3 | GEN 1:3 | Mpe Nzambe alobaki : « Tika ete pole ezala ! » Mpe pole ezalaki. |
6 | GEN 1:6 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango ! » |
9 | GEN 1:9 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
11 | GEN 1:11 | Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa matiti, milona oyo ezali na nkona mpe banzete ya mbuma oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
15 | GEN 1:15 | mpe mpo na kongengisa mokili ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
20 | GEN 1:20 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo ! » |
24 | GEN 1:24 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango : bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
26 | GEN 1:26 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! » |
93 | GEN 4:13 | Kayina alobaki na Yawe : — Etumbu na ngai eleki pasi mpo na komema ! |
95 | GEN 4:15 | Kasi Yawe alobaki na ye : — Ezali bongo te ! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo. Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te. |
103 | GEN 4:23 | Lemeki alobaki na basi na ye : « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ; bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu : Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ; mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali ! |
104 | GEN 4:24 | Solo, bakozongisa mbala sambo mabe oyo basali Kayina ; kasi mpo na Lemeki, ekozala mbala tuku sambo na sambo ! » |
231 | GEN 9:25 | Alobaki : « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye ! » |
232 | GEN 9:26 | Alobaki lisusu : « Tika ete Yawe, Nzambe ya Semi, apambolama ! Tika ete Kanana azala mowumbu ya Semi ! |
233 | GEN 9:27 | Tika ete Nzambe ayeisa monene mabele ya Jafeti ! Tika ete Jafeti avanda na bandako ya kapo ya Semi, mpe Kanana azala mowumbu na ye ! » |
273 | GEN 11:6 | Yawe alobaki : « Lokola bato oyo nyonso balongi kokoma ekolo moko mpe koloba monoko moko, bongo bakomi kino kosala mosala monene oyo, eloko moko te ekopekisa bango sik’oyo kokokisa mabongisi nyonso oyo bakokana kosala ! |
318 | GEN 12:19 | Mpo na nini olobaki : ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi ? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende ! » |
356 | GEN 14:19 | mpe apambolaki Abrami na maloba oyo : « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abrami ! |
357 | GEN 14:20 | Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba. |
362 | GEN 15:1 | Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli : — Kobanga te, Abrami ! Nazali nguba na yo, lifuti na yo ekozala monene. |
364 | GEN 15:3 | Abrami alobaki lisusu : — Opesi ngai mwana te ; yango wana mosali moko kati na ndako na ngai akozala mokitani ya libula na ngai ! |
415 | GEN 17:17 | Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « Eh ! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi ! » |
416 | GEN 17:18 | Boye Abrayami alobaki na Nzambe : — Tika ete Isimaeli awumela na se ya lipamboli na Yo ! |
417 | GEN 17:19 | Nzambe alobaki : — Te ! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye. |
437 | GEN 18:12 | Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange ! » |
450 | GEN 18:25 | Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ? |
465 | GEN 19:7 | Alobaki : — Te, baninga na ngai, bosala mabe te ! |
466 | GEN 19:8 | Boyoka ! Nazali na bana basi mibale oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete namemela bino bango libanda ! Bosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi bosala bato oyo eloko moko te mpo ete bayei kovanda na ndako na ngai. |
472 | GEN 19:14 | Boye Loti abimaki mpe akendeki koyebisa babandami ya mabala ya bana na ye ya basi. Alobaki : « Bosala noki mpe bobima na esika oyo, pamba te Yawe alingi kobebisa engumba oyo ! » Kasi babandami ya mabala ya bana na ye ya basi bakanisaki ete azali kosala maseki. |
