Wildebeest analysis examples for:   lin-lin   r    February 25, 2023 at 00:37    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

45  GEN 2:14  Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre. » Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate. »
80  GEN 3:24  Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi.
98  GEN 4:18  Enoki abotaki Iradi ; Iradi abotaki Mewuyayeli ; Mewuyayeli abotaki Metusaeli ; Metusaeli abotaki Lemeki.
102  GEN 4:22  Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. »
121  GEN 5:15  Tango Maalalele akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Yeredi.
122  GEN 5:16  Sima na kobota Yeredi, Maalalele awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
124  GEN 5:18  Tango Yeredi akokisaki mibu nkama moko na tuku motoba na mibale ya mbotama, abotaki Enoki.
125  GEN 5:19  Sima na kobota Enoki, Yeredi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
126  GEN 5:20  Mibu nyonso oyo Yeredi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na mibale, sima akufaki.
152  GEN 6:14  Sala masuwa ya mabaya ya goferi mpo na lobiko na yo ; kabola yango na bashambre. Okopakola gudron na kati mpe na libanda na yango.
188  GEN 8:4  Na mokolo ya zomi na sambo ya sanza ya sambo, masuwa esemaki likolo ya bangomba Ararati.
237  GEN 10:2  Bana mibali ya Jafeti : Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi.
238  GEN 10:3  Bana mibali ya Gomer: Ashikenazi, Rifati mpe Togarima.
239  GEN 10:4  Bana mibali ya Yavani : Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.
241  GEN 10:6  Bana mibali ya Cham : Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana.
243  GEN 10:8  Kushi azalaki mpe tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili.
244  GEN 10:9  Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. »
245  GEN 10:10  Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari.
246  GEN 10:11  Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala
248  GEN 10:13  Mitsirayimi azalaki koko ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu,
249  GEN 10:14  ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti.
251  GEN 10:16  ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi,
252  GEN 10:17  ya Evi, ya Ariki, ya Sini,
253  GEN 10:18  ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati. (Mpe na sima, bato ya mabota nyonso ya Kanana bapalanganaki bipai na bipai.
254  GEN 10:19  Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)
256  GEN 10:21  Semi, kulutu ya Jafeti, abotaki mpe bana ; azalaki koko ya Eberi mpe ya bakitani na ye.
257  GEN 10:22  Bana mibali ya Semi : Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami.
258  GEN 10:23  Bana mibali ya Arami : Utsi, Uli, Geteri mpe Mashi.
259  GEN 10:24  Aripakishadi abotaki Shela ; Shela abotaki Eberi.
260  GEN 10:25  Eberi abotaki bana mibali mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele ; mpe mosusu, « Yokitani. »
261  GEN 10:26  Yokitani abotaki Alimodadi, Shelefi, Atsarimaveti, Yera,
262  GEN 10:27  Adorami, Uzali, Dikila,
264  GEN 10:29  Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani.
265  GEN 10:30  (Mokili oyo bazalaki kovanda ebandaki wuta na Mesha kino na Sefari, na mokili ya bangomba ya este.)
269  GEN 11:2  Tango bato bazalaki kotambola mpo na kokende na ngambo ya weste, bamonaki etando moko ya monene na mokili ya Shineari mpe bavandaki kuna.
277  GEN 11:10  Tala libota ya Semi : Mibu mibale sima na mpela, wana Semi azalaki nanu na mibu nkama moko ya mbotama, akomaki tata ya Aripakishadi.
278  GEN 11:11  Sima na mbotama ya Aripakishadi, Semi awumelaki na bomoi mibu nkama mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
279  GEN 11:12  Tango Aripakishadi akokisaki mibu tuku misato na mitano ya mbotama, abotaki mwana mobali na kombo « Shela. »
280  GEN 11:13  Sima na mbotama ya Shela, Aripakishadi awumelaki na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
281  GEN 11:14  Tango Shela akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Eberi.
282  GEN 11:15  Mpe sima na mbotama ya Eberi, Shela awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
283  GEN 11:16  Tango Eberi akokisaki mibu tuku misato na minei ya mbotama, abotaki Pelegi.
284  GEN 11:17  Mpe sima na mbotama ya Pelegi, Eberi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
287  GEN 11:20  Tango Rewu akokisaki mibu tuku misato na mibale ya mbotama, abotaki Serugi.
288  GEN 11:21  Sima na mbotama ya Serugi, Rewu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
289  GEN 11:22  Tango Serugi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Naori.
290  GEN 11:23  Sima na mbotama ya Naori, Serugi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
291  GEN 11:24  Tango Naori akokisaki mibu tuku mibale na libwa ya mbotama, abotaki Tera.
292  GEN 11:25  Mpe sima na mbotama ya Tera, Naori awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na zomi na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
293  GEN 11:26  Tango Tera akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Abrami, Naori mpe Arani.
294  GEN 11:27  Tala libota ya Ter: Tera abotaki Abrami, Naori mpe Arani. Arani nde azalaki tata ya Loti.
295  GEN 11:28  Wana tata na ye, Tera, azalaki nanu na bomoi, Arani akufaki kati na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mokili epai wapi abotamaki.
296  GEN 11:29  Kombo ya mwasi ya Abrami ezalaki « Sarayi, » mpe kombo ya mwasi ya Naori ezalaki « Milika. » Milika azalaki mwana mwasi ya Arani ; mpe Arani azalaki na mwana mwasi mosusu : kombo na ye ezalaki « Yisika. »
297  GEN 11:30  Sarayi azalaki ekomba : azalaki na mwana te.
298  GEN 11:31  Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna.
299  GEN 11:32  Tera awumelaki na bomoi mibu nkama mibale na mitano, sima akufaki na engumba Arani.
300  GEN 12:1  Yawe alobaki na Abrami : « Bima wuta na mokili na yo, wuta na libota na yo mpe wuta na ndako ya tata na yo, mpo na lobiko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo.
303  GEN 12:4  Abrami akendeki ndenge Yawe alobaki na ye ; mpe Loti akendeki na ye elongo. Abrami azalaki na mibu tuku sambo na mitano tango abimaki na engumba Arani.
304  GEN 12:5  Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna.
305  GEN 12:6  Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango.