73 | GEN 3:17 | Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo. |
311 | GEN 12:12 | Tango bato ya Ejipito bakomona yo, bakoloba : ‹ Azali mwasi na ye. › Boye, bakoboma ngai mpe bakotika yo na bomoi. |
318 | GEN 12:19 | Mpo na nini olobaki : ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi ? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende ! » |
406 | GEN 17:8 | Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › » |
509 | GEN 20:13 | Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai : « Tala bolamu oyo okosalela ngai : Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai : ‹ Azali ndeko na ngai. › » |
606 | GEN 24:14 | Tika ete mwana mwasi oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, tengemisa mbeki na yo mpo ete namela mayi, › mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo, › azala mwasi oyo oponi mpo na Izaki, mosali na Yo. Na nzela oyo, nakoyeba ete olakisi bolamu na Yo epai ya nkolo na ngai. » |
635 | GEN 24:43 | Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo ? › |
636 | GEN 24:44 | Mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo, › tika ete ye nde azala mwasi oyo Yawe aponi mpo na mwana mobali ya nkolo na ngai. » |
773 | GEN 27:45 | Tango kanda na ye ekosila mpe akobosana makambo oyo osalaki ye, nakotindela yo maloba mpo ete olongwa kuna mpe ozonga. Mpo na nini nazanga bino mibale mokolo moko ? › » |
934 | GEN 32:6 | Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi ; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye. ’ › » |
938 | GEN 32:10 | Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. › |
941 | GEN 32:13 | Nzokande, Yo olobaki na ngai : ‹ Ya solo nakosalela yo bolamu mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola zelo ya ebale monene, oyo moto moko te akoki kotanga. › » |
946 | GEN 32:18 | Jakobi apesaki mitindo oyo epai ya mosali na ye ya liboso : « Tango Ezawu, ndeko na ngai, akokutana na yo mpe akotuna yo : ‹ Yo ozali mosali ya nani, ozali kokende wapi mpe nani nkolo ya banyama nyonso oyo ezali liboso na yo ? › |
947 | GEN 32:19 | Okozongisa : ‹ Ezali ya Jakobi, mosali na yo, ezali kado oyo atindeli nkolo na ngai Ezawu. Mpe tala ye moko azali koya sima na biso. › » |
949 | GEN 32:21 | Bokoyebisa ye lisusu : ‹ Tala ye moko Jakobi, mosali na yo, azali koya na sima na biso ! › » Pamba te azalaki komilobela : « Nakokitisa kanda na ye na kado oyo natindi liboso na ngai ; sima tango nakokutana na ye, mbala mosusu akoyamba ngai malamu. » |
1287 | GEN 42:34 | Boyela ngai leki na bino ya suka. Na bongo, nakoyeba ete bozali banongi te, kasi bato ya sembo ; mpe ngai nakozongisela bino ndeko na bino, sima nakotika bino mpo ete bokoka kosala mombongo na mokili. › » |
1372 | GEN 45:13 | Boyebisa tata na ngai lokumu nyonso oyo nazali na yango awa na Ejipito, boyebisa ye makambo nyonso oyo bosili komona mpe bomemela ngai ye awa na lombangu. › » |
1524 | GEN 50:17 | ‘ Nasengi ete olimbisa masumu ya bandeko na yo mpe mabe oyo basalaki yo ! Sik’oyo, nabondeli yo, limbisa masumu ya basali ya Nzambe ya tata na yo ! ’ › » Tango Jozefi ayokaki maloba yango, alelaki. |
1596 | EXO 3:16 | Boye, kende, sangisa bakambi ya Isalaele mpe loba na bango : « Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, abimelaki ngai mpe alobi : ‹ Nazwi mokano ya kobundela bino, pamba te namoni pasi na bino na Ejipito. › » |
1625 | EXO 4:23 | Mpe nalobi na yo : Tika mwana na Ngai ya mobali kokende mpo ete asalela Ngai. Soki kaka oboyi kotika ye, nakoboma mwana na yo ya liboso ya mobali. › » |
1695 | EXO 7:9 | « Tango Faraon akoloba na bino : ‹ Bosala bikamwa, › yo Moyize, okoloba na Aron : ‹ Kamata lingenda na yo, bwaka yango liboso ya Faraon, › mpe lingenda ekobongwana nyoka. » |
1704 | EXO 7:18 | Mbisi ya Nili ekokufa mpe mayi ya Nili ekokoma solo ya kopola, bongo bato ya Ejipito bakokoka lisusu komela yango te. ’ › » |
