695 | GEN 26:2 | Boye Yawe abimelaki ye mpe ayebisaki ye : — Kokende na Ejipito te ! Vanda na mokili oyo nakolakisa yo. |
696 | GEN 26:3 | Vanda kati na mokili oyo ; nakozala na yo elongo mpe nakopambola yo, pamba te nakopesa mabele oyo nyonso epai na yo mpe epai ya bana na yo ; nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya Abrayami, tata na yo. |
772 | GEN 27:44 | Vanda mwa mikolo epai na ye kino kanda ya ndeko na yo ekosila. |
815 | GEN 29:19 | Labani alobaki : — Eleki malamu ete napesa ye epai na yo na esika ete napesa ye epai ya mobali mosusu. Vanda awa elongo na ngai. |
1427 | GEN 47:6 | mokili ya Ejipito mpe ezali na maboko na yo. Vandisa tata na yo mpe bandeko na yo na eteni ya mabele oyo eleki kitoko ; tika ete bavanda na Gosheni. Mpe soki oyebi kati na bango bato ya mayele, pesa bango mokumba ya kobatela bibwele na ngai. |
4090 | NUM 13:14 | mpo na libota ya Nefitali : Nakibi, mwana mobali ya Vofisi ; |
5538 | DEU 24:11 | Vanda kaka na libanda kino moto oyo adefaki epai na yo akomemela yo ndanga. |
5793 | DEU 32:33 | Vino na bango ezali ngenge ya banyoka, ngenge ya etupa, ngenge oyo ebomaka. |
6992 | JDG 17:10 | Mika alobaki na ye : — Vanda elongo na ngai. Okozala tata mpe nganga na ngai ; nakopesa yo na mobu moko mbongo ya bibende ya palata, zomi, bilamba ya kolata mpe biloko ya kolia. Molevi akomaki kosala epai ya Mika. |
7172 | RUT 2:21 | Rite, moto ya Moabi, alobaki : — Alobaki na ngai kutu : « Vanda elongo na basali na ngai kino bakosilisa kobuka bambuma na ngai nyonso. » |
7237 | 1SA 1:23 | Elikana, mobali na ye, alobaki : — Oyo omoni ete ezali malamu, sala yango. Vanda awa kino okokata mwana komela mabele. Tika ete Yawe asunga yo mpo ete okokisa kaka elaka na yo. Boye Ana atikalaki na ndako, akobaki komelisa mwana mabele kino tango akataki ye komela. |
8274 | 2SA 11:12 | Davidi alobaki na Iri : — Vanda lisusu awa lelo, bongo lobi nakozongisa yo. Iri avandaki na Yelusalemi mokolo wana mpe mokolo oyo elandaki. |
12293 | EZR 10:36 | Vania, Meremoti, Eliashibi, |
12715 | EST 1:9 | Vasti, mwasi ya mokonzi, ye mpe asalisaki feti mpo na basi, kati na ndako ya mokonzi Kizerisesi. |
12717 | EST 1:11 | Atindaki bango ete bamema liboso na ye Vasti, mwasi ya mokonzi ; bongo alata motole na ye ya bokonzi mpo ete alakisa kitoko na ye epai ya bato mpe epai ya bakalaka, pamba te azalaki penza kitoko. |
12718 | EST 1:12 | Kasi tango basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki Vasti, mwasi ya mokonzi, mitindo oyo mokonzi apesaki ; Vasti, mwasi ya mokonzi, aboyaki kokende. Mokonzi atombokaki makasi mpe apelaki na kanda. |
12721 | EST 1:15 | Mokonzi atunaki bango : — Kolanda mobeko, esengi kosala nini epai ya Vasti, mwasi ya mokonzi, mpo ete aboyi kotosa mitindo ya mokonzi Kizerisesi, mitindo oyo basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki ye ? |
12722 | EST 1:16 | Memukani azongiselaki mokonzi liboso ya bakalaka na ye : — Vasti, mwasi ya mokonzi, asali mabe kaka liboso ya mokonzi te ; kasi mpe, liboso ya bakalaka nyonso mpe ya bato nyonso kati bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi. |
12723 | EST 1:17 | Pamba te sango ya ezaleli mabe ya mwasi ya mokonzi ekoyebana kati na basi nyonso ; na bongo, bakokoma kotiola bokonzi ya mibali na bango na koloba : « Mokonzi Kizerisesi kutu apesaki mitindo ete babenga Vasti mpo ete akende liboso na ye, kasi mwasi ya mokonzi aboyaki kokende ! » |
