Wildebeest analysis examples for:   lin-lin   M    February 25, 2023 at 00:37    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

2  GEN 1:2  Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo ; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi.
3  GEN 1:3  Mpe Nzambe alobaki : « Tika ete pole ezala ! » Mpe pole ezalaki.
12  GEN 1:12  Mabele ebimisaki matiti, milona oyo ebotaka nkona kolanda lolenge ya molona moko na moko mpe banzete oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
16  GEN 1:16  Nzambe akelaki biloko mibale ya minene oyo ebimisaka pole : oyo eleki monene, mpo na kongenga na moyi ; mpe oyo ya moke, mpo na kongenga na butu. Mpe akelaki lisusu minzoto.
41  GEN 2:10  Ebale moko ezalaki kobima na Edeni mpe ezalaki kosopa mayi na elanga. Mayi ya ebale yango ekabwanaki na biteni minei.
45  GEN 2:14  Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre. » Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate. »
47  GEN 2:16  Mpe Yawe Nzambe apesaki mitindo oyo na moto : « Okoki kolia mbuma nyonso ya elanga,
52  GEN 2:21  Na yango, Yawe Nzambe alalisaki mobali pongi ya makasi. Mpe wana mobali azalaki kolala, Yawe Nzambe azwaki mokuwa moko na mopanzi ya mobali mpe azipaki mosuni na esika yango.
56  GEN 2:25  Mobali mpe mwasi na ye bazalaki bolumbu mpe bazalaki koyokana soni te.
58  GEN 3:2  Mwasi azongisaki epai ya nyoka : — Toliaka bambuma ya banzete ya elanga.
62  GEN 3:6  Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango.
63  GEN 3:7  Mbala moko, miso na bango mibale efungwamaki, mpe basosolaki ete bazali bolumbu. Boye, basangisaki makasa ya nzete ya figi mpe bamizipaki.
69  GEN 3:13  Yawe Nzambe alobaki na mwasi : — Mpo nini osali bongo ? Mwasi azongisaki : — Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango.
74  GEN 3:18  Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende. Okolia matiti ya bilanga.
76  GEN 3:20  Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva, » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili.
86  GEN 4:6  Yawe alobaki na Kayina : — Mpo na nini osiliki ? Mpo na nini elongi na yo ekomi mawa-mawa ?
90  GEN 4:10  Nzambe alobaki : — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai.
95  GEN 4:15  Kasi Yawe alobaki na ye : — Ezali bongo te ! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo. Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te.
98  GEN 4:18  Enoki abotaki Iradi ; Iradi abotaki Mewuyayeli ; Mewuyayeli abotaki Metusaeli ; Metusaeli abotaki Lemeki.
111  GEN 5:5  Mibu nyonso oyo Adamu awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku misato, sima akufaki.
114  GEN 5:8  Mibu nyonso oyo Seti awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi na mibale, sima akufaki.
117  GEN 5:11  Mibu nyonso oyo Enoshi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na mitano, sima akufaki.
118  GEN 5:12  Tango Kena akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Maalalele.
119  GEN 5:13  Sima na kobota Maalalele, Kena awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku minei mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
120  GEN 5:14  Mibu nyonso oyo Kena awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi, sima akufaki.
121  GEN 5:15  Tango Maalalele akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Yeredi.
122  GEN 5:16  Sima na kobota Yeredi, Maalalele awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
123  GEN 5:17  Mibu nyonso oyo Maalalele awumelaki na bomoi ezalaki nkama mwambe na tuku libwa na mitano, sima akufaki.
126  GEN 5:20  Mibu nyonso oyo Yeredi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na mibale, sima akufaki.
127  GEN 5:21  Tango Enoki akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Metusalemi.
128  GEN 5:22  Sima na kobota Metusalemi, Enoki azalaki kosala mokano ya Nzambe mibu nkama misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
129  GEN 5:23  Mibu nyonso oyo Enoki awumelaki na bomoi ezalaki nkama misato na tuku motoba na mitano.
131  GEN 5:25  Tango Metusalemi akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na sambo ya mbotama, abotaki Lemeki.