1705 | EXO 7:19 | Yawe alobaki na Moyize : « Yebisa Aron : ‹ Kamata lingenda na yo mpe sembola yango na ngambo ya mayi nyonso ya Ejipito : etima mpe miluka, maziba mpe mabulu nyonso ya mayi ekobongwana makila. › Makila ekozala na bisika nyonso ya Ejipito kino na bimelelo ya mayi oyo esalema na nzete to na mabanga. » |
1715 | EXO 7:29 | Magorodo ekomatela yo, basali na yo mpe bato na yo nyonso. › » |
1747 | EXO 9:4 | Kasi Yawe akotia bokeseni kati na bibwele ya bana ya Isalaele mpe ya bato ya Ejipito, pamba te nyama moko te ya bana ya Isalaele ekokufa. › » |
1762 | EXO 9:19 | Sik’oyo, pesa mitindo ete bamema na ebombelo, bibwele na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango kati na elanga. Pamba te mvula ya mabanga ekokweyela mpe ekoboma moto mpe nyama nyonso oyo bokokotisa kuna te to oyo ekotikala kati na elanga. › » |
1784 | EXO 10:6 | Ekotonda na bandako na yo, ya bakalaka na yo mpe ya bato nyonso ya Ejipito ; ezala batata na yo to bakoko na yo batikala nanu komona te likambo ya boye wuta bazala na mokili oyo kino lelo. › » Moyize abalukaki mpe atikaki ndako ya Faraon. |
1814 | EXO 11:7 | Kasi kati na bana nyonso ya Isalaele, ezala mbwa ekoganga te liboso ya moto to ya nyama. › Na bongo, bokoyeba ete Yawe asali bokeseni kati na bato ya Ejipito mpe ya Isalaele. |
1815 | EXO 11:8 | Boye, bakalaka na yo nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakoya epai na ngai, bakofukama liboso na ngai mpe bakoloba : ‹ Kende, yo mpe bato nyonso oyo bazali kotambola sima na yo. › Mpe sima na yango, nakobima. » Bongo Moyize abimaki na ndako ya Faraon na kanda makasi. |
1843 | EXO 12:26 | Bongo tango bana na bino bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini mpo na bino ? › |
1844 | EXO 12:27 | Bokoloba na bango : ‹ Ezali mbeka ya feti ya Pasika mpo na Yawe oyo alekaki bandako ya bana ya Isalaele kati na Ejipito mpe abikisaki bandako na biso tango abomaki bato ya Ejipito. › » Na bongo, bana ya Isalaele bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe. |
1866 | EXO 12:49 | Mibeko ezali se ndenge moko mpo na mwana mboka ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo azali kati na bino. › » |
1876 | EXO 13:8 | Na mokolo wana, bokoyebisa na bana na bino ya mibali : ‹ Nazali kosala molulu oyo mpo na kokanisa makambo oyo Yawe asalelaki ngai tango abimisaki ngai na Ejipito. › |
1882 | EXO 13:14 | Mikolo ekoya, tango bana na bino ya mibali bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini ? › Bokoloba na bango : ‹ Ezali na nguya na Ye nde Yawe abimisaki biso na Ejipito, mokili ya bowumbu. |
1883 | EXO 13:15 | Tango Faraon aboyaki kotika biso kokende, Yawe abomaki kati na Ejipito mwana nyonso ya liboso, ezala ya moto to ya nyama. Yango wana nazali kobonzela Yawe bana nyonso ya liboso kati na banyama mpe nazali kosikola bana nyonso ya liboso kati na bana na ngai. › |
2083 | EXO 21:5 | Kasi soki mowumbu alobi : ‹ Nalingaka nkolo na ngai, mwasi na ngai mpe bana na ngai, nalingi te kozwa bonsomi, › |
2123 | EXO 22:8 | Na likambo nyonso ya moyibi, soki bato mibale bazali kowela ngombe, ane, meme, elamba to eloko nyonso oyo ebungaki, bongo moto na moto azali koloba : ‹ Ezali ya ngai ! › bango mibale bakomema likambo na bango liboso ya basambisi ; bongo moto oyo basambisi bakokweyisa akozongisa yango mbala mibale epai ya moninga na ye. |
2796 | LEV 3:17 | Ezali mobeko ya seko mpo na milongo oyo ekoya, na bisika nyonso oyo bokovanda : bokolia te ezala mafuta to makila. › » |
2831 | LEV 4:35 | Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta ya mwana meme kati na mbeka ya boyokani. Mpe Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo, na likolo ya makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. ’ › » |
2863 | LEV 6:6 | Moto esengeli kopela tango nyonso na etumbelo, ekoki kokufa te. › |
