Wildebeest analysis examples for:   lin-lin   J    February 25, 2023 at 00:37    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

138  GEN 5:32  Tango Noa akokisaki mibu nkama mitano ya mbotama, abotaki Semi, Cham mpe Jafeti.
148  GEN 6:10  Noa azalaki na bana mibali misato : Semi, Cham mpe Jafeti.
173  GEN 7:13  Kaka na mokolo wana, Noa mpe bana na ye ya mibali : Semi, Cham mpe Jafeti, elongo na mwasi na ye mpe basi misato ya bana na ye, bakotaki na masuwa.
224  GEN 9:18  Tala bana mibali ya Noa oyo babimaki na masuwa : Semi, Cham mpe Jafeti. Cham azalaki tata ya Kanana.
229  GEN 9:23  Kasi Semi mpe Jafeti bazwaki elamba mpe batiaki yango na mapeka na bango. Bazongaki sima-sima mpe bazipaki bolumbu ya tata na bango. Lokola bilongi na bango etalaki na ngambo mosusu, bamonaki bolumbu ya tata na bango te.
233  GEN 9:27  Tika ete Nzambe ayeisa monene mabele ya Jafeti ! Tika ete Jafeti avanda na bandako ya kapo ya Semi, mpe Kanana azala mowumbu na ye ! »
236  GEN 10:1  Tala libota ya Noa : Semi, Cham mpe Jafeti ; bango mpe babotaki bakitani sima na mpela.
237  GEN 10:2  Bana mibali ya Jafeti : Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi.
256  GEN 10:21  Semi, kulutu ya Jafeti, abotaki mpe bana ; azalaki koko ya Eberi mpe ya bakitani na ye.
685  GEN 25:26  Sima na yango, ndeko na ye mpe abimaki, loboko na ye ekanga litindi ya Ezawu ; yango wana bapesaki ye kombo « Jakobi. » Izaki azalaki na mibu tuku motoba ya mbotama tango Rebeka abotaki.
686  GEN 25:27  Bana mibali yango bakolaki. Ezawu akomaki mobomi makasi ya banyama mpe azalaki kolekisa tango mingi na zamba ; Jakobi azalaki moto ya kimia, azalaki kosepela kovanda na ndako.
687  GEN 25:28  Izaki abandaki kosepela mingi na misuni, yango wana alingaki mingi Ezawu ; mpe Rebeka alingaki mingi Jakobi.
688  GEN 25:29  Mokolo moko, wana Jakobi azalaki kolamba elubu, Ezawu oyo awutaki na bilanga ayaki na kolemba.
689  GEN 25:30  Ezawu alobaki na Jakobi : — Nalembi makasi ; tika ngai nalia elubu oyo, elubu oyo kaka. Yango wana bazalaki mpe kobenga ye Edomi.
690  GEN 25:31  Jakobi azongisaki : — Tekela ngai liboso boyaya na yo.
692  GEN 25:33  Kasi Jakobi alobaki : — Lapa liboso ndayi. Ezawu alapaki ndayi epai ya Jakobi ; mpe na nzela wana, atekaki boyaya na ye epai ya Jakobi.
693  GEN 25:34  Jakobi apesaki Ezawu lipa mpe elubu ya misili. Ezawu aliaki mpe amelaki, bongo atelemaki mpe akendeki. Ezali ndenge wana nde Ezawu atiolaki boyaya na ye.
727  GEN 26:34  Tango Ezawu akokisaki mibu tuku minei ya mbotama, abalaki Jiditi, mwana mwasi ya Beri, moto ya mokili ya Iti, mpe Basimati, mwana mwasi ya Eloni, moto ya mokili ya Iti.
734  GEN 27:6  Rebeka ayebisaki Jakobi, mwana na ye ya mibale : — Tala, nayokaki tata na yo koyebisa Ezawu, ndeko na yo :
739  GEN 27:11  Jakobi azongiselaki Rebeka, mama na ye : — Ezawu, ndeko na ngai, azali na bapwale ebele na nzoto, kasi ngai nazali na yango te.
742  GEN 27:14  Boye Jakobi akendeki, azwaki bana ntaba mpe amemaki yango epai ya mama na ye, mpe mama na ye alambaki elubu ya kitoko ndenge tata na ye azalaki kolinga.
743  GEN 27:15  Bongo Rebeka azwaki na ndako, bilamba oyo elekaki kitoko kati na bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, mpe alatisaki yango Jakobi, mwana na ye ya suka.
745  GEN 27:17  Bongo Rebeka apesaki na maboko ya Jakobi, mwana na ye, elubu ya kitoko mpe lipa oyo alambaki.
746  GEN 27:18  Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki : — Tata na ngai ! Izaki azongisaki : — Ngai oyo, mwana na ngai ; yo nani ?
