47 | GEN 2:16 | Mpe Yawe Nzambe apesaki mitindo oyo na moto : « Okoki kolia mbuma nyonso ya elanga, |
65 | GEN 3:9 | Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye : — Ozali wapi ? |
70 | GEN 3:14 | Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo, olakelami mabe kati na bibwele mpe banyama nyonso ya zamba. Okotambola na libumu mpe okobanda kolia putulu bomoi na yo mobimba. |
74 | GEN 3:18 | Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende. Okolia matiti ya bilanga. |
75 | GEN 3:19 | Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. » |
90 | GEN 4:10 | Nzambe alobaki : — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai. |
92 | GEN 4:12 | Tango okobalola mabele, ekobotela yo mbuma te. Okozala koyengayenga mpe kotelengana na mokili. |
152 | GEN 6:14 | Sala masuwa ya mabaya ya goferi mpo na lobiko na yo ; kabola yango na bashambre. Okopakola gudron na kati mpe na libanda na yango. |
154 | GEN 6:16 | Okotia likolo na yango lidusu ya basantimetele pene tuku mitano, okotia ekuke na mopanzi na yango ; mpe na kati, okosala etaje ya liboso, ya mibale mpe ya misato. |
157 | GEN 6:19 | Okokotisa mpe kati na masuwa, mibale-mibale, bikelamu nyonso ya bomoi, mwasi mpe mobali, mpo ete obatela yango na bomoi elongo na yo. |
159 | GEN 6:21 | Okozwa biloko ya kolia ya lolenge na lolenge mpe okobomba yango mpo ete ezala bilei na yo elongo na yango. » |
263 | GEN 10:28 | Obali, Abimaeli, Saba, |
264 | GEN 10:29 | Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani. |
343 | GEN 14:6 | bato ya Ori, na Seiri, mokili ya bangomba kino na Parani, pene ya esobe. |
352 | GEN 14:15 | Na butu, Abrami akabolaki bato na ye mpo na kobundisa bango, abetaki bango mpe alandaki bango kino na Oba, na nor ya Damasi. |
355 | GEN 14:18 | Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo |
356 | GEN 14:19 | mpe apambolaki Abrami na maloba oyo : « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abrami ! |
357 | GEN 14:20 | Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba. |
359 | GEN 14:22 | Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome : — Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili, |
363 | GEN 15:2 | Kasi Abrami azongisaki : — Oh Nkolo Yawe, okopesa ngai nini ? Nazali na mwana te, mpe ezali Eliezeri ya Damasi nde akokitana na libula na ngai. |
364 | GEN 15:3 | Abrami alobaki lisusu : — Opesi ngai mwana te ; yango wana mosali moko kati na ndako na ngai akozala mokitani ya libula na ngai ! |
393 | GEN 16:11 | Alobaki na ye lisusu : — Ozali na zemi mpe okobota mwana mobali, okopesa ye kombo « Isimaeli, » pamba te Yawe ayoki yo, kati na mawa na yo. |
402 | GEN 17:4 | « Mpo na Ngai, tala boyokani oyo nazali kosala elongo na yo : ‹ Okozala tata ya bikolo ebele. |
449 | GEN 18:24 | Soki bato ya sembo bazali tuku mitano kati na engumba, okoboma bango kaka ? Okolimbisa engumba yango te mpo na bato ya sembo tuku mitano oyo bazali kati na yango ? |
450 | GEN 18:25 | Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ? |
470 | GEN 19:12 | Mibali yango mibale balobaki na Loti : — Ozali lisusu na moto mosusu na engumba oyo, ndakisa : mibali ya bana na yo ya basi, bana na yo ya mibali mpe ya basi to mpe ndeko mosusu ? Bimisa bango libanda ya esika oyo |
499 | GEN 20:3 | Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. » |
505 | GEN 20:9 | Abimeleki abengaki Abrayami mpe alobaki na ye : — Likambo nini osali biso, lisumu nini nasali yo mpo ete omemisa ngai mpe mokili na ngai ngambo ya monene boye ? Osali ngai makambo oyo ekoki kosalema te. |
540 | GEN 21:26 | Abimeleki azongisaki : — Nayebi te nani asalaki bongo. Oyebisaki ngai likambo moko te na tina na yango, mpe nayoki yango kaka lelo. |
615 | GEN 24:23 | Atunaki ye : — Ozali mwana mwasi ya nani ? Nabondeli yo, yebisa ngai. Boni, esika ekoki komonana na ndako ya tata na yo mpo na biso mpo ete tolekisa kuna butu ? |
634 | GEN 24:42 | Nzokande lelo, tango nakomaki na libulu ya mayi, nasambelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, nabondeli Yo, longisa mobembo na ngai. |
639 | GEN 24:47 | Natunaki ye : « Ozali mwana mwasi ya nani ? » Azongisaki : « Nazali mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali oyo Milika abotelaki Naori. » Boye natiaki lopete na zolo na ye mpe basheneti na maboko na ye. |
650 | GEN 24:58 | Babengaki Rebeka mpe batunaki ye : — Ondimi solo kokende na mobali oyo ? Rebeka azongisaki : — Iyo, nandimi. |
732 | GEN 27:4 | Okolambela ngai elubu ya kitoko ndenge nalingaka mpe okomemela ngai yango ; nakolia mpo ete napambola yo liboso ete nakufa. |
735 | GEN 27:7 | « Memela ngai nyama ! Okolambela ngai elubu ya kitoko, mpe nakolia yango mpo ete napambola yo na miso ya Yawe liboso ete nakufa. » |
752 | GEN 27:24 | Kasi liboso, atunaki ye : — Ozali penza mwana na ngai Ezawu ? Jakobi azongisaki : — Iyo, ezali ngai solo. |
767 | GEN 27:39 | Tata na ye, Izaki, alobaki na ye : — Okovanda mosika ya mabele oyo ebotaka malamu, mpe mosika ya mvula ya likolo. |
768 | GEN 27:40 | Okobika na nzela ya mopanga na yo mpe okosalela ndeko na yo ya mobali. Kasi tango okotambola bipai na bipai, okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo. |
775 | GEN 28:1 | Bongo Izaki abengaki Jakobi, apambolaki ye mpe apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana. |
780 | GEN 28:6 | Ezawu ayokaki ete Izaki apambolaki Jakobi mpe atindaki ye na Padani-Arami mpo na kobala mwasi ; ayokaki mpe ete, tango apambolaki ye, apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana. » |
791 | GEN 28:17 | Jakobi abangaki mpe abakisaki : « Oyo esika ya somo boye ! Ekoki kozala eloko mosusu te, bobele Ndako ya Nzambe. Awa nde ekuke ya lola. » |
842 | GEN 30:11 | Lea alobaki : « Oyo nde esengo ! » Boye apesaki ye kombo « Gadi. » |
844 | GEN 30:13 | Lea alobaki : « Oyo esengo ya ndenge nini nakomi na yango ! Pamba te basi bakobenga ngai moto ya esengo. » Boye apesaki ye kombo « Aseri. » |
846 | GEN 30:15 | Kasi Lea azongiselaki ye : — Boni, ndenge ozwi mobali na ngai, ekoki te ? Olingi lisusu kozwa bambuma ya mandragore ya mwana na ngai ? Rasheli alobaki na ye : — Malamu ! Soki opesi ngai bambuma ya mandragore ya mwana na yo, Jakobi akolala epai na yo na butu ya lelo. |
847 | GEN 30:16 | Na pokwa, wana Jakobi awutaki bilanga, Lea akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye : « Okolala epai na ngai, pamba te napesi bambuma ya mandragore ya mwana na ngai mpo na yo. » Boye Jakobi asangisaki na ye nzoto na butu wana. |
860 | GEN 30:29 | Jakobi alobaki na ye : — Oyebi yo moko ndenge nini ngai nasaleli yo mpe ndenge nini, na nzela na ngai, bibwele na yo ekomi ebele. |
862 | GEN 30:31 | Labani atunaki ye : — Nasengeli kopesa yo nini ? Jakobi azongisaki : — Okopesa ngai eloko te. Kasi soki olingi kosala likambo oyo mpo na ngai, nakokoba koleisa mpe kobatela bibwele na yo. |
900 | GEN 31:26 | Labani alobaki na Jakobi : — Makambo nini osali ngai ? Okosi ngai mpe omemi bana na ngai ya basi lokola bakangami ya bitumba ! |
902 | GEN 31:28 | Otikeli ngai ata tango te ya kopesa beze na bakoko na ngai mpe na bana na ngai ya basi ! Osali penza lokola moto ya liboma ! |
913 | GEN 31:39 | Namemelaki yo nyama moko te oyo banyama ya zamba ebomaki. Ngai moko nazalaki kofuta yango. Ozalaki kofutisa ngai oyo bazalaki koyiba ngai na moyi to na butu. |
