3 | GEN 1:3 | Mpe Nzambe alobaki : « Tika ete pole ezala ! » Mpe pole ezalaki. |
5 | GEN 1:5 | Nzambe abengaki pole « moyi, » mpe abengaki molili « butu. » Pokwa ezalaki mpe tongo ezalaki. Yango ezalaki mokolo moko. |
6 | GEN 1:6 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango ! » |
8 | GEN 1:8 | Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale. |
9 | GEN 1:9 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
10 | GEN 1:10 | Nzambe abengaki mabele ya kokawuka « mokili, » mpe abengaki mayi oyo esanganaki esika moko « ebale monene. » Nzambe amonaki ete ezali malamu. |
11 | GEN 1:11 | Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa matiti, milona oyo ezali na nkona mpe banzete ya mbuma oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
14 | GEN 1:14 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu, |
20 | GEN 1:20 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo ! » |
22 | GEN 1:22 | Nzambe apambolaki yango mpe alobaki : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. » |
24 | GEN 1:24 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango : bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
26 | GEN 1:26 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! » |
28 | GEN 1:28 | Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. » |
29 | GEN 1:29 | Bongo Nzambe alobaki : « Tala, kati na mokili mobimba, napesi bino milona oyo ezali na nkona mpe banzete nyonso oyo ebotaka mbuma. Yango nde ekozala bilei na bino. |
42 | GEN 2:11 | Eteni ya liboso, kombo na yango « Pishoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Avila oyo mabele na yango ezalaki na wolo. |
44 | GEN 2:13 | Eteni ya mibale, kombo na yango « Giyoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Kushi. |
45 | GEN 2:14 | Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre. » Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate. » |
47 | GEN 2:16 | Mpe Yawe Nzambe apesaki mitindo oyo na moto : « Okoki kolia mbuma nyonso ya elanga, |
49 | GEN 2:18 | Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. » |
54 | GEN 2:23 | Boye, mobali alobaki : « Tala na mbala oyo, oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai, mosuni ya mosuni na ngai. Bakobenga ye mwasi, pamba te awuti na mobali. » |
59 | GEN 3:3 | Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. » |
70 | GEN 3:14 | Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo, olakelami mabe kati na bibwele mpe banyama nyonso ya zamba. Okotambola na libumu mpe okobanda kolia putulu bomoi na yo mobimba. |
72 | GEN 3:16 | Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. » |
73 | GEN 3:17 | Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo. |
76 | GEN 3:20 | Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva, » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili. |
78 | GEN 3:22 | Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. » |
81 | GEN 4:1 | Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. » |
97 | GEN 4:17 | Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye ; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali. |
99 | GEN 4:19 | Lemeki abalaki basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. » |
102 | GEN 4:22 | Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. » |
103 | GEN 4:23 | Lemeki alobaki na basi na ye : « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ; bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu : Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ; mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali ! |
105 | GEN 4:25 | Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. » |
106 | GEN 4:26 | Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe. |
108 | GEN 5:2 | Akelaki bango mobali mpe mwasi, mpe apambolaki bango. Na mokolo oyo akelaki bango, apesaki bango kombo « bato. » |
109 | GEN 5:3 | Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. » |
135 | GEN 5:29 | Abengaki ye Noa mpe alobaki : « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. » |
141 | GEN 6:3 | Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. » |
145 | GEN 6:7 | Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. » |
151 | GEN 6:13 | Boye, Nzambe alobaki na Noa : « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili. |
161 | GEN 7:1 | Yawe alobaki na Noa : « Kota na masuwa, yo mpe libota na yo mobimba, pamba te yo kaka nde omonani sembo na miso na Ngai kati na bato ya ekeke oyo. |
200 | GEN 8:16 | « Bima na masuwa elongo na mwasi na yo, mpe bana na yo ya mibali elongo na basi na bango. |
205 | GEN 8:21 | Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala. |
207 | GEN 9:1 | Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango : « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. |
215 | GEN 9:9 | « Nasali sik’oyo boyokani elongo na yo mpe na bakitani na yo sima na yo, |
218 | GEN 9:12 | Nzambe alobaki lisusu : « Tala elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bino, mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na bino elongo. Ezali boyokani mpo na milongo nyonso oyo ekoya : |
223 | GEN 9:17 | Nzambe alobaki lisusu na Noa : « Yango nde ezali elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali kati na mokili. » |
231 | GEN 9:25 | Alobaki : « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye ! » |
232 | GEN 9:26 | Alobaki lisusu : « Tika ete Yawe, Nzambe ya Semi, apambolama ! Tika ete Kanana azala mowumbu ya Semi ! |
244 | GEN 10:9 | Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. » |
260 | GEN 10:25 | Eberi abotaki bana mibali mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele ; mpe mosusu, « Yokitani. » |
270 | GEN 11:3 | Balobanaki bango na bango : « Tosala babiliki mpe totumba yango na moto. » Boye, basalelaki babiliki lokola mabanga mpe potopoto ya mwindo mpo na kotongela. |
271 | GEN 11:4 | Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. » |
273 | GEN 11:6 | Yawe alobaki : « Lokola bato oyo nyonso balongi kokoma ekolo moko mpe koloba monoko moko, bongo bakomi kino kosala mosala monene oyo, eloko moko te ekopekisa bango sik’oyo kokokisa mabongisi nyonso oyo bakokana kosala ! |
279 | GEN 11:12 | Tango Aripakishadi akokisaki mibu tuku misato na mitano ya mbotama, abotaki mwana mobali na kombo « Shela. » |
296 | GEN 11:29 | Kombo ya mwasi ya Abrami ezalaki « Sarayi, » mpe kombo ya mwasi ya Naori ezalaki « Milika. » Milika azalaki mwana mwasi ya Arani ; mpe Arani azalaki na mwana mwasi mosusu : kombo na ye ezalaki « Yisika. » |
300 | GEN 12:1 | Yawe alobaki na Abrami : « Bima wuta na mokili na yo, wuta na libota na yo mpe wuta na ndako ya tata na yo, mpo na lobiko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo. |
306 | GEN 12:7 | Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye. |
310 | GEN 12:11 | Tango akomaki pene ya kokota na Ejipito, alobaki na mwasi na ye Sarayi : « Nayebi ete ozali mwasi kitoko penza. |
317 | GEN 12:18 | Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye : « Likambo nini osali ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo ? |
327 | GEN 13:8 | Abrami alobaki na Loti : « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko. |
333 | GEN 13:14 | Sima na bokabwani ya Abrami na Loti, Yawe alobaki na Abrami : « Na esika oyo ozali, tombola miso na yo mpe tala na ngambo ya nor, ya sude, ya este mpe ya weste. |
356 | GEN 14:19 | mpe apambolaki Abrami na maloba oyo : « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abrami ! |
360 | GEN 14:23 | ete nakozwa eloko moko te kati na biloko na yo : ezala singa ya kotongela to ya kokangela sapato, mpo ete oloba te : « Nakomisi Abrami mozwi. » |
379 | GEN 15:18 | Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate : |
383 | GEN 16:1 | Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito ; kombo na ye « Agari. » |
393 | GEN 16:11 | Alobaki na ye lisusu : — Ozali na zemi mpe okobota mwana mobali, okopesa ye kombo « Isimaeli, » pamba te Yawe ayoki yo, kati na mawa na yo. |
395 | GEN 16:13 | Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? » Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi : Nzambe oyo azali komona ngai. |
397 | GEN 16:15 | Boye, Agari abotelaki Abrami mwana mobali mpe Abrami apesaki ye kombo « Isimaeli. » |
399 | GEN 17:1 | Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela. |
402 | GEN 17:4 | « Mpo na Ngai, tala boyokani oyo nazali kosala elongo na yo : ‹ Okozala tata ya bikolo ebele. |
407 | GEN 17:9 | Nzambe alobaki lisusu na Abrayami : « Kasi mpo na yo, osengeli kobatela boyokani na Ngai, yo elongo na bakitani na yo sima na yo mpo na milongo oyo ekoya sima. |
413 | GEN 17:15 | Nzambe alobaki lisusu na Abrayami : « Mpo na Sarayi, mwasi na yo, okobenga ye lisusu te Sarayi, kasi okokoma kobenga ye Sara. |
415 | GEN 17:17 | Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « Eh ! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi ! » |
417 | GEN 17:19 | Nzambe alobaki : — Te ! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye. |
431 | GEN 18:6 | Abrayami akotaki na lombangu na ndako na ye ya kapo mpe alobaki na Sara : « Kamata katini misato ya farine mpe sala bagato na lombangu. » |
437 | GEN 18:12 | Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange ! » |
438 | GEN 18:13 | Yawe alobaki na Abrayami : — Mpo na nini Sara aseki mpe alobi : « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange ? » |
442 | GEN 18:17 | Yawe amilobelaki : « Boni, nakoki solo kobombela Abrayami likambo oyo nalingi kosala ? |
445 | GEN 18:20 | Bongo Yawe alobaki : « Nayoki sango ete mabe ya bato ya Sodome mpe ya Gomore eleki ndelo, mpe masumu na bango eleki mingi penza. |
472 | GEN 19:14 | Boye Loti abimaki mpe akendeki koyebisa babandami ya mabala ya bana na ye ya basi. Alobaki : « Bosala noki mpe bobima na esika oyo, pamba te Yawe alingi kobebisa engumba oyo ! » Kasi babandami ya mabala ya bana na ye ya basi bakanisaki ete azali kosala maseki. |
489 | GEN 19:31 | Mokolo moko, kulutu alobaki na leki na ye : « Tata na biso akomi mobange, mpe na etuka oyo, mobali oyo akosangisa na biso nzoto ndenge esalemaka na mokili mobimba, azali te. |
492 | GEN 19:34 | Mokolo oyo elandaki, kulutu alobaki na leki : « Na butu oyo ewuti koleka, nasangisaki nzoto na tata na ngai. Tika ete topesa ye lisusu masanga ya vino na butu ya lelo, mpe yo okokende kosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. » |
495 | GEN 19:37 | Kulutu abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Moabi ; » azali tata ya ekolo ya Moabi, kino na mokolo ya lelo. |
496 | GEN 19:38 | Leki mpe abotaki lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Beni-Ami ; » azali tata ya ekolo ya Amoni, kino na mokolo ya lelo. |
498 | GEN 20:2 | Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi. |
499 | GEN 20:3 | Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. » |
501 | GEN 20:5 | Ezali mobali na ye moko nde alobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ; » mpe ye moko andimaki : « Azali ndeko na ngai ya mobali. » Nasali yango na motema sembo mpe na maboko ezanga mbindo. |
507 | GEN 20:11 | Abrayami azongisaki : — Namilobelaki : « Solo, bato ya esika oyo batosaka Nzambe ata moke te mpe bakoboma ngai mpo na mwasi na ngai. |
509 | GEN 20:13 | Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai : « Tala bolamu oyo okosalela ngai : Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai : ‹ Azali ndeko na ngai. › » |
511 | GEN 20:15 | Abimeleki alobaki : « Mboka na ngai ezali liboso na yo, vanda na esika oyo olingi. » |
512 | GEN 20:16 | Abalukaki mpe alobaki lisusu epai na Sara : « Tala, napesi mbongo ya bibende, nkoto moko, epai ya ndeko na yo ya mobali. Ezali mpo na kozipa mabe oyo basali yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na yo ; boye okomi sembo na nyonso. » |
517 | GEN 21:3 | Abrayami apesaki na mwana oyo Sara abotelaki ye kombo « Izaki. » |
520 | GEN 21:6 | Sara alobaki : « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. » |
521 | GEN 21:7 | Abakisaki : « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele ? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. » |
524 | GEN 21:10 | ayebisaki Abrayami : « Bengana mwasi mowumbu oyo elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu oyo, akoki te kokabola libula elongo na Izaki, mwana na ngai ya mobali. » |
526 | GEN 21:12 | Kasi Nzambe ayebisaki Abrayami : « Tika koyoka pasi na motema mpo na mwana na yo ya mobali mpe mwasi mowumbu na yo. Yoka nyonso oyo Sara azali koyebisa yo, pamba te ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. |
530 | GEN 21:16 | Akendeki kovanda na monkama ya bametele, pamba te alobaki : « Nalingi te komona kufa ya mwana na ngai. » Lokola avandaki mosika ya mwana, atombolaki mongongo mpe alelaki. |
531 | GEN 21:17 | Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye : « Agari, likambo nini ? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye. |
553 | GEN 22:5 | Bongo Abrayami ayebisaki basali na ye : « Botikala awa elongo na ane, wana ngai elongo na mwana tozali kokende kino kuna na likolo mpo na kogumbamela Nzambe ; sima na yango, tokozongela bino. » |
562 | GEN 22:14 | Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo : « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. » |