249 | GEN 10:14 | ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti. |
314 | GEN 12:15 | Wana bakonzi ya basali ya Faraon bamonaki ye, bakumisaki ye liboso ya Faraon mpe bamemaki ye na ndako ya Faraon mpo ete akoma mwasi na ye. |
316 | GEN 12:17 | Kasi Yawe apesaki etumbu makasi epai ya Faraon mpe ndako na ye mpo na Sarayi, mwasi ya Abrami. |
317 | GEN 12:18 | Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye : « Likambo nini osali ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo ? |
319 | GEN 12:20 | Boye, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye na tina na Abrami ete babengana ye elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango. |
546 | GEN 21:32 | Sima na bango kosala boyokani kuna na Beri-Sheba, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bazongaki na mokili ya Filisitia. |
548 | GEN 21:34 | Abrayami avandaki lisusu tango molayi na mokili ya Filisitia. |
694 | GEN 26:1 | Wana nzala makasi ekotaki lisusu na mokili lokola na tango ya Abrayami, Izaki akendeki na Gerari epai ya Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia. |
701 | GEN 26:8 | Tango awumelaki na mboka yango, Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia, atalaki wuta na lininisa mpe amonaki Izaki kosakana na mwasi na ye Rebeka. |
707 | GEN 26:14 | Bato ya Filisitia bakomaki koyokela ye likunya, pamba te azalaki na bameme ebele, bantaba ebele, bangombe ebele mpe basali ebele. |
708 | GEN 26:15 | Boye bato ya Filisitia bakundaki mabulu nyonso oyo basali ya Abrayami, tata na ye, batimolaki tango azalaki nanu na bomoi mpe batondisaki yango na mabele. |
711 | GEN 26:18 | Atimolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimolaki na tango ya tata na ye Abrayami. Mabulu yango ezalaki bato ya Filisitia nde bakundaki yango sima na kufa ya Abrayami, mpe Izaki abengaki yango kaka na bakombo oyo tata na ye Abrayami apesaka yango. |
1120 | GEN 37:36 | Bato ya mokili ya Madiani batekaki Jozefi na Ejipito epai ya Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. |
1151 | GEN 39:1 | Sima, bamemaki Jozefi na Ejipito. Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, moto ya Ejipito, asombaki ye na maboko ya bato ya Isimaeli oyo bamemaki ye kuna. |
1170 | GEN 39:20 | Potifari akangaki Jozefi mpe abwakaki ye na boloko epai wapi mokonzi Faraon atiaka bakangami. Kasi, wana Jozefi azalaki kati na boloko, |
1175 | GEN 40:2 | Faraon asilikelaki bakalaka na ye mibale ya lokumu : kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa. |
1180 | GEN 40:7 | Jozefi atunaki bakalaka ya lokumu ya Faraon, oyo bazalaki kati na boloko elongo na ye, kati na ndako ya nkolo na ye : — Mpo na nini lelo bilongi na bino ezali mawa-mawa ? |
1184 | GEN 40:11 | Kopo ya Faraon ezalaki na maboko na ngai. Nazwaki bambuma ya vino, nakamolaki yango na kopo ya Faraon mpe napesaki ye kopo yango na maboko na ye. |
1186 | GEN 40:13 | Sima na mikolo misato, Faraon akotombola moto na yo mpe akozongisa yo na esika na yo ya mosala. Okotia lisusu kopo ya Faraon na maboko na ye ndenge ozalaki kosala na kala. |
1187 | GEN 40:14 | Kasi tango makambo nyonso oyo ekotambola malamu mpo na yo, nabondeli yo, kanisa ngai mpe salela ngai bolamu, zala molobeli na ngai epai ya Faraon mpo ete abimisa ngai na boloko oyo. |
