73 | GEN 3:17 | Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo. |
311 | GEN 12:12 | Tango bato ya Ejipito bakomona yo, bakoloba : ‹ Azali mwasi na ye. › Boye, bakoboma ngai mpe bakotika yo na bomoi. |
318 | GEN 12:19 | Mpo na nini olobaki : ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi ? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende ! » |
402 | GEN 17:4 | « Mpo na Ngai, tala boyokani oyo nazali kosala elongo na yo : ‹ Okozala tata ya bikolo ebele. |
509 | GEN 20:13 | Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai : « Tala bolamu oyo okosalela ngai : Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai : ‹ Azali ndeko na ngai. › » |
606 | GEN 24:14 | Tika ete mwana mwasi oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, tengemisa mbeki na yo mpo ete namela mayi, › mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo, › azala mwasi oyo oponi mpo na Izaki, mosali na Yo. Na nzela oyo, nakoyeba ete olakisi bolamu na Yo epai ya nkolo na ngai. » |
635 | GEN 24:43 | Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo ? › |
636 | GEN 24:44 | Mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo, › tika ete ye nde azala mwasi oyo Yawe aponi mpo na mwana mobali ya nkolo na ngai. » |
771 | GEN 27:43 | Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo : ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani. |
933 | GEN 32:5 | Apesaki bango malako oyo : « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu : ‹ Mosali na yo Jakobi alobi : ‘ Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo. |
938 | GEN 32:10 | Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. › |
941 | GEN 32:13 | Nzokande, Yo olobaki na ngai : ‹ Ya solo nakosalela yo bolamu mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola zelo ya ebale monene, oyo moto moko te akoki kotanga. › » |
946 | GEN 32:18 | Jakobi apesaki mitindo oyo epai ya mosali na ye ya liboso : « Tango Ezawu, ndeko na ngai, akokutana na yo mpe akotuna yo : ‹ Yo ozali mosali ya nani, ozali kokende wapi mpe nani nkolo ya banyama nyonso oyo ezali liboso na yo ? › |
947 | GEN 32:19 | Okozongisa : ‹ Ezali ya Jakobi, mosali na yo, ezali kado oyo atindeli nkolo na ngai Ezawu. Mpe tala ye moko azali koya sima na biso. › » |
949 | GEN 32:21 | Bokoyebisa ye lisusu : ‹ Tala ye moko Jakobi, mosali na yo, azali koya na sima na biso ! › » Pamba te azalaki komilobela : « Nakokitisa kanda na ye na kado oyo natindi liboso na ngai ; sima tango nakokutana na ye, mbala mosusu akoyamba ngai malamu. » |
1286 | GEN 42:33 | Na boye, moto oyo azali mokonzi ya mokili azongiselaki biso : « Tala lolenge nakoyeba ete bozali bato ya sembo : ‹ Botikela ngai awa ndeko moko kati na bino. Bozwa biloko ya kolia oyo esengeli mpo na mabota na bino oyo ezali na nzala makasi mpe bokende. |
1368 | GEN 45:9 | Bozonga noki epai ya tata na ngai mpe boloba na ye : « Mwana na yo, Jozefi, alobi : ‹ Nzambe akomisa ngai nkolo ya Ejipito mobimba ; yaka epai na ngai, kowumela te. |
1523 | GEN 50:16 | Boye batindelaki Jozefi maloba oyo : « Liboso ete tata na yo akufa, atikaki maloba oyo : ‹ Tala makambo oyo bokoyebisa Jozefi : |
1596 | EXO 3:16 | Boye, kende, sangisa bakambi ya Isalaele mpe loba na bango : « Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, abimelaki ngai mpe alobi : ‹ Nazwi mokano ya kobundela bino, pamba te namoni pasi na bino na Ejipito. › » |
1624 | EXO 4:22 | Okoloba na Faraon : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Isalaele azali mwana na Ngai ya liboso ya mobali. |
1695 | EXO 7:9 | « Tango Faraon akoloba na bino : ‹ Bosala bikamwa, › yo Moyize, okoloba na Aron : ‹ Kamata lingenda na yo, bwaka yango liboso ya Faraon, › mpe lingenda ekobongwana nyoka. » |
