78 | GEN 3:22 | Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. » |
91 | GEN 4:11 | Sik’oyo, olakelami mabe mpe obwakami mosika ya mabele oyo efungolaki monoko na yango mpo na komela makila ya ndeko na yo, oyo maboko na yo esopaki. |
503 | GEN 20:7 | Sik’oyo, zongisa mwasi yango epai ya mobali na ye mpo ete azali mosakoli. Akobondela mpo na yo mpe okokufa te. Soki ozongisi ye te, yeba ete okokufa, yo mpe bato na yo nyonso. |
537 | GEN 21:23 | Bongo sik’oyo, lapa ndayi awa na Kombo ya Nzambe ete okokosa ngai te, bana na ngai te, mpe bakoko na ngai te ; kasi okosalela ngai bolamu elongo na mboka oyo epai wapi ozali kovanda lokola mopaya, ndenge ngai nasaleli yo. |
641 | GEN 24:49 | Mpe sik’oyo, boyebisa ngai soki bokosalela nkolo na ngai bolamu mpe boyengebene. Soki te, boyebisa ngai mpo ete naluka nzela mosusu. |
715 | GEN 26:22 | Alongwaki wana mpe akendeki kotimola libulu mosusu ; mpe moto moko te aswanisaki ye na tina na yango. Yango wana apesaki yango kombo « Reoboti, » pamba te alobaki : « Sik’oyo, Yawe apesi biso esika monene, mpe tokofuluka na mokili oyo. » |
722 | GEN 26:29 | Lapa ndayi ete okosala biso mabe te ndenge biso mpe tosalaki yo mabe te ; tosalelaki yo kaka bolamu mpe totikaki yo kokende na kimia. Sik’oyo, Yawe apamboli yo. » |
828 | GEN 29:32 | Boye Lea azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Ribeni ; » alobaki : « Yawe amoni pasi na ngai ; mpe sik’oyo, mobali na ngai akolinga ngai. » |
851 | GEN 30:20 | Lea alobaki : « Nzambe apesi ngai likabo ya motuya. Sik’oyo, mobali na ngai akopesa ngai lokumu mpo ete naboteli ye bana mibali motoba. » Boye apesaki ye kombo « Zabuloni. » |
861 | GEN 30:30 | Moke oyo ozalaki na yango, liboso ete ngai naya, ekomi ebele penza. Yawe apamboli yo na nzela na ngai. Kasi sik’oyo, nakosala tango nini mpo na libota na ngai moko ? |
887 | GEN 31:13 | Nazali Nzambe ya Beteli epai wapi osopaki mafuta na likolo ya libanga oyo otelemisaki lokola elembo mpe olapaki ndayi liboso na Ngai. Sik’oyo, telema, wuta na mokili oyo, mpe zonga na mokili na yo epai wapi obotama. » |
890 | GEN 31:16 | Yango wana, bozwi nyonso oyo Nzambe abotolaki tata na biso ekomi ya biso na bana na biso. Sik’oyo, sala makambo nyonso oyo Nzambe ayebisaki yo. |
904 | GEN 31:30 | Sik’oyo, lokola okeyi mpo ete ozalaki na posa ya ndako ya tata na yo, mpo na nini oyibi banzambe na ngai ? |
1104 | GEN 37:20 | Sik’oyo, boya mpo ete toboma ye mpe tobwaka ye na moko kati na mabulu oyo. Tokoloba ete nyama mabe eliaki ye. Bongo tokotala oyo ekoya sima na bandoto na ye. |
1355 | GEN 44:30 | Sik’oyo, soki elenge mobali azali elongo na biso te tango nakozonga epai ya tata na ngai, mosali na yo, mpe soki tata na ngai, oyo motema na ye ekangama makasi na motema ya elenge mobali oyo, |
1358 | GEN 44:33 | Yango wana sik’oyo, nabondeli yo, tika ete mosali na yo akoma mowumbu ya nkolo na ngai na esika ya elenge mobali oyo mpe tika ete elenge mobali azonga elongo na bandeko na ye ya mibali. |
1364 | GEN 45:5 | Kasi sik’oyo, bomitungisa te mpe bozala na mawa te na ndenge botekaki ngai awa. Ezali mpo na kobikisa bomoi na bino nde Nzambe atindaki ngai liboso na bino. |
1417 | GEN 46:30 | Isalaele alobaki na Jozefi : — Sik’oyo, nakoki na ngai kokufa mpo ete namoni yo penza na miso na ngai moko, mpe ozali nanu na bomoi ! |
1457 | GEN 48:5 | Mpe sik’oyo, bana na yo ya mibali oyo babotamaki na Ejipito liboso ete ngai naya awa, bakomi lokola bana na ngai. Efrayimi mpe Manase bakomi bana na ngai lokola Ribeni mpe Simeoni. |
1512 | GEN 50:5 | ete tata na ngai alapisaki ngai ndayi : « Nakomi pembeni ya kokufa, bokunda ngai kati na kunda oyo natobolaki na libanga, na mokili ya Kanana. » Mpe sik’oyo, tika ete apesa ngai nzela mpo ete nakende kokunda tata na ngai, bongo na sima nde nakozonga. |
1524 | GEN 50:17 | ‘ Nasengi ete olimbisa masumu ya bandeko na yo mpe mabe oyo basalaki yo ! Sik’oyo, nabondeli yo, limbisa masumu ya basali ya Nzambe ya tata na yo ! ’ › » Tango Jozefi ayokaki maloba yango, alelaki. |
1527 | GEN 50:20 | Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele. |
1589 | EXO 3:9 | Sik’oyo, koganga ya bana ya Isalaele ekomi kino epai na Ngai mpe namoni ndenge nini bato ya Ejipito bazali konyokola bango. |
1598 | EXO 3:18 | Bakambi ya Isalaele bakoyokela yo, bongo yo elongo na bakambi, bokokende epai ya mokonzi ya Ejipito mpe bokoloba na ye : « Yawe Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, pesa biso nzela ya kotambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokende kotumbela Yawe, Nzambe na biso, mbeka. » |
1609 | EXO 4:7 | Yawe alobaki na ye : — Sik’oyo, zongisa loboko na yo na tolo na yo. Moyize azongisaki loboko na ye na tolo na ye. Mpe tango alongolaki yango, loboko yango ekomaki lisusu malamu lokola biteni mosusu ya nzoto na ye. |
1623 | EXO 4:21 | Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende. |
1636 | EXO 5:3 | Balobaki : — Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, tika biso totambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ; noki te akoboma biso na bokono to na mopanga. |
1651 | EXO 5:18 | Sik’oyo, bozonga na mosala ! Bakopesa bino lisusu matiti te, kasi bokosala kaka motango ya babiliki oyo bakatela bino. |
1657 | EXO 6:1 | Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon : na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye. |
1739 | EXO 8:24 | Faraon alobaki : — Nakotika bino kokende kobonzela Yawe, Nzambe na bino, mbeka kati na esobe ; kasi bokende mosika te. Sik’oyo, bobondela mpo na ngai ! |
1758 | EXO 9:15 | Pamba te kino sik’oyo, nakokaki kosembola loboko na Ngai mpe kotindela yo elongo na bato na yo nyonso, mopepe ya bokono oyo ekokaki kolimwisa bino na mokili. |
1762 | EXO 9:19 | Sik’oyo, pesa mitindo ete bamema na ebombelo, bibwele na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango kati na elanga. Pamba te mvula ya mabanga ekokweyela mpe ekoboma moto mpe nyama nyonso oyo bokokotisa kuna te to oyo ekotikala kati na elanga. › » |
2449 | EXO 32:10 | Sik’oyo, tika Ngai moko nasala mpo ete kanda na Ngai ekweyela bango mpe naboma bango. Kasi nakokomisa yo libota monene. |
2469 | EXO 32:30 | Mokolo elandaki, Moyize alobaki na bato : — Bosalaki lisumu monene. Kasi sik’oyo, nakomata epai na Yawe ; tango mosusu, nakozwa bolimbisi mpo na lisumu na bino. |
2471 | EXO 32:32 | Kasi sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa lisumu na bango, soki te longola kombo na ngai na buku ya bomoi oyo okomaki. |
2473 | EXO 32:34 | Sik’oyo, kende ! Kamba bato na esika oyo nalobaki na yo. Tala, anjelu na Ngai akozala liboso na yo. Atako bongo, tango mokolo ekokoka mpo ete napesa etumbu, nakopesa bango etumbu mpo na lisumu na bango. |
2487 | EXO 33:13 | Sik’oyo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, teya ngai banzela na Yo mpo ete nayeba Yo mpe nazwa ngolu na miso na Yo. Mpe kanisa lisusu ete libota wana bazali bato na Yo. |
4031 | NUM 11:6 | Kasi sik’oyo, banzoto na biso ebebi penza, tozali lisusu te kolia biloko wana nyonso ! Tokomi kaka komona mana oyo ! » |
4126 | NUM 14:17 | Sik’oyo, nabondeli Yo, tika ete makasi ya Nkolo emonisama na nguya na yango kolanda ndenge olobaki : |
4149 | NUM 14:40 | Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bamataki na songe ya ngomba kati na etuka ya bangomba mpe balobaki : — Solo, tosalaki masumu ; kasi sik’oyo, tozali kokende kuna, na esika oyo Yawe alakaki biso. |
4205 | NUM 16:10 | Abendaki bino pembeni na Ye elongo na Balevi nyonso oyo bazali kolanda bino ; kasi sik’oyo, bazali lisusu koluka kozwa bonganga-Nzambe ! |
4280 | NUM 18:22 | Kobanda sik’oyo, bana ya Isalaele basengeli lisusu te kopusana pene ya Ndako ya kapo ya Bokutani, noki te bakomema mokumba ya masumu na bango mpe bakokufa. |
4461 | NUM 24:14 | Mpe sik’oyo, nazali kozonga na ngai epai ya bato na ngai ; kasi yaka, nakokebisa yo na tina na makambo oyo bato oyo bakosala bato na yo na mikolo ekoya. |
4683 | NUM 31:17 | Sik’oyo, boboma mibali nyonso mpe basi nyonso oyo bayebi nzoto ya mibali ; |
4953 | DEU 2:13 | Yawe alobaki : « Sik’oyo, botelema mpe bokatisa lubwaku ya Zeredi. » Boye totikaki lubwaku. |
5200 | DEU 10:12 | Sik’oyo, Oh Isalaele, likambo nini Yawe, Nzambe na yo, azali kozela epai na yo ? Yawe, Nzambe na yo, azali kozela ete otosa Yawe, Nzambe na yo, na kotambola na banzela na Ye nyonso, na kolinga Ye mpe kosalela Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba, |
5210 | DEU 10:22 | Bakoko na yo nyonso oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo ; mpe sik’oyo, Yawe, Nzambe na yo, akomisi bino ebele lokola minzoto ya likolo. |
5729 | DEU 30:19 | Na mokolo ya lelo, nazwi likolo mpe se lokola batatoli mpo na yo : nasili kotia liboso na yo bomoi mpe kufa, mapamboli mpe bilakeli mabe. Sik’oyo, pona bomoi mpo ete yo mpe bana na yo bozala na bomoi. |
5744 | DEU 31:14 | Yawe alobaki na Moyize : « Tala sik’oyo, mokolo ya kufa na yo ekomi pene. Benga Jozue, mpe bokota na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakopesa ye mitindo na Ngai. » Boye Moyize mpe Jozue bakendeki mpe bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani. |
5749 | DEU 31:19 | Sik’oyo, koma nzembo oyo mpe lakisa yango yo moko epai ya bana ya Isalaele, mpe sala ete bayemba yango mpo ete ezala litatoli mpo na Ngai, liboso na bango. |
5799 | DEU 32:39 | Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai. |
5855 | JOS 1:2 | « Moyize, mowumbu na Ngai, asili kokufa. Sik’oyo, yo elongo na bato oyo nyonso, bobongama mpo na kokatisa ebale Yordani mpe kokota na mokili oyo nakopesa bana ya Isalaele. |
