238 | GEN 10:3 | Bana mibali ya Gomeri : Ashikenazi, Rifati mpe Togarima. |
242 | GEN 10:7 | Bana mibali ya Kushi : Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. Bana mibali ya Raema : Sheba mpe Dedani. |
246 | GEN 10:11 | Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala |
247 | GEN 10:12 | mpe Reseni, engumba monene na kati-kati ya Ninive mpe Kala. |
285 | GEN 11:18 | Tango Pelegi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Rewu. |
286 | GEN 11:19 | Mpe sima na mbotama ya Rewu, Pelegi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. |
287 | GEN 11:20 | Tango Rewu akokisaki mibu tuku misato na mibale ya mbotama, abotaki Serugi. |
288 | GEN 11:21 | Sima na mbotama ya Serugi, Rewu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. |
342 | GEN 14:5 | Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ; |
381 | GEN 15:20 | ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Refayimi, |
395 | GEN 16:13 | Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? » Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi : Nzambe oyo azali komona ngai. |
396 | GEN 16:14 | Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi. |
571 | GEN 22:23 | Betweli azalaki tata ya Rebeka. Milika abotelaki Naori, ndeko mobali ya Abrayami, bana mibali mwambe. |
572 | GEN 22:24 | Makangu ya Naori, oyo kombo na ye ezalaki Reuma, ye mpe abotelaki Naori bana : Teba, Gami, Taashi mpe Maaka. |
607 | GEN 24:15 | Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami. |
621 | GEN 24:29 | Rebeka azalaki na ndeko moko ya mobali oyo kombo na ye ezalaki « Labani. » Ye mpe abimaki mbangu mpo na kokutana na mosali ya Abrayami kuna na libulu ya mayi. |
622 | GEN 24:30 | Tango kaka amonaki lopete oyo batiaki na zolo mpe basheneti na maboko ya ndeko na ye ya mwasi, mpe ayokaki Rebeka koloba makambo oyo mosali alobaki mpo na ye, akendeki epai ya mosali mpo ete amonaki ye ya kotelema pene ya bashamo, pembeni ya libulu ya mayi. |
637 | GEN 24:45 | Liboso ete nasilisa kosambela kati na motema na ngai, Rebeka abimaki na mbeki na lipeka na ye. Akitaki na libulu ya mayi mpe atokaki mayi. Nalobaki na ye : « Nabondeli yo, pesa ngai mayi ya komela. » |
643 | GEN 24:51 | Tala Rebeka, azali liboso na yo ! Kamata ye mpe kende na ye ; mpe tika ete azala mwasi ya mwana mobali ya nkolo na yo, ndenge Yawe abongisi. |
645 | GEN 24:53 | Abimisaki biloko ya wolo, ya palata mpe bilamba ; bongo apesaki yango na Rebeka. Apesaki mpe bakado ya motuya epai ya ndeko na ye ya mobali mpe epai ya mama na ye. |
647 | GEN 24:55 | Ndeko mobali mpe mama ya Rebeka bazongisaki : — Tika ete elenge mwasi atikala nanu elongo na biso mikolo zomi, sima nde bokoki kokende. |
650 | GEN 24:58 | Babengaki Rebeka mpe batunaki ye : — Ondimi solo kokende na mobali oyo ? Rebeka azongisaki : — Iyo, nandimi. |
651 | GEN 24:59 | Boye batikaki ndeko na bango ya mwasi Rebeka ete akende elongo na mama oyo asungaka ye, na mosali ya Abrayami elongo na bato na ye. |
652 | GEN 24:60 | Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye : « Ndeko na biso ya mwasi, tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, mpe tika ete bana na yo bakamata bingumba ya banguna na bango ! » |
653 | GEN 24:61 | Boye Rebeka elongo na basali na ye ya basi batelemaki, bamataki likolo ya bashamo mpe balandaki mosali ya Abrayami. Bongo mosali ya Abrayami akamataki Rebeka mpe bakendeki na ye nzela moko. |
654 | GEN 24:62 | Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi. |
656 | GEN 24:64 | Tango Rebeka mpe atombolaki miso, amonaki Izaki mpe akitaki wuta na shamo na ye. |
657 | GEN 24:65 | Atunaki mosali ya Abrayami : — Nazali komona mobali moko kati na bilanga, azali koya kokutana na biso ; azali nani ? Mosali ya Abrayami azongisaki : — Azali nkolo na ngai. Bongo Rebeka azwaki vwale na ye mpe amizipaki na elongi. |