1702 | EXO 7:16 | Bongo okoloba na ye : ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te. |
1705 | EXO 7:19 | Yawe alobaki na Moyize : « Yebisa Aron : ‹ Kamata lingenda na yo mpe sembola yango na ngambo ya mayi nyonso ya Ejipito : etima mpe miluka, maziba mpe mabulu nyonso ya mayi ekobongwana makila. › Makila ekozala na bisika nyonso ya Ejipito kino na bimelelo ya mayi oyo esalema na nzete to na mabanga. » |
1712 | EXO 7:26 | Sima na yango, Yawe atindaki Moyize : « Kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. |
1744 | EXO 9:1 | Yawe alobaki na Moyize : « Kende koyebisa Faraon : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‘ Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai ! ’ |
1756 | EXO 9:13 | Yawe alobaki na Moyize : « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. |
1781 | EXO 10:3 | Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. |
1811 | EXO 11:4 | Moyize alobaki na Faraon : « Tala makambo oyo Yawe alobi : ‹ Na kati-kati ya butu, nakotambola kati na mokili mobimba ya Ejipito. |
1815 | EXO 11:8 | Boye, bakalaka na yo nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakoya epai na ngai, bakofukama liboso na ngai mpe bakoloba : ‹ Kende, yo mpe bato nyonso oyo bazali kotambola sima na yo. › Mpe sima na yango, nakobima. » Bongo Moyize abimaki na ndako ya Faraon na kanda makasi. |
1843 | EXO 12:26 | Bongo tango bana na bino bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini mpo na bino ? › |
1844 | EXO 12:27 | Bokoloba na bango : ‹ Ezali mbeka ya feti ya Pasika mpo na Yawe oyo alekaki bandako ya bana ya Isalaele kati na Ejipito mpe abikisaki bandako na biso tango abomaki bato ya Ejipito. › » Na bongo, bana ya Isalaele bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe. |
1860 | EXO 12:43 | Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Tala mibeko na tina na Pasika : ‹ Mopaya moko te akoki kolia yango. |
1876 | EXO 13:8 | Na mokolo wana, bokoyebisa na bana na bino ya mibali : ‹ Nazali kosala molulu oyo mpo na kokanisa makambo oyo Yawe asalelaki ngai tango abimisaki ngai na Ejipito. › |
1882 | EXO 13:14 | Mikolo ekoya, tango bana na bino ya mibali bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini ? › Bokoloba na bango : ‹ Ezali na nguya na Ye nde Yawe abimisaki biso na Ejipito, mokili ya bowumbu. |
2083 | EXO 21:5 | Kasi soki mowumbu alobi : ‹ Nalingaka nkolo na ngai, mwasi na ngai mpe bana na ngai, nalingi te kozwa bonsomi, › |
2123 | EXO 22:8 | Na likambo nyonso ya moyibi, soki bato mibale bazali kowela ngombe, ane, meme, elamba to eloko nyonso oyo ebungaki, bongo moto na moto azali koloba : ‹ Ezali ya ngai ! › bango mibale bakomema likambo na bango liboso ya basambisi ; bongo moto oyo basambisi bakokweyisa akozongisa yango mbala mibale epai ya moninga na ye. |
2748 | LEV 1:2 | « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Soki moko kati na bino alingi kobonza nyama lokola mbeka epai na Yawe, asengeli komema nyama oyo azwi kati na bangombe, bantaba mpe bameme. |
2798 | LEV 4:2 | « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Soki moto asali masumu to likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe, tala ndenge bokosala : |
2859 | LEV 6:2 | « Pesa mitindo oyo epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali : ‹ Tala mobeko mpo na mbeka ya kotumba : mbeka ya kotumba ekowumela na likolo ya motalaka ya etumbelo butu mobimba kino na tongo, mpe moto ya etumbelo ekozikisa yango. |
2864 | LEV 6:7 | ‹ Tala mobeko mpo na likabo ya gato : ‘ Bana mibali ya Aron bakomema yango liboso ya Yawe, liboso ya etumbelo. |