2868 | LEV 6:11 | Bana mibali nyonso kati na bakitani ya Aron bakolia yango. Ezali eteni na bango mpo na tango nyonso mpe na milongo nyonso kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Bato nyonso oyo bakosimba yango bakokoma bule. ’ › » |
2880 | LEV 6:23 | Nzokande, mbeka moko te mpo na masumu ekoki koliama soki bamemi makila na yango na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu ; esengeli kotumba yango na moto. ’ › » |
2890 | LEV 7:10 | Likabo nyonso ya gato oyo basangisi na mafuta to oyo ezali ya kokawuka ekozala ya bana mibali nyonso ya Aron ; bakozwa yango ndenge moko. ’ › |
2901 | LEV 7:21 | Soki moto moko asimbi eloko ya mbindo, ezala moto ya mbindo to nyama ya mbindo to eloko mosusu ya mabe mpe ya mbindo, mpe alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. ’ › » |
2907 | LEV 7:27 | Moto nyonso oyo akolia makila, bakolongola ye kati na bato na ye. › » |
2915 | LEV 7:35 | Yango nde eteni ya makabo bazikisa na moto, oyo bana ya Isalaele basengeli kopesa epai ya Aron mpe bana na ye ya mibali wuta mokolo oyo akobulisa bango mpo na kosalela Yawe lokola Banganga-Nzambe. › » |
2949 | LEV 8:31 | Moyize alobaki na Aron mpe na bana na ye ya mibali : « Bolamba mosuni na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe bolia yango wana elongo na lipa oyo ezali kati na kitunga oyo ezali na mbeka ya libulisi, ndenge kaka natindaki tango nalobaki : ‹ Aron mpe bana na ye ya mibali nde bakolia yango. › |
2958 | LEV 9:4 | mpe ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya boyokani, mpo na kobonza lokola mbeka liboso ya Yawe elongo na likabo ya bambuma basangisa na mafuta. Pamba te, na mokolo ya lelo, Yawe akobimela bino. › » |
2981 | LEV 10:3 | Moyize alobaki na Aron : « Tomoni kokokisama ya maloba oyo Yawe asakolaki tango alobaki : ‹ Bato nyonso oyo bakobelema liboso na Ngai basengeli kotosa bosantu na Ngai, mpe Ngai nakomonisa nkembo na Ngai na miso ya bato nyonso. › » Aron alobaki ata liloba moko te. |
3045 | LEV 11:47 | Bosengeli kosala bokeseni kati na oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto, kati na bikelamu ya bomoi oyo bakoki kolia mpe oyo bakoki kolia te. › » |
3053 | LEV 12:8 | Soki azangi makoki ya kozwa mwana meme, akoki komema bana mibale ya ebenga ya mboka to bibenga mibale ya zamba : moko mpo na mbeka ya kotumba, mpe mosusu, mpo na mbeka mpo na masumu. Sima na Nganga-Nzambe kosala mosala ya bolimbisi masumu, mwasi akokoma peto. › » |
3098 | LEV 13:45 | Moto oyo azwi bokono ya boye asengeli kolata bilamba epasuka, akokatisa suki te, akozipa mandefu na ye mpe akoganga : ‹ Mbindo ! Mbindo ! › |
3143 | LEV 14:31 | mpe akobonza yango lokola mbeka mpo na masumu ; bongo akobonza ebenga mosusu lokola mbeka ya kotumba elongo na makabo ya farine. Mpe Nganga-Nzambe akosala liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu ya moto oyo azali komipetola. › |
3147 | LEV 14:35 | nkolo ndako asengeli kokende koloba boye epai ya Nganga-Nzambe : ‹ Namoni litono ya maba kati na ndako na ngai. › |
3200 | LEV 15:31 | Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo ; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. › |
3243 | LEV 17:7 | Bana ya Isalaele bakobonza lisusu te bambeka na bango epai banzambe ya bikeko ya bantaba ya mibali, oyo basambelaka. Oyo ekozala malako ya libela mpo na bango mpe mpo na milongo oyo ekoya. ’ › |
3252 | LEV 17:16 | Kasi soki asukoli bilamba mpe nzoto na ye te, akomema ngambo. › » |
3282 | LEV 18:30 | Boye, bobatela malako na Ngai mpe bolanda ata likambo moko te kati na makambo mabe oyo ezalaki kosalema liboso ete bino boya, mpo ete bomikomisa mbindo te na nzela na yango. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › » |
3319 | LEV 19:37 | Bokobatela bikateli mpe mibeko na Ngai nyonso mpe bokosalela yango. Nazali Yawe. › » |
3343 | LEV 20:24 | Boye nayebisaki bino : ‹ Bino nde bato bokozwa mokili na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi ; napesi bino yango lokola libula. › Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo alongolaki bino kati na bikolo mpe atiaki bino pembeni. |
