37 | GEN 2:6 | Kasi mayi ezalaki kobima wuta na se mpe ezalaki kopanzana na etando nyonso ya mokili. |
44 | GEN 2:13 | Eteni ya mibale, kombo na yango « Giyoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Kushi. |
51 | GEN 2:20 | Yango wana, mobali apesaki bakombo na bibwele nyonso, na bandeke nyonso ya likolo mpe na banyama nyonso ya zamba. Kasi amonaki te mosungi oyo akokaki kozala ndenge moko na ye. |
59 | GEN 3:3 | Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. » |
65 | GEN 3:9 | Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye : — Ozali wapi ? |
73 | GEN 3:17 | Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo. |
81 | GEN 4:1 | Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. » |
82 | GEN 4:2 | Sima na yango, abotaki lisusu Abele, ndeko ya Kayina. Abele akomaki kobokola bibwele mpe Kayina akomaki kosala bilanga. |
83 | GEN 4:3 | Sima na mwa tango, Kayina amemaki mbuma ya mabele mpo na kobonzela Yawe. |
85 | GEN 4:5 | kasi asepelaki te na Kayina mpe na makabo na ye. Bongo, Kayina asilikaki makasi mpe elongi na ye ekomaki mawa-mawa. |
86 | GEN 4:6 | Yawe alobaki na Kayina : — Mpo na nini osiliki ? Mpo na nini elongi na yo ekomi mawa-mawa ? |
87 | GEN 4:7 | Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango. |
88 | GEN 4:8 | Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye. |
89 | GEN 4:9 | Yawe atunaki Kayina : — Wapi ndeko na yo Abele ? Kayina azongisaki : — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ? |
93 | GEN 4:13 | Kayina alobaki na Yawe : — Etumbu na ngai eleki pasi mpo na komema ! |
95 | GEN 4:15 | Kasi Yawe alobaki na ye : — Ezali bongo te ! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo. Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te. |
96 | GEN 4:16 | Kayina alongwaki liboso ya Yawe, akendeki kovanda na mokili ya Nodi, na este ya Edeni. |
97 | GEN 4:17 | Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye ; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali. |
102 | GEN 4:22 | Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. » |
104 | GEN 4:24 | Solo, bakozongisa mbala sambo mabe oyo basali Kayina ; kasi mpo na Lemeki, ekozala mbala tuku sambo na sambo ! » |
105 | GEN 4:25 | Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. » |
106 | GEN 4:26 | Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe. |
115 | GEN 5:9 | Tango Enoshi akokisaki mibu tuku libwa ya mbotama, abotaki Kena. |
116 | GEN 5:10 | Sima na kobota Kena, Enoshi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na zomi na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. |
118 | GEN 5:12 | Tango Kena akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Maalalele. |
119 | GEN 5:13 | Sima na kobota Maalalele, Kena awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku minei mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. |
120 | GEN 5:14 | Mibu nyonso oyo Kena awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi, sima akufaki. |
146 | GEN 6:8 | Kasi Noa azwaki ngolu na miso ya Yawe. |
156 | GEN 6:18 | Kasi nasali boyokani elongo na yo, yango wana okokota na masuwa : yo, bana na yo ya mibali, mwasi na yo mpe basi ya bana na yo. |
161 | GEN 7:1 | Yawe alobaki na Noa : « Kota na masuwa, yo mpe libota na yo mobimba, pamba te yo kaka nde omonani sembo na miso na Ngai kati na bato ya ekeke oyo. |
162 | GEN 7:2 | Kamata banyama sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na banyama ya lolenge nyonso oyo ezangi mbindo ; mpe nyama moko ya mobali mpe moko ya mwasi kati na banyama oyo ezali mbindo. |
163 | GEN 7:3 | Kamata lisusu bandeke sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na lolenge nyonso ya bandeke mpo ete esila te kati na mokili. |
168 | GEN 7:8 | Kati na banyama ya lolenge nyonso, moko ya mobali mpe moko ya mwasi, ezala oyo ezanga mbindo to oyo ezali mbindo, bandeke mpe banyama oyo etambolaka na libumu |