659 | GEN 24:67 | Na yango, Izaki amemaki Rebeka kati na ndako ya kapo ya mama na ye Sara, azwaki ye mpo ete azala mwasi na ye mpe alingaki ye. Boye Izaki abondisamaki na kufa ya mama na ye. |
670 | GEN 25:11 | Sima na kufa ya Abrayami, Nzambe apambolaki Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Izaki azalaki kovanda pene ya Lakai-Royi. |
679 | GEN 25:20 | mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami. |
680 | GEN 25:21 | Izaki abondelaki Yawe mpo na Rebeka, mwasi na ye, oyo azalaki ekomba. Yawe ayanolaki libondeli na ye, mpe Rebeka akomaki na zemi. |
685 | GEN 25:26 | Sima na yango, ndeko na ye mpe abimaki, loboko na ye ekanga litindi ya Ezawu ; yango wana bapesaki ye kombo « Jakobi. » Izaki azalaki na mibu tuku motoba ya mbotama tango Rebeka abotaki. |
687 | GEN 25:28 | Izaki abandaki kosepela mingi na misuni, yango wana alingaki mingi Ezawu ; mpe Rebeka alingaki mingi Jakobi. |
700 | GEN 26:7 | Tango bato ya esika wana batunaki ye na tina na mwasi na ye, azongisaki : — Azali ndeko na ngai ya mwasi. Azalaki koloba te ete azali mwasi na ye mpo ete azalaki kobanga ete bato ya mboka baboma ye mpo na Rebeka, pamba te azalaki penza kitoko. |
701 | GEN 26:8 | Tango awumelaki na mboka yango, Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia, atalaki wuta na lininisa mpe amonaki Izaki kosakana na mwasi na ye Rebeka. |
702 | GEN 26:9 | Bongo Abimeleki abengisaki ye mpe alobaki na ye : — Rebeka azali solo mwasi na yo. Mpo na nini olobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ? » Izaki azongisaki : — Kati na ngai, nazalaki koloba ete nakokaki kokufa mpo na ye. |
715 | GEN 26:22 | Alongwaki wana mpe akendeki kotimola libulu mosusu ; mpe moto moko te aswanisaki ye na tina na yango. Yango wana apesaki yango kombo « Reoboti, » pamba te alobaki : « Sik’oyo, Yawe apesi biso esika monene, mpe tokofuluka na mokili oyo. » |
728 | GEN 26:35 | Basi yango bazalaki koyokisa Izaki mpe Rebeka pasi na motema. |
733 | GEN 27:5 | Nzokande, Rebeka azalaki koyoka makambo oyo Izaki azalaki koyebisa mwana na ye Ezawu. Tango Ezawu akendeki na zamba mpo na koboma nyama mpe kozonga na yango, |
734 | GEN 27:6 | Rebeka ayebisaki Jakobi, mwana na ye ya mibale : — Tala, nayokaki tata na yo koyebisa Ezawu, ndeko na yo : |
739 | GEN 27:11 | Jakobi azongiselaki Rebeka, mama na ye : — Ezawu, ndeko na ngai, azali na bapwale ebele na nzoto, kasi ngai nazali na yango te. |
743 | GEN 27:15 | Bongo Rebeka azwaki na ndako, bilamba oyo elekaki kitoko kati na bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, mpe alatisaki yango Jakobi, mwana na ye ya suka. |
745 | GEN 27:17 | Bongo Rebeka apesaki na maboko ya Jakobi, mwana na ye, elubu ya kitoko mpe lipa oyo alambaki. |
770 | GEN 27:42 | Tango Rebeka asosolaki makanisi ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, abengaki Jakobi, mwana na ye ya suka, mpe alobaki na ye : « Tala, Ezawu, ndeko na yo, azali koluka koboma yo. |
774 | GEN 27:46 | Rebeka akendeki koyebisa Izaki : « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. » |
779 | GEN 28:5 | Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi. |
802 | GEN 29:6 | Jakobi abakisaki lisusu : — Boni, azali malamu ? Bazongisaki : — Iyo, azali malamu. Tala kutu Rasheli, mwana na ye ya mwasi, azali koya elongo na bameme. |
805 | GEN 29:9 | Wana azalaki nanu kosolola na bango, Rasheli ayaki elongo na bameme ya tata na ye, pamba te azalaki mwasi mobateli bibwele. |
806 | GEN 29:10 | Tango Jakobi amonaki Rasheli, mwana mwasi ya noko na ye Labani, elongo na bibwele ya Labani, apusanaki, alongolaki libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe amelisaki yango mayi. |