5883 | JOS 2:12 | Boye sik’oyo, bolapa ndayi liboso na ngai na Kombo na Yawe ete bokosalela libota na ngai bolamu ndenge ngai nasaleli bino. Bopesa ngai elembo ya solo ; |
5907 | JOS 3:12 | Sik’oyo, bopona bato zomi na mibale kati na mabota ya Isalaele, moto moko mpo na libota moko. |
6518 | JDG 1:7 | Adoni-Bezeki alobaki : « Bakonzi tuku sambo, oyo bakata bango misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo, bazalaki kolokota biloko oyo ezalaki kokweya na se ya mesa na ngai. Sik’oyo, Nzambe azongiseli ngai makambo oyo nasalaki baninga. » Bamemaki ye na Yelusalemi, mpe akufaki kuna. |
6550 | JDG 2:3 | Sik’oyo, nalobi na bino ete nakobengana bango lisusu te liboso na bino ; bakokoma nzube na mipanzi na bino, mpe banzambe na bango ya bikeko ekokoma mitambo mpo na bino. » |
6669 | JDG 6:13 | Jedeon azongisaki : — Ah nkolo, soki Yawe azali elongo na biso, mpo na nini makambo nyonso oyo ezali kokomela biso ? Wapi makambo nyonso ya kokamwa oyo bakoko na biso bazalaki koyebisa biso tango bazalaki koloba ete Yawe abimisaki biso na Ejipito ? Sik’oyo, Yawe atiki biso mpe asundoli biso na maboko ya bato ya Madiani. |
6794 | JDG 9:38 | Zebuli alobaki na Gali : — Sik’oyo, tia lisusu monoko ! Mpe loba lisusu : « Abimeleki nde nani mpo ete tosalela ye ? » Ezali te bato oyo yo otiolaki ? Kende sik’oyo kobunda ! |
6844 | JDG 11:13 | Mokonzi ya bato ya Amoni azongiselaki bantoma ya Jefite : — Ezali mpo ete Isalaele abotolaki mokili na ngai tango abimaki na Ejipito ; babotolaki mokili yango longwa na lubwaku ya Arinoni, mayi moke ya Yaboki kino na lubwaku ya Yordani. Sik’oyo, zongisela ngai yango na kimia. |
6874 | JDG 12:3 | Tango namonaki ete bokangoli na bino ngai te, nakabaki bomoi na ngai, mpe nakatisaki ngai moko nzela ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango ; mpe Yawe apesaki ngai elonga likolo na bango. Sik’oyo, mpo na nini boyei lelo kobundisa ngai ? |
6890 | JDG 13:4 | Sik’oyo, sala keba ! Komela vino te to masanga mosusu ya makasi, mpe kolia te eloko nyonso ya mbindo ; |
6961 | JDG 16:10 | Dalila alobaki na Samison : — Osakani na ngai mpe okosi ngai ! Sik’oyo, yebisa ngai eloko nini bakoki kosalela mpo na kokanga yo ? |
6964 | JDG 16:13 | Boye Dalila alobaki na Samison : — Kino sik’oyo, ozali kaka kosakana na ngai mpe kokosa ngai ! Yebisa ngai ndenge nini bakoki kokanga yo basinga. Samison azongisaki : — Soki okangi suki sambo ya moto na ngai na singa oyo batongelaka bilamba, mpe soki okangisi yango na likonzi, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. Boye tango Samison azalaki nanu kolala, Dalila azwaki suki sambo ya moto na ye, akangaki yango na singa oyo batongelaka bilamba |
7063 | JDG 20:7 | Sik’oyo, bino nyonso bana ya Isalaele, boloba mpe bokata likambo oyo. |
7069 | JDG 20:13 | Sik’oyo, botindela biso bato mabe wana ya Gibea mpo ete toboma bango mpe tolongola mabe kati na Isalaele. » Kasi bato ya Benjame baboyaki koyokela baninga na bango, bana ya Isalaele. |
7158 | RUT 2:7 | Asengaki biso nzela ya kolokota mito ya ble, oyo etikalaka tango bakangaka maboke, na sima ya bato oyo bakataka ble. Na tongo ya lelo, akotaki na bilanga mpe azali kosala na molende nyonso ; kino sik’oyo, apemi kaka tango moke. |
7184 | RUT 3:10 | Boazi azongiselaki ye : — Tika ete Yawe apambola yo, mwana na ngai ya mwasi ! Bosembo oyo otalisi sik’oyo, ezali monene koleka bosembo oyo otalisaki liboso ; pamba te otambolaki te sima na bilenge mibali, ezala bazwi to babola. |
7186 | RUT 3:12 | Sik’oyo, atako solo nazali na ndingisa ya kosikola, kasi ezali na mosikoli mosusu oyo azali pene na yo koleka ngai. |
7258 | 1SA 2:16 | Bongo soki moto yango azongiseli mosali ya Nganga-Nzambe : « Tika ete mafuta etumbama nanu, bongo okozwa, na sima, eteni oyo olingi, » mosali azalaki kozongisa : « Te ! Pesa ngai yango nde sik’oyo, noki te nakozwa yango na makasi. » |
7272 | 1SA 2:30 | Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni. |
7376 | 1SA 8:5 | Balobaki na ye : « Tala, yo okomi na yo mobange, mpe bana na yo ya mibali bazali kotambola te na banzela na yo. Sik’oyo, pona mokonzi oyo akokamba biso ndenge ezali na bikolo nyonso. » |
7380 | 1SA 8:9 | Sik’oyo, yoka bango ; kasi kebisa bango malamu mpe yebisa bango makambo nyonso oyo mokonzi oyo akokonza bango akobanda kosala. » |
7399 | 1SA 9:6 | Mosali azongisaki : — Zela moke ! Kati na engumba wana, ezali na moto moko ya Nzambe ; azali penza moto ya lokumu ; makambo nyonso oyo ye alobaka, ezangaka te kokokisama. Tokende kuna sik’oyo, tango mosusu akolakisa biso nzela oyo tosengeli kolanda. |
7406 | 1SA 9:13 | Soki kaka bokoti na engumba, bomona ye mbala moko, liboso ete amata na esambelo ya likolo ya ngomba mpo na kolia ; pamba te bato bakoki kobanda kolia te soki ye akomi nanu te : asengeli nanu kopambola mbeka liboso ete bato oyo babengami babanda kolia. Bomata sik’oyo, mpe bokomona ye na ngonga oyo. |
7422 | 1SA 10:2 | Sima na yo kotika ngai na mokolo ya lelo, okokutana na mibali mibale pembeni ya kunda ya Rasheli, na Tselitsa, na bandelo ya mokili ya Benjame. Bakoloba na yo : ‹ Ba-ane oyo okendeki koluka emonani. Mpe, sik’oyo, tata na yo atiki komitungisa na tina na yango, kasi akomi nde komitungisa mpo na bino. Azali komituna : ‘ Nakosala nini mpo na mwana na ngai ya mobali. ’ › » |
7469 | 1SA 12:7 | Sik’oyo, botelema awa liboso na Ye, pamba te nalingi kosamba na bosolo elongo na bino, liboso ya Yawe, na tina na makambo nyonso ya bosembo oyo Yawe asalaki mpo na bino mpe mpo na bakoko na bino. |
7472 | 1SA 12:10 | Bongo bagangaki lisusu epai na Yawe mpo na kosenga lisungi ; balobaki : « Tosali masumu, pamba te tosundoli Yawe mpe tosaleli banzambe Bala mpe Asitarite. Kasi sik’oyo, kangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe tokosalela Yo. » |
7475 | 1SA 12:13 | Sik’oyo, botala mokonzi oyo boponaki, mokonzi oyo bosengaki. Ezali Yawe nde atie ye mokonzi mpo na kokamba bino. |
7499 | 1SA 13:12 | namilobelaki : « Sik’oyo, bato ya Filisitia bazali koya kobundisa ngai na Giligali, kasi ngai nabondeli Yawe te ! » Yango wana, nazwaki mokano ya kobonza mbeka ya kotumba. |
7501 | 1SA 13:14 | Kasi sik’oyo, bokonzi na yo ekowumela lisusu te. Yawe aluki moto mosusu oyo asepelisaka motema na Ye mpe atie ye mokambi ya bato na Ye, pamba te yo, obateli mibeko ya Yawe te. |
7565 | 1SA 15:3 | Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te ; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › » |
7592 | 1SA 15:30 | Saulo alobaki : — Nasali lisumu. Kasi, sik’oyo, nabondeli yo : pesa ngai lokumu liboso ya bampaka ya bato na ngai mpe liboso ya Isalaele, zonga elongo na ngai mpo ete nakoka kogumbamela Yawe, Nzambe na yo. |
7713 | 1SA 19:5 | Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? » |
7763 | 1SA 20:31 | Pamba te tango nyonso mwana mobali ya Izayi akozala na bomoi kati na mokili oyo, ezala yo to bokonzi na yo, bokozala na kimia te. Sik’oyo, lukisa ye mpe memela ngai ye, pamba te asengeli kokufa. |
7778 | 1SA 21:4 | Bongo sik’oyo, osimbi eloko nini na loboko na yo ? Pesa ngai mapa mitano to eloko nyonso oyo okoki kozala na yango. |
7802 | 1SA 22:12 | Saulo alobaki : — Yoka sik’oyo, mwana mobali ya Ayitubi. Ayimeleki azongisaki : — Nazali koyoka yo, nkolo na ngai. |
7813 | 1SA 22:23 | Sik’oyo, vanda awa elongo na ngai, kobanga te. Pamba te moto oyo azali koluka bomoi na yo azali koluka mpe bomoi na ngai. Okobatelama malamu epai na ngai. » |
7833 | 1SA 23:20 | Sik’oyo, oh mokonzi, tango nyonso okosepela kokita, kita na yo ; mpe biso moko tozwi mokumba ya kokaba ye na maboko ya mokonzi. |
7853 | 1SA 24:12 | Oh tata na ngai, tala eteni oyo ya kazaka na yo na loboko na ngai ! Nakataki songe ya kazaka na yo, kasi nabomaki yo te. Sik’oyo, sosola mpe yeba ete, kati na ngai, mayele mabe mpe botomboki ezali te. Nasalaki na ngai yo mabe te, kasi yo ozali kolanda ngai mpo na koboma ngai. |
7881 | 1SA 25:17 | Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. » |
7890 | 1SA 25:26 | Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali. |
7919 | 1SA 26:11 | Kasi Yawe apekisi ngai kosembola loboko likolo ya mopakolami na Ye. Sik’oyo, zwa kaka likonga mpe eloko ya mayi oyo ezali pembeni ya moto na ye, mpe tokende na biso. |
7927 | 1SA 26:19 | Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. » |
7928 | 1SA 26:20 | Sik’oyo, tika ete makila na ngai esopana na mabele te, mosika na miso ya Yawe ! Pamba te mokonzi ya Isalaele abimaki mpo na koluka ngenga kaka moko, ndenge balandaka soso ya zamba, na bangomba. |
7967 | 1SA 28:22 | Sik’oyo, yo mpe, nabondeli yo : yoka mwasi mosali na yo, mpe tika ete ngai napesa yo bilei mpo ete olia mpe ozwa makasi ya kokoba nzela na yo. |
8059 | 2SA 2:7 | Sik’oyo, bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te nkolo na bino, Saulo, akufi. Kasi boyeba mpe ete bato ya Yuda bapakoli ngai mafuta mpo ete nakoma mokonzi na bango. » |
8108 | 2SA 3:24 | Joabi akendeki komona mokonzi mpe alobaki na ye : — Eloko nini oyo osali ? Mpo na nini otikaki penza Abineri oyo ayaki epai na yo kokende ? Mpe tala sik’oyo, akei ! |
8134 | 2SA 4:11 | Bongo sik’oyo, tango bato mabe babomi moto oyo ayebi na ye likambo te kati na ndako na ye moko mpe na mbeto na ye moko, nasengeli te kosenga makila na ye na maboko na bino mpe kolimwisa bino na mokili ? |
8192 | 2SA 7:9 | Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki, mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili. |
8208 | 2SA 7:25 | Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, kokisa mpo na libela elaka oyo opesaki epai ya mosali na Yo mpe epai ya libota na ye. Sala ndenge olakaki |