Wildebeest analysis examples for:   lin-lin   Word’Word.    February 25, 2023 at 00:37    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

933  GEN 32:5  Apesaki bango malako oyo : « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu : ‹ Mosali na yo Jakobi alobi : ‘ Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo.
4040  NUM 11:15  Soki ezali kaka boye nde ozali kosala ngai, eleki malamu ete oboma ngai kaka sik’oyo. Soki nazwi ngolu na miso na Yo, kotika te ete namona kobebisama na ngai.
4128  NUM 14:19  Nabondeli Yo, kolanda bolingo monene na Yo, limbisa masumu ya bato oyo ndenge kaka olimbisaki bango wuta babimaki na Ejipito kino sik’oyo.
5026  DEU 4:20  Kasi mpo na bino, Yawe azwaki bino mpe abimisaki bino na fulu ya moto ya bibende, oyo ezalaki Ejipito, mpo ete bozala bato ya libula na Ye ndenge bozali sik’oyo.
5193  DEU 10:5  Boye nakitaki wuta na ngomba mpe natiaki bitando yango mibale ya mabanga kati na sanduku oyo nasalaki ndenge Yawe atindaki ngai mpe ezali kuna sik’oyo.
5950  JOS 5:14  Azongiselaki Jozue : — Te, kasi nazali mokonzi ya mampinga ya Yawe ; nayei kaka sik’oyo. Boye, Jozue akweyaki elongi kino na mabele mpe alobaki na ye : — Sango nini nkolo na ngai azali na yango mpo na mosali na ye ?
11687  2CH 24:5  Abengisaki Banganga-Nzambe mpe Balevi, alobaki na bango : — Botambola kati na bingumba ya Yuda, bokongola mbongo, mobu na mobu, kati na Isalaele mobimba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bosala yango sik’oyo. Kasi Balevi basalaki yango na lombangu te.
19621  JER 25:18  Yelusalemi elongo na bingumba ya Yuda, bakonzi mpe bakalaka na yango ; mpo na kobebisa yango, kokomisa yango eloko ya somo, ya maseki mpe ya lisuma, ndenge ezali komonana sik’oyo.
23076  ZEC 9:8  Nakobundela ndako na Ngai liboso ya mampinga ya basoda ya nguya ; monyokoli moko te akoya lisusu komonisa bato na Ngai pasi, pamba te Ngai moko nde nazali kokengela sik’oyo.
25639  LUK 14:17  Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye kokende koloba na bato oyo babengamaki : « Boya, pamba te nyonso esili kobongisama sik’oyo. »
26807  JHN 16:12  Nazali lisusu na makambo mingi ya koyebisa bino, kasi bokokoka kososola yango te sik’oyo.
27051  ACT 2:33  Sima na loboko ya mobali ya Nzambe konetola Ye, azwaki epai ya Tata, Molimo Mosantu oyo Ye Tata alakaki, mpe asopeli biso Molimo Mosantu yango ndenge bozali komona mpe koyoka sik’oyo.
27189  ACT 7:4  Boye, alongwaki na mokili ya Chalide mpe akendeki kovanda na mokili ya Sharani. Sima na kufa ya tata na ye, Nzambe atindaki ye na mokili oyo, mokili oyo bino bozali kovanda sik’oyo.
27442  ACT 13:11  Tala, loboko ya Nkolo etelemeli yo sik’oyo. Ozali kokoma mokufi miso mpo na mwa tango moke, okomona lisusu te pole ya moyi. Kaka na tango yango, lipata mpe molili ezipaki miso ya Elimasi ; azalaki lisusu komona te mpe akomaki kobaluka-baluka bipai nyonso na koluka moto mpo ete asimba ye na loboko mpe alakisa ye nzela.
27850  ACT 24:13  Bakolonga mpe te kotalisa bosolo ya makambo oyo bafundeli ngai sik’oyo.
27957  ACT 27:34  Nasengi na bino ete bolia sik’oyo. Bosengeli na yango mpo ete bozala na bomoi. Moko te kati na bino akobungisa ata suki moko ya moto na ye.
28602  1CO 8:7  Nzokande, bato nyonso bazali na boyebi oyo te ; bato mosusu bazali nanu na momesano ya kosambela banzambe ya bikeko kino sik’oyo. Boye wana baliaka misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bakanisaka ete ezali penza mbeka oyo babonzeli banzambe wana ; mpe mitema na bango, oyo elenda te ekomaka mbindo.
29227  GAL 4:29  Kasi ndenge kaka mwana mobali oyo abotamaki na lolenge ya bomoto azalaki na kala konyokola mwana mobali oyo abotamaki na nzela ya nguya ya Molimo, ndenge wana mpe ezali kosalema sik’oyo.
29433  PHP 1:5  mpo na lisungi na bino kati na mosala ya kopanza Sango Malamu, wuta na mokolo ya liboso kino sik’oyo.
29458  PHP 1:30  pamba te bozali nde kobunda etumba ya lolenge moko na oyo bomonaki ngai kobunda mpe oyo bozali koyoka ete nazali lisusu kobunda sik’oyo.
30512  1PE 3:21  Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe ; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto
30558  2PE 1:12  Boye, nakobanda kozongisaka yango tango nyonso na makanisi na bino, atako boyebi yango malamu mpe bokangami makasi na bosolo oyo bozali na yango sik’oyo.