1190 | GEN 40:17 | Kitunga ya likolo ezalaki na bagato ya ndenge na ndenge, oyo Faraon alingaka ; kasi bandeke ezalaki kolia yango wuta na kitunga oyo ezalaki na moto na ngai. » |
1192 | GEN 40:19 | Sima na mikolo misato, Faraon akokata moto na yo mpe akodiembika yo na nzete. Bongo bandeke ekolia mosuni na yo. » |
1193 | GEN 40:20 | Sima na mikolo misato, ezalaki mokolo ya mbotama ya Faraon. Faraon asalisaki feti monene mpe abengisaki bakalaka na ye nyonso. Abimisaki na boloko, liboso ya bakalaka na ye, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi mpe kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa. |
1194 | GEN 40:21 | Faraon azongisaki na mosala, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga. Boye azongelaki lisusu kotia kopo na maboko ya Faraon. |
1195 | GEN 40:22 | Kasi Faraon adiembikaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa, ndenge kaka Jozefi ayebisaki bango. |
1197 | GEN 41:1 | Sima na mibu mibale, Faraon alotaki ndoto : atelemaki pembeni ya ebale Nili, |
1200 | GEN 41:4 | Bangombe sambo ya basi ya mabe mpe ekonda eliaki bangombe sambo ya kitoko mpe ya mafuta. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki. |
1203 | GEN 41:7 | Mito sambo oyo ekonda eliaki mito sambo oyo ya minene mpe etonda. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki, asosolaki ete ezali ndoto. |
1204 | GEN 41:8 | Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango. |
1205 | GEN 41:9 | Kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi alobaki na Faraon : « Na mokolo ya lelo, nalingi kokanisa mbeba na ngai. |
1206 | GEN 41:10 | Mokolo moko, Faraon asilikelaki basali na ye mpe atiaki ngai na boloko elongo na kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. |
1210 | GEN 41:14 | Faraon abengaki Jozefi, mpe babimisaki ye na lombangu na boloko. Bakataki ye suki, alataki bilamba mosusu mpe ayaki liboso ya Faraon. |
1211 | GEN 41:15 | Faraon alobaki na Jozefi : — Nalotaki ndoto mpe ata moto moko te alongi kolimbola yango ; kasi nayoki sango na tina na yo ete soki oyoki ndoto, okolimbola yango. |
1212 | GEN 41:16 | Jozefi azongiselaki Faraon : — Ngai nakolonga te kosala yango, kasi Nzambe akopesa na Faraon eyano oyo azali na yango posa. |
1213 | GEN 41:17 | Faraon alobaki na Jozefi : — Na ndoto na ngai, natelemaki pembeni ya ebale Nili. |
1221 | GEN 41:25 | Jozefi alobaki na Faraon : — Ndoto ya Faraon ezali kaka ndoto moko mpe ezali kaka na ndimbola moko. Nzambe amonisaki Faraon makambo oyo Ye akosala. |
1224 | GEN 41:28 | Tala maloba oyo nazalaki na yango mpo na koyebisa Faraon. Nzambe atalisi na Faraon makambo oyo Ye akosala. |
1228 | GEN 41:32 | Soki Faraon alotaki ndoto yango na lolenge mibale, elingi koloba ete Nzambe asilaki kozwa mokano na likambo yango mpe akokokisa yango na lombangu. |
1229 | GEN 41:33 | Tika sik’oyo Faraon aluka moto moko ya mayele mpe ya bwanya, atia ye na moto ya mokili ya Ejipito. |
1230 | GEN 41:34 | Tika ete Faraon asala bongo ; tika ete apona basali na mokili, ba-oyo bakokongola eteni ya mitano ya bambuma ya Ejipito na tango ya mibu sambo ya bofuluki. |
