Wildebeest analysis examples for:   lin-lin   D    February 25, 2023 at 00:37    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

239  GEN 10:4  Bana mibali ya Yavani : Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.
242  GEN 10:7  Bana mibali ya Kushi : Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. Bana mibali ya Raema : Sheba mpe Dedani.
262  GEN 10:27  Adorami, Uzali, Dikila,
351  GEN 14:14  Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani.
352  GEN 14:15  Na butu, Abrami akabolaki bato na ye mpo na kobundisa bango, abetaki bango mpe alandaki bango kino na Oba, na nor ya Damasi.
363  GEN 15:2  Kasi Abrami azongisaki : — Oh Nkolo Yawe, okopesa ngai nini ? Nazali na mwana te, mpe ezali Eliezeri ya Damasi nde akokitana na libula na ngai.
662  GEN 25:3  Yokishani azalaki tata ya Saba mpe Dedani. Tala bato oyo bazalaki bakitani ya Dedani : Bato ya Ashuri, ya Letushi mpe ya Lewumi.
673  GEN 25:14  Mishima, Duma, Masa,
837  GEN 30:6  Rasheli alobaki : « Nzambe alongisi ngai, ayoki kolela na ngai mpe apesi ngai mwana mobali. » Boye apesaki ye kombo « Dani. »
852  GEN 30:21  Sima na mikolo, abotaki lisusu mwana mwasi mpe apesaki ye kombo « Dina. »
982  GEN 34:1  Nzokande, Dina, mwana mwasi oyo Lea abotelaki Jakobi, abimaki mpo na kokende kotala basi ya mokili wana.
984  GEN 34:3  Motema na ye emipesaki mobimba epai ya Dina, mwana mwasi ya Jakobi, alingaki ye mpe akomaki koloba na ye maloba ya bolingo.
986  GEN 34:5  Tango Jakobi ayokaki ete lokumu ya Dina, mwana na ye ya mwasi, ebebisami, abatelaki kimia kino bana na ye ya mibali bazongaki na ndako, pamba te bazalaki na esobe elongo na bibwele.
992  GEN 34:11  Boye, Sishemi alobaki na tata mpe na bandeko mibali ya Dina : — Tika ete nazwa ngolu na miso na bino mpe nakopesa bino nyonso oyo bokosenga ngai.
994  GEN 34:13  Lokola lokumu ya Dina, ndeko mwasi na bango, ebebaki, bana mibali ya Jakobi basalelaki mayele mabe mpo na kopesa eyano epai ya Sishemi mpe tata na ye Amori.
1006  GEN 34:25  Sima na mikolo misato, wana mibali nyonso kati na bango bazalaki nanu na pasi ya bapota, bana mibali mibale ya Jakobi, bandeko mibali ya Dina, Simeoni mpe Levi, bakamataki mipanga na bango, bakotaki na pwasa kati na engumba mpe babomaki mibali nyonso.
1007  GEN 34:26  Babomaki na mopanga Amori mpe mwana na ye ya mobali Sishemi. Bakamataki Dina wuta na ndako ya Sishemi mpe bazongaki na ye.
1020  GEN 35:8  Ezalaki wana nde Debora, mama mobokoli ya Rebeka, akufaki. Bakundaki ye pembeni ya Beteli, na se ya nzete oyo, wuta na tango wana, bakomaki kobenga « Aloni-Bakuti. »
1037  GEN 35:25  Bana mibali ya Bila, mwasi mosali ya Rasheli : Dani mpe Nefitali.
1062  GEN 36:21  Dishoni, Etseri mpe Dishani. Bango nde bakonzi ya libota ya Ori, mwana mobali ya Seiri, na mokili ya Edomi.
1066  GEN 36:25  Bana ya Ana : Dishoni, mwana na ye ya mobali ; mpe Olibama, mwana na ye ya mwasi.
1067  GEN 36:26  Bana mibali ya Dishoni : Emidani, Eshibani, Yitirani mpe Kerani.
1069  GEN 36:28  Bana mibali ya Dishani : Utsi mpe Arani.
1071  GEN 36:30  mokonzi Dishoni, mokonzi Etseri mpe mokonzi Dishani. Bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Ori, na mokili ya Seiri.
