21 | GEN 1:21 | Nzambe akelaki banyama minene ya mayi mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi mpe etondi meke kati na mayi : ekelamu na ekelamu na lolenge na yango. Akelaki mpe bandeke nyonso ya mapapu : ndeke na ndeke na lolenge na yango. Nzambe amonaki ete ezali malamu. |
39 | GEN 2:8 | Yawe Nzambe alonaki elanga moko kati na Edeni, na ngambo ya este. Atiaki moto oyo akelaki kati na yango. |
40 | GEN 2:9 | Yawe Nzambe abimisaki wuta na mabele banzete ya lolenge nyonso oyo ezalaki kitoko mpo na kotala mpe elengi mpo na kolia. Atiaki mpe nzete ya bomoi na kati-kati ya elanga ; lisusu atiaki nzete ya koyeba malamu mpe mabe. |
42 | GEN 2:11 | Eteni ya liboso, kombo na yango « Pishoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Avila oyo mabele na yango ezalaki na wolo. |
45 | GEN 2:14 | Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre. » Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate. » |
50 | GEN 2:19 | Yawe Nzambe asalaki, wuta na mabele, banyama nyonso ya zamba mpe bandeke nyonso ya likolo. Amemaki yango epai ya mobali mpo na kotala ndenge akopesa yango kombo, mpo ete ekelamu nyonso ya bomoi ebengama na kombo oyo mobali akopesa yango. |
57 | GEN 3:1 | Nzokande, kati na banyama nyonso ya zamba oyo Yawe Nzambe akelaki, nyoka nde elekaki na mayele mabe. Alobaki na mwasi : — Nzambe alobaki na bino solo ete bolia mbuma ata moko te ya banzete ya elanga ? |
62 | GEN 3:6 | Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango. |
66 | GEN 3:10 | Azongisaki : — Nayoki makelele ya matambe na Yo kotambola kati na elanga mpe nabangi mpo ete nazali bolumbu ; yango wana nabombami. |
68 | GEN 3:12 | Adamu azongisaki : — Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango. |
73 | GEN 3:17 | Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo. |
77 | GEN 3:21 | Yawe Nzambe asalelaki Adamu mpe mwasi na ye bilamba ya poso ya nyama mpe alatisaki bango yango. |
81 | GEN 4:1 | Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. » |
82 | GEN 4:2 | Sima na yango, abotaki lisusu Abele, ndeko ya Kayina. Abele akomaki kobokola bibwele mpe Kayina akomaki kosala bilanga. |
84 | GEN 4:4 | Abele, ye mpe amemaki bibwele oyo ebotamaki liboso kati na etonga na ye mpe biteni oyo eleki mafuta. Yawe asepelaki na Abele mpe na makabo na ye, |
88 | GEN 4:8 | Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye. |
89 | GEN 4:9 | Yawe atunaki Kayina : — Wapi ndeko na yo Abele ? Kayina azongisaki : — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ? |
97 | GEN 4:17 | Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye ; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali. |
99 | GEN 4:19 | Lemeki abalaki basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. » |
100 | GEN 4:20 | Ada abotaki Yabali, koko ya bavandi ya bandako ya kapo mpe ya babokoli bibwele. |
103 | GEN 4:23 | Lemeki alobaki na basi na ye : « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ; bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu : Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ; mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali ! |
105 | GEN 4:25 | Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. » |
107 | GEN 5:1 | Tala lisolo ya libota ya Adamu. Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe. |
108 | GEN 5:2 | Akelaki bango mobali mpe mwasi, mpe apambolaki bango. Na mokolo oyo akelaki bango, apesaki bango kombo « bato. » |
109 | GEN 5:3 | Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. » |
110 | GEN 5:4 | Sima na mbotama ya Seti, Adamu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. |
111 | GEN 5:5 | Mibu nyonso oyo Adamu awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku misato, sima akufaki. |
135 | GEN 5:29 | Abengaki ye Noa mpe alobaki : « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. » |
188 | GEN 8:4 | Na mokolo ya zomi na sambo ya sanza ya sambo, masuwa esemaki likolo ya bangomba Ararati. |
194 | GEN 8:10 | Azelaki mikolo sambo mpe abimisaki lisusu ebenga libanda ya masuwa. |
196 | GEN 8:12 | Azelaki lisusu mikolo sambo mosusu, mpe abimisaki ebenga. Kasi ebenga ezongaki lisusu te. |
207 | GEN 9:1 | Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango : « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. |
231 | GEN 9:25 | Alobaki : « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye ! » |
232 | GEN 9:26 | Alobaki lisusu : « Tika ete Yawe, Nzambe ya Semi, apambolama ! Tika ete Kanana azala mowumbu ya Semi ! |
238 | GEN 10:3 | Bana mibali ya Gomeri : Ashikenazi, Rifati mpe Togarima. |
242 | GEN 10:7 | Bana mibali ya Kushi : Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. Bana mibali ya Raema : Sheba mpe Dedani. |
244 | GEN 10:9 | Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. » |
245 | GEN 10:10 | Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari. |
246 | GEN 10:11 | Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala |
248 | GEN 10:13 | Mitsirayimi azalaki koko ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu, |
251 | GEN 10:16 | ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi, |
252 | GEN 10:17 | ya Evi, ya Ariki, ya Sini, |
253 | GEN 10:18 | ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati. (Mpe na sima, bato ya mabota nyonso ya Kanana bapalanganaki bipai na bipai. |
