342 | GEN 14:5 | Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ; |
391 | GEN 16:9 | Anjelu ya Yawe alobaki na ye : — Zonga epai ya nkolo na yo mpe mikitisa liboso na ye. |
550 | GEN 22:2 | Nzambe alobaki na ye : — Zwa Izaki, mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko oyo olingaka ; kende na mokili ya Morija, mpe kuna, okopesa Ngai ye lokola mbeka ya kotumba na likolo ya ngomba oyo nakolakisa yo. |
661 | GEN 25:2 | Ketura abotelaki ye : Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa. |
757 | GEN 27:29 | Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo ! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! » |
776 | GEN 28:2 | Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo. |
820 | GEN 29:24 | Labani apesaki Zilipa, mwasi mosali na ye, epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye. |
840 | GEN 30:9 | Tango Lea amonaki ete azali kobota lisusu te, azwaki Zilipa, mwasi mosali na ye, mpe apesaki ye epai ya Jakobi mpo ete akoma mwasi na ye. |
841 | GEN 30:10 | Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali. |
843 | GEN 30:12 | Sima na yango, Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale. |
851 | GEN 30:20 | Lea alobaki : « Nzambe apesi ngai likabo ya motuya. Sik’oyo, mobali na ngai akopesa ngai lokumu mpo ete naboteli ye bana mibali motoba. » Boye apesaki ye kombo « Zabuloni. » |
877 | GEN 31:3 | Yawe ayebisaki Jakobi : « Zonga na mboka ya batata na yo, epai ya bandeko na yo, mpe nakozala na yo elongo. » |
938 | GEN 32:10 | Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. › |
1035 | GEN 35:23 | Bana mibali ya Lea : Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Jakobi ; Simeoni, Levi, Yuda, Isakari mpe Zabuloni. |
1038 | GEN 35:26 | Bana mibali ya Zilipa, mwasi mosali ya Lea : Gadi mpe Aseri. Bango nde bana mibali ya Jakobi oyo babotelaki ye na Padani-Arami. |
1054 | GEN 36:13 | Bana mibali ya Reweli : Naati, Zera, Shama mpe Miza. Bango nde bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu. |
1058 | GEN 36:17 | Bana mibali ya Reweli, mwana mobali ya Ezawu : mokonzi Naati, mokonzi Zera, mokonzi Shama mpe mokonzi Miza. Bango nde bakonzi ya libota ya Reweli, oyo babotamaki na Edomi ; bazalaki bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu. |
1068 | GEN 36:27 | Tala bana mibali ya Etseri : Bilani, Zavani mpe Akani. |
1074 | GEN 36:33 | Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi. |
1086 | GEN 37:2 | Tala molongo ya libota ya Jakobi. Elenge mobali Jozefi azalaki na mibu zomi na sambo ya mbotama mpe azalaki kobatela bibwele. Azalaki kosala mosala yango elongo na bandeko na ye ya mibali, bana ya Bila mpe ya Zilipa, basi ya tata na ye. Jozefi azalaki koyebisa tata na bango makambo mabe ya bandeko na ye. |
1150 | GEN 38:30 | Sima, ndeko na ye oyo azalaki na singa ya motane na loboko mpe abotamaki ; bapesaki ye kombo « Zera. » |
1399 | GEN 46:12 | Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli. |
1401 | GEN 46:14 | Bana mibali ya Zabuloni : Seredi, Eloni mpe Yaleyeli. |
1405 | GEN 46:18 | Bango nde bazalaki bana mibali oyo Zilipa abotelaki Jakobi ; Zilipa azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki zomi na motoba. |
1487 | GEN 49:13 | Zabuloni akowumela pene ya ebale monene, eteni ya mabele na ye ekozala libongo ya masuwa, mpe mabele na ye ekokende kino na Sidoni. |
1536 | EXO 1:3 | Isakari, Zabuloni mpe Benjame ; |
1677 | EXO 6:21 | Bana mibali ya Yitseari : Kore, Nefegi mpe Zikiri. |
1701 | EXO 7:15 | Kende epai ya Faraon na tongo-tongo, na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Zela ye pembeni ya Nili mpo na kokutana na ye mpe simba na loboko na yo lingenda oyo ebongwanaki nyoka. |
1989 | EXO 17:5 | Yawe azongiselaki Moyize : — Leka liboso ya bato, kamata ndambo ya bakambi ya Isalaele. Zwa na loboko na yo, lingenda oyo obetaki na ebale Nili, mpe kende. |
