6 | GEN 1:6 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango ! » |
9 | GEN 1:9 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
14 | GEN 1:14 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu, |
20 | GEN 1:20 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo ! » |
22 | GEN 1:22 | Nzambe apambolaki yango mpe alobaki : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. » |
24 | GEN 1:24 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango : bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba ! » Yango esalemaki mpe bongo. |
26 | GEN 1:26 | Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! » |
28 | GEN 1:28 | Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. » |
29 | GEN 1:29 | Bongo Nzambe alobaki : « Tala, kati na mokili mobimba, napesi bino milona oyo ezali na nkona mpe banzete nyonso oyo ebotaka mbuma. Yango nde ekozala bilei na bino. |
33 | GEN 2:2 | Na mokolo ya sambo, Nzambe asilisaki mosala oyo asalaki. Boye, na mokolo ya sambo, akataki mosala nyonso oyo azalaki kosala. |
54 | GEN 2:23 | Boye, mobali alobaki : « Tala na mbala oyo, oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai, mosuni ya mosuni na ngai. Bakobenga ye mwasi, pamba te awuti na mobali. » |
59 | GEN 3:3 | Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. » |
62 | GEN 3:6 | Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango. |
63 | GEN 3:7 | Mbala moko, miso na bango mibale efungwamaki, mpe basosolaki ete bazali bolumbu. Boye, basangisaki makasa ya nzete ya figi mpe bamizipaki. |
64 | GEN 3:8 | Na pokwa, bayokaki makelele ya matambe ya Yawe Nzambe kotambola kati na elanga. Boye, mobali mpe mwasi babombamaki kati na banzete ya elanga mpo na kokima Yawe. |
67 | GEN 3:11 | Nzambe alobaki : — Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu ? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia ? |
70 | GEN 3:14 | Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo, olakelami mabe kati na bibwele mpe banyama nyonso ya zamba. Okotambola na libumu mpe okobanda kolia putulu bomoi na yo mobimba. |
71 | GEN 3:15 | Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. » |
73 | GEN 3:17 | Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo. |
79 | GEN 3:23 | Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki. |
85 | GEN 4:5 | kasi asepelaki te na Kayina mpe na makabo na ye. Bongo, Kayina asilikaki makasi mpe elongi na ye ekomaki mawa-mawa. |
87 | GEN 4:7 | Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango. |
89 | GEN 4:9 | Yawe atunaki Kayina : — Wapi ndeko na yo Abele ? Kayina azongisaki : — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ? |
142 | GEN 6:4 | Na tango wana, ezalaki na bingambe kati na mokili ; mpe lisusu, milimo esangisaki nzoto na bana basi ya bato, bongo bana basi babotelaki yango bana. Bana yango bazalaki bilombe na tango ya kala, bato oyo bakenda sango. |
144 | GEN 6:6 | Boye Yawe ayokaki mawa na ndenge akelaki moto kati na mokili mpe abongolaki makanisi na Ye. |
145 | GEN 6:7 | Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. » |
151 | GEN 6:13 | Boye, Nzambe alobaki na Noa : « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili. |
158 | GEN 6:20 | Bikelamu mibale ya lolenge moko na moko ya bandeke, ya bibwele mpe ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu ; nyonso ekoya epai na yo mpo ete obatela yango na bomoi. |
165 | GEN 7:5 | Bongo, Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe atindaki ye. |
170 | GEN 7:10 | Bongo sima na mikolo sambo, mpela eyaki na mokili. |
176 | GEN 7:16 | Banyama nyonso oyo ekotaki kuna ezalaki mwasi na mobali kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, ndenge Nzambe atindaki Noa. Sima, Yawe akangaki ekuke ya masuwa. |
181 | GEN 7:21 | Bikelamu nyonso ya bomoi kati na mokili ekufaki, ezala bandeke, bibwele, banyama ya zamba to mpe banyama ya mike-mike oyo etambolaka na mabele to mpe bato nyonso. |
183 | GEN 7:23 | Boye, Yawe alongolaki kati na mokili bikelamu nyonso oyo ezalaki na bomoi, kobanda na moto kino na ebwele, ekelamu oyo etambolaka na libumu mpe ndeke ya likolo ; alongolaki bango na mokili mpe etikalaki kaka Noa na ba-oyo bazalaki na ye elongo na masuwa. |
186 | GEN 8:2 | Bitima ya se mpe maninisa ya likolo ekangamaki mpe mvula etikaki konoka. |
193 | GEN 8:9 | Kasi ebenga ezwaki esika ya kotia matambe na yango te, pamba te mayi ezalaki na etando nyonso ya mokili. Boye, ezongaki na masuwa epai ya Noa. Noa abimisaki loboko, azwaki ebenga mpe akotisaki yango kati na masuwa. |
195 | GEN 8:11 | Tango ebenga ezongaki epai na ye na pokwa, ememaki lokasa ya olive ya mobesu na monoko na yango. Boye, Noa asosolaki ete mayi ekiti na mokili. |
199 | GEN 8:15 | Boye, Nzambe alobaki na Noa : |
200 | GEN 8:16 | « Bima na masuwa elongo na mwasi na yo, mpe bana na yo ya mibali elongo na basi na bango. |
201 | GEN 8:17 | Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo : bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. » |
202 | GEN 8:18 | Boye, Noa abimaki libanda elongo na bana na ye ya mibali, mwasi na ye mpe basi ya bana na ye. |
203 | GEN 8:19 | Banyama nyonso, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke nyonso, bikelamu nyonso oyo etambolaka na mokili, ebimaki na masuwa na molongo kolanda lolenge na yango. |
205 | GEN 8:21 | Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala. |
207 | GEN 9:1 | Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango : « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. |
208 | GEN 9:2 | Banyama nyonso ya mokili, bandeke nyonso ya likolo mpe bikelamu oyo etambolaka na mokili elongo na mbisi ya ebale, ekobanga bino makasi ; nyonso epesami na maboko na bino. |
209 | GEN 9:3 | Bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi mpe oyo etambolaka, ekozala bilei na bino. Ndenge kaka napesaki bino matiti, sik’oyo napesi bino biloko nyonso. |
211 | GEN 9:5 | Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye. |
214 | GEN 9:8 | Boye, Nzambe alobaki na Noa mpe na bana na ye ya mibali : |
225 | GEN 9:19 | Bango misato bazalaki bana ya Noa mpe na nzela na bango nde mokili etondaki lisusu na bato. |
229 | GEN 9:23 | Kasi Semi mpe Jafeti bazwaki elamba mpe batiaki yango na mapeka na bango. Bazongaki sima-sima mpe bazipaki bolumbu ya tata na bango. Lokola bilongi na bango etalaki na ngambo mosusu, bamonaki bolumbu ya tata na bango te. |
237 | GEN 10:2 | Bana mibali ya Jafeti : Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi. |
238 | GEN 10:3 | Bana mibali ya Gomeri : Ashikenazi, Rifati mpe Togarima. |
239 | GEN 10:4 | Bana mibali ya Yavani : Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi. |
240 | GEN 10:5 | Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye. |
241 | GEN 10:6 | Bana mibali ya Cham : Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana. |
242 | GEN 10:7 | Bana mibali ya Kushi : Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. Bana mibali ya Raema : Sheba mpe Dedani. |
245 | GEN 10:10 | Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari. |
255 | GEN 10:20 | Bango nde bazalaki bakitani ya Cham kolanda mabota mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango. |
257 | GEN 10:22 | Bana mibali ya Semi : Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami. |
258 | GEN 10:23 | Bana mibali ya Arami : Utsi, Uli, Geteri mpe Mashi. |
264 | GEN 10:29 | Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani. |
266 | GEN 10:31 | Bango nde bazalaki bana mibali ya Semi kolanda bituka mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango. |
267 | GEN 10:32 | Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango. |