747  GEN 27:19  Jakobi alobaki na tata na ye : — Nazali Ezawu, mwana na yo ya liboso. Nasali ndenge oyebisaki ngai. Nabondeli yo, lamuka, vanda mpe lia nyama, mpo ete opambola ngai.
748  GEN 27:20  Izaki atunaki mwana na ye : — Mwana na ngai, osali ndenge nini mpo ete ozwa nyama noki ? Jakobi azongisaki : — Ezali Yawe, Nzambe na yo, nde atindaki yango na nzela na ngai.
749  GEN 27:21  Izaki alobaki na Jakobi : — Mwana na ngai, pusana pembeni na ngai mpo ete nasimba yo mpe nayeba soki ozali solo mwana na ngai Ezawu.
750  GEN 27:22  Jakobi akendeki pembeni na ye, bongo Izaki asimbaki ye mpe alobaki : — Mongongo ezali ya Jakobi, kasi maboko ezali ya Ezawu.
751  GEN 27:23  Tata na ye ayebaki ye te, pamba te maboko ya Jakobi ezalaki na bapwale lokola ya Ezawu, ndeko na ye ; boye apambolaki ye.
752  GEN 27:24  Kasi liboso, atunaki ye : — Ozali penza mwana na ngai Ezawu ? Jakobi azongisaki : — Iyo, ezali ngai solo.
753  GEN 27:25  Izaki alobaki : — Mwana na ngai, memela ngai nyama na yo mpo ete nalia mpe napambola yo. Jakobi amemelaki ye nyama, mpe Izaki aliaki. Amemelaki ye lisusu masanga ya vino mpe amelaki.
755  GEN 27:27  Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo : « Ah ! Solo ya mwana na ngai ezali lokola solo ya bilanga oyo Yawe apamboli.
758  GEN 27:30  Tango Izaki asilisaki kopambola ye, Jakobi atikaki tata na ye ; bongo ndeko na ye, Ezawu, azongaki wuta na bokila.
764  GEN 27:36  Ezawu alobaki : — Mpo ete kombo na ye ezali « Jakobi, » yango wana akosi ngai mbala mibale ? Ya liboso, azwaki boyaya na ngai, mpe tala sik’oyo azwi lisusu mapamboli na ngai ! Bongo atunaki : — Boni, obombelaki ngai mapamboli te ?
769  GEN 27:41  Ezawu ayinaki Jakobi likolo ya mapamboli oyo azwaki epai ya tata na ye mpe amilobelaki : « Etikali moke tata na ngai akufa ; bongo nakoboma ndeko na ngai Jakobi. »
770  GEN 27:42  Tango Rebeka asosolaki makanisi ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, abengaki Jakobi, mwana na ye ya suka, mpe alobaki na ye : « Tala, Ezawu, ndeko na yo, azali koluka koboma yo.
774  GEN 27:46  Rebeka akendeki koyebisa Izaki : « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. »
775  GEN 28:1  Bongo Izaki abengaki Jakobi, apambolaki ye mpe apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana.
779  GEN 28:5  Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi.
780  GEN 28:6  Ezawu ayokaki ete Izaki apambolaki Jakobi mpe atindaki ye na Padani-Arami mpo na kobala mwasi ; ayokaki mpe ete, tango apambolaki ye, apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana. »
781  GEN 28:7  Jakobi atosaki tata na ye mpe mama na ye, mpe akendeki na Padani-Arami.
784  GEN 28:10  Jakobi alongwaki na Beri-Sheba mpe akendeki na Arani.
790  GEN 28:16  Tango Jakobi alamukaki na pongi, alobaki : « Ya solo penza, Yawe azali na esika oyo mpe ngai nayebaki yango te ! »
791  GEN 28:17  Jakobi abangaki mpe abakisaki : « Oyo esika ya somo boye ! Ekoki kozala eloko mosusu te, bobele Ndako ya Nzambe. Awa nde ekuke ya lola. »
792  GEN 28:18  Na tongo-tongo, Jakobi azwaki libanga oyo atiaki moto, atelemisaki yango lokola elembo mpe asopaki mafuta na songe na yango.
794  GEN 28:20  Bongo Jakobi akataki ndayi na koloba : « Soki Nzambe akozala elongo na ngai mpe akobatela ngai na mobembo oyo nazali kosala, mpe soki akopesa ngai bilei mpe bilamba ya kolata ;
797  GEN 29:1  Jakobi akobaki mobembo na ye mpe akomaki na mokili ya bato ya este.
800  GEN 29:4  Jakobi atunaki babateli bibwele : — Bandeko na ngai ya mibali, bowuti wapi ? Bazongisaki : — Towuti na Arani.
802  GEN 29:6  Jakobi abakisaki lisusu : — Boni, azali malamu ? Bazongisaki : — Iyo, azali malamu. Tala kutu Rasheli, mwana na ye ya mwasi, azali koya elongo na bameme.
