1 | GEN 1:1 | Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili. |
70 | GEN 3:14 | Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo, olakelami mabe kati na bibwele mpe banyama nyonso ya zamba. Okotambola na libumu mpe okobanda kolia putulu bomoi na yo mobimba. |
73 | GEN 3:17 | Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo. |
90 | GEN 4:10 | Nzambe alobaki : — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai. |
98 | GEN 4:18 | Enoki abotaki Iradi ; Iradi abotaki Mewuyayeli ; Mewuyayeli abotaki Metusaeli ; Metusaeli abotaki Lemeki. |
99 | GEN 4:19 | Lemeki abalaki basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. » |
103 | GEN 4:23 | Lemeki alobaki na basi na ye : « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ; bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu : Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ; mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali ! |
104 | GEN 4:24 | Solo, bakozongisa mbala sambo mabe oyo basali Kayina ; kasi mpo na Lemeki, ekozala mbala tuku sambo na sambo ! » |
131 | GEN 5:25 | Tango Metusalemi akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na sambo ya mbotama, abotaki Lemeki. |
132 | GEN 5:26 | Sima na kobota Lemeki, Metusalemi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama sambo na tuku mwambe na mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. |
134 | GEN 5:28 | Tango Lemeki akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na mibale ya mbotama, abotaki mwana mobali. |
136 | GEN 5:30 | Sima na kobotama ya Noa, Lemeki awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mitano na tuku libwa na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. |
137 | GEN 5:31 | Mibu nyonso oyo Lemeki awumelaki na bomoi ezalaki nkama sambo na tuku sambo na sambo, sima akufaki. |
229 | GEN 9:23 | Kasi Semi mpe Jafeti bazwaki elamba mpe batiaki yango na mapeka na bango. Bazongaki sima-sima mpe bazipaki bolumbu ya tata na bango. Lokola bilongi na bango etalaki na ngambo mosusu, bamonaki bolumbu ya tata na bango te. |
246 | GEN 10:11 | Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala |
248 | GEN 10:13 | Mitsirayimi azalaki koko ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu, |
254 | GEN 10:19 | Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.) |
257 | GEN 10:22 | Bana mibali ya Semi : Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami. |
273 | GEN 11:6 | Yawe alobaki : « Lokola bato oyo nyonso balongi kokoma ekolo moko mpe koloba monoko moko, bongo bakomi kino kosala mosala monene oyo, eloko moko te ekopekisa bango sik’oyo kokokisa mabongisi nyonso oyo bakokana kosala ! |
294 | GEN 11:27 | Tala libota ya Tera : Tera abotaki Abrami, Naori mpe Arani. Arani nde azalaki tata ya Loti. |
298 | GEN 11:31 | Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna. |
303 | GEN 12:4 | Abrami akendeki ndenge Yawe alobaki na ye ; mpe Loti akendeki na ye elongo. Abrami azalaki na mibu tuku sambo na mitano tango abimaki na engumba Arani. |
304 | GEN 12:5 | Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna. |
307 | GEN 12:8 | Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este. |
317 | GEN 12:18 | Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye : « Likambo nini osali ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo ? |
320 | GEN 13:1 | Boye Abrami alongwaki na Ejipito mpe akendeki na Negevi elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango ; Loti mpe akendeki na ye elongo. |
322 | GEN 13:3 | Longwa na Negevi, akendeki malembe-malembe kino na Beteli, na esika oyo ezalaki kati ya Beteli mpe Ayi, epai wapi ndako na ye ya kapo ezalaki |
324 | GEN 13:5 | Loti, oyo azalaki kotambola elongo na Abrami, azalaki mpe na bameme, bantaba, bangombe mpe basali. |
326 | GEN 13:7 | mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango. |
327 | GEN 13:8 | Abrami alobaki na Loti : « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko. |
329 | GEN 13:10 | Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito. |
330 | GEN 13:11 | Loti aponaki etando ya Yordani mpe akendeki na ngambo ya este. Ezalaki ndenge wana nde bakabwanaki. |
331 | GEN 13:12 | Abrami avandaki na mokili ya Kanana, mpe Loti avandaki kati na bingumba ya etando mpe atelemisaki bandako na ye ya kapo pene ya Sodome. |
333 | GEN 13:14 | Sima na bokabwani ya Abrami na Loti, Yawe alobaki na Abrami : « Na esika oyo ozali, tombola miso na yo mpe tala na ngambo ya nor, ya sude, ya este mpe ya weste. |
349 | GEN 14:12 | Bamemaki mpe lisusu Loti, mwana ya ndeko ya Abrami, elongo na bomengo na ye nyonso oyo azwaki tango azalaki kovanda na Sodome. |
353 | GEN 14:16 | Abotolaki bango bomengo nyonso ya bitumba mpe azongaki na ndeko na ye Loti elongo na biloko na ye nyonso, basi mpe bato mosusu. |
355 | GEN 14:18 | Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo |
356 | GEN 14:19 | mpe apambolaki Abrami na maloba oyo : « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abrami ! |
357 | GEN 14:20 | Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba. |
359 | GEN 14:22 | Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome : — Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili, |
394 | GEN 16:12 | Akozala lokola ane ya zamba. Loboko na ye ekobundisa moto nyonso, mpe loboko ya moto nyonso ekobundisa ye ; akovanda esika moko te na bandeko na ye. |
396 | GEN 16:14 | Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi. |
459 | GEN 19:1 | Ba-anjelu oyo mibale bakomaki na Sodome na pokwa. Wana Loti avandaki na ekuke, amonaki bango, akendeki koyamba bango mpe afukamaki elongi kino na mabele. |
461 | GEN 19:3 | Kasi Loti abondelaki bango mingi ; boye bandimaki kokende na ye elongo mpe bakotaki na ndako na ye. Alambelaki bango bilei ya kitoko, atumbaki mapa ezanga levire mpe baliaki. |
462 | GEN 19:4 | Liboso ete bakende kolala, mibali nyonso ya engumba Sodome, bilenge mpe mibange, bawutaki bipai na bipai mpe bayaki kozingela ndako. |
463 | GEN 19:5 | Babelelaki Loti : — Wapi mibali oyo bayaki epai na yo na butu oyo ? Bimisela biso bango mpo ete tosangisa na bango nzoto. |
464 | GEN 19:6 | Loti abimaki mpo na kosolola na bango ; akangaki ekuke sima na ye. |
467 | GEN 19:9 | Bazongisaki : — Longwa wana. Balobaki lisusu : — Botala moto oyo, ayaki awa lokola mopaya ; sik’oyo alingi komikomisa mosambisi. Tokosala yo mabe koleka bango. Bongo batindikaki Loti na makasi mpe bapusanaki pene ya ekuke mpo na koluka kobuka yango. |
468 | GEN 19:10 | Kasi mibali oyo bazalaki kati na ndako babimisaki maboko mpe babendaki Loti na kati ya ndako mpe bakangaki ekuke. |
470 | GEN 19:12 | Mibali yango mibale balobaki na Loti : — Ozali lisusu na moto mosusu na engumba oyo, ndakisa : mibali ya bana na yo ya basi, bana na yo ya mibali mpe ya basi to mpe ndeko mosusu ? Bimisa bango libanda ya esika oyo |
472 | GEN 19:14 | Boye Loti abimaki mpe akendeki koyebisa babandami ya mabala ya bana na ye ya basi. Alobaki : « Bosala noki mpe bobima na esika oyo, pamba te Yawe alingi kobebisa engumba oyo ! » Kasi babandami ya mabala ya bana na ye ya basi bakanisaki ete azali kosala maseki. |
473 | GEN 19:15 | Tango kaka tongo etanaki, ba-anjelu batungisaki Loti mpe balobaki : — Sala noki, kamata mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya basi oyo bazali awa ; soki te, bokobebisama tango engumba oyo ekozwa etumbu. |
474 | GEN 19:16 | Lokola azalaki kowumela, mibali yango bakangaki na makasi loboko na ye, maboko ya mwasi mpe ya bana na ye ya basi ; mpe bamemaki bango na libanda ya engumba, pamba te Yawe ayokelaki bango mawa. |
476 | GEN 19:18 | Kasi Loti azongisaki : — Te, nkolo na ngai, tika ete esalema bongo te ! |
481 | GEN 19:23 | Loti akomaki na Tsoari tango tongo etanaki. |
484 | GEN 19:26 | Kasi mwasi ya Loti atalaki na sima mpe akomaki ekeko ya mungwa. |
487 | GEN 19:29 | Boye, tango Nzambe abebisaki bingumba ya etando, akanisaki Abrayami mpe abikisaki Loti na likama oyo atindelaki bingumba epai wapi Loti azalaki kovanda. |
488 | GEN 19:30 | Loti mpe bana na ye mibale ya basi babimaki na Tsoari, bakendeki kovanda na bangomba, pamba te azalaki kobanga kotikala kuna. Ye elongo na bana na ye mibale ya basi bakendeki kovanda kati na lidusu ya libanga. |
494 | GEN 19:36 | Boye bana basi oyo mibale ya Loti bakomaki na zemi ya tata na bango. |
496 | GEN 19:38 | Leki mpe abotaki lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Beni-Ami ; » azali tata ya ekolo ya Amoni, kino na mokolo ya lelo. |
505 | GEN 20:9 | Abimeleki abengaki Abrayami mpe alobaki na ye : — Likambo nini osali biso, lisumu nini nasali yo mpo ete omemisa ngai mpe mokili na ngai ngambo ya monene boye ? Osali ngai makambo oyo ekoki kosalema te. |
508 | GEN 20:12 | Lisusu, azali ya solo ndeko na ngai ya mwasi, mwana ya tata na ngai ; kasi azali mwana ya mama na ngai te. Nzokande akoma mwasi na ngai. » |
530 | GEN 21:16 | Akendeki kovanda na monkama ya bametele, pamba te alobaki : « Nalingi te komona kufa ya mwana na ngai. » Lokola avandaki mosika ya mwana, atombolaki mongongo mpe alelaki. |
607 | GEN 24:15 | Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami. |
621 | GEN 24:29 | Rebeka azalaki na ndeko moko ya mobali oyo kombo na ye ezalaki « Labani. » Ye mpe abimaki mbangu mpo na kokutana na mosali ya Abrayami kuna na libulu ya mayi. |
624 | GEN 24:32 | Boye mosali ya Abrayami akotaki na ndako ya Labani, mpe bakitisaki biloko oyo ezalaki na likolo ya bashamo. Bamemaki bashamo na ye na esika oyo ezalaki na matiti mpe bilei ya banyama. Bamemaki mpe mayi mpo na ye mpe mpo na bato oyo bazalaki elongo na ye mpo ete basukola makolo. |
625 | GEN 24:33 | Batielaki ye lisusu biloko ya kolia, kasi alobaki : — Nakoki kolia te kino nakosilisa koloba makambo nyonso oyo nazali na yango. Labani alobaki na ye : — Yebisa biso makambo yango. |
637 | GEN 24:45 | Liboso ete nasilisa kosambela kati na motema na ngai, Rebeka abimaki na mbeki na lipeka na ye. Akitaki na libulu ya mayi mpe atokaki mayi. Nalobaki na ye : « Nabondeli yo, pesa ngai mayi ya komela. » |
642 | GEN 24:50 | Labani mpe Betweli bazongisaki : — Makambo oyo nyonso ewuti epai na Yawe. Tozali na likambo mosusu te ya koloba na yo. |
654 | GEN 24:62 | Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi. |