1073  GEN 36:32  Bela, mwana mobali ya Beori, akomaki mokonzi ya Edomi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Dinaba. »
1101  GEN 37:17  Moto yango azongisaki : — Balongwaki awa mpe nayokaki bango koloba : « Tokende na Dotani. » Boye Jozefi alandaki bandeko na ye mpe amonaki bango pembeni ya Dotani.
1402  GEN 46:15  Bango nde bazalaki bana mibali oyo Lea abotelaki Jakobi kati na Padani-Arami ; bakisa Dina, mwana mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki tuku misato na misato.
1410  GEN 46:23  Mwana mobali ya Dani : Ushimi.
1490  GEN 49:16  Dani akokamba bato na ye lokola moko kati na bikolo ya Isalaele.
1491  GEN 49:17  Dani akozala lokola nyoka na balabala to lokola etupa na nzela, oyo eswaka litindi ya mpunda mpo ete motambolisi na yango akweya.
1537  EXO 1:4  Dani mpe Nefitali ; Gadi mpe Aseri.
2427  EXO 31:6  Tala, napesi ye lokola mosungi Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani. Mpe napesi bwanya epai ya bato nyonso ya misala ya maboko mpo ete basala misala nyonso oyo natindi yo :
2566  EXO 35:34  Yawe apesaki na Betisaleyeli mpe Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, makoki ya koteya bato mosusu lolenge ya kosala.
2657  EXO 38:23  Asungamaki na Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, mosali mpe motongi bililingi na maboko, oyo azalaki kobimisa makanisi mpe kotonga bililingi na bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko.
3458  LEV 24:11  Mwana mobali ya mwana mwasi ya Isalaele atiolaki Kombo ya Yawe mpe alakelaki yango mabe, boye bamemaki ye epai ya Moyize. Kombo ya mama na ye ezalaki « Shelomiti. » Shelomiti azalaki mwana mwasi ya Dibiri, kati na libota ya Dani.
3617  NUM 1:12  mpo na libota ya Dani : Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi ;
3619  NUM 1:14  mpo na libota ya Gad: Eliazafi, mwana mobali ya Deweli ;
3643  NUM 1:38  Mpo na bakitani ya Dani : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
3644  NUM 1:39  Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Dani ezalaki nkoto tuku motoba na mibale na nkama sambo.
3673  NUM 2:14  Mpe bato ya libota ya Gadi bakozala pembeni ya bato ya libota ya Simeoni. Mokambi ya bato ya Gadi ezali Eliazafi, mwana mobali ya Deweli.
3684  NUM 2:25  Na ngambo ya nor, milongo ya mampinga ya Dani bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Dani ezali Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi.
3686  NUM 2:27  Bato ya libota ya Aseri bakotia molako na bango pembeni ya bato ya libota ya Dani. Mokambi ya bato ya Aseri ezali Pagieli, mwana mobali ya Okirani.
3690  NUM 2:31  Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Dani ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na sambo na nkama motoba, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala na sima na bango nyonso, na se ya bendele na bango.
3893  NUM 7:42  Na mokolo ya motoba, Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, mokambi ya libota ya Gadi,
3898  NUM 7:47  mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Eliazafi, mwana mobali ya Deweli.
3917  NUM 7:66  Na mokolo ya zomi, Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, mokambi ya libota ya Dani,
4009  NUM 10:20  Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Gadi.
4014  NUM 10:25  Boye, mpo na kosukisa, mampinga ya libota ya Dani mpe elandaki na sima mpo na kotambola na se ya bendele na bango. Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, nde azalaki mokonzi na bango.
4088  NUM 13:12  mpo na libota ya Dani : Amieli, mwana mobali ya Gemali ;
4196  NUM 16:1  Molevi Kore, mwana mobali ya Yitseari, ya libota ya bato ya Keati, elongo na bato misato ya libota ya bato ya Ribeni basalelaki Moyize likita ; ezalaki : Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, elongo na Oni, mwana mobali ya Peleti.
4207  NUM 16:12  Mpe na sima, Moyize abengisaki Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi. Kasi bazongisaki : — Tokoya te !
4219  NUM 16:24  — Loba na lisanga ete bakende mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami.
4220  NUM 16:25  Moyize atelemaki mpe akendeki epai ya Datani mpe Abirami ; mpe bakambi nyonso ya Isalaele balandaki ye.
4222  NUM 16:27  Boye bakendeki mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami. Datani mpe Abirami elongo na basi, bana mpe bakoko na bango babimaki libanda mpe bakendeki kotelema liboso ya bikotelo ya bandako na bango ya kapo.
4226  NUM 16:31  Tango kaka asilisaki koloba makambo oyo nyonso, mabele efungwamaki na se ya matambe ya Datani mpe Abirami ;
4371  NUM 21:30  Kasi tolongi bango ; Eshiboni nyonso ebebisami kino na Diboni, topanzi yango nyonso kino na Nofaki, mpe kino na Medeba. »
4500  NUM 26:9  mpe bana mibali ya Eliabi bazalaki Nemueli, Datani mpe Abirami. Datani mpe Abirami bazalaki bakalaka ya lisanga ya Isalaele oyo batombokelaki Moyize mpe Aron mpe bazalaki na molongo ya bato oyo bazalaki kolanda Kore oyo atombokelaki Yawe.
4533  NUM 26:42  Bakitani ya Dani kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Shuami, bakitani ya libota ya Shuami. Bango nde bazalaki bakitani ya Dani :
4723  NUM 32:3  « Bingumba ya Ataroti, ya Diboni, ya Yaezeri, ya Nimira, ya Eshiboni, ya Eleale, ya Sebami, ya Nebo mpe ya Beoni ;
4754  NUM 32:34  Bakitani ya Gadi batongaki bingumba oyo : Diboni, Ataroti, Aroeri ;
4774  NUM 33:12  Kolongwa na esobe ya Tsini, bakendeki kotonga molako na bango na Dofika.
4775  NUM 33:13  Kolongwa na Dofika, bakendeki kotonga molako na bango na Alushi.
4807  NUM 33:45  Kolongwa na Iye-Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na Diboni-Gadi.
4808  NUM 33:46  Kolongwa na Diboni-Gadi, bakendeki kotonga molako na bango na Alimoni-Dibilatayimi.
4809  NUM 33:47  Kolongwa na Alimoni-Dibilatayimi, bakendeki kotonga molako na bango na bangomba Abarimi, pembeni ya Nebo.
4840  NUM 34:22  mpo na libota ya Dani : mokambi Buki, mwana mobali ya Yogili ;
4895  DEU 1:1  Tala maloba oyo Moyize ayebisaki bana nyonso ya Isalaele na ngambo ya este ya Yordani kati na esobe, kati na etando Araba oyo etalana na Sufi, kati ya Parani mpe Tofeli, kati ya Labani, Atseroti mpe Di-Zaabi.
5216  DEU 11:6  makambo oyo asalaki na Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, na libota ya Ribeni, tango mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bandako na bango mpe bato nyonso oyo bazalaki sima na bango kati na Isalaele mobimba.
5600  DEU 27:13  Mpe tala mabota oyo ekotelema na ngomba Ebali mpo na kolakela bato mabe : libota ya Ribeni, ya Gadi, ya Aseri, ya Zabuloni, ya Dani mpe ya Nefitali. »
5834  DEU 33:22  Mpo na Dani, alobaki : « Dani azali mwana ya nkosi oyo epumbwaka wuta na Bashani. »
5842  DEU 34:1  Wuta na bitando ya Moabi, Moyize amataki na likolo ya ngomba Nebo kino na songe ya ngomba Pisiga oyo etalana na Jeriko. Kuna, Yawe alakisaki ye mokili mobimba : wuta na Galadi kino na Dani,
6069  JOS 10:3  Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, atindaki maloba epai ya Oami, mokonzi ya Ebron ; epai ya Pireami, mokonzi ya Yarimuti ; epai ya Yafia, mokonzi ya Lakishi ; mpe epai ya Debiri, mokonzi ya Egiloni.