807 | GEN 29:11 | Jakobi apesaki Rasheli beze mpe alelaki makasi. |
808 | GEN 29:12 | Jakobi ayebisaki Rasheli : « Nazali mwana ya Rebeka mpe moto ya libota ya tata na yo. » Bongo Rasheli akimaki mbangu mpo na koyebisa tata na ye. |
812 | GEN 29:16 | Nzokande, Labani azalaki na bana basi mibale ya mikolo : Lea mpe leki na ye Rasheli. |
813 | GEN 29:17 | Lea azalaki na miso elala kasi Rasheli azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko. |
814 | GEN 29:18 | Jakobi alingaki Rasheli mpe alobaki : — Nakosalela yo mibu sambo mpe okopesa ngai Rasheli, mwana na yo ya mwasi oyo ya leki, mpo ete azala mwasi na ngai. |
816 | GEN 29:20 | Jakobi asalaki mibu sambo mpo na kozwa Rasheli na libala, mpe mibu yango emonanaki kaka lokola mwa mikolo epai na ye, pamba te alingaki Rasheli. |
821 | GEN 29:25 | Tango tongo etanaki, Jakobi amonaki ete ezalaki nde Lea. Bongo alobaki na Labani : — Likambo nini oyo osali ngai ? Boni, ezali mpo na Rasheli te nde ngai nasalelaki yo ? Mpo na nini okosi ngai ? |
824 | GEN 29:28 | Jakobi asalaki bongo : asilisaki poso wana elongo na Lea, sima Labani apesaki ye mwana na ye ya mwasi Rasheli mpo ete azala mwasi na ye. |
825 | GEN 29:29 | Labani apesaki Bila, mwasi mosali na ye, epai ya Rasheli, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye. |
826 | GEN 29:30 | Jakobi asangisaki lisusu nzoto na Rasheli. Alingaki ye mingi koleka Lea. Bongo asalelaki lisusu Labani mibu sambo. |
827 | GEN 29:31 | Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota ; kasi Rasheli azalaki kobota te. |
828 | GEN 29:32 | Boye Lea azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Ribeni ; » alobaki : « Yawe amoni pasi na ngai ; mpe sik’oyo, mobali na ngai akolinga ngai. » |
832 | GEN 30:1 | Tango Rasheli amonaki ete azali kobotela Jakobi bana te, akomaki na zuwa mpo na ndeko na ye ya mwasi. Boye alobaki na Jakobi : — Pesa ngai bana, noki te nakokufa. |
833 | GEN 30:2 | Jakobi asilikaki makasi mpo na Rasheli mpe alobaki : — Boni, ngai nakomi nde Nzambe oyo akangi yo mabota ? |
834 | GEN 30:3 | Rasheli alobaki : — Tala Bila, mwasi mowumbu na ngai ; sangisa na ye nzoto mpo ete abotela ngai bana, mpe na nzela na ye, ngai mpe nakoka kotonga libota. |
835 | GEN 30:4 | Rasheli apesaki ye Bila, mwasi mosali na ye, mpo ete akoma mwasi na ye. Jakobi asangisaki na ye nzoto, |
837 | GEN 30:6 | Rasheli alobaki : « Nzambe alongisi ngai, ayoki kolela na ngai mpe apesi ngai mwana mobali. » Boye apesaki ye kombo « Dani. » |
838 | GEN 30:7 | Sima na yango, Bila, mwasi mosali ya Rasheli, azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale. |
839 | GEN 30:8 | Rasheli alobaki : « Nabundisi ndeko na ngai ya mwasi bitumba ya Nzambe mpe nalongi. » Boye apesaki ye kombo « Nefitali. » |
845 | GEN 30:14 | Na eleko ya kokata ble, Ribeni akendeki na bilanga mpe amonaki bambuma ya mandragore ; amemelaki yango Lea, mama na ye. Bongo Rasheli alobaki na Lea : — Nabondeli yo, pesa ngai ndambo ya bambuma ya mandragore oyo mwana na yo amemaki. |
846 | GEN 30:15 | Kasi Lea azongiselaki ye : — Boni, ndenge ozwi mobali na ngai, ekoki te ? Olingi lisusu kozwa bambuma ya mandragore ya mwana na ngai ? Rasheli alobaki na ye : — Malamu ! Soki opesi ngai bambuma ya mandragore ya mwana na yo, Jakobi akolala epai na yo na butu ya lelo. |
853 | GEN 30:22 | Nzambe akaniselaki Rasheli, ayokaki kolela na ye mpe afungolaki ye mabota. |
856 | GEN 30:25 | Sima na Rasheli kobota Jozefi, Jakobi alobaki na Labani : — Pesa ngai nzela mpo ete nazonga na mboka na ngai. |
878 | GEN 31:4 | Boye Jakobi abengisaki Rasheli mpe Lea na bilanga epai wapi azalaki elongo na bibwele. |
888 | GEN 31:14 | Rasheli mpe Lea bazongisaki : — Boni, tozali lisusu na eloko to na libula kati na ndako ya tata na biso ? |