2406 | EXO 30:23 | — Zwa mafuta ya solo kitoko : bakilo motoba ya mire, kati-kati na yango to bakilo misato ya sinamoni, bakilo misato ya kaneli, |
2417 | EXO 30:34 | Yawe alobaki na Moyize : — Zwa biloko ya mike-mike ya solo kitoko : sitakite, onikisi, galibanumi mpe ansa oyo basangisa na eloko mosusu te ; biloko nyonso ezala kilo moko. |
2956 | LEV 9:2 | Alobaki na Aron : « Zwa mwana ngombe lokola mbeka mpo na masumu na bino mpe meme ya mobali mpo na mbeka na bino ya kotumba ; nyonso mibale esengeli kozala ezanga mbeba, mpe bonza yango liboso ya Yawe. |
3614 | NUM 1:9 | mpo na libota ya Zabuloni : Eliabi, mwana mobali ya Eloni ; |
3635 | NUM 1:30 | Mpo na bakitani ya Zabuloni : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. |
3636 | NUM 1:31 | Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Zabuloni ezalaki nkoto tuku mitano na sambo na nkama minei. |
3666 | NUM 2:7 | Mpe bato ya libota ya Zabuloni bakozala pembeni ya bato ya libota ya Isakari. Mokambi ya bato ya Zabuloni ezali Eliabi, mwana mobali ya Eloni. |
3875 | NUM 7:24 | Na mokolo ya misato, Eliabi, mwana mobali ya Eloni, mokambi ya libota ya Zabuloni, |
4005 | NUM 10:16 | Eliabi, mwana mobali ya Eloni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Zabuloni. |
4080 | NUM 13:4 | Tala bakombo na bango : mpo na libota ya Ribeni : Chamuwa, mwana mobali ya Zakuri ; |
4086 | NUM 13:10 | mpo na libota ya Zabuloni : Gadieli, mwana mobali ya Sodi ; |
4255 | NUM 17:25 | Yawe alobaki na Moyize : « Zongisa lingenda ya Aron liboso ya Sanduku ya Litatoli mpo ete ebombama lokola elembo ya kotomboka na bango. Boye, okosukisa koyimayima na bango mpo na Ngai mpo ete bakufa te. » |
4320 | NUM 20:8 | « Zwa lingenda na yo ; bongo elongo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bosangisa lisanga mobimba esika moko. Boloba na libanga wana na miso na bango, mpe ekobimisa mayi wuta na yango. Okobimisa mayi na libanga mpo ete bato ya lisanga mobimba bakoka komela elongo na bibwele na bango. » |
4353 | NUM 21:12 | Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na lubwaku ya Zeredi. |
4422 | NUM 23:5 | Yawe atiaki maloba na monoko ya Balami mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo. |
4433 | NUM 23:16 | Yawe akutanaki na Balami, atiaki maloba na monoko na ye mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo. |
4486 | NUM 25:14 | Kombo ya moto ya Isalaele oyo babomaki elongo na mwasi ya Madiani ezalaki Zimiri, mwana mobali ya Salu, mokambi ya libota ya Simeoni ; |
4504 | NUM 26:13 | na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zerayi ; na nzela ya Saulo, bakitani ya libota ya Saulo. |
4511 | NUM 26:20 | Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Shela, bakitani ya libota ya Shela ; na nzela ya Peretsi, bakitani ya libota ya Peretsi ; na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zera. |
4517 | NUM 26:26 | Bakitani ya Zabuloni, kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Seredi, bakitani ya libota ya Seredi ; na nzela ya Eloni, bakitani ya libota ya Eloni ; na nzela ya Yaleyeli, bakitani ya libota ya Yaleyeli. |
4518 | NUM 26:27 | Yango nde ezalaki mabota ya Zabuloni mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na nkama mitano. |
4668 | NUM 31:2 | « Zongisa mabe na mabe oyo bato ya Madiani basalaki bana ya Isalaele, mpe na sima, okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi. » |
4827 | NUM 34:9 | Longwa na Tsedadi, ekoleka na Zifironi mpe ekokoma na Atsari-Enani. Yango nde ekozala mondelo na bino ya ngambo ya nor. |
4843 | NUM 34:25 | mpo na libota ya Zabuloni : mokambi Elitsafani, mwana mobali ya Parinaki ; |
4895 | DEU 1:1 | Tala maloba oyo Moyize ayebisaki bana nyonso ya Isalaele na ngambo ya este ya Yordani kati na esobe, kati na etando Araba oyo etalana na Sufi, kati ya Parani mpe Tofeli, kati ya Labani, Atseroti mpe Di-Zaabi. |