2875 | LEV 6:18 | « Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali : ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na masumu : ‘ Bakokata kingo ya mbeka mpo na masumu liboso ya Yawe, na esika oyo bakataka bakingo ya bambeka ya kotumba ; ezali mbeka ya bule penza. |
2881 | LEV 7:1 | « ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na kozongisa boyokani ; ezali eloko ya bule penza : |
2891 | LEV 7:11 | ‹ Tala mibeko mpo na mbeka ya boyokani oyo moto akoki kobonza epai na Yawe : |
2903 | LEV 7:23 | « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Bokolia te mafuta ya ngombe, ya meme to ya ntaba. |
2909 | LEV 7:29 | « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Moto nyonso oyo akobonza epai na Yawe mbeka ya boyokani akomema eteni ya mbeka na ye lokola mbeka na ye epai na Yawe. |
2949 | LEV 8:31 | Moyize alobaki na Aron mpe na bana na ye ya mibali : « Bolamba mosuni na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe bolia yango wana elongo na lipa oyo ezali kati na kitunga oyo ezali na mbeka ya libulisi, ndenge kaka natindaki tango nalobaki : ‹ Aron mpe bana na ye ya mibali nde bakolia yango. › |
2957 | LEV 9:3 | Bongo loba na bana ya Isalaele : ‹ Bozwa ntaba ya mobali lokola mbeka ya masumu, mwana ngombe mpe mwana meme ezanga mbeba mpe ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba, |
2981 | LEV 10:3 | Moyize alobaki na Aron : « Tomoni kokokisama ya maloba oyo Yawe asakolaki tango alobaki : ‹ Bato nyonso oyo bakobelema liboso na Ngai basengeli kotosa bosantu na Ngai, mpe Ngai nakomonisa nkembo na Ngai na miso ya bato nyonso. › » Aron alobaki ata liloba moko te. |
3000 | LEV 11:2 | « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Kati na banyama nyonso oyo ezali kati na mokili, tala banyama oyo bokoki kolia : |
3047 | LEV 12:2 | « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki mwasi aboti mwana mobali, akozala mbindo mikolo sambo lokola tango amonaka makila na ye ya sanza. |
3098 | LEV 13:45 | Moto oyo azwi bokono ya boye asengeli kolata bilamba epasuka, akokatisa suki te, akozipa mandefu na ye mpe akoganga : ‹ Mbindo ! Mbindo ! › |
3114 | LEV 14:2 | « Tala mobeko oyo etali moto oyo azali na bokono ya maba, na mokolo ya kopetolama na ye : ‹ Basengeli komema moto oyo azali na bokono ya maba epai ya Nganga-Nzambe. |
3147 | LEV 14:35 | nkolo ndako asengeli kokende koloba boye epai ya Nganga-Nzambe : ‹ Namoni litono ya maba kati na ndako na ngai. › |
3171 | LEV 15:2 | « Boloba na bana ya Isalaele mpe boyebisa bango : ‹ Soki nzoto ya mibali ya mobali moko ezali kobimisa tofina to mayi, kobima yango ekomisi mobali yango mbindo. |
3238 | LEV 17:2 | « Yebisa Aron, bana na ye ya mibali mpe bana nyonso ya Isalaele, mpe loba na bango : ‹ Tala maloba oyo Yawe alobi : |
3244 | LEV 17:8 | Loba na bango : ‹ Moto nyonso ya Isalaele to mopaya nyonso oyo azali kati na bango, oyo akobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu, |
3254 | LEV 18:2 | « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. |
3284 | LEV 19:2 | « Yebisa lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : ‹ Bozala bule, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na bino, nazali Bule. |
3343 | LEV 20:24 | Boye nayebisaki bino : ‹ Bino nde bato bokozwa mokili na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi ; napesi bino yango lokola libula. › Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo alongolaki bino kati na bikolo mpe atiaki bino pembeni. |
3347 | LEV 21:1 | Yawe ayebisaki Moyize : « Loba na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron : ‹ Nganga-Nzambe akoki te komikomisa mbindo na kosimba ebembe ya moto moko kati na libota na ye, |