893 | GEN 31:19 | Nzokande tango Labani akendeki kolongola bapwale ya bameme na ye, Rasheli ayibaki banzambe ya bikeko ya tata na ye. |
906 | GEN 31:32 | Kasi tika ete moto oyo okokuta awa na banzambe na yo akufa. Na miso ya bandeko na biso ya mibali, luka epai na ngai nyonso oyo ezali ya yo mpe zwa yango. Nzokande, Jakobi ayebaki te ete ezalaki Rasheli nde moto ayibaki banzambe yango. |
907 | GEN 31:33 | Labani akotaki na ndako ya kapo ya Jakobi, na ndako ya kapo ya Lea, mpe na ndako ya kapo ya basi bawumbu mibale ; kasi amonaki eloko te. Sima na ye kobima na ndako ya kapo ya Lea, akotaki na oyo ya Rasheli. |
908 | GEN 31:34 | Nzokande Rasheli azwaki banzambe ya Labani, abombaki yango likolo ya shamo mpe avandaki na likolo na yango. Labani alukaki kati na ndako mobimba ya kapo, kasi amonaki eloko moko te. |
909 | GEN 31:35 | Rasheli alobaki na tata na ye : — Tika ete nkolo na ngai asilika te soki nakoki kotelema te na miso na yo, pamba te nazali na mikolo ya sanza oyo ekomelaka basi nyonso. Labani alukaki, kasi amonaki banzambe yango te. |
962 | GEN 33:1 | Tango Jakobi atombolaki miso na ye, amonaki na mosika Ezawu koya elongo na bato nkama minei. Boye Jakobi akabolaki bana na ye : ndambo epai ya Lea, ndambo epai ya Rasheli mpe ndambo mosusu epai ya basali mibale ya basi. |
963 | GEN 33:2 | Atiaki basali ya basi elongo na bana na bango na liboso ; Lea mpe bana na ye na sima ; mpe Rasheli na Jozefi na suka. |
968 | GEN 33:7 | Na sima, Lea elongo na bana na ye bayaki kofukama. Bongo na suka, Jozefi elongo na Rasheli bayaki mpe kofukama. |
1020 | GEN 35:8 | Ezalaki wana nde Debora, mama mobokoli ya Rebeka, akufaki. Bakundaki ye pembeni ya Beteli, na se ya nzete oyo, wuta na tango wana, bakomaki kobenga « Aloni-Bakuti. » |
1028 | GEN 35:16 | Jakobi mpe libota na ye balongwaki na Beteli. Wana bazalaki nanu mwa mosika na Efrata, Rasheli abotaki, kasi na pasi makasi. |
1031 | GEN 35:19 | Rasheli akufaki mpe bakundaki ye na nzela ya Efrata, elingi koloba Beteleemi. |
1032 | GEN 35:20 | Jakobi atelemisaki libanga ya elembo likolo ya kunda ya Rasheli ; mpe kino lelo oyo, libanga wana ya elembo elakisaka kunda ya Rasheli. |
1034 | GEN 35:22 | Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale : |
1035 | GEN 35:23 | Bana mibali ya Lea : Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Jakobi ; Simeoni, Levi, Yuda, Isakari mpe Zabuloni. |
1036 | GEN 35:24 | Bana mibali ya Rasheli : Jozefi mpe Benjame. |
1037 | GEN 35:25 | Bana mibali ya Bila, mwasi mosali ya Rasheli : Dani mpe Nefitali. |
1045 | GEN 36:4 | Ada abotelaki Ezawu Elifazi ; mpe Basimati abotelaki ye Reweli. |
1051 | GEN 36:10 | Tala bakombo ya bana mibali ya Ezawu : Elifazi, mwana mobali ya Ada, mwasi ya Ezawu ; mpe Reweli, mwana mobali ya Basimati, mwasi ya Ezawu. |
1054 | GEN 36:13 | Bana mibali ya Reweli : Naati, Zera, Shama mpe Miza. Bango nde bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu. |
1058 | GEN 36:17 | Bana mibali ya Reweli, mwana mobali ya Ezawu : mokonzi Naati, mokonzi Zera, mokonzi Shama mpe mokonzi Miza. Bango nde bakonzi ya libota ya Reweli, oyo babotamaki na Edomi ; bazalaki bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu. |
1078 | GEN 36:37 | Tango Samila akufaki, Saulo, moto ya engumba Reoboti, engumba oyo etongama pembeni ya ebale, akitanaki na ye na bokonzi. |
1105 | GEN 37:21 | Tango Ribeni ayokaki bongo, alukaki nzela ya kokangola ye na maboko na bango. Alobaki : — Toboma ye te ! |
1106 | GEN 37:22 | Bosopa makila na ye te ! Bobwaka ye kaka na libulu oyo ezali kati na esobe, kasi bosala ye mabe te. Ribeni alobaki bongo pamba te azalaki na makanisi ya kokangola ye na maboko na bango mpe kozongisa ye na maboko ya tata na ye. |