Wildebeest analysis examples for:   lin-lin   I    February 11, 2023 at 19:00    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

98  GEN 4:18  Enoki abotaki Iradi ; Iradi abotaki Mewuyayeli ; Mewuyayeli abotaki Metusaeli ; Metusaeli abotaki Lemeki.
246  GEN 10:11  Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala
381  GEN 15:20  ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Refayimi,
393  GEN 16:11  Alobaki na ye lisusu : — Ozali na zemi mpe okobota mwana mobali, okopesa ye kombo « Isimaeli» pamba te Yawe ayoki yo, kati na mawa na yo.
397  GEN 16:15  Boye, Agari abotelaki Abrami mwana mobali mpe Abrami apesaki ye kombo « Isimaeli»
398  GEN 16:16  Abrami azalaki na mibu tuku mwambe na motoba ya mbotama tango Agari abotelaki ye Isimaeli.
416  GEN 17:18  Boye Abrayami alobaki na Nzambe : — Tika ete Isimaeli awumela na se ya lipamboli na Yo !
417  GEN 17:19  Nzambe alobaki : — Te ! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki» Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye.
418  GEN 17:20  Kasi mpo na Isimaeli, nayoki yo. Solo, nakopambola ye, nakopesa ye mabota ebele mpe nakokomisa bakitani na ye ebele. Akozala tata ya bakambi zomi na mibale, mpe nakokomisa ye tata ya ekolo monene.
419  GEN 17:21  Kasi na oyo etali boyokani na Ngai, nakosala yango elongo na Izaki, mwana mobali oyo Sara akobotela yo na eleko oyo, na mobu oyo ezali koya.
421  GEN 17:23  Kaka na mokolo wana, Abrayami azwaki mwana na ye ya mobali, Isimaeli, mpe bawumbu nyonso, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mosolo, akatisaki bango nyonso ngenga ndenge kaka Nzambe alobaki na ye.
423  GEN 17:25  mpe Isimaeli, mwana na ye ya mobali, azalaki na mibu zomi na misato tango akatamaki ngenga.
424  GEN 17:26  Abrayami mpe mwana na ye ya mobali, Isimaeli, bakatamaki ngenga mokolo moko.
517  GEN 21:3  Abrayami apesaki na mwana oyo Sara abotelaki ye kombo « Izaki»
518  GEN 21:4  Abrayami akatisaki Izaki ngenga tango akokisaki mikolo mwambe ya mbotama, ndenge Nzambe atindaki ye.
519  GEN 21:5  Abrayami azalaki na mibu nkama moko ya mbotama tango mwana na ye, Izaki, abotamaki.
522  GEN 21:8  Mwana akolaki mpe Sara akataki kopesa ye mabele. Mokolo bakataki kopesa Izaki mabele, Abrayami asalisaki feti monene.
523  GEN 21:9  Kasi tango Sara amonaki ete Isimaeli, mwana oyo Agari, moto ya Ejipito, abotelaki Abrayami, azali koseka ;
524  GEN 21:10  ayebisaki Abrayami : « Bengana mwasi mowumbu oyo elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu oyo, akoki te kokabola libula elongo na Izaki, mwana na ngai ya mobali»
526  GEN 21:12  Kasi Nzambe ayebisaki Abrayami : « Tika koyoka pasi na motema mpo na mwana na yo ya mobali mpe mwasi mowumbu na yo. Yoka nyonso oyo Sara azali koyebisa yo, pamba te ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani.
550  GEN 22:2  Nzambe alobaki na ye : — Zwa Izaki, mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko oyo olingaka ; kende na mokili ya Morija, mpe kuna, okopesa Ngai ye lokola mbeka ya kotumba na likolo ya ngomba oyo nakolakisa yo.
551  GEN 22:3  Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye.
554  GEN 22:6  Abrayami azwaki bakoni ya kotumbela mbeka mpe amemisaki yango Izaki, mwana na ye ; mpe ye moko amemaki moto mpe mbeli, bongo bango mibale bakendeki nzela moko.
555  GEN 22:7  Izaki atunaki Abrayami, tata na ye : — Tata na ngai ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo ! Izaki alobaki : — Tozali na moto mpe koni, kasi wapi mpate mpo na mbeka ya kotumba ?
557  GEN 22:9  Tango bakomaki na esika oyo Nzambe alakisaki ye, Abrayami atongaki etumbelo na esika yango mpe abongisaki bakoni na likolo na yango. Akangaki Izaki, mwana na ye ya mobali, basinga mpe alalisaki ye na etumbelo likolo ya bakoni.
575  GEN 23:3  Abrayami alongwaki liboso ya ebembe ya mwasi na ye mpe asololaki na bato ya Iti.
577  GEN 23:5  Bato ya Iti bazongiselaki Abrayami :
579  GEN 23:7  Boye, Abrayami atelemaki mpe agumbamaki liboso ya bato ya mboka wana, bato ya Iti.
582  GEN 23:10  Nzokande, Efroni, moto ya Iti, oyo azalaki kovanda kati na bato na ye, azongiselaki Abrayami na miso ya bato ya Iti, liboso ya bato nyonso oyo bayaki na ekuke ya engumba na ye :
588  GEN 23:16  Abrayami andimaki maloba ya Efroni mpe amemelaki ye motuya oyo alobaki na miso ya bato ya Iti : mbongo ya bibende, nkama minei, kolanda ndenge bazalaki kotanga mbongo na tango wana.
590  GEN 23:18  epai ya Abrayami mpe ekomaki ya ye na miso ya bato ya Iti oyo bayaki na ekuke ya engumba.
592  GEN 23:20  Bato ya Iti bapesaki Abrayami elanga yango elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki na kati mpo ete ekoma ya ye mpe akundaka bato na ye kuna.
596  GEN 24:4  Kasi okokende na mokili na ngai mpe na libota na ngai, mpe okozwa mwasi moko mpo na Izaki, mwana na ngai ya mobali.
606  GEN 24:14  Tika ete mwana mwasi oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, tengemisa mbeki na yo mpo ete namela mayi› mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo, › azala mwasi oyo oponi mpo na Izaki, mosali na Yo. Na nzela oyo, nakoyeba ete olakisi bolamu na Yo epai ya nkolo na ngai»
650  GEN 24:58  Babengaki Rebeka mpe batunaki ye : — Ondimi solo kokende na mobali oyo ? Rebeka azongisaki : — Iyo, nandimi.
654  GEN 24:62  Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi.
655  GEN 24:63  Na pokwa, Izaki akendeki na bilanga mpo na kozwa tango ya kokanisa na bozindo. Tango atombolaki miso, amonaki bashamo kopusana pene ya esika oyo azalaki.
656  GEN 24:64  Tango Rebeka mpe atombolaki miso, amonaki Izaki mpe akitaki wuta na shamo na ye.
658  GEN 24:66  Mosali ya Abrayami ayebisaki Izaki makambo nyonso oyo asalaki.
659  GEN 24:67  Na yango, Izaki amemaki Rebeka kati na ndako ya kapo ya mama na ye Sara, azwaki ye mpo ete azala mwasi na ye mpe alingaki ye. Boye Izaki abondisamaki na kufa ya mama na ye.
661  GEN 25:2  Ketura abotelaki ye : Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa.
664  GEN 25:5  Abrayami atikaki biloko na ye nyonso na maboko ya Izaki.
665  GEN 25:6  Kasi wana Abrayami azalaki nanu na bomoi, apesaki bakado epai ya bana mibali ya bamakangu na ye mpe atindaki bango na mokili ya este, mosika ya mwana na ye ya mobali Izaki.
668  GEN 25:9  Bana na ye ya mibali, Izaki mpe Isimaeli, bakundaki ye na lilita ya mabanga ya Makipela pene ya Mamire, kati na elanga ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari, moto ya Iti.
669  GEN 25:10  Abrayami asombaki elanga yango epai ya bato ya Iti. Ezalaki kuna nde bakundaki mwasi na ye Sara.
670  GEN 25:11  Sima na kufa ya Abrayami, Nzambe apambolaki Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Izaki azalaki kovanda pene ya Lakai-Royi.
671  GEN 25:12  Tala molongo ya bakitani ya Isimaeli, mwana mobali ya Abrayami, oyo Agari, moto ya Ejipito mpe mwasi mosali ya Sara, abotelaki Abrayami.
672  GEN 25:13  Tala bakombo ya bana mibali ya Isimaeli kolanda ndenge babotamela : Nebayoti, mwana mobali ya liboso ya Isimaeli ; Kedari, Adibeli, Mibisami,
675  GEN 25:16  Bango nde bazalaki bana mibali zomi na mibale ya Isimaeli. Moko na moko azalaki mokambi ya libota, mpe apesaki kombo na ye na mboka na ye mpe na molako na ye.
