Wildebeest analysis examples for:   lin-lin   P    February 11, 2023 at 19:00    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

5  GEN 1:5  Nzambe abengaki pole « moyi, » mpe abengaki molili « butu. » Pokwa ezalaki mpe tongo ezalaki. Yango ezalaki mokolo moko.
8  GEN 1:8  Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale.
13  GEN 1:13  Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya misato.
19  GEN 1:19  Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya minei.
23  GEN 1:23  Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mitano.
31  GEN 1:31  Nzambe atalaki biloko nyonso oyo akelaki mpe amonaki ete ezali malamu koleka. Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya motoba.
42  GEN 2:11  Eteni ya liboso, kombo na yango « Pishoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Avila oyo mabele na yango ezalaki na wolo.
61  GEN 3:5  Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye : koyeba malamu na mabe.
72  GEN 3:16  Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »
141  GEN 6:3  Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. »
164  GEN 7:4  Pamba te etikali mikolo sambo mpo ete nanokisa mvula oyo ekowumela mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei mpe nakosilisa koboma bikelamu nyonso oyo nasala kati na mokili oyo. »
241  GEN 10:6  Bana mibali ya Cham : Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana.
249  GEN 10:14  ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti.
260  GEN 10:25  Eberi abotaki bana mibali mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele ; mpe mosusu, « Yokitani. »
283  GEN 11:16  Tango Eberi akokisaki mibu tuku misato na minei ya mbotama, abotaki Pelegi.
284  GEN 11:17  Mpe sima na mbotama ya Pelegi, Eberi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
285  GEN 11:18  Tango Pelegi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Rewu.
286  GEN 11:19  Mpe sima na mbotama ya Rewu, Pelegi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
326  GEN 13:7  mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango.
343  GEN 14:6  bato ya Ori, na Seiri, mokili ya bangomba kino na Parani, pene ya esobe.
358  GEN 14:21  Mokonzi ya Sodome alobaki na Abrami : — Pesa ngai bato, kamata na yo biloko.
381  GEN 15:20  ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Refayimi,
444  GEN 18:19  Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »
521  GEN 21:7  Abakisaki : « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele ? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. »
535  GEN 21:21  Wana azalaki kovanda kati na esobe ya Parani, mama na ye azwelaki ye mwasi ya mokili ya Ejipito.
536  GEN 21:22  Kaka na tango yango, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bakendeki kokutana na Abrayami ; mpe Abimeleki alobaki na Abrayami : — Nzambe azali kolongisa yo na makambo nyonso oyo ozali kosala.
546  GEN 21:32  Sima na bango kosala boyokani kuna na Beri-Sheba, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bazongaki na mokili ya Filisitia.
570  GEN 22:22  Kesedi, Azo, Pilidashi, Yidilafi mpe Betweli.
679  GEN 25:20  mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami.
719  GEN 26:26  Wuta na Gerari, Abimeleki elongo na Awuzati, mopesi toli na ye, mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bayaki kokutana na Izaki.
776  GEN 28:2  Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo.
779  GEN 28:5  Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi.
780  GEN 28:6  Ezawu ayokaki ete Izaki apambolaki Jakobi mpe atindaki ye na Padani-Arami mpo na kobala mwasi ; ayokaki mpe ete, tango apambolaki ye, apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana. »
781  GEN 28:7  Jakobi atosaki tata na ye mpe mama na ye, mpe akendeki na Padani-Arami.
832  GEN 30:1  Tango Rasheli amonaki ete azali kobotela Jakobi bana te, akomaki na zuwa mpo na ndeko na ye ya mwasi. Boye alobaki na Jakobi : — Pesa ngai bana, noki te nakokufa.
844  GEN 30:13  Lea alobaki : « Oyo esengo ya ndenge nini nakomi na yango ! Pamba te basi bakobenga ngai moto ya esengo. » Boye apesaki ye kombo « Aseri. »
856  GEN 30:25  Sima na Rasheli kobota Jozefi, Jakobi alobaki na Labani : — Pesa ngai nzela mpo ete nazonga na mboka na ngai.