3363 | LEV 21:17 | « Loba na Aron : ‹ Kati na bana na yo nyonso na milongo oyo ekoya, moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto na ye, akoki kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye. |
3373 | LEV 22:3 | Loba na bango : ‹ Mpo na milongo oyo ekoya na sima mpe kati na bakitani na bino, soki moko azali mbindo mpe apusani pembeni ya makabo ya bule oyo bana ya Isalaele babonzeli Ngai Yawe, esengeli balongola moto wana na miso na Ngai. Nazali Yawe. |
3388 | LEV 22:18 | « Yebisa Aron, bana na ye ya mibali mpe bana nyonso ya Isalaele : ‹ Soki moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na Isalaele alingi kobonza mbeka ya kotumba epai na Yawe mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko, |
3405 | LEV 23:2 | « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokobanda kosangana mpo na kosala bafeti mpo na lokumu na Ngai, bokobanda kobengisa bato mpo na kogumbamela Ngai Yawe, pamba te ezali mayangani ya bule. |
3413 | LEV 23:10 | « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino mpe tango bokobuka bambuma kati na mokili yango, bokomema epai ya Nganga-Nzambe liboke ya liboso ya bambuma oyo bokobuka. |
3427 | LEV 23:24 | « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Mokolo ya liboso ya sanza ya sambo ekozala mpo na bino mokolo ya kopema, mokolo ya ekaniseli mpe ya kobeta kelelo, mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai. |
3437 | LEV 23:34 | « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, feti ya Bandako ya kapo esengeli kobanda, mpe bakosepela yango mikolo sambo mpo na lokumu ya Yawe. |
3462 | LEV 24:15 | Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto alakeli Nzambe na ye mabe, amemi ngambo ; |
3472 | LEV 25:2 | « Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino ; ezala mabele esengeli kopema, yango ekozala Saba mpo na Yawe. |
3573 | LEV 27:2 | « Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto. |
3799 | NUM 5:6 | « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto, azala mobali to mwasi, atamboli na boyengebene te liboso ya Yawe wana asali moninga na ye mabe, azali na ngambo. |
3805 | NUM 5:12 | « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Soki mwasi akosi mobali na ye, wana abimi na mobali mosusu |
3837 | NUM 6:13 | Tala mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe : ‹ soki mikolo ya libulisi na ye ekoki, basengeli komema ye na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani |
3847 | NUM 6:23 | « Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali : ‹ Tala ndenge nini bokobanda kopambola bana ya Isalaele, bokoloba : |
3942 | NUM 8:2 | « Loba na Aron mpe yebisa ye : ‹ Tango okotia minda, minda sambo esengeli kongengisa liboso ya etelemiselo ya minda. › » |
4043 | NUM 11:18 | Loba na bato : « Bomibongisa mpe bomibulisa mpo na lobi, pamba te bokolia misuni. Yawe ayokaki tango bozalaki kolelalela : ‹ Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia ? Biso oyo tozalaki na biso malamu na Ejipito ! › Sik’oyo Yawe akopesa bino misuni mpe bokolia yango. |
4045 | NUM 11:20 | Kasi bokolia yango sanza mobimba kino ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango nkele, pamba te bobwakaki Yawe oyo azali kati na bino, bolelaki-lelaki liboso na Ye mpe bolobaki : ‹ Mpo na nini tobimaki na Ejipito ? › » |
4156 | NUM 15:2 | « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Sima na bino kokota na mokili oyo nakopesa bino, mokili epai wapi bokovanda, |
4172 | NUM 15:18 | « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nazali komema bino |
4192 | NUM 15:38 | « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Na milongo oyo ekoya, bosengeli kotia singa ya langi ya ble na basonge ya bilamba na bino ; esengeli kokangisa kitendi moko na moko na singa ya langi ya ble. |