1231 | GEN 41:35 | Boye, na se ya bokonzi ya Faraon, bakobanda kosangisa biloko nyonso ya kolia oyo mibu ya malamu ekobimisa, bakobomba ble na bingumba mpe bakobatela yango lokola biloko ya kolia mpo na bingumba. |
1233 | GEN 41:37 | Likambo yango esepelisaki Faraon mpe basali na ye nyonso. |
1234 | GEN 41:38 | Faraon atunaki bango : — Tokoki komona moto lokola oyo, moto oyo Molimo na Nzambe avandi kati na ye ? |
1235 | GEN 41:39 | Faraon alobaki na Jozefi : — Lokola Nzambe ayebisi yo makambo oyo nyonso, ezali na moto moko te oyo azali na mayele mpe na bwanya lokola yo. |
1237 | GEN 41:41 | Faraon alobaki na Jozefi : — Natie yo mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito. |
1238 | GEN 41:42 | Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo. |
1240 | GEN 41:44 | Faraon alobaki lisusu na Jozefi : — Nazali Faraon. Kasi awa na Ejipito, moto moko te akotombola loboko to lokolo soki kaka na mitindo na yo te. |
1241 | GEN 41:45 | Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito. |
1242 | GEN 41:46 | Azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akotaki na mosala ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Jozefi alongwaki na miso ya Faraon mpe atambolaki na mokili mobimba ya Ejipito. |
1246 | GEN 41:50 | Liboso ete mibu ya nzala makasi eya, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale. |
1251 | GEN 41:55 | Tango bato nyonso ya Ejipito bakomaki na nzala makasi, bagangaki epai ya Faraon mpo na koluka biloko ya kolia. Bongo Faraon alobaki na bato nyonso ya Ejipito : « Bokende epai ya Jozefi mpe bosala makambo oyo akoyebisa bino. » |
1268 | GEN 42:15 | Tala ndenge nakomeka bino : Na kombo ya Faraon, bokolongwa na esika oyo te soki leki na bino ya suka akomi awa te ! |
1269 | GEN 42:16 | Botinda moko kati na bino ete akende kozwa ndeko na bino ya mobali ; mpe bino oyo bokotikala, bokozala na boloko mpo na komeka maloba na bino mpe kotala soki bolobi solo. Soki te, na kombo ya Faraon, bozali banongi ! |
1343 | GEN 44:18 | Yuda apusanaki pembeni na ye mpe alobaki : — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Tika ete mosali na yo aloba liloba moko epai ya nkolo na ngai. Kosilikela mosali na yo te, pamba te ndenge Faraon azali, ndenge wana mpe yo ozali. |
1361 | GEN 45:2 | Lokola alelaki na mongongo makasi, bato ya Ejipito bayokaki ye ; mpe sango ekendeki kino na ndako ya Faraon. |
1367 | GEN 45:8 | Ezali bino te bato botindaki ngai awa, kasi ezali nde Nzambe. Akomisaki ngai tata ya Faraon, nkolo ya ndako na ye mpe moyangeli ya mokili mobimba ya Ejipito. |
1375 | GEN 45:16 | Tango sango ekomaki na ndako ya Faraon ete bandeko ya Jozefi bayei, Faraon elongo na bakambi na ye nyonso basepelaki. |
1376 | GEN 45:17 | Faraon alobaki na Jozefi : — Yebisa bandeko na yo : « Botia biloko likolo ya banyama na bino mpe bozonga na mokili ya Kanana. |
1380 | GEN 45:21 | Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo bayebisaki bango. Jozefi apesaki bango bashario ndenge Faraon apesaki mitindo mpe apesaki bango bilei mosusu mpo na mobembo na bango. |
1392 | GEN 46:5 | Bongo Jakobi alongwaki na Beri-Sheba. Bana mibali ya Isalaele bamatisaki na bashario oyo Faraon atindaki mpo na komema ye : tata na bango Jakobi, bana na bango mpe basi na bango. |