3361 | LEV 21:15 | Na bongo, akobebisa te bosantu ya bakitani na ye kati na bato na ye ; pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisi ye. › » |
3369 | LEV 21:23 | Kasi mpo na mbeba ya nzoto na ye, akoki te kopusana pembeni ya rido ya Esika ya bule to ya etumbelo, mpo ete abebisa te bosantu ya Esika na Ngai ya bule, pamba te Ngai nazali Yawe, mpe ezali Ngai nde nabulisaki Banganga-Nzambe mpo na mosala na Ngai. › » |
3386 | LEV 22:16 | Soki, wana bazali mbindo, balie yango, bakomemisa bana ya Isalaele ngambo oyo ekosala ete bapesa likabo mpo na kozongisa boyokani, pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisaka bango mpo na mosala na Ngai. › » |
3395 | LEV 22:25 | Bokoki kondima nyama ya lolenge oyo te na maboko ya bapaya mpo na kobonza yango epai na Yawe lokola bilei ya Nzambe na bino. Ekoki kondimama te, pamba te ezali na mbeba. › » |
3411 | LEV 23:8 | Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Mpe na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. › » |
3425 | LEV 23:22 | Tango bokobuka bambuma na mboka na bino, bobuka te kino na bandelo ya bilanga na bino mpe bolokota te oyo ekobanda kokweya. Botika yango mpo na mobola to mopaya. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › » |
3428 | LEV 23:25 | Bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala, kasi bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. › » |
3446 | LEV 23:43 | mpo ete bakitani na bino bayeba ete navandisaki bana ya Isalaele na bandako ya matiti tango nabimisaki bango na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › » |
3469 | LEV 24:22 | Ezala mopaya to mwana mboka, bino nyonso bozali na mobeko moko ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. › » |
3570 | LEV 26:45 | Nakokanisa boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango, oyo Ngai nabimisaki na Ejipito, na miso ya bikolo mosusu, mpo ete nazala Nzambe na bango. Nazali Yawe. › » |
3604 | LEV 27:33 | ezala ya malamu to ya mabe, akoki te kopona nyama mosusu na esika ya nyama oyo ya zomi. Soki atie nyama moko na esika ya nyama mosusu, nyonso mibale ekokoma bule mpo na Yawe ; mpe ekoki kosikolama te. › » |
3803 | NUM 5:10 | Biloko oyo moto nyonso akotia pembeni mpo na Yawe ekopesama epai ya Nganga-Nzambe ; kasi eloko nyonso oyo moto akokabela Nganga-Nzambe ekokoma ya Nganga-Nzambe. › » |
3824 | NUM 5:31 | Mobali akomema ngambo ata moke te kasi mwasi akozwa etumbu ya lisumu na ye. › » |
3845 | NUM 6:21 | Wana nde ezali mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe, na nzela ya ndayi, elongo na makabo oyo asengeli kobonza epai na Yawe mpo na libulisi na ye. Mpe soki azali na makoki, akoki na ye kopesa makabo mosusu wuta na motema na ye moko. Akokokisa biloko nyonso kolanda ndayi oyo asilaki kolapa mpe mobeko ya libulisi na ye. › » |
3850 | NUM 6:26 | Tika ete Yawe amona yo mpe apesa yo kimia ! ’ › |
3942 | NUM 8:2 | « Loba na Aron mpe yebisa ye : ‹ Tango okotia minda, minda sambo esengeli kongengisa liboso ya etelemiselo ya minda. › » |
4043 | NUM 11:18 | Loba na bato : « Bomibongisa mpe bomibulisa mpo na lobi, pamba te bokolia misuni. Yawe ayokaki tango bozalaki kolelalela : ‹ Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia ? Biso oyo tozalaki na biso malamu na Ejipito ! › Sik’oyo Yawe akopesa bino misuni mpe bokolia yango. |
4045 | NUM 11:20 | Kasi bokolia yango sanza mobimba kino ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango nkele, pamba te bobwakaki Yawe oyo azali kati na bino, bolelaki-lelaki liboso na Ye mpe bolobaki : ‹ Mpo na nini tobimaki na Ejipito ? › » |
4170 | NUM 15:16 | Ezala bino to mopaya oyo azali kati na bino, bokosalela kaka mibeko mpe mitindo moko. › » |