857  GEN 30:26  Pesa ngai mpe basi mpe bana na ngai, ba-oyo mpo na bango nasaleli yo ; bongo nakokende na ngai. Pamba te oyebi malamu mosala makasi oyo nasaleli yo.
892  GEN 31:18  Amemaki bibwele na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki, bibwele oyo azwaki tango avandaki na Padani-Arami, mpo na kozonga epai ya Izaki, tata na ye, na mokili ya Kanana.
949  GEN 32:21  Bokoyebisa ye lisusu : ‹ Tala ye moko Jakobi, mosali na yo, azali koya na sima na biso ! › » Pamba te azalaki komilobela : « Nakokitisa kanda na ye na kado oyo natindi liboso na ngai ; sima tango nakokutana na ye, mbala mosusu akoyamba ngai malamu. »
959  GEN 32:31  Jakobi abengaki esika yango « Penieli, » pamba te alobaki : « Namoni Nzambe na miso na ngai, mpe bomoi na ngai ebiki. »
960  GEN 32:32  Tango moyi ebimaki, Jakobi alekaki Penueli. Azalaki kotambola tengu-tengu mpo na loketo na ye.
979  GEN 33:18  Longwa na mokili ya Padani-Arami, Jakobi akomaki na kimia na engumba Sishemi oyo ezali na mokili ya Kanana ; mpe atelemisaki ndako na ye ya kapo liboso ya engumba.
1011  GEN 34:30  Boye, Jakobi alobaki na Simeoni mpe na Levi : — Bopesi ngai pasi mpe bobimisi ngai moto mabe na miso ya bato ya Kanana mpe ya Perizi oyo bazali kovanda na mboka oyo. Biso tozali kaka moke ; mpe soki basangisi makasi na bango mpo na kobundisa ngai, bakoboma ngai elongo na ndako na ngai mobimba.
1021  GEN 35:9  Nzambe abimelaki lisusu Jakobi tango azongaki wuta na Padani-Arami mpe apambolaki ye.
1029  GEN 35:17  Lokola azalaki na pasi makasi ya kobota, mwasi mobotisi ayebisaki ye : « Kobanga te ! Pamba te ozali na mwana mobali mosusu. »
1038  GEN 35:26  Bana mibali ya Zilipa, mwasi mosali ya Lea : Gadi mpe Aseri. Bango nde bana mibali ya Jakobi oyo babotelaki ye na Padani-Arami.
1080  GEN 36:39  Tango Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akufaki, Adari akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi, mwana mwasi ya Mezaabi.
1082  GEN 36:41  Olibama, Ela, Pinoni,
1120  GEN 37:36  Bato ya mokili ya Madiani batekaki Jozefi na Ejipito epai ya Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi.
1131  GEN 38:11  Yuda alobaki na Tamari, bokilo na ye ya mwasi : « Lokola okufisi mibali, kende kovanda na ndako ya tata na yo kino Shela, mwana na ngai ya mobali, akokoma mokolo. » Pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu ye mpe akoki kokufa lokola bandeko na ye ya mibali. » Boye Tamari akendeki kovanda na ndako ya tata na ye.
1149  GEN 38:29  Kasi azongisaki loboko na ye, mpe ndeko na ye ya mobali abimaki. Bongo mwasi oyo abotisaka alobaki : « Ofungoli nzela nini mpo na kobima ? » Mpe bapesaki ye kombo « Peretsi. »
1151  GEN 39:1  Sima, bamemaki Jozefi na Ejipito. Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, moto ya Ejipito, asombaki ye na maboko ya bato ya Isimaeli oyo bamemaki ye kuna.
1154  GEN 39:4  Jozefi azwaki ngolu na miso ya nkolo na ye, oyo apesaki ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso : Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe apesaki ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.
1155  GEN 39:5  Wuta tango Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe mokonzi ya biloko nyonso oyo azalaki na yango, Yawe apambolaki ndako ya moto ya Ejipito mpo na Jozefi ; lipamboli ya Yawe ezalaki na likolo ya biloko nyonso oyo azalaki na yango, kati na ndako na ye mpe na bilanga.