4282 | NUM 18:24 | Na esika na yango, napesi epai ya Balevi lokola libula na bango, biteni moko nyonso kati na biteni zomi oyo bana ya Isalaele bakopesa lokola likabo epai na Yawe. Yango wana, nalobaki na tina na bango : ‹ Bakozwa libula moko te elongo na bana ya Isalaele. › » |
4284 | NUM 18:26 | « Loba na Balevi mpe yebisa bango : ‹ Tango bokozwa na maboko ya bana ya Isalaele eteni ya zomi oyo napesi bino lokola libula, bosengeli kopesa eteni ya zomi ya biteni wana ya zomi lokola likabo mpo na Yawe. |
4288 | NUM 18:30 | Loba na Balevi : ‹ Tango bokopesa eteni oyo eleki kitoko, ekotangama mpo na bino lokola bambuma oyo elanga eboti mpe lokola vino oyo ekamolelo ebimisi. |
4424 | NUM 23:7 | Boye, Balami akomaki koloba maloba oyo : « Balaki abengisaki ngai wuta na Arami, mokonzi ya Moabi abengisaki ngai wuta na bangomba ya este. Alobaki : ‹ Yaka, lakela Jakobi mabe mpo na ngai ; yaka, loba mabe mpo na Isalaele. |
4440 | NUM 23:23 | Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi, mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele. Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele : ‹ Tala makambo oyo Nzambe asali ! › |
4452 | NUM 24:5 | ‹ Oh Jakobi, tala ndenge bandako na yo ya kapo ezali kitoko, mpe bisika oyo ovandaka, oh Isalaele ! |
4464 | NUM 24:17 | ‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ; natali ye, kasi na pembeni te. Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi, mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele. Akotobola mito ya bato ya Moabi mpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti. |
4564 | NUM 27:8 | Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto moko asili kokufa mpe atiki bana mibali te, bokopesa libula na ye epai ya mwana na ye ya mwasi. |
4581 | NUM 28:2 | « Pesa mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Bosala keba ete bomema liboso na Ngai, na mikolo oyo ekatama, makabo na Ngai, makabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Ngai. › |
4582 | NUM 28:3 | Loba na bango : ‹ Tala likabo bazikisa na moto oyo bosengeli kobonza epai na Yawe : bana meme mibale ya mobu moko mpe ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na libela. |
4611 | NUM 29:1 | « ‹ Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo, ekozala nde mokolo ya kobeta bakelelo. |
4652 | NUM 30:3 | ‹ Soki moto apesi elaka epai na Yawe na nzela ya ndayi to azwi ekateli songolo na nzela ya ndayi, tika ete akokisa elaka na ye, asala kolanda maloba oyo ebimaki na monoko na ye. |
4688 | NUM 31:22 | ‹ Ezali kaka wolo, palata, bronze, motako, ete, mbodi |
4813 | NUM 33:51 | « Loba na bana ya Isalaele, mpe yebisa bango : ‹ Tango bokokatisa ebale Yordani mpo na kokota na mokili ya Kanana, |
4820 | NUM 34:2 | « Pesa mitindo oyo na bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na Kanana, tala mokili oyo ekopesamela bino lokola libula, mokili ya Kanana elongo na bandelo na yango oyo : |
4857 | NUM 35:10 | « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na Kanana, |
4887 | NUM 36:6 | Tala liloba oyo Yawe alobaki mpo na bana basi ya Tselofikadi : ‹ Bakoki solo kobalana na mibali nyonso oyo bango balingi, kasi ezala kaka kati na mibali ya libota ya tata na bango. |
4900 | DEU 1:6 | « Yawe, Nzambe na biso, alobaki na biso, na ngomba Orebi : ‹ Bowumeli mpe mingi na ngomba oyo. |
4922 | DEU 1:28 | Boni, tokende kaka kuna ? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi : ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › » |
4944 | DEU 2:4 | Pesa mitindo oyo epai ya bato : ‹ Bokomi pembeni ya koleka mokili ya bandeko na bino, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Bakobanga bino, kasi bozala mayele. |