1407 | GEN 46:20 | Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi. |
1418 | GEN 46:31 | Jozefi alobaki na bandeko na ye mpe na libota ya tata na ye : — Nakokende koyebisa Faraon : « Bandeko na ngai mpe libota ya tata na ngai, ba-oyo bavandaka na mokili ya Kanana, bayei epai na ngai. |
1420 | GEN 46:33 | Tango Faraon akobenga bino mpe akotuna bino : « Bosalaka mosala nini ? » |
1422 | GEN 47:1 | Jozefi akendeki mpe alobaki na Faraon : — Tata na ngai elongo na bandeko na ngai bayei wuta na mokili ya Kanana na bameme, bantaba, bangombe mpe biloko na bango nyonso ; bazali sik’oyo na Gosheni. |
1423 | GEN 47:2 | Jozefi aponaki bandeko na ye mitano mpe alakisaki bango epai ya Faraon. |
1424 | GEN 47:3 | Faraon atunaki bandeko ya Jozefi : — Bosalaka mosala nini ? Bazongiselaki Faraon : — Basali na yo bazali babateli bibwele ndenge kaka bakoko na biso bazalaki. |
1425 | GEN 47:4 | Balobaki lisusu na Faraon : — Toyei kovanda awa, pamba te nzala makasi ezali kati na mokili ya Kanana mpe matiti ezali lisusu te mpo na bibwele ya basali na yo ; yango wana, tobondeli yo, pesa basali na yo nzela ya kovanda na Gosheni. |
1426 | GEN 47:5 | Faraon alobaki na Jozefi : — Tata na yo mpe bandeko na yo bayei epai na yo ; |
1428 | GEN 47:7 | Jozefi amemaki tata na ye mpo na kolakisa ye epai ya Faraon. Tango Jakobi asilisaki kopambola Faraon, |
1429 | GEN 47:8 | Faraon atunaki Jakobi : — Ozali na mibu boni ? |
1430 | GEN 47:9 | Jakobi azongiselaki Faraon : — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai. |
1431 | GEN 47:10 | Jakobi apambolaki Faraon mpe alongwaki liboso na ye. |
1432 | GEN 47:11 | Jozefi avandisaki tata na ye mpe bandeko na ye na Ejipito mpe apesaki bango eteni ya mabele oyo eleki kitoko kati na mokili, na mabele ya Ramisesi, ndenge kaka Faraon atindaki. |
1435 | GEN 47:14 | Jozefi azwaki mbongo nyonso oyo azalaki kobomba tango bato ya mokili ya Ejipito mpe ya Kanana bazalaki kosomba ble epai na ye, amemaki yango na ndako ya Faraon. |
1440 | GEN 47:19 | Mpo na nini, biso elongo na mabele na biso, tokufa na miso na yo ? Somba biso kaka elongo na mabele na biso na motuya ya biloko ya kolia ; mpe biso elongo na mabele na biso, tokokoma bawumbu ya Faraon. Toboyi na biso kokufa na nzala, pesa biso milona ya kolona mpo ete tobika mpe mabele na biso ekoma esobe te. |
1441 | GEN 47:20 | Jozefi asombaki mabele nyonso ya Ejipito mpo na Faraon, pamba te bato nyonso ya Ejipito batekaki bilanga na bango mpo ete nzala elekaki makasi. Boye mabele ekomaki ya Faraon. |
1442 | GEN 47:21 | Jozefi akomisaki bavandi ya bingumba nyonso ya Ejipito bawumbu ya Faraon. |
1443 | GEN 47:22 | Kasi asombaki mabele ya banganga-nzambe te, pamba te bazalaki kozwa tango nyonso biloko ebele kolanda mobeko ya Faraon ete bazwaka biloko ya kolia. Yango wana, banganga-nzambe batekaki mabele na bango te. |
1444 | GEN 47:23 | Jozefi alobaki na bato : — Nasombi bino lelo mpo na Faraon, bino mpe mabele na bino. Tala milona mpo na bino mpo ete bokoka kolona mabele. |
1445 | GEN 47:24 | Kasi tango bokobuka mbuma, bokopesa eteni ya mitano epai ya Faraon. Biteni minei oyo mosusu, bokobomba yango lokola milona mpo na bilanga mpe lokola biloko ya kolia mpo na bino moko, mpo na mabota na bino mpe mpo na bana na bino. |
