Wildebeest analysis examples for:   lin-lin   E    February 25, 2023 at 00:37    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

32  GEN 2:1  Ezalaki bongo nde likolo mpe mokili ekelamaki elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango.
39  GEN 2:8  Yawe Nzambe alonaki elanga moko kati na Edeni, na ngambo ya este. Atiaki moto oyo akelaki kati na yango.
41  GEN 2:10  Ebale moko ezalaki kobima na Edeni mpe ezalaki kosopa mayi na elanga. Mayi ya ebale yango ekabwanaki na biteni minei.
42  GEN 2:11  Eteni ya liboso, kombo na yango « Pishoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Avila oyo mabele na yango ezalaki na wolo.
43  GEN 2:12  Wolo ya mokili yango ezalaki kitoko. Ezalaki lisusu na molona ya malasi mpe na mabanga ya onikisi kati na mokili yango.
44  GEN 2:13  Eteni ya mibale, kombo na yango « Giyoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Kushi.
45  GEN 2:14  Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre» Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate»
46  GEN 2:15  Yawe Nzambe azwaki moto mpe atiaki ye kati na elanga ya Edeni mpo na kolona yango mpe kobatela yango.
49  GEN 2:18  Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye»
68  GEN 3:12  Adamu azongisaki : — Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango.
69  GEN 3:13  Yawe Nzambe alobaki na mwasi : — Mpo nini osali bongo ? Mwasi azongisaki : — Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango.
76  GEN 3:20  Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva, » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili.
79  GEN 3:23  Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki.
80  GEN 3:24  Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi.
81  GEN 4:1  Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe»
93  GEN 4:13  Kayina alobaki na Yawe : — Etumbu na ngai eleki pasi mpo na komema !
95  GEN 4:15  Kasi Yawe alobaki na ye : — Ezali bongo te ! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo. Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te.
96  GEN 4:16  Kayina alongwaki liboso ya Yawe, akendeki kovanda na mokili ya Nodi, na este ya Edeni.
97  GEN 4:17  Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye ; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali.
98  GEN 4:18  Enoki abotaki Iradi ; Iradi abotaki Mewuyayeli ; Mewuyayeli abotaki Metusaeli ; Metusaeli abotaki Lemeki.
106  GEN 4:26  Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe.
112  GEN 5:6  Tango Seti akokisaki mibu nkama moko na mitano ya mbotama, abotaki Enoshi.
113  GEN 5:7  Sima na kobota Enoshi, Seti awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
115  GEN 5:9  Tango Enoshi akokisaki mibu tuku libwa ya mbotama, abotaki Kena.
116  GEN 5:10  Sima na kobota Kena, Enoshi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na zomi na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
117  GEN 5:11  Mibu nyonso oyo Enoshi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na mitano, sima akufaki.
124  GEN 5:18  Tango Yeredi akokisaki mibu nkama moko na tuku motoba na mibale ya mbotama, abotaki Enoki.
125  GEN 5:19  Sima na kobota Enoki, Yeredi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
127  GEN 5:21  Tango Enoki akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Metusalemi.
128  GEN 5:22  Sima na kobota Metusalemi, Enoki azalaki kosala mokano ya Nzambe mibu nkama misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
129  GEN 5:23  Mibu nyonso oyo Enoki awumelaki na bomoi ezalaki nkama misato na tuku motoba na mitano.
130  GEN 5:24  Enoki atambolaki na boyengebene elongo na Nzambe ; bongo alimwaki, pamba te Nzambe azwaki ye.
174  GEN 7:14  Elongo na bango, ekotaki mpe banyama ya zamba ya lolenge nyonso, bibwele ya lolenge nyonso, bikelamu ya lolenge nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya lolenge nyonso mpe bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.