475 | GEN 19:17 | Tango kaka babimisaki bango na libanda, moko kati na mibali yango alobaki : — Bokima mpo ete bobikisa bomoi na bino ! Botala sima te mpe botelema ata esika moko te kati na engumba oyo ! Bokima na likolo ya bangomba, noki te bokobebisama ! |
476 | GEN 19:18 | Kasi Loti azongisaki : — Te, nkolo na ngai, tika ete esalema bongo te ! |
478 | GEN 19:20 | Tala, ezali na engumba moko pene awa mpo na kokimela, yango ezali penza moke. Tika ngai nakimela kuna atako ezali moke mpo ete nabikisa bomoi na ngai ! |
498 | GEN 20:2 | Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi. |
538 | GEN 21:24 | Abrayami azongisaki : — Nalapi ndayi ! |
549 | GEN 22:1 | Na sima na makambo wana, Nzambe amekaki Abrayami. Alobaki na ye : — Abrayami ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo. |
555 | GEN 22:7 | Izaki atunaki Abrayami, tata na ye : — Tata na ngai ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo ! Izaki alobaki : — Tozali na moto mpe koni, kasi wapi mpate mpo na mbeka ya kotumba ? |
559 | GEN 22:11 | Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo : — Abrayami ! Abrayami ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo. |
583 | GEN 23:11 | — Te, nkolo na ngai, yoka ngai ! Napesi yo elanga mpe libulu ya mabanga oyo ezali kati na yango. Napesi yo yango liboso ya bato na ngai mpo ete okunda mwasi na yo. |
585 | GEN 23:13 | mpe azongiselaki Efroni : — Nabondeli yo, yoka ngai ! Soki olingi, nakopesa yo motuya oyo ekoki na elanga. Ndima yango mpo ete nakunda mwasi na ngai kuna. |
587 | GEN 23:15 | — Yoka, nkolo na ngai ! Mabele ya motuya ya mbongo ya bibende, nkama minei, ezali penza nini kati na ngai mpe yo ? Kamata mabele yango mpe kunda mwasi na yo. |
598 | GEN 24:6 | Abrayami alobaki : — Keba na yo ! Kozongisa mwana na ngai kuna te. |
610 | GEN 24:18 | Mwana mwasi alobaki : — Mela na yo, nkolo na ngai ! Akitisaki mbeki mbangu na maboko na ye mpe apesaki ye mpo ete amela. |
619 | GEN 24:27 | Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! » |
643 | GEN 24:51 | Tala Rebeka, azali liboso na yo ! Kamata ye mpe kende na ye ; mpe tika ete azala mwasi ya mwana mobali ya nkolo na yo, ndenge Yawe abongisi. |
652 | GEN 24:60 | Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye : « Ndeko na biso ya mwasi, tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, mpe tika ete bana na yo bakamata bingumba ya banguna na bango ! » |
695 | GEN 26:2 | Boye Yawe abimelaki ye mpe ayebisaki ye : — Kokende na Ejipito te ! Vanda na mokili oyo nakolakisa yo. |
729 | GEN 27:1 | Tango Izaki akomaki mobange mpe miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, abengaki Ezawu, mwana na ye ya liboso ya mobali. Alobaki na ye : — Mwana na ngai ! Ezawu azongisaki : — Ngai oyo ! |
735 | GEN 27:7 | « Memela ngai nyama ! Okolambela ngai elubu ya kitoko, mpe nakolia yango mpo ete napambola yo na miso ya Yawe liboso ete nakufa. » |
746 | GEN 27:18 | Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki : — Tata na ngai ! Izaki azongisaki : — Ngai oyo, mwana na ngai ; yo nani ? |
755 | GEN 27:27 | Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo : « Ah ! Solo ya mwana na ngai ezali lokola solo ya bilanga oyo Yawe apamboli. |
756 | GEN 27:28 | Tika ete Nzambe apesa yo mvula ya likolo mpe mabele ya bozwi ; apesa yo mbuma ya ble mpe vino ebele penza ! |
757 | GEN 27:29 | Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo ! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! » |
761 | GEN 27:33 | Bongo Izaki alengaki makasi mpe alobaki : — Nani wana abomaki nyama mpe amemelaki ngai yango ? Naliaki yango liboso ete yo oya, mpe napambolaki ye. Boye apambolami solo ! |
762 | GEN 27:34 | Tango Ezawu ayokaki maloba ya tata na ye, atombolaki mongongo makasi mpe agangaki. Alobaki na tata na ye : — Ah ! Tata na ngai, pambola ngai, pambola ngai mpe lokola ! |
764 | GEN 27:36 | Ezawu alobaki : — Mpo ete kombo na ye ezali « Jakobi, » yango wana akosi ngai mbala mibale ? Ya liboso, azwaki boyaya na ngai, mpe tala sik’oyo azwi lisusu mapamboli na ngai ! Bongo atunaki : — Boni, obombelaki ngai mapamboli te ? |
