Wildebeest analysis examples for:   lin-lin   T    February 25, 2023 at 00:37    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

3  GEN 1:3  Mpe Nzambe alobaki : « Tika ete pole ezala ! » Mpe pole ezalaki.
6  GEN 1:6  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango ! »
9  GEN 1:9  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima ! » Yango esalemaki mpe bongo.
11  GEN 1:11  Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa matiti, milona oyo ezali na nkona mpe banzete ya mbuma oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko ! » Yango esalemaki mpe bongo.
14  GEN 1:14  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu,
20  GEN 1:20  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo ! »
24  GEN 1:24  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango : bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba ! » Yango esalemaki mpe bongo.
26  GEN 1:26  Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! »
29  GEN 1:29  Bongo Nzambe alobaki : « Tala, kati na mokili mobimba, napesi bino milona oyo ezali na nkona mpe banzete nyonso oyo ebotaka mbuma. Yango nde ekozala bilei na bino.
35  GEN 2:4  Tala ndenge likolo mpe mokili elongo na biloko oyo ezali kati na yango ezalaki tango ekelamaki. Tango Yawe Nzambe akelaki mokili mpe likolo,
45  GEN 2:14  Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre. » Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate. »
54  GEN 2:23  Boye, mobali alobaki : « Tala na mbala oyo, oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai, mosuni ya mosuni na ngai. Bakobenga ye mwasi, pamba te awuti na mobali. »
58  GEN 3:2  Mwasi azongisaki epai ya nyoka : — Toliaka bambuma ya banzete ya elanga.
78  GEN 3:22  Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. »
92  GEN 4:12  Tango okobalola mabele, ekobotela yo mbuma te. Okozala koyengayenga mpe kotelengana na mokili.
94  GEN 4:14  Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele ; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.
99  GEN 4:19  Lemeki abalaki basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. »
102  GEN 4:22  Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. »
103  GEN 4:23  Lemeki alobaki na basi na ye : « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ; bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu : Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki mot; mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali !
107  GEN 5:1  Tala lisolo ya libota ya Adamu. Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe.
109  GEN 5:3  Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. »
112  GEN 5:6  Tango Seti akokisaki mibu nkama moko na mitano ya mbotama, abotaki Enoshi.
115  GEN 5:9  Tango Enoshi akokisaki mibu tuku libwa ya mbotama, abotaki Kena.
118  GEN 5:12  Tango Kena akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Maalalele.
121  GEN 5:15  Tango Maalalele akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Yeredi.
124  GEN 5:18  Tango Yeredi akokisaki mibu nkama moko na tuku motoba na mibale ya mbotama, abotaki Enoki.
127  GEN 5:21  Tango Enoki akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Metusalemi.
131  GEN 5:25  Tango Metusalemi akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na sambo ya mbotama, abotaki Lemeki.
134  GEN 5:28  Tango Lemeki akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na mibale ya mbotama, abotaki mwana mobali.
138  GEN 5:32  Tango Noa akokisaki mibu nkama mitano ya mbotama, abotaki Semi, Cham mpe Jafeti.
139  GEN 6:1  Tango bato babandaki kokoma ebele na mokili mpe babotaki bana basi,
147  GEN 6:9  Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe.
153  GEN 6:15  Tala ndenge okotonga yango : molayi na yango ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mitano, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda.
171  GEN 7:11  Tango Noa akokisaki mibu nkama motoba ya mbotama, na sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na sambo, bitima nyonso ya se mpe maninisa nyonso ya likolo efungwamaki.
195  GEN 8:11  Tango ebenga ezongaki epai na ye na pokwa, ememaki lokasa ya olive ya mobesu na monoko na yango. Boye, Noa asosolaki ete mayi ekiti na mokili.
218  GEN 9:12  Nzambe alobaki lisusu : « Tala elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bino, mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na bino elongo. Ezali boyokani mpo na milongo nyonso oyo ekoya :
220  GEN 9:14  Tango nyonso nakosangisa mapata na likolo ya mokili mpe monama ekobima na mapata,
222  GEN 9:16  Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. »
224  GEN 9:18  Tala bana mibali ya Noa oyo babimaki na masuwa : Semi, Cham mpe Jafeti. Cham azalaki tata ya Kanana.
227  GEN 9:21  Tango amelaki masanga ya vino oyo ewutaki na elanga na ye, alangwaki mpe atikalaki bolumbu kati na ndako na ye ya kapo.
230  GEN 9:24  Tango milangwa ya Noa esilaki, ayokaki likambo oyo mwana na ye ya suka asalaki.
231  GEN 9:25  Alobaki : « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye ! »
232  GEN 9:26  Alobaki lisusu : « Tika ete Yawe, Nzambe ya Semi, apambolama ! Tika ete Kanana azala mowumbu ya Semi !
233  GEN 9:27  Tika ete Nzambe ayeisa monene mabele ya Jafet! Tika ete Jafeti avanda na bandako ya kapo ya Semi, mpe Kanana azala mowumbu na ye ! »
236  GEN 10:1  Tala libota ya Noa : Semi, Cham mpe Jafet; bango mpe babotaki bakitani sima na mpela.
237  GEN 10:2  Bana mibali ya Jafet: Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi.
238  GEN 10:3  Bana mibali ya Gomeri : Ashikenazi, Rifati mpe Togarima.
239  GEN 10:4  Bana mibali ya Yavani : Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.
253  GEN 10:18  ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati. (Mpe na sima, bato ya mabota nyonso ya Kanana bapalanganaki bipai na bipai.
254  GEN 10:19  Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)
269  GEN 11:2  Tango bato bazalaki kotambola mpo na kokende na ngambo ya weste, bamonaki etando moko ya monene na mokili ya Shineari mpe bavandaki kuna.
270  GEN 11:3  Balobanaki bango na bango : « Tosala babiliki mpe totumba yango na moto. » Boye, basalelaki babiliki lokola mabanga mpe potopoto ya mwindo mpo na kotongela.
271  GEN 11:4  Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. »
277  GEN 11:10  Tala libota ya Semi : Mibu mibale sima na mpela, wana Semi azalaki nanu na mibu nkama moko ya mbotama, akomaki tata ya Aripakishadi.
279  GEN 11:12  Tango Aripakishadi akokisaki mibu tuku misato na mitano ya mbotama, abotaki mwana mobali na kombo « Shela. »
281  GEN 11:14  Tango Shela akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Eberi.
283  GEN 11:16  Tango Eberi akokisaki mibu tuku misato na minei ya mbotama, abotaki Pelegi.
285  GEN 11:18  Tango Pelegi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Rewu.
287  GEN 11:20  Tango Rewu akokisaki mibu tuku misato na mibale ya mbotama, abotaki Serugi.
289  GEN 11:22  Tango Serugi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Naori.
291  GEN 11:24  Tango Naori akokisaki mibu tuku mibale na libwa ya mbotama, abotaki Tera.
292  GEN 11:25  Mpe sima na mbotama ya Tera, Naori awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na zomi na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
293  GEN 11:26  Tango Tera akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Abrami, Naori mpe Arani.
294  GEN 11:27  Tala libota ya Tera : Tera abotaki Abrami, Naori mpe Arani. Arani nde azalaki tata ya Loti.
295  GEN 11:28  Wana tata na ye, Tera, azalaki nanu na bomoi, Arani akufaki kati na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mokili epai wapi abotamaki.
298  GEN 11:31  Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna.
299  GEN 11:32  Tera awumelaki na bomoi mibu nkama mibale na mitano, sima akufaki na engumba Arani.
310  GEN 12:11  Tango akomaki pene ya kokota na Ejipito, alobaki na mwasi na ye Sarayi : « Nayebi ete ozali mwasi kitoko penza.
311  GEN 12:12  Tango bato ya Ejipito bakomona yo, bakoloba : ‹ Azali mwasi na ye. › Boye, bakoboma ngai mpe bakotika yo na bomoi.
313  GEN 12:14  Tango Abrami akomaki na Ejipito, bato ya Ejipito bamonaki ete Sarayi azalaki mwasi kitoko penza.
327  GEN 13:8  Abrami alobaki na Lot: « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko.
329  GEN 13:10  Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.
336  GEN 13:17  Telema, tambola kati na mokili na bangambo nyonso, pamba te nakopesa yango epai na yo. »
338  GEN 14:1  Na tango wana, Amirafeli, mokonzi ya Shineari ; Arioki, mokonzi ya Elasari ; Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami, mpe Tideali, mokonzi ya Goyimi,
339  GEN 14:2  bakendeki kobundisa Bera, mokonzi ya Sodome ; Birisha, mokonzi ya Gomore ; Shineabi, mokonzi ya Adima ; Shemeberi, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari.
344  GEN 14:7  Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.
345  GEN 14:8  Boye mokonzi ya Sodome, mokonzi ya Gomore, mokonzi ya Adima, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari, babimaki mpe babongamaki na lubwaku ya Sidimi
346  GEN 14:9  mpo na kobundisa Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami ; Tideali, mokonzi ya Goyimi ; Amirafeli, mokonzi ya Shineari, mpe Arioki, mokonzi ya Elasari. Bakonzi minei babundisaki bakonzi mitano.
351  GEN 14:14  Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani.
356  GEN 14:19  mpe apambolaki Abrami na maloba oyo : « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abrami !
357  GEN 14:20  Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.
366  GEN 15:5  Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye : — Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango. Alobaki na ye lisusu : — Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.
373  GEN 15:12  Tango moyi ekitaki, Abrami alalaki pongi makasi. Na kati ya molili makasi, somo ekangaki ye.
378  GEN 15:17  Tango moyi elalaki mpe molili eyaki makasi, mbabola ya milinga mpe koni ya moto elekaki kati ya biteni ya banyama.
386  GEN 16:4  Abrami asangisaki nzoto na Agari, mpe Agari akomaki na zemi. Tango Agari asosolaki ete akomi na zemi, akomaki kotiola Sarayi, nkolo na ye.
387  GEN 16:5  Boye, Sarayi alobaki na Abrami : — Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye ; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo.
399  GEN 17:1  Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.
408  GEN 17:10  Tala boyokani na Ngai elongo na yo mpe bakitani na yo sima na yo, boyokani oyo osengeli kobatela : Mwana mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga.
416  GEN 17:18  Boye Abrayami alobaki na Nzambe : — Tika ete Isimaeli awumela na se ya lipamboli na Yo !