4953 | DEU 2:13 | Yawe alobaki : « Sik’oyo, botelema mpe bokatisa lubwaku ya Zeredi. » Boye totikaki lubwaku. |
4954 | DEU 2:14 | Mibu tuku misato na mwambe elekaki wuta tango tolongwaki na Kadeshi-Barinea kino tokatisaki lubwaku ya Zeredi. Banda wana, molongo nyonso ya bato oyo babundaki bitumba bakufaki kati na molako ndenge Yawe alapaki ndayi mpo na bango. |
4960 | DEU 2:20 | Mboka yango mpe emonanaki lokola mboka oyo bato ya Refayimi bazalaki kovanda. Kasi bato ya Amoni bazalaki kobenga bato ya Refayimi : bato ya Zamizumi. |
4961 | DEU 2:21 | Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe kaka lokola bana ya Anaki. Kasi Yawe abomaki bango liboso ya bato ya Amoni. Bato ya Amoni babenganaki bato ya Zamizumi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango. |
5139 | DEU 7:26 | Kokotisa te mpe kolinga te eloko ya mbindo kati na ndako na yo. Okotia yango pembeni mpo na kobebisa yango nyonso. Zwa yango lokola eloko ya nkele mpe ya mbindo, pamba te etiami pembeni mpo na kobebisama. |
5600 | DEU 27:13 | Mpe tala mabota oyo ekotelema na ngomba Ebali mpo na kolakela bato mabe : libota ya Ribeni, ya Gadi, ya Aseri, ya Zabuloni, ya Dani mpe ya Nefitali. » |
5830 | DEU 33:18 | Mpo na Zabuloni, alobaki : « Oh Zabuloni, sepela na kobima na yo ! Mpe yo Isakari, tika ete osepela kati na bandako na yo ya kapo. |
5859 | JOS 1:6 | Zala makasi mpe yika mpiko, pamba te yo nde okokamba bato oyo mpe okopesa bango mokili oyo nalakaki kopesa lokola libula epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. |
5862 | JOS 1:9 | Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. » |
5979 | JOS 7:1 | Bato ya Isalaele babebisaki ekila ya Yawe. Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, akamataki biloko oyo Yawe apekisaki. Bongo, kanda ya Yawe epelaki likolo ya bana ya Isalaele. |
5995 | JOS 7:17 | Tango abengisaki etuka na etuka ya libota ya Yuda, etuka ya Zera nde eponamaki. Tango abengisaki ndako na ndako kati na etuka ya Zera, ndako ya Zabidi nde eponamaki. |
5996 | JOS 7:18 | Sima, tango abengisaki moto na moto kati na ndako ya Zabidi, Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, nde aponamaki. |
6002 | JOS 7:24 | Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bakamataki Akana, mwana mobali ya Zera, elongo na palata, kazaka, liboke ya wolo, bana na ye ya mibali mpe ya basi, bangombe na ye, ba-ane na ye, bameme mpe bantaba na ye, ndako na ye ya kapo mpe biloko na ye nyonso ; bamemaki bango na Lubwaku ya Akori. |
6228 | JOS 15:24 | Zifi, Telemi, Bealoti, |
6238 | JOS 15:34 | Zanoa, Eyini-Ganimi, Tapua, Enami, |
6259 | JOS 15:55 | Maoni, Karimeli, Zifi, Yuta, |
6260 | JOS 15:56 | Jizireyeli, Yokideami, Zanoa, |
6306 | JOS 18:11 | Zeke ekweyaki epai ya libota ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango. Eteni ya mabele oyo epesamelaki bango na zeke ezalaki na kati-kati ya mabele ya bakitani ya Yuda mpe ya Jozefi. |
6333 | JOS 19:10 | Na mbala ya misato, zeke ekweyaki epai ya libota ya Zabuloni, kolanda bituka na bango : Mondelo ya libula na bango ekendeki kino na Saridi. |
6339 | JOS 19:16 | Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Zabuloni, kolanda bituka na bango. |
6350 | JOS 19:27 | ebalukaki na ngambo ya este, na Beti-Dagoni, ekendeki kotutana na Zabuloni mpe Lubwaku ya Yifita-Eli, ekendeki na ngambo ya nor, na Beti-Emeki mpe Neyiyeli mpe elekelaki na Kabuli, na loboko ya mwasi. |
6357 | JOS 19:34 | Mondelo na yango ebalukaki na ngambo ya weste na Azinoti-Tabori mpe ekendeki kobimela na Ukoki, etutanaki na Zabuloni, na ngambo ya sude, na Aseri, na ngambo ya weste, mpe Yuda ; Yordani, na ngambo ya este. |
6387 | JOS 21:4 | Zeke ya liboso ekweyaki epai ya etuka ya Keati. Bato ya Levi oyo bazalaki bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na libota ya Yuda, ya Simeoni mpe ya Benjame. |
