Wildebeest analysis examples for:   lin-lin        February 25, 2023 at 00:37    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

2  GEN 1:2  Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo ; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi.
3  GEN 1:3  Mpe Nzambe alobaki : « Tika ete pole ezala ! » Mpe pole ezalaki.
5  GEN 1:5  Nzambe abengaki pole « moyi, » mpe abengaki molili « butu. » Pokwa ezalaki mpe tongo ezalaki. Yango ezalaki mokolo moko.
6  GEN 1:6  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango ! »
7  GEN 1:7  Nzambe akelaki etando ; akabolaki mayi oyo ezalaki na se ya etando na mayi ya likolo. Yango esalemaki mpe bongo.
8  GEN 1:8  Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale.
9  GEN 1:9  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima ! » Yango esalemaki mpe bongo.
10  GEN 1:10  Nzambe abengaki mabele ya kokawuka « mokili, » mpe abengaki mayi oyo esanganaki esika moko « ebale monene. » Nzambe amonaki ete ezali malamu.
11  GEN 1:11  Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa matiti, milona oyo ezali na nkona mpe banzete ya mbuma oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko ! » Yango esalemaki mpe bongo.
14  GEN 1:14  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu,
15  GEN 1:15  mpe mpo na kongengisa mokili ! » Yango esalemaki mpe bongo.
16  GEN 1:16  Nzambe akelaki biloko mibale ya minene oyo ebimisaka pole : oyo eleki monene, mpo na kongenga na moyi ; mpe oyo ya moke, mpo na kongenga na butu. Mpe akelaki lisusu minzoto.
20  GEN 1:20  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo ! »
21  GEN 1:21  Nzambe akelaki banyama minene ya mayi mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi mpe etondi meke kati na mayi : ekelamu na ekelamu na lolenge na yango. Akelaki mpe bandeke nyonso ya mapapu : ndeke na ndeke na lolenge na yango. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
22  GEN 1:22  Nzambe apambolaki yango mpe alobaki : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. »
24  GEN 1:24  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango : bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba ! » Yango esalemaki mpe bongo.
25  GEN 1:25  Nzambe akelaki banyama ya zamba kolanda lolenge na yango : bibwele mpe bikelamu nyonso ya mike-mike. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
26  GEN 1:26  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! »
27  GEN 1:27  Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye, akelaki bango na elilingi ya Nzambe ; akelaki bango mobali mpe mwasi.
28  GEN 1:28  Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. »
29  GEN 1:29  Bongo Nzambe alobaki : « Tala, kati na mokili mobimba, napesi bino milona oyo ezali na nkona mpe banzete nyonso oyo ebotaka mbuma. Yango nde ekozala bilei na bino.
30  GEN 1:30  Napesi matiti nyonso ya mobesu lokola bilei epai ya banyama nyonso ya mokili, epai ya bandeke nyonso ya likolo, epai ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epai ya bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi. » Yango esalemaki mpe bongo.
38  GEN 2:7  Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye ; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi.
40  GEN 2:9  Yawe Nzambe abimisaki wuta na mabele banzete ya lolenge nyonso oyo ezalaki kitoko mpo na kotala mpe elengi mpo na kolia. Atiaki mpe nzete ya bomoi na kati-kati ya elanga ; lisusu atiaki nzete ya koyeba malamu mpe mabe.
42  GEN 2:11  Eteni ya liboso, kombo na yango « Pishoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Avila oyo mabele na yango ezalaki na wolo.
44  GEN 2:13  Eteni ya mibale, kombo na yango « Giyoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Kushi.
45  GEN 2:14  Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre. » Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate. »
47  GEN 2:16  Mpe Yawe Nzambe apesaki mitindo oyo na moto : « Okoki kolia mbuma nyonso ya elanga,
48  GEN 2:17  kasi okolia te mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe ; pamba te mokolo oyo okolia yango, okokufa solo. »
49  GEN 2:18  Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. »
54  GEN 2:23  Boye, mobali alobaki : « Tala na mbala oyo, oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai, mosuni ya mosuni na ngai. Bakobenga ye mwasi, pamba te awuti na mobali. »
57  GEN 3:1  Nzokande, kati na banyama nyonso ya zamba oyo Yawe Nzambe akelaki, nyoka nde elekaki na mayele mabe. Alobaki na mwasi : — Nzambe alobaki na bino solo ete bolia mbuma ata moko te ya banzete ya elanga ?