1156  GEN 39:6  Boye Potifari atikaki biloko na ye nyonso kati na maboko ya Jozefi, azalaki lisusu kotala eloko moko te longola kaka bilei na ye. Jozefi azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko.
1160  GEN 39:10  Mokolo na mokolo, mwasi ya Potifari azalaki kaka kotungisa Jozefi, kasi ye mpe azalaki kaka koboya kosangisa na ye nzoto to kozala na ye elongo.
1162  GEN 39:12  mwasi ya Potifari akangaki ye na bilamba mpe alobaki na ye : — Yaka kosangisa na ngai nzoto ! Kasi Jozefi asundolaki elamba na ye kati na maboko ya mwasi ya Potifari mpe akimaki libanda ya ndako.
1163  GEN 39:13  Tango mwasi ya Potifari amonaki ete Jozefi asundoli elamba na ye kati na maboko na ye mpe akimi libanda,
1166  GEN 39:16  Mwasi ya Potifari abombaki elamba ya Jozefi pembeni na ye kino mobali na ye azongaki na ndako.
1169  GEN 39:19  Tango nkolo ya Jozefi ayokaki lisolo oyo mwasi na ye abetelaki ye na maloba oyo : « Tala ndenge mowumbu na yo asali ngai, » Potifari asilikaki makasi.
1170  GEN 39:20  Potifari akangaki Jozefi mpe abwakaki ye na boloko epai wapi mokonzi Faraon atiaka bakangami. Kasi, wana Jozefi azalaki kati na boloko,
1188  GEN 40:15  Pamba te babimisaki ngai na makasi wuta na mokili ya Ba-Ebre ; mpe awa nasali likambo moko te ya mabe mpo ete batia ngai na boloko. »
1241  GEN 41:45  Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito.
1246  GEN 41:50  Liboso ete mibu ya nzala makasi eya, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale.
1290  GEN 42:37  Ribeni alobaki na tata na ye : — Pesa ngai Benjame, mpe nakomemela yo ye. Soki namemeli yo ye te, boma bana na ngai mibale ya mibali.
1357  GEN 44:32  Pamba te ngai mosali na yo, nandimaki, na miso ya tata na ngai, kobatela elenge mobali oyo. Nalobaki : « Soki nazongiseli yo ye te, nakozala na ngambo liboso na yo tata na ngai, bomoi na ngai mobimba. »
1396  GEN 46:9  Bana mibali ya Ribeni : Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi.
1399  GEN 46:12  Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli.
1400  GEN 46:13  Bana mibali ya Isakari : Tola, Puwa, Yashubi mpe Shimironi.
1402  GEN 46:15  Bango nde bazalaki bana mibali oyo Lea abotelaki Jakobi kati na Padani-Arami ; bakisa Dina, mwana mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki tuku misato na misato.
1407  GEN 46:20  Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi.
1436  GEN 47:15  Tango mbongo ya bato ya Ejipito mpe ya Kanana esilaki, bato nyonso ya Ejipito bayaki epai ya Jozefi mpe balobaki : — Pesa biso biloko ya kolia ! Mpo na nini tokufa na nzala na miso na yo ? Mpo ete mbongo na biso esili ?
1459  GEN 48:7  Pamba te, tango nawutaki na Padani, Rasheli akufaki na nzela, na maboko na ngai, wana nazalaki kokende na mokili ya Kanana, pene ya Efrata ; nakundaki ye kuna pembeni ya Efrata oyo babengaka Beteleemi.
1461  GEN 48:9  Jozefi azongiselaki tata na ye : — Bazali bana mibali oyo Nzambe apesi ngai awa. Isalaele alobaki : — Pusa bango mpo ete napambola bango.
1480  GEN 49:6  Molimo na ngai, kosangana te na mabongisi na bango ya kosala mabe ! Lokumu na ngai, kokota te na lisanga na bango ! Pamba te na kanda na bango, babomaki bato ; mpe na esengo na bango, basepelaki kokata misisa ya makolo ya bangombe ya mibali.