803  GEN 29:7  Kasi Jakobi alobaki : — Tala, moyi ezali nanu makasi ; tango ekoki nanu te mpo na kozongisa bibwele. Bomelisa bameme mpe bozonga lisusu koleisa yango matiti.
806  GEN 29:10  Tango Jakobi amonaki Rasheli, mwana mwasi ya noko na ye Labani, elongo na bibwele ya Labani, apusanaki, alongolaki libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe amelisaki yango mayi.
807  GEN 29:11  Jakobi apesaki Rasheli beze mpe alelaki makasi.
808  GEN 29:12  Jakobi ayebisaki Rasheli : « Nazali mwana ya Rebeka mpe moto ya libota ya tata na yo. » Bongo Rasheli akimaki mbangu mpo na koyebisa tata na ye.
809  GEN 29:13  Tango kaka Labani ayokaki sango na tina na Jakobi, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, akendeki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye, apesaki ye beze mpe amemaki ye na ndako na ye ; mpe kuna, Jakobi ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki.
810  GEN 29:14  Labani alobaki na ye : « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza ! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba.
811  GEN 29:15  Labani alobaki na Jakobi : — Boni, osalela ngai mosala ya ofele mpo ete ozali moto ya libota na ngai ? Yebisa ngai : olingi ete lifuti na yo ezala nini ?
814  GEN 29:18  Jakobi alingaki Rasheli mpe alobaki : — Nakosalela yo mibu sambo mpe okopesa ngai Rasheli, mwana na yo ya mwasi oyo ya leki, mpo ete azala mwasi na ngai.
816  GEN 29:20  Jakobi asalaki mibu sambo mpo na kozwa Rasheli na libala, mpe mibu yango emonanaki kaka lokola mwa mikolo epai na ye, pamba te alingaki Rasheli.
817  GEN 29:21  Sima, Jakobi alobaki na Labani : — Mikolo na ngai ekoki ; pesa ngai mwasi na ngai, pamba te nalingi kozala na ye.
819  GEN 29:23  Tango pokwa ekomaki, Labani azwaki Lea, mwana na ye ya mwasi, apesaki ye epai ya Jakobi mpe Jakobi asangisaki na ye nzoto.
821  GEN 29:25  Tango tongo etanaki, Jakobi amonaki ete ezalaki nde Lea. Bongo alobaki na Labani : — Likambo nini oyo osali ngai ? Boni, ezali mpo na Rasheli te nde ngai nasalelaki yo ? Mpo na nini okosi ngai ?
824  GEN 29:28  Jakobi asalaki bongo : asilisaki poso wana elongo na Lea, sima Labani apesaki ye mwana na ye ya mwasi Rasheli mpo ete azala mwasi na ye.
826  GEN 29:30  Jakobi asangisaki lisusu nzoto na Rasheli. Alingaki ye mingi koleka Lea. Bongo asalelaki lisusu Labani mibu sambo.
827  GEN 29:31  Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota ; kasi Rasheli azalaki kobota te.
832  GEN 30:1  Tango Rasheli amonaki ete azali kobotela Jakobi bana te, akomaki na zuwa mpo na ndeko na ye ya mwasi. Boye alobaki na Jakobi : — Pesa ngai bana, noki te nakokufa.
833  GEN 30:2  Jakobi asilikaki makasi mpo na Rasheli mpe alobaki : — Boni, ngai nakomi nde Nzambe oyo akangi yo mabota ?
835  GEN 30:4  Rasheli apesaki ye Bila, mwasi mosali na ye, mpo ete akoma mwasi na ye. Jakobi asangisaki na ye nzoto,
836  GEN 30:5  mpe Bila akomaki na zemi. Abotelaki Jakobi mwana mobali.
838  GEN 30:7  Sima na yango, Bila, mwasi mosali ya Rasheli, azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale.
840  GEN 30:9  Tango Lea amonaki ete azali kobota lisusu te, azwaki Zilipa, mwasi mosali na ye, mpe apesaki ye epai ya Jakobi mpo ete akoma mwasi na ye.
841  GEN 30:10  Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali.
843  GEN 30:12  Sima na yango, Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale.
846  GEN 30:15  Kasi Lea azongiselaki ye : — Boni, ndenge ozwi mobali na ngai, ekoki te ? Olingi lisusu kozwa bambuma ya mandragore ya mwana na ngai ? Rasheli alobaki na ye : — Malamu ! Soki opesi ngai bambuma ya mandragore ya mwana na yo, Jakobi akolala epai na yo na butu ya lelo.
847  GEN 30:16  Na pokwa, wana Jakobi awutaki bilanga, Lea akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye : « Okolala epai na ngai, pamba te napesi bambuma ya mandragore ya mwana na ngai mpo na yo. » Boye Jakobi asangisaki na ye nzoto na butu wana.
848  GEN 30:17  Nzambe ayokelaki Lea mawa, akomaki na zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mitano.
850  GEN 30:19  Lea azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya motoba.
855  GEN 30:24  Apesaki ye kombo « Jozefi, » mpe alobaki : « Tika ete Yawe abakisela ngai mwana mosusu ya mobali ! »
856  GEN 30:25  Sima na Rasheli kobota Jozefi, Jakobi alobaki na Labani : — Pesa ngai nzela mpo ete nazonga na mboka na ngai.
860  GEN 30:29  Jakobi alobaki na ye : — Oyebi yo moko ndenge nini ngai nasaleli yo mpe ndenge nini, na nzela na ngai, bibwele na yo ekomi ebele.
862  GEN 30:31  Labani atunaki ye : — Nasengeli kopesa yo nini ? Jakobi azongisaki : — Okopesa ngai eloko te. Kasi soki olingi kosala likambo oyo mpo na ngai, nakokoba koleisa mpe kobatela bibwele na yo.
867  GEN 30:36  Sima, Labani atambolaki mikolo misato mpo na kokabwana na Jakobi, wana Jakobi akobaki kobatela ndambo ya bibwele ya Labani oyo etikalaki.
868  GEN 30:37  Jakobi azwaki bitape ya mobesu ya nzete ya pepiliye, ya amande mpe ya platane.
871  GEN 30:40  Jakobi atiaki pembeni bana meme mpe atindaki yango na esika oyo bana meme ya nzela-nzela mpe ya mwa mwindo ezalaki ; pamba te yango ezalaki kobotama mingi kati na bibwele ya Labani. Ezali boye nde akomaki na bibwele ya ye moko oyo asangisaki te na bibwele ya Labani.
872  GEN 30:41  Tango nyonso bibwele ya basi, oyo ezalaki na nzoto minene, ezalaki na posa ya kosangisa nzoto, Jakobi azalaki kotia liboso ya bibwele yango bitape ya nzete kati na basani oyo yango ezalaki komelela mayi mpo ete esangisa nzoto pembeni ya bitape wana.
873  GEN 30:42  Kasi, na esika yango, azalaki kotia te bibwele oyo ekonda. Boye bibwele oyo ekonda ezalaki ya Labani, mpe oyo ya minene ezalaki ya Jakobi.
875  GEN 31:1  Jakobi ayokaki bana mibali ya Labani koloba : « Jakobi azwi biloko nyonso ya tata na biso mpe ezali na nzela ya biloko yango nde akomi na bozwi oyo nyonso. »
876  GEN 31:2  Jakobi amonaki lisusu ete ezaleli ya Labani epai na ye etikalaki lisusu te ndenge ezalaki liboso.
877  GEN 31:3  Yawe ayebisaki Jakobi : « Zonga na mboka ya batata na yo, epai ya bandeko na yo, mpe nakozala na yo elongo. »
878  GEN 31:4  Boye Jakobi abengisaki Rasheli mpe Lea na bilanga epai wapi azalaki elongo na bibwele.
885  GEN 31:11  Anjelu na Nzambe alobaki na ngai kati na ndoto : « Jakobi ! » Mpe ngai nazongisaki : « Ngai oyo, nazali awa. »
891  GEN 31:17  Boye Jakobi amatisaki bana na ye mpe basi na ye likolo ya bashamo.
894  GEN 31:20  Boye Jakobi akosaki Labani, moto ya Arami, pamba te atikalaki koyebisa ye te ete akokende.
896  GEN 31:22  Sima na mikolo misato, bayebisaki Labani ete Jakobi asili kokima.
897  GEN 31:23  Boye Labani azwaki elongo na ye bandeko na ye ya mibali, alandaki Jakobi mikolo sambo mpe akangaki ye na mokili ya bangomba ya Galadi.
898  GEN 31:24  Na butu, Nzambe ayaki epai ya Labani, moto ya Arami, kati na ndoto ; alobaki na ye : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. »
899  GEN 31:25  Labani akangaki Jakobi, sima na Jakobi kotonga ndako na ye ya kapo kati na mokili ya bangomba ya Galadi. Boye Labani elongo na bandeko na ye ya mibali bavandaki mpe wana.
900  GEN 31:26  Labani alobaki na Jakobi : — Makambo nini osali ngai ? Okosi ngai mpe omemi bana na ngai ya basi lokola bakangami ya bitumba !
903  GEN 31:29  Tala, nazali na makoki ya kosala yo mabe, kasi na butu oyo eleki, Nzambe ya tata na yo alobaki na ngai : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. »
905  GEN 31:31  Jakobi azongiselaki Labani : — Nabangaki, pamba te nakanisaki ete okobotola ngai bana na yo ya basi na makasi.