58  GEN 3:2  Mwasi azongisaki epai ya nyoka : — Toliaka bambuma ya banzete ya elanga.
59  GEN 3:3  Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. »
60  GEN 3:4  Nyoka alobaki na mwasi : — Solo penza, bokokufa te.
61  GEN 3:5  Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye : koyeba malamu na mabe.
62  GEN 3:6  Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango.
65  GEN 3:9  Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye : — Ozali wapi ?
66  GEN 3:10  Azongisaki : — Nayoki makelele ya matambe na Yo kotambola kati na elanga mpe nabangi mpo ete nazali bolumbu ; yango wana nabombami.
67  GEN 3:11  Nzambe alobaki : — Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu ? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia ?
68  GEN 3:12  Adamu azongisaki : — Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango.
69  GEN 3:13  Yawe Nzambe alobaki na mwasi : — Mpo nini osali bongo ? Mwasi azongisaki : — Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango.
70  GEN 3:14  Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo, olakelami mabe kati na bibwele mpe banyama nyonso ya zamba. Okotambola na libumu mpe okobanda kolia putulu bomoi na yo mobimba.
71  GEN 3:15  Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »
72  GEN 3:16  Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »
73  GEN 3:17  Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo :  Kolia yango te, mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo.
75  GEN 3:19  Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »
76  GEN 3:20  Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva, » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili.
78  GEN 3:22  Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. »
81  GEN 4:1  Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. »
86  GEN 4:6  Yawe alobaki na Kayina : — Mpo na nini osiliki ? Mpo na nini elongi na yo ekomi mawa-mawa ?
87  GEN 4:7  Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango.
89  GEN 4:9  Yawe atunaki Kayina : — Wapi ndeko na yo Abele ? Kayina azongisaki : — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ?
90  GEN 4:10  Nzambe alobaki : — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai.
93  GEN 4:13  Kayina alobaki na Yawe : — Etumbu na ngai eleki pasi mpo na komema !
94  GEN 4:14  Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele ; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.
95  GEN 4:15  Kasi Yawe alobaki na ye : — Ezali bongo te ! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo. Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te.
97  GEN 4:17  Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye ; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali.
98  GEN 4:18  Enoki abotaki Iradi ; Iradi abotaki Mewuyayeli ; Mewuyayeli abotaki Metusaeli ; Metusaeli abotaki Lemeki.
99  GEN 4:19  Lemeki abalaki basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. »
102  GEN 4:22  Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. »
103  GEN 4:23  Lemeki alobaki na basi na ye : « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ; bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu : Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ; mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali !
104  GEN 4:24  Solo, bakozongisa mbala sambo mabe oyo basali Kayina ; kasi mpo na Lemeki, ekozala mbala tuku sambo na sambo ! »
105  GEN 4:25  Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. »
106  GEN 4:26  Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe.
108  GEN 5:2  Akelaki bango mobali mpe mwasi, mpe apambolaki bango. Na mokolo oyo akelaki bango, apesaki bango kombo « bato. »
109  GEN 5:3  Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. »
130  GEN 5:24  Enoki atambolaki na boyengebene elongo na Nzambe ; bongo alimwaki, pamba te Nzambe azwaki ye.
135  GEN 5:29  Abengaki ye Noa mpe alobaki : « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. »
140  GEN 6:2  milimo emonaki ete bana basi ya bato bazali kitoko ; boye ekomisaki ba-oyo eponaki basi na yango.
141  GEN 6:3  Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. »
142  GEN 6:4  Na tango wana, ezalaki na bingambe kati na mokili ; mpe lisusu, milimo esangisaki nzoto na bana basi ya bato, bongo bana basi babotelaki yango bana. Bana yango bazalaki bilombe na tango ya kala, bato oyo bakenda sango.