218  GEN 9:12  Nzambe alobaki lisusu : « Tala elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bino, mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na bino elongo. Ezali boyokani mpo na milongo nyonso oyo ekoya :
239  GEN 10:4  Bana mibali ya Yavani : Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.
245  GEN 10:10  Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari.
250  GEN 10:15  Kanana azalaki tata ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti,
252  GEN 10:17  ya Evi, ya Ariki, ya Sini,
256  GEN 10:21  Semi, kulutu ya Jafeti, abotaki mpe bana ; azalaki koko ya Eberi mpe ya bakitani na ye.
257  GEN 10:22  Bana mibali ya Semi : Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami.
259  GEN 10:24  Aripakishadi abotaki Shela ; Shela abotaki Eberi.
260  GEN 10:25  Eberi abotaki bana mibali mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele ; mpe mosusu, « Yokitani. »
281  GEN 11:14  Tango Shela akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Eberi.
282  GEN 11:15  Mpe sima na mbotama ya Eberi, Shela awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
283  GEN 11:16  Tango Eberi akokisaki mibu tuku misato na minei ya mbotama, abotaki Pelegi.
284  GEN 11:17  Mpe sima na mbotama ya Pelegi, Eberi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
309  GEN 12:10  Nzala makasi ekotaki na mokili ; bongo Abrami akendeki kovanda na Ejipito mpo na tango moke, pamba te nzala makasi ekotaki na mokili.
310  GEN 12:11  Tango akomaki pene ya kokota na Ejipito, alobaki na mwasi na ye Sarayi : « Nayebi ete ozali mwasi kitoko penza.
311  GEN 12:12  Tango bato ya Ejipito bakomona yo, bakoloba : ‹ Azali mwasi na ye Boye, bakoboma ngai mpe bakotika yo na bomoi.
313  GEN 12:14  Tango Abrami akomaki na Ejipito, bato ya Ejipito bamonaki ete Sarayi azalaki mwasi kitoko penza.
320  GEN 13:1  Boye Abrami alongwaki na Ejipito mpe akendeki na Negevi elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango ; Loti mpe akendeki na ye elongo.
323  GEN 13:4  mpe atongaki etumbelo ya liboso. Ezalaki na esika yango nde Abrami abelelaki Kombo ya Yawe.
328  GEN 13:9  Mokili mobimba ezali liboso na yo. Ezali malamu tokabwana : soki yo okeyi na ngambo ya loboko ya mwasi, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mobali ; soki okeyi na ngambo ya loboko ya mobali, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mwasi. »
329  GEN 13:10  Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.
330  GEN 13:11  Loti aponaki etando ya Yordani mpe akendeki na ngambo ya este. Ezalaki ndenge wana nde bakabwanaki.
337  GEN 13:18  Abrami alongolaki bandako na ye ya kapo mpe akendeki kovanda na Ebron, pene ya banzete minene ya Mamire epai wapi atongaki etumbelo mpo na Yawe.
338  GEN 14:1  Na tango wana, Amirafeli, mokonzi ya Shineari ; Arioki, mokonzi ya Elasari ; Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami, mpe Tideali, mokonzi ya Goyimi,
342  GEN 14:5  Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ;
344  GEN 14:7  Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.
346  GEN 14:9  mpo na kobundisa Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami ; Tideali, mokonzi ya Goyimi ; Amirafeli, mokonzi ya Shineari, mpe Arioki, mokonzi ya Elasari. Bakonzi minei babundisaki bakonzi mitano.
350  GEN 14:13  Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami.
361  GEN 14:24  Nakondima eloko te longola kaka biloko oyo bato na ngai baliaki mpe biloko ya bato oyo bazalaki elongo na ngai : Aneri, Eshikoli mpe Mamire ; bango nde bakozwa biloko na bango.
363  GEN 15:2  Kasi Abrami azongisaki : — Oh Nkolo Yawe, okopesa ngai nini ? Nazali na mwana te, mpe ezali Eliezeri ya Damasi nde akokitana na libula na ngai.
366  GEN 15:5  Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye : — Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango. Alobaki na ye lisusu : — Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.
379  GEN 15:18  Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate :
383  GEN 16:1  Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito ; kombo na ye « Agari. »
385  GEN 16:3  Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye.
387  GEN 16:5  Boye, Sarayi alobaki na Abrami : — Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye ; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo.
395  GEN 16:13  Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? » Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi : Nzambe oyo azali komona ngai.