662 | GEN 25:3 | Yokishani azalaki tata ya Saba mpe Dedani. Tala bato oyo bazalaki bakitani ya Dedani : Bato ya Ashuri, ya Letushi mpe ya Lewumi. |
670 | GEN 25:11 | Sima na kufa ya Abrayami, Nzambe apambolaki Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Izaki azalaki kovanda pene ya Lakai-Royi. |
679 | GEN 25:20 | mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami. |
681 | GEN 25:22 | Kati na libumu na ye, bana bazalaki kowelana. Alobaki : « Likambo nini oyo ekomeli ngai ? » Boye, akendeki kotuna Yawe. |
684 | GEN 25:25 | Lipasa ya liboso oyo abimaki azalaki motane mpe nzoto na ye mobimba ezalaki etonda na bapwale lokola elamba ya bapwale ; yango wana babengaki ye « Ezawu. » |
692 | GEN 25:33 | Kasi Jakobi alobaki : — Lapa liboso ndayi. Ezawu alapaki ndayi epai ya Jakobi ; mpe na nzela wana, atekaki boyaya na ye epai ya Jakobi. |
722 | GEN 26:29 | Lapa ndayi ete okosala biso mabe te ndenge biso mpe tosalaki yo mabe te ; tosalelaki yo kaka bolamu mpe totikaki yo kokende na kimia. Sik’oyo, Yawe apamboli yo. » |
771 | GEN 27:43 | Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo : ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani. |
776 | GEN 28:2 | Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo. |
779 | GEN 28:5 | Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi. |
793 | GEN 28:19 | Apesaki esika yango kombo « Beteli. » Na kala, bazalaka kobenga esika yango « Luze. » |
798 | GEN 29:2 | Kuna, amonaki libulu ya mayi kati na elanga mpe bitonga misato ya bameme elali pembeni ya libulu, pamba te bameme ezalaki komela mayi na libulu yango. Libanga moko ya monene ezipaki monoko ya libulu. |
801 | GEN 29:5 | Atunaki bango lisusu : — Boyebi Labani, koko ya Naori ? Bazongisaki : — Iyo, toyebi ye. |
806 | GEN 29:10 | Tango Jakobi amonaki Rasheli, mwana mwasi ya noko na ye Labani, elongo na bibwele ya Labani, apusanaki, alongolaki libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe amelisaki yango mayi. |
809 | GEN 29:13 | Tango kaka Labani ayokaki sango na tina na Jakobi, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, akendeki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye, apesaki ye beze mpe amemaki ye na ndako na ye ; mpe kuna, Jakobi ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki. |
810 | GEN 29:14 | Labani alobaki na ye : « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza ! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba. |
811 | GEN 29:15 | Labani alobaki na Jakobi : — Boni, osalela ngai mosala ya ofele mpo ete ozali moto ya libota na ngai ? Yebisa ngai : olingi ete lifuti na yo ezala nini ? |
812 | GEN 29:16 | Nzokande, Labani azalaki na bana basi mibale ya mikolo : Lea mpe leki na ye Rasheli. |
813 | GEN 29:17 | Lea azalaki na miso elala kasi Rasheli azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko. |
815 | GEN 29:19 | Labani alobaki : — Eleki malamu ete napesa ye epai na yo na esika ete napesa ye epai ya mobali mosusu. Vanda awa elongo na ngai. |
817 | GEN 29:21 | Sima, Jakobi alobaki na Labani : — Mikolo na ngai ekoki ; pesa ngai mwasi na ngai, pamba te nalingi kozala na ye. |
818 | GEN 29:22 | Na boye, Labani abengisaki bato nyonso ya esika wana mpe asalisaki feti. |
819 | GEN 29:23 | Tango pokwa ekomaki, Labani azwaki Lea, mwana na ye ya mwasi, apesaki ye epai ya Jakobi mpe Jakobi asangisaki na ye nzoto. |