1543  EXO 1:10  Tosengeli kosala keba mpo na bango, mpo ete bakoma lisusu ebele te. Pamba te soki bitumba ekweyi, bakoki kokende na ngambo ya banguna na biso mpe kobundisa biso mpo ete babima na mokili oyo. »
1544  EXO 1:11  Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko.
1548  EXO 1:15  Mokonzi ya Ejipito alobaki na basi oyo babotisaka basi ya Ba-Ebre, oyo bakombo na bango ezalaki Shifra mpe Puwa :
1588  EXO 3:8  Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
1597  EXO 3:17  Mpe nalobi : « Nakolongola bino na minyoko ya Ejipito mpo na komema bino na mokili ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »
1670  EXO 6:14  Tala bakambi ya mabota na bango : Bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi. Wana nde mabota ya Ribeni.
1681  EXO 6:25  Eleazari, mwana mobali ya Aron, abalaki moko kati na bana basi ya Putieli, oyo abotelaki ye mwana mobali : Pineasi. Wana nde bakambi ya mabota ya Levi kolanda mabota ya botata na bango.
1728  EXO 8:13  Basalaki kaka ndenge wana. Tango Aron asembolaki loboko mpe lingenda na ye, abetaki yango na putulu ya mabele ; bongo putulu yango ekomaki bangungi oyo ematelaki bato mpe banyama. Putulu nyonso ya mokili ya Ejipito ebongwanaki bangungi.
1758  EXO 9:15  Pamba te kino sik’oyo, nakokaki kosembola loboko na Ngai mpe kotindela yo elongo na bato na yo nyonso, mopepe ya bokono oyo ekokaki kolimwisa bino na mokili.
1762  EXO 9:19  Sik’oyo, pesa mitindo ete bamema na ebombelo, bibwele na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango kati na elanga. Pamba te mvula ya mabanga ekokweyela mpe ekoboma moto mpe nyama nyonso oyo bokokotisa kuna te to oyo ekotikala kati na elanga. › »
1804  EXO 10:26  Bitonga na biso ya bibwele mpe ekokende nzela moko na biso ; ata linzaka moko te ya ebwele ekotikala. Pamba te ezali kati na bibwele yango nde tokopona oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso ; mpe wana tokomi nanu kuna te, toyebi te ebwele nini tokobonza mpo na kogumbamela Yawe.
1828  EXO 12:11  Tala ndenge nini bokolia yango : bokolata mokaba na loketo, basandale na makolo, mpe bokosimba lingenda na loboko. Bokolia yango na lombangu. Ezali feti ya Pasika mpo na Yawe.
1838  EXO 12:21  Moyize abengisaki bakambi nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Bokende kozwa na libota moko na moko mwana meme to mwana ntaba mpe bokata yango kingo lokola mbeka ya Pasika.
1844  EXO 12:27  Bokoloba na bango : ‹ Ezali mbeka ya feti ya Pasika mpo na Yawe oyo alekaki bandako ya bana ya Isalaele kati na Ejipito mpe abikisaki bandako na biso tango abomaki bato ya Ejipito. › » Na bongo, bana ya Isalaele bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.
1860  EXO 12:43  Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Tala mibeko na tina na Pasika : ‹ Mopaya moko te akoki kolia yango.
1861  EXO 12:44  Kasi mowumbu nyonso oyo bakosomba, basengeli liboso kokata ye ngenga, sima nde akoki kolia Pasika.
1864  EXO 12:47  Lisanga mobimba ya Isalaele ekosala feti ya Pasika.
1865  EXO 12:48  Soki mopaya oyo azali kati na bino alingi kosepela na feti ya Pasika ya Yawe, esengeli ete mibali nyonso oyo bazali kati na ndako na ye bakatama ngenga ; bongo nde akozwa nzela ya kolia Pasika lokola mwana mboka ya Isalaele. Kasi mobali oyo akokatama ngenga te akoki kolia Pasika te.
1892  EXO 14:2  « Loba na bana ya Isalaele ete bazonga mpe batonga molako pembeni ya Pi-Ayiroti, kati ya Migidoli mpe ebale monene. Batonga yango etalana na Bala-Tsefoni pembeni ya ebale monene.