931 | GEN 32:3 | Tango Jakobi amonaki bango, alobaki : « Oyo ezali molako ya Nzambe ! » Mpe abengaki esika yango : Maanayimi. |
938 | GEN 32:10 | Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. › |
947 | GEN 32:19 | Okozongisa : ‹ Ezali ya Jakobi, mosali na yo, ezali kado oyo atindeli nkolo na ngai Ezawu. Mpe tala ye moko azali koya sima na biso. › » |
974 | GEN 33:13 | Kasi Jakobi azongiselaki ye : — Oh nkolo na ngai ! Oyebi malamu ete bana bazwi nanu makasi te, mpe nazali lisusu na bameme, bangombe mpe bantaba ya basi oyo ezali nanu komelisa mabele. Soki tomeki kotambolisa yango mbangu makasi kaka na mokolo moko, bibwele nyonso ekokufa. |
1030 | GEN 35:18 | Lokola azalaki kobundana mpo na kokufa, liboso ya kokata motema, apesaki mwana na ye ya mobali kombo Beni-Oni. Kasi tata na ye apesaki ye kombo Benjame. |
1043 | GEN 36:2 | Ezawu abalaki basi na ye kati na bana basi ya Kanana : Ada, mwana mwasi ya Eloni, moto ya Iti ; Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, moto ya Evi ; |
1046 | GEN 36:5 | Olibama abotaki Yewushi, Yaelami mpe Kora. Bango nde bana mibali oyo babotelaki Ezawu na mokili ya Kanana. |
1052 | GEN 36:11 | Bana mibali ya Elifazi : Temani, Omari, Tsefo, Gaetami mpe Kenazi. |
1055 | GEN 36:14 | Tala bana mibali oyo Olibama, mwasi ya Ezawu, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, abotelaki Ezawu : Yewushi, Yaelami mpe Kora. |
1056 | GEN 36:15 | Tala bakonzi ya mabota ya bana mibali ya Ezawu : Bana ya Elifazi, mwana liboso ya Ezawu : mokonzi Temani, mokonzi Omari, mokonzi Tsefo, mokonzi Kenazi, |
1059 | GEN 36:18 | Bana mibali ya Olibama, mwasi ya Ezawu : mokonzi Yewushi, mokonzi Yaelami mpe mokonzi Kora. Bango nde bakonzi ya libota ya Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe mwasi ya Ezawu. |
1061 | GEN 36:20 | Tala bakitani ya Seiri, moto ya Ori, bato ya liboso oyo bavandaki na mokili yango : Lotani, Shobali, Tsibeoni, Ana, |
1062 | GEN 36:21 | Dishoni, Etseri mpe Dishani. Bango nde bakonzi ya libota ya Ori, mwana mobali ya Seiri, na mokili ya Edomi. |
1063 | GEN 36:22 | Bana mibali ya Lotani : Ori mpe Emami. Timina azalaki ndeko mwasi ya Lotani. |
1064 | GEN 36:23 | Bana mibali ya Shobali : Alivani, Manaati, Ebali, Shefo mpe Onami. |
1066 | GEN 36:25 | Bana ya Ana : Dishoni, mwana na ye ya mobali ; mpe Olibama, mwana na ye ya mwasi. |
1070 | GEN 36:29 | Tala bakonzi ya mabota ya Ori : mokonzi Lotani, mokonzi Shobali, mokonzi Tsibeoni, mokonzi Ana, |
1071 | GEN 36:30 | mokonzi Dishoni, mokonzi Etseri mpe mokonzi Dishani. Bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Ori, na mokili ya Seiri. |
1082 | GEN 36:41 | Olibama, Ela, Pinoni, |
1092 | GEN 37:8 | Bandeko na ye ya mibali balobaki na ye : — Okanisi ete okokoma mokonzi na biso mpe okokonza biso ? Bongo bayinaki ye lisusu koleka likolo ya ndoto na ye mpe likolo ya makambo oyo alobaki. |
1094 | GEN 37:10 | Tango ayebisaki tata na ye ndenge ayebisaki bandeko na ye ya mibali, tata na ye agangelaki ye mpe alobaki : — Ndoto nini wana yo osili kolota ? Okanisi ete ngai, mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali, tokoya mpe tokogumbama na mabele liboso na yo ? |
1097 | GEN 37:13 | Isalaele alobaki na Jozefi : — Oyebi ete bandeko na yo bazali koleisa bibwele pembeni ya Sishemi ; yaka, pamba te nalingi kotinda yo epai na bango. Jozefi azongisaki : — Malamu ! |
1099 | GEN 37:15 | moto moko amonaki ye tango azalaki koyengayenga na bilanga. Atunaki ye : — Ozali koluka nini ? |
1100 | GEN 37:16 | Jozefi azongisaki : — Nazali koluka bandeko na ngai. Okoki koyebisa ngai esika nini bazali koleisa bibwele na bango ? |