676  GEN 25:17  Isimaeli awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo. Akataki motema mpe akufaki ; akendeki kokutana na bakoko na ye.
678  GEN 25:19  Tala libota ya Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Abrayami azalaki tata ya Izaki,
679  GEN 25:20  mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami.
680  GEN 25:21  Izaki abondelaki Yawe mpo na Rebeka, mwasi na ye, oyo azalaki ekomba. Yawe ayanolaki libondeli na ye, mpe Rebeka akomaki na zemi.
685  GEN 25:26  Sima na yango, ndeko na ye mpe abimaki, loboko na ye ekanga litindi ya Ezawu ; yango wana bapesaki ye kombo « Jakobi» Izaki azalaki na mibu tuku motoba ya mbotama tango Rebeka abotaki.
687  GEN 25:28  Izaki abandaki kosepela mingi na misuni, yango wana alingaki mingi Ezawu ; mpe Rebeka alingaki mingi Jakobi.
694  GEN 26:1  Wana nzala makasi ekotaki lisusu na mokili lokola na tango ya Abrayami, Izaki akendeki na Gerari epai ya Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia.
699  GEN 26:6  Boye, Izaki avandaki na Gerari.
701  GEN 26:8  Tango awumelaki na mboka yango, Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia, atalaki wuta na lininisa mpe amonaki Izaki kosakana na mwasi na ye Rebeka.
702  GEN 26:9  Bongo Abimeleki abengisaki ye mpe alobaki na ye : — Rebeka azali solo mwasi na yo. Mpo na nini olobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ? » Izaki azongisaki : — Kati na ngai, nazalaki koloba ete nakokaki kokufa mpo na ye.
705  GEN 26:12  Izaki alonaki mbuma na mabele oyo mpe abukaki monkama na monkama na oyo alonaki, pamba te Yawe apambolaki ye.
706  GEN 26:13  Izaki akomaki mozwi, mpe bozwi na ye ekobaki kaka komata kino akomaki moto na bozwi ebele.
709  GEN 26:16  Bongo Abimeleki alobaki na Izaki : — Kende mosika na biso, pamba te okomi na nguya mingi koleka biso.
710  GEN 26:17  Izaki alongwaki wana mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo na lubwaku ya Gerari epai wapi avandaki.
711  GEN 26:18  Atimolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimolaki na tango ya tata na ye Abrayami. Mabulu yango ezalaki bato ya Filisitia nde bakundaki yango sima na kufa ya Abrayami, mpe Izaki abengaki yango kaka na bakombo oyo tata na ye Abrayami apesaka yango.
712  GEN 26:19  Basali ya Izaki batimolaki na lubwaku mpe bamonaki kuna libulu ya mayi ya peto.
713  GEN 26:20  Babateli bibwele ya Gerari baswanisaki babateli bibwele ya Izaki mpe balobaki na bango : « Mayi oyo ezali ya biso. » Izaki apesaki libulu yango kombo « Eseki» pamba te baswanisaki ye na tina na yango.
717  GEN 26:24  Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. »
718  GEN 26:25  Kaka na esika yango, Izaki atongaki etumbelo, abelelaki Kombo ya Yawe, atongaki ndako na ye ya kapo. Basali na ye batimolaki libulu mosusu ya mayi.
719  GEN 26:26  Wuta na Gerari, Abimeleki elongo na Awuzati, mopesi toli na ye, mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bayaki kokutana na Izaki.
720  GEN 26:27  Izaki atunaki bango : — Mpo na nini boyei epai na ngai, bino bato oyo bolingaka ngai te mpe bobenganaki ngai epai na bino ?
723  GEN 26:30  Izaki asalelaki bango feti monene ; baliaki mpe bamelaki.
724  GEN 26:31  Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balapanaki ndayi ; bongo Izaki abimisaki bango na nzela mpe atikaki bango kokende na kimia.
725  GEN 26:32  Kaka na mokolo yango, basali ya Izaki bayaki kopesa ye sango ete bamoni mayi na libulu oyo bazalaki kotimola.