4185 | NUM 15:31 | Pamba te atioli Liloba na Yawe mpe abuki mitindo na ye. Solo, moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati na bato na ye mpe akomema ngambo ya mabe na ye. › » |
4195 | NUM 15:41 | Nazali Yawe, Nzambe na bino ; nabimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Solo, nazali Yawe, Nzambe na bino. › » |
4282 | NUM 18:24 | Na esika na yango, napesi epai ya Balevi lokola libula na bango, biteni moko nyonso kati na biteni zomi oyo bana ya Isalaele bakopesa lokola likabo epai na Yawe. Yango wana, nalobaki na tina na bango : ‹ Bakozwa libula moko te elongo na bana ya Isalaele. › » |
4287 | NUM 18:29 | Kati na makabo nyonso oyo bokozwa, bosengeli kopesa epai na Yawe eteni oyo eleki kitoko mpe eleki bule. › |
4290 | NUM 18:32 | Na nzela ya kopesa eteni wana oyo eleki kitoko, bokozala na ngambo te na likambo wana, bokobebisa te bosantu ya makabo ya bana ya Isalaele mpe bokokufa te. › » |
4427 | NUM 23:10 | Nani akoki kotanga putulu ya Jakobi to kotanga motango ya bakitani ya Isalaele ? Tika ete nakufa kufa ya bato ya sembo, mpe tika ete suka na ngai ezala lokola ya bango ! › » |
4440 | NUM 23:23 | Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi, mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele. Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele : ‹ Tala makambo oyo Nzambe asali ! › |
4456 | NUM 24:9 | Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali, lokola nkosi ya mwasi ; nani akokoka kotelemisa bango ? Tika ete oyo akopambola yo apambolama, mpe oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ! › » |
4466 | NUM 24:19 | Mokonzi moko akobima wuta na Jakobi, mpe akoboma batikali nyonso ya engumba. › » |
4567 | NUM 27:11 | Bongo, soki tata na ye azalaki mpe na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya ndeko ya pene ya libota ya tata na ye ; ye nde akokitana na yango. Oyo ekozala mpo na Isalaele, mobeko oyo bosengeli kolanda ndenge Yawe alobaki na Moyize. › » |
4581 | NUM 28:2 | « Pesa mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Bosala keba ete bomema liboso na Ngai, na mikolo oyo ekatama, makabo na Ngai, makabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Ngai. › |
4610 | NUM 28:31 | Bokobonza mbeka yango na mbeka na yango ya masanga, bakisa mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma. Bosala keba ete ezala banyama oyo ezanga mbeba. › » |
4649 | NUM 29:39 | Oyo nde makabo mpe bambeka oyo bokobonzela Yawe na mikolo ya bafeti na bino oyo ekatama ; ekobakisama na likolo ya mbeka na bino ya kotumba, na likolo ya makabo na bino ya bambuma, mbeka na bino ya masanga, mbeka na bino ya boyokani mpo na kokokisa ndayi to mpe na likolo ya makabo oyo bopesaka wuta na mokano ya mitema na bino moko. › » |
4665 | NUM 30:16 | Nzokande, soki akweyisi ndayi to ekateli yango, sima na koyoka yango, ye nde akomema mokumba ya mbeba ya mwasi na ye. › » |
4690 | NUM 31:24 | Na mokolo ya sambo, bokopetola bilamba na bino mpe bokokoma peto mpe na sima nde bokoki kozonga na molako. › » |
4818 | NUM 33:56 | Boye, nakosala bino ndenge nakanaki kosala bango. › » |
4830 | NUM 34:12 | kino na Yordani mpo na kosuka na ebale monene ya Barozo. Ezali ndenge wana nde mokili na bino ekozala elongo na bandelo oyo ezingeli yango. › » |
4881 | NUM 35:34 | Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bokovanda, mokili epai wapi Ngai mpe nakovanda ; pamba te nazali Yawe, navandaka kati na bana ya Isalaele. › » |
4890 | NUM 36:9 | Libula moko te ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu, pamba te libota moko na moko ya Isalaele esengeli kobatela mabele oyo esili kozwa lokola libula. › » |
4902 | DEU 1:8 | Tala, napesi bino mokili oyo. Bokota mpe bokamata mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino —Abrayami, Izaki, Jakobi— mpe bakitani na bango. › » |
4922 | DEU 1:28 | Boni, tokende kaka kuna ? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi : ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › » |