3 | GEN 1:3 | Mpe Nzambe alobaki : « Tika ete pole ezala ! » Mpe pole ezalaki. |
5 | GEN 1:5 | Nzambe abengaki pole « moyi, » mpe abengaki molili « butu. » Pokwa ezalaki mpe tongo ezalaki. Yango ezalaki mokolo moko. |
6 | GEN 1:6 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango ! » |
8 | GEN 1:8 | Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale. |
9 | GEN 1:9 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
10 | GEN 1:10 | Nzambe abengaki mabele ya kokawuka « mokili, » mpe abengaki mayi oyo esanganaki esika moko « ebale monene. » Nzambe amonaki ete ezali malamu. |
11 | GEN 1:11 | Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa matiti, milona oyo ezali na nkona mpe banzete ya mbuma oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
15 | GEN 1:15 | mpe mpo na kongengisa mokili ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
20 | GEN 1:20 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo ! » |
22 | GEN 1:22 | Nzambe apambolaki yango mpe alobaki : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. » |
24 | GEN 1:24 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango : bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
26 | GEN 1:26 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! » |
28 | GEN 1:28 | Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. » |
30 | GEN 1:30 | Napesi matiti nyonso ya mobesu lokola bilei epai ya banyama nyonso ya mokili, epai ya bandeke nyonso ya likolo, epai ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epai ya bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi. » Yango esalemaki mpe bongo. |
42 | GEN 2:11 | Eteni ya liboso, kombo na yango « Pishoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Avila oyo mabele na yango ezalaki na wolo. |
44 | GEN 2:13 | Eteni ya mibale, kombo na yango « Giyoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Kushi. |
45 | GEN 2:14 | Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre. » Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate. » |
48 | GEN 2:17 | kasi okolia te mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe ; pamba te mokolo oyo okolia yango, okokufa solo. » |
49 | GEN 2:18 | Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. » |
54 | GEN 2:23 | Boye, mobali alobaki : « Tala na mbala oyo, oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai, mosuni ya mosuni na ngai. Bakobenga ye mwasi, pamba te awuti na mobali. » |
59 | GEN 3:3 | Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. » |
71 | GEN 3:15 | Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. » |
72 | GEN 3:16 | Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. » |
75 | GEN 3:19 | Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. » |
76 | GEN 3:20 | Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva, » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili. |
78 | GEN 3:22 | Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. » |
81 | GEN 4:1 | Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. » |
97 | GEN 4:17 | Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye ; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali. |
99 | GEN 4:19 | Lemeki abalaki basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. » |
102 | GEN 4:22 | Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. » |
104 | GEN 4:24 | Solo, bakozongisa mbala sambo mabe oyo basali Kayina ; kasi mpo na Lemeki, ekozala mbala tuku sambo na sambo ! » |
105 | GEN 4:25 | Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. » |
106 | GEN 4:26 | Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe. |
108 | GEN 5:2 | Akelaki bango mobali mpe mwasi, mpe apambolaki bango. Na mokolo oyo akelaki bango, apesaki bango kombo « bato. » |
109 | GEN 5:3 | Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. » |
135 | GEN 5:29 | Abengaki ye Noa mpe alobaki : « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. » |
141 | GEN 6:3 | Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. » |
145 | GEN 6:7 | Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. » |
159 | GEN 6:21 | Okozwa biloko ya kolia ya lolenge na lolenge mpe okobomba yango mpo ete ezala bilei na yo elongo na yango. » |
164 | GEN 7:4 | Pamba te etikali mikolo sambo mpo ete nanokisa mvula oyo ekowumela mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei mpe nakosilisa koboma bikelamu nyonso oyo nasala kati na mokili oyo. » |
201 | GEN 8:17 | Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo : bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. » |
206 | GEN 8:22 | Na tango nyonso oyo mokili ekozala, tango ya kolona mpe tango ya kobuka, tango ya malili mpe tango ya molunge, tango ya mvula mpe tango ya elanga, tango ya moyi mpe tango ya butu, ekozanga te. » |
213 | GEN 9:7 | Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. » |
217 | GEN 9:11 | Nasali boyokani elongo na yo : bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi ekobebisama te na mayi ya mpela. Mpe mpela ekozala lisusu te mpo na kobebisa mokili. » |
222 | GEN 9:16 | Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. » |
223 | GEN 9:17 | Nzambe alobaki lisusu na Noa : « Yango nde ezali elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali kati na mokili. » |
231 | GEN 9:25 | Alobaki : « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye ! » |
233 | GEN 9:27 | Tika ete Nzambe ayeisa monene mabele ya Jafeti ! Tika ete Jafeti avanda na bandako ya kapo ya Semi, mpe Kanana azala mowumbu na ye ! » |
244 | GEN 10:9 | Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. » |
260 | GEN 10:25 | Eberi abotaki bana mibali mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele ; mpe mosusu, « Yokitani. » |
270 | GEN 11:3 | Balobanaki bango na bango : « Tosala babiliki mpe totumba yango na moto. » Boye, basalelaki babiliki lokola mabanga mpe potopoto ya mwindo mpo na kotongela. |
271 | GEN 11:4 | Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. » |
274 | GEN 11:7 | Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. » |
279 | GEN 11:12 | Tango Aripakishadi akokisaki mibu tuku misato na mitano ya mbotama, abotaki mwana mobali na kombo « Shela. » |
296 | GEN 11:29 | Kombo ya mwasi ya Abrami ezalaki « Sarayi, » mpe kombo ya mwasi ya Naori ezalaki « Milika. » Milika azalaki mwana mwasi ya Arani ; mpe Arani azalaki na mwana mwasi mosusu : kombo na ye ezalaki « Yisika. » |
302 | GEN 12:3 | Nakopambola bato oyo bakopambola yo, mpe nakolakela mabe moto oyo akolakela yo mabe ; mpe bato ya bituka nyonso ya mabele bakomipambola mpo na yo. » |
306 | GEN 12:7 | Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye. |
312 | GEN 12:13 | Kasi yo, loba na bango ete ozali ndeko na ngai ya mwasi. Na bongo, bakosalela ngai bolamu mpo na yo, mpe bomoi na ngai ekobika mpo na yo. » |
318 | GEN 12:19 | Mpo na nini olobaki : ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi ? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende ! » |
328 | GEN 13:9 | Mokili mobimba ezali liboso na yo. Ezali malamu tokabwana : soki yo okeyi na ngambo ya loboko ya mwasi, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mobali ; soki okeyi na ngambo ya loboko ya mobali, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mwasi. » |
336 | GEN 13:17 | Telema, tambola kati na mokili na bangambo nyonso, pamba te nakopesa yango epai na yo. » |
357 | GEN 14:20 | Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba. |
360 | GEN 14:23 | ete nakozwa eloko moko te kati na biloko na yo : ezala singa ya kotongela to ya kokangela sapato, mpo ete oloba te : « Nakomisi Abrami mozwi. » |
382 | GEN 15:21 | ya bato ya Amori, ya bato ya Kanana, ya bato ya Girigazi mpe ya bato ya Yebusi. » |
383 | GEN 16:1 | Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito ; kombo na ye « Agari. » |
393 | GEN 16:11 | Alobaki na ye lisusu : — Ozali na zemi mpe okobota mwana mobali, okopesa ye kombo « Isimaeli, » pamba te Yawe ayoki yo, kati na mawa na yo. |
395 | GEN 16:13 | Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? » Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi : Nzambe oyo azali komona ngai. |
397 | GEN 16:15 | Boye, Agari abotelaki Abrami mwana mobali mpe Abrami apesaki ye kombo « Isimaeli. » |
400 | GEN 17:2 | Nakosala boyokani kati na Ngai mpe yo, mpe nakokomisa bakitani na yo ebele penza. » |
406 | GEN 17:8 | Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › » |
412 | GEN 17:14 | Mwana mobali nyonso oyo akokatama ngenga te, bakolongola ye kati na bato na ye, mpo ete abebisi boyokani na Ngai. » |
414 | GEN 17:16 | Nakopambola ye mpe nakopesa yo penza mwana mobali na nzela na ye ; nakopambola ye mpo ete akoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobima na nzela na ye. » |
415 | GEN 17:17 | Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « Eh ! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi ! » |
417 | GEN 17:19 | Nzambe alobaki : — Te ! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye. |
431 | GEN 18:6 | Abrayami akotaki na lombangu na ndako na ye ya kapo mpe alobaki na Sara : « Kamata katini misato ya farine mpe sala bagato na lombangu. » |
437 | GEN 18:12 | Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange ! » |
438 | GEN 18:13 | Yawe alobaki na Abrayami : — Mpo na nini Sara aseki mpe alobi : « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange ? » |
444 | GEN 18:19 | Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. » |
446 | GEN 18:21 | Nakokita mpo na kotala soki makambo oyo bazali kosala ekokani na oyo Ngai nayoki. Soki ezali bongo te, nakoyeba. » |
472 | GEN 19:14 | Boye Loti abimaki mpe akendeki koyebisa babandami ya mabala ya bana na ye ya basi. Alobaki : « Bosala noki mpe bobima na esika oyo, pamba te Yawe alingi kobebisa engumba oyo ! » Kasi babandami ya mabala ya bana na ye ya basi bakanisaki ete azali kosala maseki. |
490 | GEN 19:32 | Tika ete tomelisa tata na biso masanga ya vino mpe tosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. » |
492 | GEN 19:34 | Mokolo oyo elandaki, kulutu alobaki na leki : « Na butu oyo ewuti koleka, nasangisaki nzoto na tata na ngai. Tika ete topesa ye lisusu masanga ya vino na butu ya lelo, mpe yo okokende kosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. » |
495 | GEN 19:37 | Kulutu abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Moabi ; » azali tata ya ekolo ya Moabi, kino na mokolo ya lelo. |
496 | GEN 19:38 | Leki mpe abotaki lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Beni-Ami ; » azali tata ya ekolo ya Amoni, kino na mokolo ya lelo. |
498 | GEN 20:2 | Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi. |
499 | GEN 20:3 | Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. » |
501 | GEN 20:5 | Ezali mobali na ye moko nde alobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ; » mpe ye moko andimaki : « Azali ndeko na ngai ya mobali. » Nasali yango na motema sembo mpe na maboko ezanga mbindo. |
508 | GEN 20:12 | Lisusu, azali ya solo ndeko na ngai ya mwasi, mwana ya tata na ngai ; kasi azali mwana ya mama na ngai te. Nzokande akoma mwasi na ngai. » |
509 | GEN 20:13 | Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai : « Tala bolamu oyo okosalela ngai : Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai : ‹ Azali ndeko na ngai. › » |
511 | GEN 20:15 | Abimeleki alobaki : « Mboka na ngai ezali liboso na yo, vanda na esika oyo olingi. » |
512 | GEN 20:16 | Abalukaki mpe alobaki lisusu epai na Sara : « Tala, napesi mbongo ya bibende, nkoto moko, epai ya ndeko na yo ya mobali. Ezali mpo na kozipa mabe oyo basali yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na yo ; boye okomi sembo na nyonso. » |
517 | GEN 21:3 | Abrayami apesaki na mwana oyo Sara abotelaki ye kombo « Izaki. » |
520 | GEN 21:6 | Sara alobaki : « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. » |
521 | GEN 21:7 | Abakisaki : « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele ? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. » |
524 | GEN 21:10 | ayebisaki Abrayami : « Bengana mwasi mowumbu oyo elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu oyo, akoki te kokabola libula elongo na Izaki, mwana na ngai ya mobali. » |
527 | GEN 21:13 | Nakokomisa mpe mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo ekolo, pamba te ye mpe azali makila na yo. » |
530 | GEN 21:16 | Akendeki kovanda na monkama ya bametele, pamba te alobaki : « Nalingi te komona kufa ya mwana na ngai. » Lokola avandaki mosika ya mwana, atombolaki mongongo mpe alelaki. |
532 | GEN 21:18 | Telema, tombola mwana mpe zwa ye na loboko na yo, pamba te nakokomisa ye ekolo monene. » |
553 | GEN 22:5 | Bongo Abrayami ayebisaki basali na ye : « Botikala awa elongo na ane, wana ngai elongo na mwana tozali kokende kino kuna na likolo mpo na kogumbamela Nzambe ; sima na yango, tokozongela bino. » |
562 | GEN 22:14 | Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo : « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. » |