726  GEN 26:33  Izaki apesaki libulu yango kombo « Sheba. » Yango wana engumba yango ebengami kino lelo Beri-Sheba.
727  GEN 26:34  Tango Ezawu akokisaki mibu tuku minei ya mbotama, abalaki Jiditi, mwana mwasi ya Beri, moto ya mokili ya Iti, mpe Basimati, mwana mwasi ya Eloni, moto ya mokili ya Iti.
728  GEN 26:35  Basi yango bazalaki koyokisa Izaki mpe Rebeka pasi na motema.
729  GEN 27:1  Tango Izaki akomaki mobange mpe miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, abengaki Ezawu, mwana na ye ya liboso ya mobali. Alobaki na ye : — Mwana na ngai ! Ezawu azongisaki : — Ngai oyo !
730  GEN 27:2  Izaki alobaki : — Nakomi mobange mpe nayebi mokolo ya kufa na ngai te.
733  GEN 27:5  Nzokande, Rebeka azalaki koyoka makambo oyo Izaki azalaki koyebisa mwana na ye Ezawu. Tango Ezawu akendeki na zamba mpo na koboma nyama mpe kozonga na yango,
746  GEN 27:18  Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki : — Tata na ngai ! Izaki azongisaki : — Ngai oyo, mwana na ngai ; yo nani ?
748  GEN 27:20  Izaki atunaki mwana na ye : — Mwana na ngai, osali ndenge nini mpo ete ozwa nyama noki ? Jakobi azongisaki : — Ezali Yawe, Nzambe na yo, nde atindaki yango na nzela na ngai.
749  GEN 27:21  Izaki alobaki na Jakobi : — Mwana na ngai, pusana pembeni na ngai mpo ete nasimba yo mpe nayeba soki ozali solo mwana na ngai Ezawu.
750  GEN 27:22  Jakobi akendeki pembeni na ye, bongo Izaki asimbaki ye mpe alobaki : — Mongongo ezali ya Jakobi, kasi maboko ezali ya Ezawu.
752  GEN 27:24  Kasi liboso, atunaki ye : — Ozali penza mwana na ngai Ezawu ? Jakobi azongisaki : — Iyo, ezali ngai solo.
753  GEN 27:25  Izaki alobaki : — Mwana na ngai, memela ngai nyama na yo mpo ete nalia mpe napambola yo. Jakobi amemelaki ye nyama, mpe Izaki aliaki. Amemelaki ye lisusu masanga ya vino mpe amelaki.
754  GEN 27:26  Sima, tata na ye, Izaki, alobaki na ye : — Mwana na ngai, yaka awa mpe pesa ngai beze.
755  GEN 27:27  Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo : « Ah ! Solo ya mwana na ngai ezali lokola solo ya bilanga oyo Yawe apamboli.
758  GEN 27:30  Tango Izaki asilisaki kopambola ye, Jakobi atikaki tata na ye ; bongo ndeko na ye, Ezawu, azongaki wuta na bokila.
760  GEN 27:32  Tata na ye, Izaki, atunaki ye : — Yo nani ? Azongisaki : — Ngai Ezawu, mwana na yo ya liboso.
761  GEN 27:33  Bongo Izaki alengaki makasi mpe alobaki : — Nani wana abomaki nyama mpe amemelaki ngai yango ? Naliaki yango liboso ete yo oya, mpe napambolaki ye. Boye apambolami solo !
763  GEN 27:35  Izaki alobaki : — Ndeko na yo ayaki na mayele mabe, ayibi mapamboli na yo.
765  GEN 27:37  Izaki azongiselaki Ezawu : — Tala, nakomisi ye nkolo na yo mpe napesi ye bandeko na ye nyonso lokola basali ; napesi ye ble mpe vino. Mwana na ngai, nasala lisusu nini mpo na yo ?
767  GEN 27:39  Tata na ye, Izaki, alobaki na ye : — Okovanda mosika ya mabele oyo ebotaka malamu, mpe mosika ya mvula ya likolo.
774  GEN 27:46  Rebeka akendeki koyebisa Izaki : « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. »
775  GEN 28:1  Bongo Izaki abengaki Jakobi, apambolaki ye mpe apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana.
779  GEN 28:5  Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi.
780  GEN 28:6  Ezawu ayokaki ete Izaki apambolaki Jakobi mpe atindaki ye na Padani-Arami mpo na kobala mwasi ; ayokaki mpe ete, tango apambolaki ye, apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana. »