173 | GEN 7:13 | Kaka na mokolo wana, Noa mpe bana na ye ya mibali : Semi, Cham mpe Jafeti, elongo na mwasi na ye mpe basi misato ya bana na ye, bakotaki na masuwa. |
193 | GEN 8:9 | Kasi ebenga ezwaki esika ya kotia matambe na yango te, pamba te mayi ezalaki na etando nyonso ya mokili. Boye, ezongaki na masuwa epai ya Noa. Noa abimisaki loboko, azwaki ebenga mpe akotisaki yango kati na masuwa. |
196 | GEN 8:12 | Azelaki lisusu mikolo sambo mosusu, mpe abimisaki ebenga. Kasi ebenga ezongaki lisusu te. |
210 | GEN 9:4 | Kasi bokolia te mosuni oyo ezali na makila, pamba te makila ezali bomoi. |
213 | GEN 9:7 | Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. » |
224 | GEN 9:18 | Tala bana mibali ya Noa oyo babimaki na masuwa : Semi, Cham mpe Jafeti. Cham azalaki tata ya Kanana. |
228 | GEN 9:22 | Cham, tata ya Kanana, amonaki bolumbu ya tata na ye mpe ayebisaki bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki na libanda. |
229 | GEN 9:23 | Kasi Semi mpe Jafeti bazwaki elamba mpe batiaki yango na mapeka na bango. Bazongaki sima-sima mpe bazipaki bolumbu ya tata na bango. Lokola bilongi na bango etalaki na ngambo mosusu, bamonaki bolumbu ya tata na bango te. |
231 | GEN 9:25 | Alobaki : « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye ! » |
232 | GEN 9:26 | Alobaki lisusu : « Tika ete Yawe, Nzambe ya Semi, apambolama ! Tika ete Kanana azala mowumbu ya Semi ! |
233 | GEN 9:27 | Tika ete Nzambe ayeisa monene mabele ya Jafeti ! Tika ete Jafeti avanda na bandako ya kapo ya Semi, mpe Kanana azala mowumbu na ye ! » |
239 | GEN 10:4 | Bana mibali ya Yavani : Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi. |
241 | GEN 10:6 | Bana mibali ya Cham : Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana. |
242 | GEN 10:7 | Bana mibali ya Kushi : Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. Bana mibali ya Raema : Sheba mpe Dedani. |
243 | GEN 10:8 | Kushi azalaki mpe tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili. |
245 | GEN 10:10 | Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari. |
246 | GEN 10:11 | Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala |
247 | GEN 10:12 | mpe Reseni, engumba monene na kati-kati ya Ninive mpe Kala. |
249 | GEN 10:14 | ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti. |
250 | GEN 10:15 | Kanana azalaki tata ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti, |
253 | GEN 10:18 | ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati. (Mpe na sima, bato ya mabota nyonso ya Kanana bapalanganaki bipai na bipai. |
254 | GEN 10:19 | Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.) |
272 | GEN 11:5 | Kasi Yawe akitaki mpo na kotala engumba mpe ndako molayi oyo bato babandaki kotonga. |
296 | GEN 11:29 | Kombo ya mwasi ya Abrami ezalaki « Sarayi, » mpe kombo ya mwasi ya Naori ezalaki « Milika. » Milika azalaki mwana mwasi ya Arani ; mpe Arani azalaki na mwana mwasi mosusu : kombo na ye ezalaki « Yisika. » |
298 | GEN 11:31 | Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna. |
304 | GEN 12:5 | Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna. |
305 | GEN 12:6 | Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango. |
307 | GEN 12:8 | Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este. |
312 | GEN 12:13 | Kasi yo, loba na bango ete ozali ndeko na ngai ya mwasi. Na bongo, bakosalela ngai bolamu mpo na yo, mpe bomoi na ngai ekobika mpo na yo. » |
316 | GEN 12:17 | Kasi Yawe apesaki etumbu makasi epai ya Faraon mpe ndako na ye mpo na Sarayi, mwasi ya Abrami. |
323 | GEN 13:4 | mpe atongaki etumbelo ya liboso. Ezalaki na esika yango nde Abrami abelelaki Kombo ya Yawe. |
326 | GEN 13:7 | mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango. |
331 | GEN 13:12 | Abrami avandaki na mokili ya Kanana, mpe Loti avandaki kati na bingumba ya etando mpe atelemisaki bandako na ye ya kapo pene ya Sodome. |
338 | GEN 14:1 | Na tango wana, Amirafeli, mokonzi ya Shineari ; Arioki, mokonzi ya Elasari ; Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami, mpe Tideali, mokonzi ya Goyimi, |
341 | GEN 14:4 | Bazalaki na se ya bokonzi ya Kedorilaomeri mibu zomi na mibale, kasi na mobu oyo ya zomi na misato, batombokelaki ye. |
342 | GEN 14:5 | Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ; |
344 | GEN 14:7 | Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari. |
346 | GEN 14:9 | mpo na kobundisa Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami ; Tideali, mokonzi ya Goyimi ; Amirafeli, mokonzi ya Shineari, mpe Arioki, mokonzi ya Elasari. Bakonzi minei babundisaki bakonzi mitano. |
354 | GEN 14:17 | Mokonzi ya Sodome akendeki na lubwaku ya Shave oyo ezali lubwaku ya bokonzi, mpo na kokutana na Abrami oyo azali kozonga sima na ye kolonga Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, na bitumba. |
359 | GEN 14:22 | Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome : — Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili, |
362 | GEN 15:1 | Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli : — Kobanga te, Abrami ! Nazali nguba na yo, lifuti na yo ekozala monene. |
363 | GEN 15:2 | Kasi Abrami azongisaki : — Oh Nkolo Yawe, okopesa ngai nini ? Nazali na mwana te, mpe ezali Eliezeri ya Damasi nde akokitana na libula na ngai. |
365 | GEN 15:4 | Yawe alobaki na ye : — Moto wana akozala mokitani ya libula na yo te. Kasi mwana oyo akobima na mokongo na yo nde akozala mokitani ya libula na yo. |
369 | GEN 15:8 | Kasi Abrami alobaki : — Ah Nkolo Yawe, nakoyeba ndenge nini ete mokili oyo epesameli ngai ? |
375 | GEN 15:14 | Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu ; mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango elongo na bozwi ebele. |
380 | GEN 15:19 | mokili ya bato ya Keni, ya bato ya Kenizi, ya bato ya Kadimoni, |
382 | GEN 15:21 | ya bato ya Amori, ya bato ya Kanana, ya bato ya Girigazi mpe ya bato ya Yebusi. » |
384 | GEN 16:2 | Sarayi alobaki na Abrami : — Yawe apesi ngai mabota te. Kende, sangisa nzoto na mosali na ngai ya mwasi, tango mosusu nakotonga libota na nzela na ye. Abrami ayokaki maloba ya Sarayi. |
385 | GEN 16:3 | Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye. |
395 | GEN 16:13 | Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? » Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi : Nzambe oyo azali komona ngai. |
396 | GEN 16:14 | Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi. |
406 | GEN 17:8 | Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › » |
407 | GEN 17:9 | Nzambe alobaki lisusu na Abrayami : « Kasi mpo na yo, osengeli kobatela boyokani na Ngai, yo elongo na bakitani na yo sima na yo mpo na milongo oyo ekoya sima. |
409 | GEN 17:11 | Kokatama ngenga ekozala elembo ya boyokani kati na bino mpe Ngai. |
418 | GEN 17:20 | Kasi mpo na Isimaeli, nayoki yo. Solo, nakopambola ye, nakopesa ye mabota ebele mpe nakokomisa bakitani na ye ebele. Akozala tata ya bakambi zomi na mibale, mpe nakokomisa ye tata ya ekolo monene. |
419 | GEN 17:21 | Kasi na oyo etali boyokani na Ngai, nakosala yango elongo na Izaki, mwana mobali oyo Sara akobotela yo na eleko oyo, na mobu oyo ezali koya. |
421 | GEN 17:23 | Kaka na mokolo wana, Abrayami azwaki mwana na ye ya mobali, Isimaeli, mpe bawumbu nyonso, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mosolo, akatisaki bango nyonso ngenga ndenge kaka Nzambe alobaki na ye. |
431 | GEN 18:6 | Abrayami akotaki na lombangu na ndako na ye ya kapo mpe alobaki na Sara : « Kamata katini misato ya farine mpe sala bagato na lombangu. » |