1124 | GEN 38:4 | Mwasi yango azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali ; apesaki ye kombo « Onani. » |
1128 | GEN 38:8 | Bongo Yuda alobaki na Onani : « Sangisa nzoto na semeki na yo mpo ete obota bana mpo na ndeko na yo ya mobali oyo akufa. » |
1129 | GEN 38:9 | Kasi lokola Onani ayebaki ete bana oyo bakobotama bakozala ya ye te, azalaki kobwaka mayi na ye ya mibali na mabele tango nyonso azalaki kosangisa nzoto na semeki na ye, mpo ete abotela ndeko na ye ya mobali bana te. |
1130 | GEN 38:10 | Likambo oyo Onani azalaki kosala ezalaki kosepelisa Yawe te. Boye ye mpe lisusu, Yawe abomaki ye. |
1136 | GEN 38:16 | Lokola Yuda ayebaki te ete ezali bokilo na ye ya mwasi, apusanaki na esika oyo azalaki, pembeni ya nzela, mpe alobaki na ye : — Yaka, ndima ete tosangisa na yo nzoto. Tamari atunaki : — Okopesa ngai nini soki osangisi na ngai nzoto ? |
1149 | GEN 38:29 | Kasi azongisaki loboko na ye, mpe ndeko na ye ya mobali abimaki. Bongo mwasi oyo abotisaka alobaki : « Ofungoli nzela nini mpo na kobima ? » Mpe bapesaki ye kombo « Peretsi. » |
1186 | GEN 40:13 | Sima na mikolo misato, Faraon akotombola moto na yo mpe akozongisa yo na esika na yo ya mosala. Okotia lisusu kopo ya Faraon na maboko na ye ndenge ozalaki kosala na kala. |
1236 | GEN 41:40 | Okozala mokonzi ya ndako na ngai mpe bato na ngai nyonso bakobanda kotosa mitindo na yo. Kaka kiti ya bokonzi nde ekosala ete ngai nazala na likolo na yo. |
1241 | GEN 41:45 | Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito. |
1246 | GEN 41:50 | Liboso ete mibu ya nzala makasi eya, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale. |
1327 | GEN 44:2 | Okotia kopo na ngai oyo ya palata na moto ya saki ya leki na bango ya suka elongo na mbongo na ye ya ble. » Moto yango asalaki ndenge kaka Jozefi alobaki na ye. |
1365 | GEN 45:6 | Oyo ezali mobu ya mibale wuta nzala makasi ekotaki na mokili ; mpe na mibu mitano oyo ezali koya, bakolona te mpe bakobuka te. |
1369 | GEN 45:10 | Okovanda na etuka ya Gosheni mpe okozala pembeni na ngai : yo, bana na yo mpe bakitani na yo, bameme na yo, bantaba na yo, bangombe na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango. |
1378 | GEN 45:19 | Okoyebisa bango lisusu : « Bozwa ndambo ya bashario ya Ejipito mpo na bana mpe basi na bino ; bongo bozwa tata na bino mpe bozonga awa. |
1397 | GEN 46:10 | Bana mibali ya Simeoni : Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo babotelaki ye na mwasi ya mokili ya Kanana. |
1399 | GEN 46:12 | Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli. |
1407 | GEN 46:20 | Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi. |
1429 | GEN 47:8 | Faraon atunaki Jakobi : — Ozali na mibu boni ? |
1446 | GEN 47:25 | Bazongisaki : — Obikisi bomoi na biso ! Lokola tozwi ngolu na miso na yo nkolo na biso, tokozala bawumbu ya Faraon. |
1470 | GEN 48:18 | Jozefi alobaki na tata na ye : — Boye te, tata na ngai ! Oyo azali mwana ya liboso ; tia loboko na yo ya mobali likolo ya moto na ye. |
1492 | GEN 49:18 | Oh Yawe, nazali na elikya ete okobikisa ngai ! |
1561 | EXO 2:6 | Afungolaki yango mpe amonaki kati na yango mwana moko ya mobali azali kolela. Ayokelaki ye mawa mpe alobaki : « Oyo azali solo mwana ya Ba-Ebre. » |
1569 | EXO 2:14 | Moto wana azongisaki : — Boni, nani akomisi yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso ? Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito ? Moyize abangaki mpe amilobelaki : « Solo, likambo oyo nasalaki, esili koyeba. » |
1581 | EXO 3:1 | Moyize azalaki koleisa bibwele ya Jetro, bokilo na ye mpe Nganga-Nzambe ya Madiani. Amemaki bibwele mosika, kati na esobe, mpe akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe. |