270 | GEN 11:3 | Balobanaki bango na bango : « Tosala babiliki mpe totumba yango na moto. » Boye, basalelaki babiliki lokola mabanga mpe potopoto ya mwindo mpo na kotongela. |
271 | GEN 11:4 | Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. » |
274 | GEN 11:7 | Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. » |
275 | GEN 11:8 | Wuta na Babeli, Yawe apanzaki bango na mokili mobimba mpe batikaki kotonga engumba. |
276 | GEN 11:9 | Yango wana, babengaka yango Babeli, pamba te kuna nde Yawe atiaki mobulu kati na maloba ya bato ya mokili mobimba, mpe wuta kuna, Yawe apanzaki bato na mokili mobimba. |
300 | GEN 12:1 | Yawe alobaki na Abrami : « Bima wuta na mokili na yo, wuta na libota na yo mpe wuta na ndako ya tata na yo, mpo na lobiko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo. |
304 | GEN 12:5 | Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna. |
306 | GEN 12:7 | Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye. |
307 | GEN 12:8 | Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este. |
311 | GEN 12:12 | Tango bato ya Ejipito bakomona yo, bakoloba : ‹ Azali mwasi na ye. › Boye, bakoboma ngai mpe bakotika yo na bomoi. |
315 | GEN 12:16 | Basalelaki Abrami bolamu likolo ya Sarayi, mpe Abrami azwaki bameme, bantaba mpe bangombe, ba-ane, basali ya basi mpe ya mibali, bana ya ba-ane mpe bashamo. |
317 | GEN 12:18 | Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye : « Likambo nini osali ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo ? |
319 | GEN 12:20 | Boye, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye na tina na Abrami ete babengana ye elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango. |
320 | GEN 13:1 | Boye Abrami alongwaki na Ejipito mpe akendeki na Negevi elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango ; Loti mpe akendeki na ye elongo. |
322 | GEN 13:3 | Longwa na Negevi, akendeki malembe-malembe kino na Beteli, na esika oyo ezalaki kati ya Beteli mpe Ayi, epai wapi ndako na ye ya kapo ezalaki |
325 | GEN 13:6 | Boye etuka ekomaki moke mpo na bango mibale, pamba te bomengo na bango ezalaki ebele penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ; |
329 | GEN 13:10 | Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito. |
332 | GEN 13:13 | Bato ya Sodome bazalaki penza bato mabe mpe bato ya masumu na miso ya Yawe. |
339 | GEN 14:2 | bakendeki kobundisa Bera, mokonzi ya Sodome ; Birisha, mokonzi ya Gomore ; Shineabi, mokonzi ya Adima ; Shemeberi, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari. |
340 | GEN 14:3 | Bakonzi mitano oyo, basangisaki mampinga na bango ya basoda na lubwaku ya Sidimi oyo ezali ebale monene ya Barozo. |
341 | GEN 14:4 | Bazalaki na se ya bokonzi ya Kedorilaomeri mibu zomi na mibale, kasi na mobu oyo ya zomi na misato, batombokelaki ye. |
344 | GEN 14:7 | Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari. |
345 | GEN 14:8 | Boye mokonzi ya Sodome, mokonzi ya Gomore, mokonzi ya Adima, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari, babimaki mpe babongamaki na lubwaku ya Sidimi |
346 | GEN 14:9 | mpo na kobundisa Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami ; Tideali, mokonzi ya Goyimi ; Amirafeli, mokonzi ya Shineari, mpe Arioki, mokonzi ya Elasari. Bakonzi minei babundisaki bakonzi mitano. |
348 | GEN 14:11 | Bakonzi oyo minei, babotolaki biloko nyonso ya Sodome mpe ya Gomore mpe bakendeki na biloko na bango nyonso ya kolia. |
349 | GEN 14:12 | Bamemaki mpe lisusu Loti, mwana ya ndeko ya Abrami, elongo na bomengo na ye nyonso oyo azwaki tango azalaki kovanda na Sodome. |
350 | GEN 14:13 | Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami. |
351 | GEN 14:14 | Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani. |
372 | GEN 15:11 | Bandeke oyo eliaka misuni ekitaki mpo na kolia misuni yango, kasi Abrami abenganaki yango. |