933 | GEN 32:5 | Apesaki bango malako oyo : « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu : ‹ Mosali na yo Jakobi alobi : ‘ Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo. |
1524 | GEN 50:17 | ‘ Nasengi ete olimbisa masumu ya bandeko na yo mpe mabe oyo basalaki yo ! Sik’oyo, nabondeli yo, limbisa masumu ya basali ya Nzambe ya tata na yo ! ’ › » Tango Jozefi ayokaki maloba yango, alelaki. |
1702 | EXO 7:16 | Bongo okoloba na ye : ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te. |
1744 | EXO 9:1 | Yawe alobaki na Moyize : « Kende koyebisa Faraon : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‘ Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai ! ’ |
2799 | LEV 4:3 | ‘ Soki Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta asali masumu, bongo na nzela ya masumu na ye amemisi bato nyonso ngambo, akobonza liboso ya Yawe mpo na masumu oyo asili kosala, mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu. |
2809 | LEV 4:13 | ‘ Soki lisanga mobimba ya Isalaele basali masumu na nko te mpe basali likambo moko oyo epekisami kati na mibeko ya Yawe, ata soki likambo yango eyebani te kati na lisanga, lisanga ekomema solo ngambo. |
2818 | LEV 4:22 | ‘ Soki mokambi moko asali masumu na nko te, mpo ete asali likambo oyo epekisami na mibeko ya Yawe, Nzambe na ye ; amemi solo ngambo. |
2823 | LEV 4:27 | ‘ Soki moto moko kati na lisanga asali masumu na nko te, mpo ete asali likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe ; amemi solo ngambo. |
2864 | LEV 6:7 | ‹ Tala mobeko mpo na likabo ya gato : ‘ Bana mibali ya Aron bakomema yango liboso ya Yawe, liboso ya etumbelo. |
2875 | LEV 6:18 | « Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali : ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na masumu : ‘ Bakokata kingo ya mbeka mpo na masumu liboso ya Yawe, na esika oyo bakataka bakingo ya bambeka ya kotumba ; ezali mbeka ya bule penza. |
2882 | LEV 7:2 | ‘ Bakokata kingo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani, na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. Bongo bakobwaka makila na yango pembeni-pembeni ya etumbelo. |
2892 | LEV 7:12 | ‘ Soki moto abonzi yango mpo na kozongisa matondi, asengeli kobonza, elongo na mbeka ya kozongisa matondi, likabo ya bagato ezanga levire kasi basangisa na mafuta, bagalete ezanga levire kasi bapakola yango mafuta mpe bagato basala na farine oyo basangisa malamu na mafuta. |
3239 | LEV 17:3 | ‘ Moto nyonso kati na bana ya Isalaele, oyo akokata kingo ya ngombe, ya meme to ya ntaba, ezala kati na molako to na libanda ya molako ; |
3248 | LEV 17:12 | Boye, nalobaki na bana ya Isalaele : ‘ Moto moko te mpe mopaya moko te kati na bino akoki kolia makila. ’ |
3250 | LEV 17:14 | Yango wana, nalobaki na bana ya Isalaele : ‘ Bokoki kolia makila ya ekelamu ata moko te, pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila na yango. Moto oyo akolia yango, bakolongola ye kati na bato. ’ |
3490 | LEV 25:20 | Bokoki kotuna : ‘ Tokolia nini na mobu ya sambo soki toloni te mpe tobuki te bambuma na biso ? ’ |
3812 | NUM 5:19 | Nganga-Nzambe akolapisa mwasi yango ndayi, akoloba na ye : ‘ Soki mobali mosusu asangisaki na yo nzoto te, mpe soki omikomisaki mbindo te na kokosa mobali na yo wuta bobalana, wana tika ete mayi oyo ya bololo mpe ememaka elakeli mabe esala yo eloko moko te ! |
3814 | NUM 5:21 | Nganga-Nzambe asengeli awa kolapisa mwasi yango ndayi ya kondima kokweyela bilakeli mabe kowuta na maloba oyo : ‘ tika ete Yawe akomisa yo elakeli mabe mpe eloko ya nkele kati na bato na yo ! Tika ete akomisa yo ekomba mpe avimbisa yo libumu ! |
3815 | NUM 5:22 | Tika ete mayi oyo ezali komema elakeli mabe ekota kati na yo mpo ete libumu na yo evimba mpe okoma ekomba. ’ Mwasi akozongisa : ‘ Amen ! Tika ete esalema bongo ! ’ |
3848 | NUM 6:24 | ‘ Tika ete Yawe apambola yo mpe abatela yo ! |
7278 | 1SA 2:36 | Bongo moto nyonso oyo akotikala kati na libota na yo akobanda koya kofukama liboso na ye mpo na kozwa mbongo moko ya palata mpe eteni ya lipa, mpe akoloba : ‘ Kotisa ngai ata na mosala moko kati na misala ya bonganga-Nzambe mpo ete nazwaka ata eteni ya lipa. ’ › » |
7422 | 1SA 10:2 | Sima na yo kotika ngai na mokolo ya lelo, okokutana na mibali mibale pembeni ya kunda ya Rasheli, na Tselitsa, na bandelo ya mokili ya Benjame. Bakoloba na yo : ‹ Ba-ane oyo okendeki koluka emonani. Mpe, sik’oyo, tata na yo atiki komitungisa na tina na yango, kasi akomi nde komitungisa mpo na bino. Azali komituna : ‘ Nakosala nini mpo na mwana na ngai ya mobali. ’ › » |
10047 | 2KI 18:19 | Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki na bango : « Boloba na Ezekiasi : ‹ Tala makambo oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi : ‘ Otie elikya na yo na nini ? |
10050 | 2KI 18:22 | Tango mosusu bokoloba na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni ! Ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Kati na Yelusalemi, bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’ |
10051 | 2KI 18:23 | Sik’oyo, nabondeli yo, beta mondenge na nkolo na ngai, mokonzi ya Asiri : ‘ Nakopesa yo bampunda nkoto mibale soki okoki kopesa basoda mpo ete batambolisa yango ! |
10088 | 2KI 19:23 | Na nzela ya bantoma na yo, ofingaki Nkolo mpe olobaki : ‘ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, namataki kino na basonge ya bangomba, na basonge oyo eleki likolo kati na Libani, nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, na zamba na yango oyo eleki kitoko, |
10874 | 1CH 17:6 | Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na Ngai : ‘ Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele ? ’ › |
12154 | EZR 5:15 | Alobaki na ye : ‘ Kamata biloko oyo mpe kende kotia yango kati na Tempelo ya Yelusalemi ; mpe tika ete Tempelo ya Nzambe etongama lisusu na esika na yango ya kala. ’ |
17858 | ISA 7:6 | ‘ Tika ete tobundisa Yuda, tokata yango na biteni, tokabola yango biso na biso mpe totia mwana mobali ya Tabeli lokola mokonzi na yango. ’ |
18407 | ISA 36:7 | Mpe soki olobi na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni, ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’ |
18432 | ISA 37:10 | « Boyebisa Ezekiasi, mokonzi ya Yuda : ‹ Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo : ‘ Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. ’ |
18465 | ISA 38:5 | « Kende koloba na Ezekiasi : ‹ Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‘ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo. |
18631 | ISA 44:28 | Nalobi na tina na Sirisi : ‹ Azali mobateli oyo naponi, akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai. Akoloba na tina na Yelusalemi : ‘ Tika ete etongama lisusu, ’ mpe na tina na Tempelo : ‘ Tika ete batonga miboko na yango. ’ › » |
19192 | JER 7:4 | Botia motema te na maloba ya lokuta oyo ezali kolobama : ‘ Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe ! Yawe azali awa. ’ |
19198 | JER 7:10 | bongo bozali koya liboso na Ngai kati na Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai, mpe bozali koloba : ‘ Tobiki na biso ! ’ Bobiki na bino solo mpo na kosala makambo oyo nyonso ya nkele ? |
19228 | JER 8:6 | Nayokaka na bokebi makambo nyonso oyo balobaka, kasi balobaka makambo ya solo te. Moko te kati na bango ayokaka motema pasi mpo na mabe oyo asalaka, alobaka : ‘ Nasali nini ? ’ Moto na moto akangamaka kaka na nzela na ye lokola mpunda oyo ezali kokende na bitumba. |
19230 | JER 8:8 | Ndenge nini bokoki koloba : ‘ Tozali bato ya bwanya, pamba te toyebi Mobeko ya Yawe, ’ tango sik’oyo ekomeli ya balakisi ya Mobeko ebongoli yango lokuta ? |
19233 | JER 8:11 | bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo mpe bazali koloba : ‘ Makambo nyonso ezali malamu, nyonso ezali kotambola malamu ! ’ Nzokande, ata likambo moko ya malamu ezali te. |
19522 | JER 21:13 | Oh Yelusalemi, yo oyo ovandaka na lubwaku, na mabanga ya etando ya likolo ya ngomba, nazali kosepela na yo te, elobi Yawe, yo oyo olobaka : ‘ Nani azali na makoki ya kobundisa biso ? Nani azali na makoki ya kokota na ekimelo na biso ? ’ |
19669 | JER 27:4 | Pesa bango sango oyo bakomemela bakonzi na bango mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‘ Boyebisa bakonzi na bino maloba oyo : |
19854 | JER 33:10 | Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bozali koloba na tina na esika oyo : ‘ Eh ! Esika oyo ebeba ! Ezalaka lisusu na bato mpe banyama te ! ’ Nzokande, kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi oyo ekoma polele, ezanga bato mpe banyama, ekozala lisusu na lokito : |
19855 | JER 33:11 | ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe. |
19875 | JER 34:5 | kasi okokufa na kimia. Mpe ndenge bato bapelisaki moto mpe batumbaki malasi ya solo kitoko, na matanga ya batata na yo, bakonzi ya kala oyo baleka liboso na yo, mpo na kopesa bango lokumu, ndenge wana mpe bakosala mpo na lokumu na yo. Mpe bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo : ‘ Oh mawa, nkolo na ngai ! ’ Solo, Ngai moko nde napesi elaka oyo, elobi Yawe. › » |
20783 | EZK 13:6 | Bimoniseli na bango ezali ya pamba, mpe masakoli na bango ezali ya lokuta. Balobaka : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi, ’ nzokande Ngai Yawe, natindi bango te. Mpe bazelaka ete maloba na bango ekokisama ! |
20784 | EZK 13:7 | Boni, bimoniseli na bino ezalaka ya pamba te, mpe masakoli na bino ezalaka ya lokuta te, atako bolobaka : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi, ’ nzokande Ngai nalobi na bino ata liloba moko te ? |
20787 | EZK 13:10 | Boye, lokola bapengwisaka bato na Ngai tango balobaka : ‘ Kimia, ’ na tango kimia ezali te ; lokola bapakolaka potopoto ya pembe na mir oyo bato na Ngai basili kotonga, |
20789 | EZK 13:12 | Tango mir yango ekokweya, bato bakotuna bino : ‘ Mosala nini penza potopoto ya pembe esali ? ’ |
20792 | EZK 13:15 | Nakokweyisela mir mpe bato oyo bapakolaki yango potopoto ya pembe kanda na Ngai ; nakoloba na bino : ‘ Mir ezali lisusu te ! Bato oyo bazalaki kopakola yango potopoto ya pembe bazali lisusu te ; |
20837 | EZK 16:6 | Boye, Ngai nalekelaki wana mpe namonaki ndenge nini ozalaki kobunda-bunda na kufa kati na makila. Bongo nalobaki na yo : ‘ Okozala na bomoi atako ozali kobaluka na makila ! ’ |
20875 | EZK 16:44 | Moto nyonso oyo alobaka na masese akoloba lisese oyo na tina na yo : ‘ Mwana mwasi azalaka kaka ndenge mama na ye azali. ’ |
20969 | EZK 20:5 | mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo naponaki Isalaele, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, epai ya bakitani ya libota ya Jakobi ete nakomimonisa Ngai moko epai na bango kati na Ejipito, nalapaki ndayi mpe nayebisaki bango : ‘ Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’ |
20971 | EZK 20:7 | Nalobaki na bango : ‘ Tika ete moto na moto alongola bililingi ya mbindo oyo ezali liboso ya miso na ye ! Bomikomisa mbindo te, na nzela ya banzambe ya bikeko ya Ejipito ! Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’ |
20982 | EZK 20:18 | Nalobaki na bana na bango kati na esobe : ‘ Bolanda bikeko ya batata na bino te, botosa mibeko na bango te to bomikomisa mbindo te na banzambe na bango ya bikeko ! |
20996 | EZK 20:32 | Bozali koloba : ‘ Tolingi kozala lokola bato ya bikolo mosusu, lokola bituka ya mikili mosusu ; tolingi na biso kosalaka mpo na banzete mpe mabanga. ’ Kasi eloko oyo bozali kokanisa ekosalema te. |
21160 | EZK 25:8 | Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola mokili ya Moabi mpe ya Seiri ezalaki koloba : ‘ Tala, libota ya Yuda ekomi kaka lokola bikolo nyonso. ’ |
21193 | EZK 27:3 | Loba na Tiri oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, oyo esalaka mombongo elongo na bikolo nyonso, bavandi ya bisanga : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh engumba Tiri, olobaka : ‘ Ngai, nakoka na kitoko na ngai ! ’ |
21222 | EZK 27:32 | Kati na pasi mpe kolela na bango, bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo : ‘ Nani azalaki lokola Tiri, lokola engumba oyo ekomi kimia kati na ebale monene ? ’ |
21228 | EZK 28:2 | « Mwana na moto, loba na mokambi ya Tiri : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na lolendo ya motema na yo, olobaki : ‘ Nazali nzambe, navandaka na kiti ya bokonzi ya nzambe na kati-kati ya bibale minene. ’ Nzokande, ozali na yo kaka moto, ozali na yo nzambe te atako okanisi ete ozali na bwanya lokola nzambe. |
21235 | EZK 28:9 | Okokoka lisusu koloba liboso ya bato oyo bazali koboma yo : ‘ Ngai nazali nzambe ? ’ Ozali na yo kaka moto ; ozali nzambe te, kati na maboko ya bato oyo bazali koboma yo. |
21255 | EZK 29:3 | Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Yo Faraon, mokonzi ya Ejipito, natelemeli yo ! Yo dalagona monene oyo ovandaka kati na bibale na yo, yo oyo ozali koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; mpe ngai, ngai moko nde namisala ! ’ |
21261 | EZK 29:9 | Ejipito ekokoma esobe mpe ekotikala lisusu na bato te ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. Lokola ozalaki koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; kasi ngai, ngai moko nde namisala, ’ |
21275 | EZK 30:2 | « Mwana na moto, sakola ! Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Bolela mpe boloba : ‘ Mawa mpo na mokolo wana ! ’ |
21359 | EZK 33:10 | Mwana na moto, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala maloba oyo bozali koloba : ‘ Ndenge nini penza tokoki lisusu kobika mpo ete mabe mpe masumu na biso ekomi kilo makasi mpo na biso, mpe yango ekomi kobebisa biso ? ’ › |
21423 | EZK 35:10 | Mpo ete olobaki : ‘ Mikili oyo mibale, Isalaele mpe Yuda, elongo na bikolo na yango ekokoma ya ngai, mpe nakozwa yango, ’ atako Yawe azalaki kuna ; |
21425 | EZK 35:12 | Boye, okoyeba solo ete Ngai Yawe, nayokaki maloba nyonso ya kotiola oyo olobaki na tina na bangomba ya Isalaele. Olobaki : ‘ Tala, bangomba ebebisami ! Bakabeli biso yango lokola nyama ya kolia ! ’ |
21430 | EZK 36:2 | Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Moyini alobaki na tina na bino : ‘ Ah, bangomba ya kala ekomi sik’oyo ya biso ! ’ › |
21463 | EZK 36:35 | Bongo, bakoloba : ‘ Mokili oyo ebebisamaki ekomi lokola elanga ya Edeni ; bingumba oyo babuka, bongo etikala lisusu na bato te mpe babebisa, elendisami lisusu mpe bato bakomi lisusu kovanda kuna. ’ |
21505 | EZK 38:11 | Okoloba : ‘ Nakobundisa mikili oyo ebatelama malamu te, nakokende kino epai ya bato oyo bavandaka na boboto kati na kimia, bavandaka kati na bingumba oyo ezanga bamir, ezanga bikangelo mpe bikuke ; |
21507 | EZK 38:13 | Bato ya Seba, ya Dedani, bato ya mombongo ya Tarsisi, elongo na bamboka na yango nyonso ya mike bakoloba na yo : ‘ Boni, oyei solo mpo na kozwa na makasi bomengo ya bitumba ? Boni, osangisi mampinga na yo mpo na kobotola palata mpe komema wolo, mpo na kozwa bibwele mpe kobotola biloko to mpo na kozwa biloko ebele ? ’ › |