254 | GEN 10:19 | Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.) |
257 | GEN 10:22 | Bana mibali ya Semi : Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami. |
258 | GEN 10:23 | Bana mibali ya Arami : Utsi, Uli, Geteri mpe Mashi. |
259 | GEN 10:24 | Aripakishadi abotaki Shela ; Shela abotaki Eberi. |
261 | GEN 10:26 | Yokitani abotaki Alimodadi, Shelefi, Atsarimaveti, Yera, |
262 | GEN 10:27 | Adorami, Uzali, Dikila, |
263 | GEN 10:28 | Obali, Abimaeli, Saba, |
264 | GEN 10:29 | Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani. |
277 | GEN 11:10 | Tala libota ya Semi : Mibu mibale sima na mpela, wana Semi azalaki nanu na mibu nkama moko ya mbotama, akomaki tata ya Aripakishadi. |
278 | GEN 11:11 | Sima na mbotama ya Aripakishadi, Semi awumelaki na bomoi mibu nkama mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. |
279 | GEN 11:12 | Tango Aripakishadi akokisaki mibu tuku misato na mitano ya mbotama, abotaki mwana mobali na kombo « Shela. » |
280 | GEN 11:13 | Sima na mbotama ya Shela, Aripakishadi awumelaki na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. |
293 | GEN 11:26 | Tango Tera akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Abrami, Naori mpe Arani. |
294 | GEN 11:27 | Tala libota ya Tera : Tera abotaki Abrami, Naori mpe Arani. Arani nde azalaki tata ya Loti. |
295 | GEN 11:28 | Wana tata na ye, Tera, azalaki nanu na bomoi, Arani akufaki kati na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mokili epai wapi abotamaki. |
296 | GEN 11:29 | Kombo ya mwasi ya Abrami ezalaki « Sarayi, » mpe kombo ya mwasi ya Naori ezalaki « Milika. » Milika azalaki mwana mwasi ya Arani ; mpe Arani azalaki na mwana mwasi mosusu : kombo na ye ezalaki « Yisika. » |
298 | GEN 11:31 | Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna. |
299 | GEN 11:32 | Tera awumelaki na bomoi mibu nkama mibale na mitano, sima akufaki na engumba Arani. |
300 | GEN 12:1 | Yawe alobaki na Abrami : « Bima wuta na mokili na yo, wuta na libota na yo mpe wuta na ndako ya tata na yo, mpo na lobiko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo. |
303 | GEN 12:4 | Abrami akendeki ndenge Yawe alobaki na ye ; mpe Loti akendeki na ye elongo. Abrami azalaki na mibu tuku sambo na mitano tango abimaki na engumba Arani. |
304 | GEN 12:5 | Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna. |
305 | GEN 12:6 | Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango. |
306 | GEN 12:7 | Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye. |
307 | GEN 12:8 | Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este. |
308 | GEN 12:9 | Sima, Abrami alongwaki wana mpe akendeki malembe-malembe kino na Negevi. |
309 | GEN 12:10 | Nzala makasi ekotaki na mokili ; bongo Abrami akendeki kovanda na Ejipito mpo na tango moke, pamba te nzala makasi ekotaki na mokili. |
311 | GEN 12:12 | Tango bato ya Ejipito bakomona yo, bakoloba : ‹ Azali mwasi na ye. › Boye, bakoboma ngai mpe bakotika yo na bomoi. |
313 | GEN 12:14 | Tango Abrami akomaki na Ejipito, bato ya Ejipito bamonaki ete Sarayi azalaki mwasi kitoko penza. |
315 | GEN 12:16 | Basalelaki Abrami bolamu likolo ya Sarayi, mpe Abrami azwaki bameme, bantaba mpe bangombe, ba-ane, basali ya basi mpe ya mibali, bana ya ba-ane mpe bashamo. |
316 | GEN 12:17 | Kasi Yawe apesaki etumbu makasi epai ya Faraon mpe ndako na ye mpo na Sarayi, mwasi ya Abrami. |
317 | GEN 12:18 | Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye : « Likambo nini osali ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo ? |
318 | GEN 12:19 | Mpo na nini olobaki : ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi ? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende ! » |
319 | GEN 12:20 | Boye, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye na tina na Abrami ete babengana ye elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango. |
320 | GEN 13:1 | Boye Abrami alongwaki na Ejipito mpe akendeki na Negevi elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango ; Loti mpe akendeki na ye elongo. |
321 | GEN 13:2 | Abrami akomaki na bozwi mingi : bibwele, palata mpe wolo. |
322 | GEN 13:3 | Longwa na Negevi, akendeki malembe-malembe kino na Beteli, na esika oyo ezalaki kati ya Beteli mpe Ayi, epai wapi ndako na ye ya kapo ezalaki |
323 | GEN 13:4 | mpe atongaki etumbelo ya liboso. Ezalaki na esika yango nde Abrami abelelaki Kombo ya Yawe. |
324 | GEN 13:5 | Loti, oyo azalaki kotambola elongo na Abrami, azalaki mpe na bameme, bantaba, bangombe mpe basali. |
326 | GEN 13:7 | mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango. |
327 | GEN 13:8 | Abrami alobaki na Loti : « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko. |
331 | GEN 13:12 | Abrami avandaki na mokili ya Kanana, mpe Loti avandaki kati na bingumba ya etando mpe atelemisaki bandako na ye ya kapo pene ya Sodome. |
333 | GEN 13:14 | Sima na bokabwani ya Abrami na Loti, Yawe alobaki na Abrami : « Na esika oyo ozali, tombola miso na yo mpe tala na ngambo ya nor, ya sude, ya este mpe ya weste. |
337 | GEN 13:18 | Abrami alongolaki bandako na ye ya kapo mpe akendeki kovanda na Ebron, pene ya banzete minene ya Mamire epai wapi atongaki etumbelo mpo na Yawe. |