145  GEN 6:7  Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. »
147  GEN 6:9  Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe.
148  GEN 6:10  Noa azalaki na bana mibali misato : Semi, Cham mpe Jafeti.
151  GEN 6:13  Boye, Nzambe alobaki na Noa : « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili.
152  GEN 6:14  Sala masuwa ya mabaya ya goferi mpo na lobiko na yo ; kabola yango na bashambre. Okopakola gudron na kati mpe na libanda na yango.
153  GEN 6:15  Tala ndenge okotonga yango : molayi na yango ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mitano, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda.
154  GEN 6:16  Okotia likolo na yango lidusu ya basantimetele pene tuku mitano, okotia ekuke na mopanzi na yango ; mpe na kati, okosala etaje ya liboso, ya mibale mpe ya misato.
155  GEN 6:17  Nakotinda mpela na mokili mpo na koboma nyonso oyo ezali na bomoi na se na moyi : ekelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele ekokufa.
156  GEN 6:18  Kasi nasali boyokani elongo na yo, yango wana okokota na masuwa : yo, bana na yo ya mibali, mwasi na yo mpe basi ya bana na yo.
158  GEN 6:20  Bikelamu mibale ya lolenge moko na moko ya bandeke, ya bibwele mpe ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu ; nyonso ekoya epai na yo mpo ete obatela yango na bomoi.
159  GEN 6:21  Okozwa biloko ya kolia ya lolenge na lolenge mpe okobomba yango mpo ete ezala bilei na yo elongo na yango. »
161  GEN 7:1  Yawe alobaki na Noa : « Kota na masuwa, yo mpe libota na yo mobimba, pamba te yo kaka nde omonani sembo na miso na Ngai kati na bato ya ekeke oyo.
162  GEN 7:2  Kamata banyama sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na banyama ya lolenge nyonso oyo ezangi mbindo ; mpe nyama moko ya mobali mpe moko ya mwasi kati na banyama oyo ezali mbindo.
164  GEN 7:4  Pamba te etikali mikolo sambo mpo ete nanokisa mvula oyo ekowumela mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei mpe nakosilisa koboma bikelamu nyonso oyo nasala kati na mokili oyo. »
173  GEN 7:13  Kaka na mokolo wana, Noa mpe bana na ye ya mibali : Semi, Cham mpe Jafeti, elongo na mwasi na ye mpe basi misato ya bana na ye, bakotaki na masuwa.
177  GEN 7:17  Mpela ewumelaki na mokili mikolo tuku minei ; mayi ekomaki ebele mpe etombolaki masuwa likolo na yango.
183  GEN 7:23  Boye, Yawe alongolaki kati na mokili bikelamu nyonso oyo ezalaki na bomoi, kobanda na moto kino na ebwele, ekelamu oyo etambolaka na libumu mpe ndeke ya likolo ; alongolaki bango na mokili mpe etikalaki kaka Noa na ba-oyo bazalaki na ye elongo na masuwa.
197  GEN 8:13  Na mokolo ya liboso na sanza ya liboso, tango Noa akokisaki mibu nkama motoba na moko ya mbotama, mayi ekawukaki na mokili ; Noa afungolaki masuwa na likolo na yango mpe amonaki ete mabele ekawuki.
199  GEN 8:15  Boye, Nzambe alobaki na Noa :
200  GEN 8:16  « Bima na masuwa elongo na mwasi na yo, mpe bana na yo ya mibali elongo na basi na bango.
201  GEN 8:17  Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo : bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. »
205  GEN 8:21  Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.
206  GEN 8:22  Na tango nyonso oyo mokili ekozala, tango ya kolona mpe tango ya kobuka, tango ya malili mpe tango ya molunge, tango ya mvula mpe tango ya elanga, tango ya moyi mpe tango ya butu, ekozanga te. »
207  GEN 9:1  Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango : « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili.
208  GEN 9:2  Banyama nyonso ya mokili, bandeke nyonso ya likolo mpe bikelamu oyo etambolaka na mokili elongo na mbisi ya ebale, ekobanga bino makasi ; nyonso epesami na maboko na bino.
213  GEN 9:7  Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. »
214  GEN 9:8  Boye, Nzambe alobaki na Noa mpe na bana na ye ya mibali :
215  GEN 9:9  « Nasali sik’oyo boyokani elongo na yo mpe na bakitani na yo sima na yo,