12725 | EST 1:19 | Yango wana, soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi azwa mobeko oyo ekoki kobongwana te ; mpe tika ete mobeko yango ekomama kati na mibeko ya Persi mpe ya Medi : Vasti akoki lisusu te kotelema liboso ya mokonzi Kizerisesi ; mokonzi akopesa lokumu na ye ya mwasi ya mokonzi epai ya mwasi mosusu oyo azali malamu koleka ye. |
12729 | EST 2:1 | Sima na mikolo, kanda ya mokonzi Kizerisesi ekitaki ; akomaki kokanisa Vasti, makambo oyo asalaki mpe mobeko oyo azwaki na tina na ye. |
12732 | EST 2:4 | Tika ete elenge mwasi oyo akosepelisa mokonzi akoma mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti. Likanisi oyo esepelisaki mokonzi mpe asalelaki yango. |
12745 | EST 2:17 | Mokonzi alingaki Ester makasi koleka basi nyonso. Ester azwaki ngolu mpe andimamaki na miso ya mokonzi koleka bilenge basi mosusu. Bongo mokonzi atiaki motole ya bokonzi na moto ya Ester mpe akomisaki ye mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti. |
12847 | EST 9:9 | Parimashita, Arizayi, Aridayi mpe Vayezata ; |
15855 | PSA 110:1 | Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. » |
17025 | PRO 20:1 | Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu ; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya. |
18172 | ISA 24:7 | Vino ya sika ezali na matanga, elanga ya vino ekawuki ; bato nyonso oyo bamesana na esengo bakomi kolela na pasi. |
18670 | ISA 47:1 | Kita mpe vanda na putulu, Babiloni, mboka kitoko ! Vanda na mabele, kiti ya bokonzi ezali te, Babiloni, mboka kitoko ! Moto moko te akobenga yo lisusu « mwasi bonzenga » to « mwasi kitoko. » |
18674 | ISA 47:5 | Vanda kimia, kende na molili, Babiloni, mboka kitoko, pamba te bakobenga yo lisusu te « mwasi mokonzi ya bikolo. » |
21209 | EZK 27:19 | Bato ya Vedani mpe ya Yavani oyo bazalaki kowuta na Uzali bazalaki komema epai na yo bibende oyo balekisa na moto, bibende oyo basalelaka misala ya moto, banzete ya kasia, mpe banzete oyo ebotaka na mayi mpe basalaka na yango malasi, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka. |
22577 | AMO 9:13 | « Mikolo ezali koya, » elobi Yawe, « mikolo oyo mosali bilanga akobuka bambuma na yango noki, mpe moloni elanga ya vino akokamola vino noki. Vino ya sika ekobota na bangomba milayi mpe ekosopana na bangomba mikuse nyonso. |
23985 | MAT 22:44 | « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › » |
24431 | MRK 4:39 | Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale : — Tika makelele ! Vanda nye ! Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki. |
24778 | MRK 12:36 | Pamba te Davidi, ye moko, alobaki boye na nzela ya Molimo Mosantu : « Yawe alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › » |
25215 | LUK 5:39 | Mpe moto moko te alingaka komela vino ya sika soki awuti komela vino ya kala, pamba te balobaka : « Vino ya kala eleki kitoko. » |
25890 | LUK 20:42 | Davidi, ye moko, alobaki boye kati na buku ya banzembo : « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali |
26089 | LUK 24:29 | Kasi bango babondelaki Ye makasi : — Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota. Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango. |
27052 | ACT 2:34 | Pamba te, Davidi amataki te na Likolo, kasi alobaki : « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali |
27076 | ACT 3:11 | Lokola moto yango atingamaki na Petelo mpe Yoane, bato nyonso bakamwaki mpe bayaki na lombangu epai na bango, na esika oyo babengaka « Veranda ya Salomo. » |
30043 | HEB 1:13 | Mpe lisusu, epai ya anjelu nini Nzambe aloba : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo ? » |