415  GEN 17:17  Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « E! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi ! »
430  GEN 18:5  Tika ete namemela bino mwa eloko ya kolia mpo ete bozwa lisusu makasi na nzoto ; bongo bokokoba mobembo na bino, pamba te ezali mpo na yango nde boleki epai na ngai mosali na bino. Bazongisaki : — Ezali malamu, sala ndenge olobi.
440  GEN 18:15  Sara abangaki ; boye awanganaki : — Naseki te. Kasi Yawe alobaki : — Ezali ya solo, oseki.
501  GEN 20:5  Ezali mobali na ye moko nde alobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ; » mpe ye moko andimaki : « Azali ndeko na ngai ya mobali. » Nasali yango na motema sembo mpe na maboko ezanga mbindo.
512  GEN 20:16  Abalukaki mpe alobaki lisusu epai na Sara : « Tala, napesi mbongo ya bibende, nkoto moko, epai ya ndeko na yo ya mobali. Ezali mpo na kozipa mabe oyo basali yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na yo ; boye okomi sembo na nyonso. »
523  GEN 21:9  Kasi tango Sara amonaki ete Isimaeli, mwana oyo Agari, moto ya Ejipito, abotelaki Abrayami, azali koseka ;
535  GEN 21:21  Wana azalaki kovanda kati na esobe ya Parani, mama na ye azwelaki ye mwasi ya mokili ya Ejipito.
574  GEN 23:2  Akufaki na Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. Abrayami asalaki matanga mpo na Sara mpe alelaki ye.
580  GEN 23:8  Ayebisaki bango : — Soki ezali mokano na bino ete nakunda nzoto ya mwasi na ngai awa, boyoka ngai mpe bosengela ngai epai ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari,
582  GEN 23:10  Nzokande, Efroni, moto ya Iti, oyo azalaki kovanda kati na bato na ye, azongiselaki Abrayami na miso ya bato ya Iti, liboso ya bato nyonso oyo bayaki na ekuke ya engumba na ye :
585  GEN 23:13  mpe azongiselaki Efroni : — Nabondeli yo, yoka ngai ! Soki olingi, nakopesa yo motuya oyo ekoki na elanga. Ndima yango mpo ete nakunda mwasi na ngai kuna.
586  GEN 23:14  Efroni azongiselaki Abrayami :
588  GEN 23:16  Abrayami andimaki maloba ya Efroni mpe amemelaki ye motuya oyo alobaki na miso ya bato ya Iti : mbongo ya bibende, nkama minei, kolanda ndenge bazalaki kotanga mbongo na tango wana.
589  GEN 23:17  Boye elanga ya Efroni oyo ezalaki na Makipela, pembeni ya Mamire, elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki kati na yango, banzete nyonso oyo ezalaki kati na elanga mpe na bandelo ya zingazinga na yango, epesamaki
591  GEN 23:19  Sima na yango, Abrayami akundaki mwasi na ye Sara na libulu ya mabanga ya elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana.
603  GEN 24:11  Tango akomaki kuna, avandisaki bashamo pembeni ya libulu ya mayi, na libanda ya engumba. Ezalaki na pokwa, na tango oyo basi babimaka mpo na kotoka mayi.
604  GEN 24:12  Abondelaki : « Eh Yawe, Nzambe ya Abrayami, nkolo na ngai, longisa ngai na mokolo ya lelo mpe lakisa bolamu na Yo epai ya Abrayami, nkolo na ngai.
608  GEN 24:16  Elenge mwasi azalaki kitoko penza, ayebaki nanu nzoto ya mibali te ; ata mobali moko te asangisaki na ye nzoto. Akitaki na libulu ya mayi, atondisaki mbeki na ye mpe amataki.
620  GEN 24:28  Elenge mwasi akimaki mbangu na ndako mpe alobaki epai ya mama na ye makambo oyo elekaki.
663  GEN 25:4  Madiani azalaki tata ya Efa, ya Eferi, ya Enoki, ya Abida mpe ya Elida. Bato oyo nyonso bazalaki bakitani ya Ketura.
668  GEN 25:9  Bana na ye ya mibali, Izaki mpe Isimaeli, bakundaki ye na lilita ya mabanga ya Makipela pene ya Mamire, kati na elanga ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari, moto ya Iti.