1 | GEN 1:1 | Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili. |
2 | GEN 1:2 | Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo ; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi. |
6 | GEN 1:6 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango ! » |
7 | GEN 1:7 | Nzambe akelaki etando ; akabolaki mayi oyo ezalaki na se ya etando na mayi ya likolo. Yango esalemaki mpe bongo. |
8 | GEN 1:8 | Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale. |
11 | GEN 1:11 | Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa matiti, milona oyo ezali na nkona mpe banzete ya mbuma oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
12 | GEN 1:12 | Mabele ebimisaki matiti, milona oyo ebotaka nkona kolanda lolenge ya molona moko na moko mpe banzete oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko. Nzambe amonaki ete ezali malamu. |
14 | GEN 1:14 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu, |
17 | GEN 1:17 | Nzambe atiaki yango na etando ya likolo mpo ete engengisa mokili, |
20 | GEN 1:20 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo ! » |
21 | GEN 1:21 | Nzambe akelaki banyama minene ya mayi mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi mpe etondi meke kati na mayi : ekelamu na ekelamu na lolenge na yango. Akelaki mpe bandeke nyonso ya mapapu : ndeke na ndeke na lolenge na yango. Nzambe amonaki ete ezali malamu. |
22 | GEN 1:22 | Nzambe apambolaki yango mpe alobaki : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. » |
24 | GEN 1:24 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango : bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
25 | GEN 1:25 | Nzambe akelaki banyama ya zamba kolanda lolenge na yango : bibwele mpe bikelamu nyonso ya mike-mike. Nzambe amonaki ete ezali malamu. |
26 | GEN 1:26 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! » |
28 | GEN 1:28 | Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. » |
29 | GEN 1:29 | Bongo Nzambe alobaki : « Tala, kati na mokili mobimba, napesi bino milona oyo ezali na nkona mpe banzete nyonso oyo ebotaka mbuma. Yango nde ekozala bilei na bino. |
30 | GEN 1:30 | Napesi matiti nyonso ya mobesu lokola bilei epai ya banyama nyonso ya mokili, epai ya bandeke nyonso ya likolo, epai ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epai ya bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi. » Yango esalemaki mpe bongo. |
32 | GEN 2:1 | Ezalaki bongo nde likolo mpe mokili ekelamaki elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango. |
34 | GEN 2:3 | Nzambe apambolaki mokolo ya sambo, abulisaki yango, pamba te na mokolo yango nde akataki mosala nyonso ya kokela oyo azalaki kosala. |
35 | GEN 2:4 | Tala ndenge likolo mpe mokili elongo na biloko oyo ezali kati na yango ezalaki tango ekelamaki. Tango Yawe Nzambe akelaki mokili mpe likolo, |
37 | GEN 2:6 | Kasi mayi ezalaki kobima wuta na se mpe ezalaki kopanzana na etando nyonso ya mokili. |
38 | GEN 2:7 | Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye ; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi. |
39 | GEN 2:8 | Yawe Nzambe alonaki elanga moko kati na Edeni, na ngambo ya este. Atiaki moto oyo akelaki kati na yango. |
41 | GEN 2:10 | Ebale moko ezalaki kobima na Edeni mpe ezalaki kosopa mayi na elanga. Mayi ya ebale yango ekabwanaki na biteni minei. |
46 | GEN 2:15 | Yawe Nzambe azwaki moto mpe atiaki ye kati na elanga ya Edeni mpo na kolona yango mpe kobatela yango. |
47 | GEN 2:16 | Mpe Yawe Nzambe apesaki mitindo oyo na moto : « Okoki kolia mbuma nyonso ya elanga, |
49 | GEN 2:18 | Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. » |
50 | GEN 2:19 | Yawe Nzambe asalaki, wuta na mabele, banyama nyonso ya zamba mpe bandeke nyonso ya likolo. Amemaki yango epai ya mobali mpo na kotala ndenge akopesa yango kombo, mpo ete ekelamu nyonso ya bomoi ebengama na kombo oyo mobali akopesa yango. |
51 | GEN 2:20 | Yango wana, mobali apesaki bakombo na bibwele nyonso, na bandeke nyonso ya likolo mpe na banyama nyonso ya zamba. Kasi amonaki te mosungi oyo akokaki kozala ndenge moko na ye. |
57 | GEN 3:1 | Nzokande, kati na banyama nyonso ya zamba oyo Yawe Nzambe akelaki, nyoka nde elekaki na mayele mabe. Alobaki na mwasi : — Nzambe alobaki na bino solo ete bolia mbuma ata moko te ya banzete ya elanga ? |
67 | GEN 3:11 | Nzambe alobaki : — Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu ? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia ? |
68 | GEN 3:12 | Adamu azongisaki : — Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango. |
69 | GEN 3:13 | Yawe Nzambe alobaki na mwasi : — Mpo nini osali bongo ? Mwasi azongisaki : — Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango. |
70 | GEN 3:14 | Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo, olakelami mabe kati na bibwele mpe banyama nyonso ya zamba. Okotambola na libumu mpe okobanda kolia putulu bomoi na yo mobimba. |
71 | GEN 3:15 | Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. » |
73 | GEN 3:17 | Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo. |
74 | GEN 3:18 | Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende. Okolia matiti ya bilanga. |
77 | GEN 3:21 | Yawe Nzambe asalelaki Adamu mpe mwasi na ye bilamba ya poso ya nyama mpe alatisaki bango yango. |
79 | GEN 3:23 | Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki. |
80 | GEN 3:24 | Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi. |
81 | GEN 4:1 | Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. » |
82 | GEN 4:2 | Sima na yango, abotaki lisusu Abele, ndeko ya Kayina. Abele akomaki kobokola bibwele mpe Kayina akomaki kosala bilanga. |
87 | GEN 4:7 | Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango. |
88 | GEN 4:8 | Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye. |
89 | GEN 4:9 | Yawe atunaki Kayina : — Wapi ndeko na yo Abele ? Kayina azongisaki : — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ? |
90 | GEN 4:10 | Nzambe alobaki : — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai. |
91 | GEN 4:11 | Sik’oyo, olakelami mabe mpe obwakami mosika ya mabele oyo efungolaki monoko na yango mpo na komela makila ya ndeko na yo, oyo maboko na yo esopaki. |
96 | GEN 4:16 | Kayina alongwaki liboso ya Yawe, akendeki kovanda na mokili ya Nodi, na este ya Edeni. |
98 | GEN 4:18 | Enoki abotaki Iradi ; Iradi abotaki Mewuyayeli ; Mewuyayeli abotaki Metusaeli ; Metusaeli abotaki Lemeki. |
99 | GEN 4:19 | Lemeki abalaki basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. » |
100 | GEN 4:20 | Ada abotaki Yabali, koko ya bavandi ya bandako ya kapo mpe ya babokoli bibwele. |
101 | GEN 4:21 | Ndeko na ye ya mobali, Yubali, azalaki koko ya bato oyo babetaka lindanda mpe flite. |
102 | GEN 4:22 | Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. » |
103 | GEN 4:23 | Lemeki alobaki na basi na ye : « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ; bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu : Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ; mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali ! |
105 | GEN 4:25 | Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. » |
106 | GEN 4:26 | Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe. |
107 | GEN 5:1 | Tala lisolo ya libota ya Adamu. Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe. |
109 | GEN 5:3 | Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. » |
110 | GEN 5:4 | Sima na mbotama ya Seti, Adamu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. |
111 | GEN 5:5 | Mibu nyonso oyo Adamu awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku misato, sima akufaki. |
121 | GEN 5:15 | Tango Maalalele akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Yeredi. |
122 | GEN 5:16 | Sima na kobota Yeredi, Maalalele awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. |
124 | GEN 5:18 | Tango Yeredi akokisaki mibu nkama moko na tuku motoba na mibale ya mbotama, abotaki Enoki. |
125 | GEN 5:19 | Sima na kobota Enoki, Yeredi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. |
126 | GEN 5:20 | Mibu nyonso oyo Yeredi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na mibale, sima akufaki. |
135 | GEN 5:29 | Abengaki ye Noa mpe alobaki : « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. » |
139 | GEN 6:1 | Tango bato babandaki kokoma ebele na mokili mpe babotaki bana basi, |
142 | GEN 6:4 | Na tango wana, ezalaki na bingambe kati na mokili ; mpe lisusu, milimo esangisaki nzoto na bana basi ya bato, bongo bana basi babotelaki yango bana. Bana yango bazalaki bilombe na tango ya kala, bato oyo bakenda sango. |
143 | GEN 6:5 | Yawe amonaki ndenge nini mabe ya moto ekomaki mingi kati na mokili, mpe tango nyonso, makanisi ya motema ya moto ezalaki kaka mabe. |
144 | GEN 6:6 | Boye Yawe ayokaki mawa na ndenge akelaki moto kati na mokili mpe abongolaki makanisi na Ye. |
145 | GEN 6:7 | Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. » |
149 | GEN 6:11 | Mokili ebebaki na miso ya Nzambe mpe etondaki na makambo ya mobulu. |
150 | GEN 6:12 | Nzambe amonaki ndenge mokili ebebaki, pamba te bato nyonso ya mokili babebisaki banzela na bango. |
151 | GEN 6:13 | Boye, Nzambe alobaki na Noa : « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili. |
152 | GEN 6:14 | Sala masuwa ya mabaya ya goferi mpo na lobiko na yo ; kabola yango na bashambre. Okopakola gudron na kati mpe na libanda na yango. |
153 | GEN 6:15 | Tala ndenge okotonga yango : molayi na yango ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mitano, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda. |
154 | GEN 6:16 | Okotia likolo na yango lidusu ya basantimetele pene tuku mitano, okotia ekuke na mopanzi na yango ; mpe na kati, okosala etaje ya liboso, ya mibale mpe ya misato. |