa ngai kombo na yo. Azongiselaki ye : — Mpo na nini ozali kotuna kombo na ngai ? Boye apambolaki ye na esika wana.
966  GEN 33:5  Tango atombolaki miso na ye, amonaki na mosika basi mpe bana. Atunaki : — Banani wana bazali elongo na yo ? Jakobi azongisaki : — Ezali bana oyo Nzambe apesi, na bolingo na Ye, epai ya mosali na yo.
969  GEN 33:8  Ezawu atunaki : — Ngulupa nyonso oyo nakutani na yango, tina na yango nini ? Jakobi azongisaki : — Ezali mpo ete nazwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai.
976  GEN 33:15  Ezawu alobaki : — Nabondeli yo, ndima ete natikela yo ndambo ya bato na ngai. Kasi Jakobi atunaki : — Mpo na nini kosala bongo ? Tika ete nazwa kaka ngolu na miso ya nkolo na ngai !
1004  GEN 34:23  Bibwele na bango, bomengo na bango, banyama na bango nyonso ; boni ekokoma ya biso te soki kaka tondimi ete bavanda elongo na biso ? »
1012  GEN 34:31  Bango bazongisaki : — Boni, esengelaki bazwa ndeko na biso lokola mwasi ya ndumba ?
1092  GEN 37:8  Bandeko na ye ya mibali balobaki na ye : — Okanisi ete okokoma mokonzi na biso mpe okokonza biso ? Bongo bayinaki ye lisusu koleka likolo ya ndoto na ye mpe likolo ya makambo oyo alobaki.
1094  GEN 37:10  Tango ayebisaki tata na ye ndenge ayebisaki bandeko na ye ya mibali, tata na ye agangelaki ye mpe alobaki : — Ndoto nini wana yo osili kolota ? Okanisi ete ngai, mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali, tokoya mpe tokogumbama na mabele liboso na yo ?
1099  GEN 37:15  moto moko amonaki ye tango azalaki koyengayenga na bilanga. Atunaki ye : — Ozali koluka nini ?
1100  GEN 37:16  Jozefi azongisaki : — Nazali koluka bandeko na ngai. Okoki koyebisa ngai esika nini bazali koleisa bibwele na bango ?
1110  GEN 37:26  Boye Yuda alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Litomba nini tokozwa soki tobomi ndeko na biso mpe tozipi makila na ye ?
1114  GEN 37:30  azongaki epai ya bandeko na ye mpe alobaki : « Elenge mobali azali lisusu kuna te ! Sik’oyo ngai, nakosuka wapi ? »
1136  GEN 38:16  Lokola Yuda ayebaki te ete ezali bokilo na ye ya mwasi, apusanaki na esika oyo azalaki, pembeni ya nzela, mpe alobaki na ye : — Yaka, ndima ete tosangisa na yo nzoto. Tamari atunaki : — Okopesa ngai nini soki osangisi na ngai nzoto ?
1137  GEN 38:17  Yuda azongisaki : — Nakotindela yo mwana ntaba oyo nakozwa na etonga na ngai. Tamari atunaki lisusu : — Ndanga nini okosimbisa ngai kino tango okotindela ngai yango ?
1138  GEN 38:18  Yuda alobaki : — Ndanga nini olingi ete nasimbisa yo ? Tamari azongisaki : — Lopete na yo, singa na yo mpe lingenda na yo, oyo osimbi na loboko. Boye Yuda apesaki ye yango, asangisaki na ye nzoto mpe Tamari akomaki na zemi.
1141  GEN 38:21  Boye atunaki epai ya bavandi ya esika wana, na Enayimi : — Wapi mwasi ya ndumba oyo azalaki na nzela, na Enayimi ? Bazongiselaki ye : — Esika oyo etikala kozala na mwasi ya ndumba te.
1149  GEN 38:29  Kasi azongisaki loboko na ye, mpe ndeko na ye ya mobali abimaki. Bongo mwasi oyo abotisaka alobaki : « Ofungoli nzela nini mpo na kobima ? » Mpe bapesaki ye kombo « Peretsi. »
1159  GEN 39:9  Moto moko te aleki ngai na monene kati na ndako oyo. Nkolo na ngai apekisi ngai eloko moko te longola kaka yo, pamba te ozali mwasi na ye. Boye ndenge nini penza ngai nakoki kosala likambo ya mabe boye mpe kosala masumu liboso ya Nzambe ?
1180  GEN 40:7  Jozefi atunaki bakalaka ya lokumu ya Faraon, oyo bazalaki kati na boloko elongo na ye, kati na ndako ya nkolo na ye : — Mpo na nini lelo bilongi na bino ezali mawa-mawa ?
1181  GEN 40:8  Bazongiselaki ye : — Biso mibale toloti bandoto ; kasi moto ya kolimbola yango mpo na biso azali te. Jozefi alobaki na bango : — Boyebi te ete Nzambe nde apesaka ndimbola ya bandoto ? Nabondeli bino, boyebisa ngai bandoto na bino.
1234  GEN 41:38  Faraon atunaki bango : — Tokoki komona moto lokola oyo, moto oyo Molimo na Nzambe avandi kati na ye ?
1254  GEN 42:1  Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, alobaki na bana na ye ya mibali : « Mpo na nini bozali kotalana bino na bino ?
1260  GEN 42:7  Tango kaka Jozefi amonaki bango, asosolaki mbala moko ete bazali bandeko na ye. Kasi asalaki lokola nde azali mopaya liboso na bango mpe azalaki na maloba makasi epai na bango. Atunaki bango : — Bowuti wapi ? Bazongisaki : — Towuti na mokili ya Kanana ; toyei nde kosomba biloko ya kolia.
1275  GEN 42:22  Ribeni alobaki na bango : — Nayebisaki bino ete bosala mwana wana mabe te ? Kasi boyokelaki ngai te. Sik’oyo tosengeli kofuta makila na ye !