6104  JOS 10:38  Jozue elongo na Isalaele mobimba babalukaki na ngambo ya engumba Debiri mpe babundisaki yango.
6105  JOS 10:39  Babotolaki engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, bakangaki mokonzi na yango mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi. Jozue asalaki engumba Debiri elongo na mokonzi na yango, ndenge kaka asalaki engumba Libina elongo na mokonzi na yango, mpe Ebron elongo na mokonzi na yango.
6111  JOS 11:2  epai ya bakonzi oyo bazalaki na etuka ya bangomba na nor, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Kinereti, na mokili ya bangomba mikuse, na ngambo ya weste ya etando ya Dori ;
6130  JOS 11:21  Na tango wana, Jozue akendeki koboma bato ya Anaki wuta na mokili ya bangomba : wuta na Ebron, na Debiri, na Anabi, na mokili nyonso ya bangomba ya Yuda mpe na mokili nyonso ya bangomba ya Isalaele. Jozue asilisaki koboma bango nyonso elongo na bingumba na bango.
6145  JOS 12:13  mokonzi ya Debiri moko mokonzi ya Gederi moko
6155  JOS 12:23  mokonzi ya Dori, kati na lubwaku ya Dori moko mokonzi ya Goyimi, kati na Giligali moko
6165  JOS 13:9  Ezalaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba mobimba Medeba kino na Diboni,
6173  JOS 13:17  kino na Eshiboni mpe bingumba na yango nyonso oyo ezalaka na likolo ya ngomba, bakisa Diboni, Bamoti-Bala, Beti-Bala-Meoni,
6182  JOS 13:26  mpe wuta na Eshiboni kino na Ramati-Mitsipe mpe Betonimi, wuta na Maanayimi kino na mondelo ya Debiri ;
6211  JOS 15:7  Mondelo yango emataki kino na Debiri, longwa na Lubwaku ya Akori, mpe ebalukaki na ngambo ya nor kino na Giligali oyo etalana na nzela oyo emata na Adumimi, na ngambo ya sude ya moluka. Elekaki pene ya mayi ya Eyini-Shemeshi mpe ekendeki kosuka na Eyini-Rogeli.
6219  JOS 15:15  Longwa wana, akendeki kobundisa bavandi ya Debiri oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Seferi. »
6226  JOS 15:22  Kina, Dimona, Adada,
6242  JOS 15:38  Dileani, Mitsipe, Yokiteyeli,
6245  JOS 15:41  Gederoti, Beti-Dagoni, Naama mpe Maked: bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
6253  JOS 15:49  Dana, Kiriati-Sana oyo bazalaki mpe kobenga Debiri,
6256  JOS 15:52  Arabi, Duma, Esheani,
6288  JOS 17:11  Kati na Isakari mpe Aseri, Manase azwaki Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Yibileayimi elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Eyini-Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Taanaki elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe Megido elongo na bamboka na yango ya mike-mike (engumba ya misato, kati na molongo, ezali Nafoti).
6334  JOS 19:11  Longwa wana, emataki na ngambo ya weste, pene ya Mareala, ekendeki kotutana na Dabesheti, kino na lubwaku oyo ezali pene ya Yokineami.
6335  JOS 19:12  Longwa na Saridi, ebalukaki na ngambo ya este, epai moyi ebimelaka, na mondelo ya Kisiloti-Tabori, ekendeki na ngambo ya Dabirati mpe emataki na kino na Yafia.
6350  JOS 19:27  ebalukaki na ngambo ya este, na Beti-Dagoni, ekendeki kotutana na Zabuloni mpe Lubwaku ya Yifita-Eli, ekendeki na ngambo ya nor, na Beti-Emeki mpe Neyiyeli mpe elekelaki na Kabuli, na loboko ya mwasi.
6363  JOS 19:40  Na mbala ya sambo, zeke ekweyaki epai ya libota ya Dani, kolanda bituka na bango.
6370  JOS 19:47  Kasi bakitani ya Dani balongaki te kobotola eteni ya mabele na bango, boye bakendeki kobundisa Leshemi mpe babotolaki yango. Babomaki bato ya Leshemi na mopanga, babotolaki yango mpe bakomaki kovanda kuna. Bakomaki kobenga Leshemi « Dani, » kombo ya koko na bango.
6371  JOS 19:48  Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Dani, kolanda bituka na bango.