1446 | GEN 47:25 | Bazongisaki : — Obikisi bomoi na biso ! Lokola tozwi ngolu na miso na yo nkolo na biso, tokozala bawumbu ya Faraon. |
1447 | GEN 47:26 | Bongo Jozefi akomisaki yango mobeko kino lelo kati na mabele ya Ejipito : eteni ya mitano ya bambuma nyonso oyo ekowuta na mabele ezali mpo na Faraon. Kasi mabele ya Banganga-Nzambe ekomaki ya Faraon te. |
1511 | GEN 50:4 | Tango mikolo ya matanga esilaki, Jozefi alobaki na bakonzi oyo basalaka na ndako ya Faraon : — Soki nazwi ngolu na miso na bino, bolobela ngai epai ya Faraon. Boyebisa ye |
1513 | GEN 50:6 | Faraon azongisaki : — Kende mpe kunda tata na yo ndenge alapisaki yo ndayi. |
1514 | GEN 50:7 | Boye Jozefi akendeki kokunda tata na ye ; bakalaka nyonso ya lokumu ya Faraon bakendeki elongo na ye : bakonzi oyo bazalaki kosala na ndako na ye mpe bakonzi nyonso ya Ejipito |
1544 | EXO 1:11 | Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko. |
1552 | EXO 1:19 | Basi oyo babotisaka bazongiselaki Faraon : — Basi ya Ba-Ebre bazali lokola basi ya Ejipito te. Bazali makasi, babotaka liboso ete basi oyo babotisaka bakoma. |
1555 | EXO 1:22 | Bongo, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye nyonso : « Bobwaka na ebale Nili bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bakobotama, kasi botika na bomoi bana basi nyonso. » |
1560 | EXO 2:5 | Tango mwana mwasi ya Faraon akendeki kosukola na ebale Nili, wana basi basali na ye bazalaki kotambola pembeni ya ebale Nili, amonaki kitunga kati na matiti ya ebale ; mpe atindaki mwasi mosali na ye kozwa yango. |
1562 | EXO 2:7 | Boye, ndeko na ye ya mwasi alobaki na mwana mwasi ya Faraon : — Boni, nakoki kokende kolukela yo kati na basi ya Ba-Ebre mwasi oyo akoki komelisa mwana oyo mabele mpo na yo ? |
1563 | EXO 2:8 | Mwana mwasi ya Faraon azongiselaki ye : — Iyo, kende ! Elenge mwasi akendeki mpe azwaki mama ya mwana mobali yango. |
1564 | EXO 2:9 | Mwana mwasi ya Faraon alobaki na mama yango : « Kamata mwana oyo, melisa ye mabele mpo na ngai, mpe nakofuta yo. » Bongo mama yango azwaki mwana mpe akomaki komelisa ye mabele. |
1565 | EXO 2:10 | Tango mwana akolaki, amemaki ye epai ya mwana mwasi ya Faraon oyo akomisaki ye mwana na ye ya mobali. Apesaki ye kombo « Moyize, » pamba te alobaki : « Nazwaki ye na mayi. » |
1570 | EXO 2:15 | Tango Faraon ayokaki likambo yango, alukaki nzela ya koboma Moyize ; kasi Moyize akimaki liboso ya Faraon mpe akendeki kovanda na mokili ya Madiani. |
1590 | EXO 3:10 | Yango wana natindi yo sik’oyo mpo ete okende epai ya Faraon mpo na kobimisa bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito. |
1591 | EXO 3:11 | Moyize alobaki na Nzambe : — Ngai nazali nani mpo ete nakende epai ya Faraon mpe mpo ete nabimisa bana ya Isalaele na Ejipito ? |
1623 | EXO 4:21 | Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende. |
1624 | EXO 4:22 | Okoloba na Faraon : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Isalaele azali mwana na Ngai ya liboso ya mobali. |
1634 | EXO 5:1 | Sima na yango, Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki : — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika bato na Ngai kokende kosala feti na esobe mpo na lokumu na Ngai. » |