6390 | JOS 21:7 | Bakitani ya Merari, kolanda bituka na bango, bazwaki bingumba zomi na mibale kati na mabele ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Zabuloni. |
6417 | JOS 21:34 | Epai ya bituka ya Merari, bakitani ya Levi oyo batikalaki, bapesaki bingumba oyo : Kati na libota ya Zabuloni : Yokineami, Karita, |
6448 | JOS 22:20 | Tango Akana, mwana mobali ya Zera, asalaki lisumu, na koyiba biloko ya bule, boni, etumbu yango ekweyaki te likolo ya lisanga mobimba ya Isalaele ? Akufaki kaka ye moko te likolo ya lisumu na ye. » |
6497 | JOS 24:19 | Jozue alobaki na bato : — Bokokoka kosalela Yawe te, pamba te azali Nzambe ya Bule, Nzambe ya Zuwa ; akolimbisa te botomboki mpe masumu na bino. |
6541 | JDG 1:30 | Bato ya libota ya Zabuloni babenganaki te bavandi ya Kitroni mpe ya Naaloli. Bato ya Kanana bakobaki kovanda esika moko na bango, kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi. |
6607 | JDG 4:6 | Mokolo moko, abengisaki Baraki, mwana mobali ya Abinoami, moto ya Kedeshi ya Nefitali, mpe alobaki na ye : — Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi yo mitindo : « Kende, kamata elongo na yo bato nkoto zomi ya mabota ya Nefitali mpe ya Zabuloni, mpe mema bango na nzela oyo ekenda na ngomba Tabori. |
6611 | JDG 4:10 | Kuna na Kedeshi, Baraki abengisaki bato ya mabota ya Zabuloni mpe ya Nefitali. Bato nkoto zomi balandaki ye, mpe Debora akendeki elongo na ye. |
6621 | JDG 4:20 | Sisera alobaki na Yaeli : — Telema na ekuke ya ndako ya kapo. Soki moto ayei kotuna yo : « Moto azali awa ? » Zongisa : « Te ! » |
6639 | JDG 5:14 | Bato ya Amaleki bawutaki na Efrayimi. Sima na yo, Benjame akitaki elongo na mampinga. Bakonzi ya mampinga babimelaki na Makiri, mpe bato oyo basimbaka lingenda ya bokonzi babimelaki na Zabuloni. |
6643 | JDG 5:18 | Bato ya Zabuloni bateki milimo na bango na kufa, bato ya Nefitali, na basonge ya bangomba, kuna na esika ya bitumba. |
6679 | JDG 6:23 | Kasi Yawe alobaki na ye : — Zala na kimia ! Kobanga te. |
6691 | JDG 6:35 | Jedeon atindaki bantoma na etuka nyonso ya Manase ; mpe bato ya Manase basanganaki mpo na kozala sima na ye. Atindaki lisusu bantoma na libota ya Aseri, ya Zabuloni mpe ya Nefitali mpo ete bamata mpe bakutana na ye. |
6721 | JDG 7:25 | Bakangaki bakonzi mibale ya bato ya Madiani : Orebi mpe Zeebi. Babomaki Orebi na libanga monene ya Orebi, mpe Zeebi na esika oyo bakamolaka vino ya Zeebi. Balandaki bato ya Madiani mpe bamemelaki Jedeon mito ya Orebi mpe ya Zeebi, kuna na ngambo ya Yordani. |
6724 | JDG 8:3 | Nzambe akabaki bakonzi ya bato ya Madiani, Orebi mpe Zeebi, na maboko na bino. Eloko nini ya lokumu ngai nasali oyo ekokani na oyo bino bosala ? Liloba oyo ekitisaki kanda na bango. |
6726 | JDG 8:5 | Tango bakomaki na mboka Sukoti, Jedeon asengaki na bato ya mboka : — Bopesa basoda na ngai mapa, pamba te basili kolemba na nzala. Nazali kolanda Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi ya Madiani. |
6727 | JDG 8:6 | Kasi bakonzi ya mboka Sukoti bazongiselaki ye : — Boni, osili kozwa Zeba mpe Tsalimuna na se ya bokonzi na yo mpo ete biso topesa basoda na yo mapa ? |
6728 | JDG 8:7 | Jedeon alobaki : — Lokola bolobi boye, tango Yawe akokaba, na maboko na ngai, Zeba mpe Tsalimuna, nakopasola-pasola misuni na bino na basende ya esobe mpe na singa ya nzube. |
6731 | JDG 8:10 | Nzokande, Zeba mpe Tsalimuna bazalaki na Karikori elongo na basoda na bango, nkoto zomi na mitano. Oyo ezali nde motango nyonso ya basoda ya bato ya este oyo batikalaki. Pamba te basoda nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi kobunda na mopanga bakufaki. |
6733 | JDG 8:12 | Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi mibale ya Madiani, bakimaki ; kasi Jedeon alandaki mpe akangaki bango. Mpe apanzaki mampinga na bango nyonso. |