132  GEN 5:26  Sima na kobota Lemeki, Metusalemi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama sambo na tuku mwambe na mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
133  GEN 5:27  Mibu nyonso oyo Metusalemi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na libwa, sima akufaki.
137  GEN 5:31  Mibu nyonso oyo Lemeki awumelaki na bomoi ezalaki nkama sambo na tuku sambo na sambo, sima akufaki.
149  GEN 6:11  Mokili ebebaki na miso ya Nzambe mpe etondaki na makambo ya mobulu.
172  GEN 7:12  Mvula enokaki na mokili mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei.
175  GEN 7:15  Mwasi na mobali, kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, eyaki epai ya Noa mpo na kokota na masuwa.
177  GEN 7:17  Mpela ewumelaki na mokili mikolo tuku minei ; mayi ekomaki ebele mpe etombolaki masuwa likolo na yango.
178  GEN 7:18  Mayi emataki mpe ekomaki ebele, bongo masuwa ekomaki kotepatepa likolo ya mayi.
179  GEN 7:19  Mayi emataki lisusu makasi mpe bangomba nyonso ya milayi oyo ezalaki na mokili ezindaki na se ya mayi.
180  GEN 7:20  Mayi emataki lisusu likolo ya bangomba na bosanda ya bametele pene sambo to mwambe.
184  GEN 7:24  Mayi etondaki na mokili mikolo nkama moko na tuku mitano.
187  GEN 8:3  Mayi ekomaki kolongwa moke-moke likolo ya mabele, mpe sima na mikolo nkama moko na tuku mitano, mayi ekitaki.
189  GEN 8:5  Mayi ezalaki kokoba kokita kino na sanza ya zomi. Na mokolo ya liboso ya sanza yango, basonge ya bangomba emonanaki.
192  GEN 8:8  Mpe lisusu, Noa abimisaki ebenga mpo na kotala soki mayi ekawuki na mokili.
217  GEN 9:11  Nasali boyokani elongo na yo : bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi ekobebisama te na mayi ya mpela. Mpe mpela ekozala lisusu te mpo na kobebisa mokili. »
221  GEN 9:15  nakokanisa boyokani na Ngai elongo na bino mpe na bikelamu ya lolenge nyonso oyo ezali na bomoi. Mpe mayi ekokoma lisusu mpela te mpo na kobebisa nyonso oyo ezali na bomoi.
235  GEN 9:29  Mibu nyonso ya bomoi ya Noa ezalaki nkama libwa na tuku mitano, sima akufaki.
237  GEN 10:2  Bana mibali ya Jafeti : Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi.
240  GEN 10:5  Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.
241  GEN 10:6  Bana mibali ya Cham : Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana.
244  GEN 10:9  Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. »
248  GEN 10:13  Mitsirayimi azalaki koko ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu,
253  GEN 10:18  ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati. (Mpe na sima, bato ya mabota nyonso ya Kanana bapalanganaki bipai na bipai.
254  GEN 10:19  Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)
258  GEN 10:23  Bana mibali ya Aram: Utsi, Uli, Geteri mpe Mashi.
265  GEN 10:30  (Mokili oyo bazalaki kovanda ebandaki wuta na Mesha kino na Sefari, na mokili ya bangomba ya este.)
277  GEN 11:10  Tala libota ya Sem: Mibu mibale sima na mpela, wana Semi azalaki nanu na mibu nkama moko ya mbotama, akomaki tata ya Aripakishadi.
282  GEN 11:15  Mpe sima na mbotama ya Eberi, Shela awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
284  GEN 11:17  Mpe sima na mbotama ya Pelegi, Eberi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
286  GEN 11:19  Mpe sima na mbotama ya Rewu, Pelegi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
292  GEN 11:25  Mpe sima na mbotama ya Tera, Naori awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na zomi na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
296  GEN 11:29  Kombo ya mwasi ya Abrami ezalaki « Sarayi, » mpe kombo ya mwasi ya Naori ezalaki « Milika. » Milika azalaki mwana mwasi ya Arani ; mpe Arani azalaki na mwana mwasi mosusu : kombo na ye ezalaki « Yisika. »
305  GEN 12:6  Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango.
317  GEN 12:18  Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye : « Likambo nini osali ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo ?