766 | GEN 27:38 | Ezawu alobaki na tata na ye : — Tata na ngai, ozalaki kaka na lipamboli moko wana ? Tata na ngai, pambola ngai mpe ! Ezawu atombolaki mongongo na ye mpe alelaki makasi. |
776 | GEN 28:2 | Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo. |
790 | GEN 28:16 | Tango Jakobi alamukaki na pongi, alobaki : « Ya solo penza, Yawe azali na esika oyo mpe ngai nayebaki yango te ! » |
791 | GEN 28:17 | Jakobi abangaki mpe abakisaki : « Oyo esika ya somo boye ! Ekoki kozala eloko mosusu te, bobele Ndako ya Nzambe. Awa nde ekuke ya lola. » |
810 | GEN 29:14 | Labani alobaki na ye : « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza ! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba. |
842 | GEN 30:11 | Lea alobaki : « Oyo nde esengo ! » Boye apesaki ye kombo « Gadi. » |
844 | GEN 30:13 | Lea alobaki : « Oyo esengo ya ndenge nini nakomi na yango ! Pamba te basi bakobenga ngai moto ya esengo. » Boye apesaki ye kombo « Aseri. » |
846 | GEN 30:15 | Kasi Lea azongiselaki ye : — Boni, ndenge ozwi mobali na ngai, ekoki te ? Olingi lisusu kozwa bambuma ya mandragore ya mwana na ngai ? Rasheli alobaki na ye : — Malamu ! Soki opesi ngai bambuma ya mandragore ya mwana na yo, Jakobi akolala epai na yo na butu ya lelo. |
855 | GEN 30:24 | Apesaki ye kombo « Jozefi, » mpe alobaki : « Tika ete Yawe abakisela ngai mwana mosusu ya mobali ! » |
865 | GEN 30:34 | Labani alobaki : — Iyo ! Tika ete ezala ndenge olobi. |
885 | GEN 31:11 | Anjelu na Nzambe alobaki na ngai kati na ndoto : « Jakobi ! » Mpe ngai nazongisaki : « Ngai oyo, nazali awa. » |
898 | GEN 31:24 | Na butu, Nzambe ayaki epai ya Labani, moto ya Arami, kati na ndoto ; alobaki na ye : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. » |
900 | GEN 31:26 | Labani alobaki na Jakobi : — Makambo nini osali ngai ? Okosi ngai mpe omemi bana na ngai ya basi lokola bakangami ya bitumba ! |
902 | GEN 31:28 | Otikeli ngai ata tango te ya kopesa beze na bakoko na ngai mpe na bana na ngai ya basi ! Osali penza lokola moto ya liboma ! |
903 | GEN 31:29 | Tala, nazali na makoki ya kosala yo mabe, kasi na butu oyo eleki, Nzambe ya tata na yo alobaki na ngai : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. » |
920 | GEN 31:46 | Jakobi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Bolokota mabanga ! » Balokotaki mabanga, batiaki yango liboke, mpe bango nyonso baliaki wana na likolo ya liboke ya mabanga. |
927 | GEN 31:53 | Tika ete Nzambe ya Abrayami mpe Nzambe ya Naori, Nzambe ya tata na bango, azala Mosambisi kati na biso ! Bongo Jakobi alapaki ndayi na Kombo ya Nzambe oyo tata na ye, Izaki, azalaki kobanga. |
931 | GEN 32:3 | Tango Jakobi amonaki bango, alobaki : « Oyo ezali molako ya Nzambe ! » Mpe abengaki esika yango : Maanayimi. |
938 | GEN 32:10 | Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. › |
939 | GEN 32:11 | Nazali nani mpo ete otalisa ngai mosali na Yo bolamu mpe bosembo nyonso oyo ! Nazalaki kaka na lingenda tango nakatisaki Yordani, kasi sik’oyo nazali na masanga mibale. |
949 | GEN 32:21 | Bokoyebisa ye lisusu : ‹ Tala ye moko Jakobi, mosali na yo, azali koya na sima na biso ! › » Pamba te azalaki komilobela : « Nakokitisa kanda na ye na kado oyo natindi liboso na ngai ; sima tango nakokutana na ye, mbala mosusu akoyamba ngai malamu. » |
974 | GEN 33:13 | Kasi Jakobi azongiselaki ye : — Oh nkolo na ngai ! Oyebi malamu ete bana bazwi nanu makasi te, mpe nazali lisusu na bameme, bangombe mpe bantaba ya basi oyo ezali nanu komelisa mabele. Soki tomeki kotambolisa yango mbangu makasi kaka na mokolo moko, bibwele nyonso ekokufa. |
976 | GEN 33:15 | Ezawu alobaki : — Nabondeli yo, ndima ete natikela yo ndambo ya bato na ngai. Kasi Jakobi atunaki : — Mpo na nini kosala bongo ? Tika ete nazwa kaka ngolu na miso ya nkolo na ngai ! |
1002 | GEN 34:21 | « Bato oyo bazali na boboto epai na biso ; tika ete bavanda elongo na biso mpe basala mombongo, mpo ete mboka ezali na yango monene ! Tokoki na biso kobala bana na bango ya basi, mpe bango bakoki na bango kobala bana na biso ya basi. |
1029 | GEN 35:17 | Lokola azalaki na pasi makasi ya kobota, mwasi mobotisi ayebisaki ye : « Kobanga te ! Pamba te ozali na mwana mobali mosusu. » |
1097 | GEN 37:13 | Isalaele alobaki na Jozefi : — Oyebi ete bandeko na yo bazali koleisa bibwele pembeni ya Sishemi ; yaka, pamba te nalingi kotinda yo epai na bango. Jozefi azongisaki : — Malamu ! |
1105 | GEN 37:21 | Tango Ribeni ayokaki bongo, alukaki nzela ya kokangola ye na maboko na bango. Alobaki : — Toboma ye te ! |
1106 | GEN 37:22 | Bosopa makila na ye te ! Bobwaka ye kaka na libulu oyo ezali kati na esobe, kasi bosala ye mabe te. Ribeni alobaki bongo pamba te azalaki na makanisi ya kokangola ye na maboko na bango mpe kozongisa ye na maboko ya tata na ye. |
1114 | GEN 37:30 | azongaki epai ya bandeko na ye mpe alobaki : « Elenge mobali azali lisusu kuna te ! Sik’oyo ngai, nakosuka wapi ? » |
1116 | GEN 37:32 | Sima, bazongisaki elamba yango ya kitoko mpe ya talo epai ya tata na bango. Balobaki : — Tala eloko oyo tomoni ; tala yango malamu soki ezali penza elamba ya mwana na yo to te ! |
1117 | GEN 37:33 | Jakobi asosolaki ete ezali elamba ya Jozefi mpe agangaki : — Ezali elamba ya mwana na ngai ! Nyama moko ya mabe elie ye ! Solo, bakati-kati Jozefi na biteni ! |
1144 | GEN 38:24 | Sima na sanza misato, bayebisaki Yuda : — Tamari, bokilo na yo ya mwasi, asalaki kindumba, mpe tala kutu akomi na zemi. Yuda alobaki : — Babimisa ye mpe batumba ye na moto ! |
1157 | GEN 39:7 | Sima na yango, mwasi ya nkolo ya Jozefi alulaki ye Jozefi mpe alobaki na ye : — Yaka kosangisa na ngai nzoto ! |
1162 | GEN 39:12 | mwasi ya Potifari akangaki ye na bilamba mpe alobaki na ye : — Yaka kosangisa na ngai nzoto ! Kasi Jozefi asundolaki elamba na ye kati na maboko ya mwasi ya Potifari mpe akimaki libanda ya ndako. |
1164 | GEN 39:14 | abengaki basali ya ndako na ye mpe alobaki : — Botala ! Mo-Ebre oyo bamemelaki biso ayaki nde kosakanela biso ! Aluki kosangisa na ngai nzoto, kasi ngai nagangi makasi. |
1165 | GEN 39:15 | Tango ayoki ete nagangi makasi mpo na koluka lisalisi, asundoli elamba na ye pembeni na ngai mpe akimi libanda ! |
1239 | GEN 41:43 | Amatisaki ye na shareti na ye ya mibale mpe bato bazalaki koganga : « Bofukama ! » Boye, atiaki Jozefi mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito. |
1262 | GEN 42:9 | Bongo Jozefi akanisaki ndoto oyo alotaki na tina na bango mpe alobaki na bango : — Bino bozali penza banongi ! Boyei nde kotala bisika nini mokili na biso ebatelami malamu te ! |
1265 | GEN 42:12 | Alobaki na bango : — Te ! Boyei na mokili na biso mpo na kotala bisika oyo ebatelami malamu te ! |
1268 | GEN 42:15 | Tala ndenge nakomeka bino : Na kombo ya Faraon, bokolongwa na esika oyo te soki leki na bino ya suka akomi awa te ! |
1269 | GEN 42:16 | Botinda moko kati na bino ete akende kozwa ndeko na bino ya mobali ; mpe bino oyo bokotikala, bokozala na boloko mpo na komeka maloba na bino mpe kotala soki bolobi solo. Soki te, na kombo ya Faraon, bozali banongi ! |
1275 | GEN 42:22 | Ribeni alobaki na bango : — Nayebisaki bino ete bosala mwana wana mabe te ? Kasi boyokelaki ngai te. Sik’oyo tosengeli kofuta makila na ye ! |
1281 | GEN 42:28 | Ayebisaki bandeko na ye : — Bazongiseli ngai mbongo na ngai, tala yango oyo na saki na ngai ! Mitema na bango ebetaki mpe babandaki kolenga, balobanaki bango na bango : — Likambo nini oyo Nzambe asali biso ! |
1289 | GEN 42:36 | Tata na bango Jakobi alobaki na bango : — Bozangisi ngai bana na ngai mibale ya mibali : Jozefi azali lisusu te, Simeoni mpe azali lisusu te. Mpe sik’oyo bolingi kozwa lisusu Benjame ! Makambo oyo nyonso ezali kokweyela kaka ngai ! |
1291 | GEN 42:38 | Jakobi azongisaki : — Te ! Mwana na ngai akokende elongo na bino te. Ndeko na ye ya mobali akufa ; natikala kaka na ye. Soki likama ekweyeli ye na mobembo oyo bozali kokende, wana bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai ! |