318  GEN 12:19  Mpo na nini olobaki : ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi ? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende ! »
328  GEN 13:9  Mokili mobimba ezali liboso na yo. Ezali malamu tokabwana : soki yo okeyi na ngambo ya loboko ya mwasi, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mobali ; soki okeyi na ngambo ya loboko ya mobali, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mwasi. »
334  GEN 13:15  Mokili nyonso oyo ozali komona, nakopesa yango epai na yo mpe na bakitani na yo mpo na libela.
337  GEN 13:18  Abrami alongolaki bandako na ye ya kapo mpe akendeki kovanda na Ebron, pene ya banzete minene ya Mamire epai wapi atongaki etumbelo mpo na Yawe.
344  GEN 14:7  Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.
350  GEN 14:13  Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami.
354  GEN 14:17  Mokonzi ya Sodome akendeki na lubwaku ya Shave oyo ezali lubwaku ya bokonzi, mpo na kokutana na Abrami oyo azali kozonga sima na ye kolonga Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, na bitumba.
355  GEN 14:18  Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo
356  GEN 14:19  mpe apambolaki Abrami na maloba oyo : « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abram!
358  GEN 14:21  Mokonzi ya Sodome alobaki na Abram: — Pesa ngai bato, kamata na yo biloko.
361  GEN 14:24  Nakondima eloko te longola kaka biloko oyo bato na ngai baliaki mpe biloko ya bato oyo bazalaki elongo na ngai : Aneri, Eshikoli mpe Mamire ; bango nde bakozwa biloko na bango.
365  GEN 15:4  Yawe alobaki na ye : — Moto wana akozala mokitani ya libula na yo te. Kasi mwana oyo akobima na mokongo na yo nde akozala mokitani ya libula na yo.
370  GEN 15:9  Yawe alobaki na ye : — Memela Ngai mwana ngombe moko ya mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme ya mobali ya mibu misato, ebenga moko ya zamba mpe ebenga moko ya mboka.
387  GEN 16:5  Boye, Sarayi alobaki na Abram: — Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye ; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo.
388  GEN 16:6  Abrami alobaki : — Mosali na yo azali na maboko na yo. Sala epai na ye nyonso oyo omoni malamu. Boye, Sarayi akomaki konyokola Agari mpe Agari akimaki mosika na ye.
402  GEN 17:4  « Mpo na Ngai, tala boyokani oyo nazali kosala elongo na yo : ‹ Okozala tata ya bikolo ebele.
408  GEN 17:10  Tala boyokani na Ngai elongo na yo mpe bakitani na yo sima na yo, boyokani oyo osengeli kobatela : Mwana mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga.
410  GEN 17:12  Mpo na milongo nyonso oyo ekoya, mwana mobali nyonso kati na bino, oyo akokisi mikolo mwambe asengeli kokatama ngenga : ezala mwana mobali oyo abotami kati na ndako na yo to mwana mobali oyo osombi na mosolo na yo epai ya mopaya, mwana mobali oyo azali mokitani na yo te, ye mpe asengeli kokatama ngenga.
411  GEN 17:13  Mowumbu nyonso oyo abotami kati na ndako na yo to oyo osombi na mosolo na yo asengeli kokatama ngenga. Boyokani na Ngai ekozala kati na banzoto na bino lokola boyokani ya libela na libela.
412  GEN 17:14  Mwana mobali nyonso oyo akokatama ngenga te, bakolongola ye kati na bato na ye, mpo ete abebisi boyokani na Ngai. »
413  GEN 17:15  Nzambe alobaki lisusu na Abrayam: « Mpo na Sarayi, mwasi na yo, okobenga ye lisusu te Sarayi, kasi okokoma kobenga ye Sara.
415  GEN 17:17  Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « Eh ! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zem! »
417  GEN 17:19  Nzambe alobaki : — Te ! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye.