154 | GEN 6:16 | Okotia likolo na yango lidusu ya basantimetele pene tuku mitano, okotia ekuke na mopanzi na yango ; mpe na kati, okosala etaje ya liboso, ya mibale mpe ya misato. |
309 | GEN 12:10 | Nzala makasi ekotaki na mokili ; bongo Abrami akendeki kovanda na Ejipito mpo na tango moke, pamba te nzala makasi ekotaki na mokili. |
310 | GEN 12:11 | Tango akomaki pene ya kokota na Ejipito, alobaki na mwasi na ye Sarayi : « Nayebi ete ozali mwasi kitoko penza. |
311 | GEN 12:12 | Tango bato ya Ejipito bakomona yo, bakoloba : ‹ Azali mwasi na ye. › Boye, bakoboma ngai mpe bakotika yo na bomoi. |
313 | GEN 12:14 | Tango Abrami akomaki na Ejipito, bato ya Ejipito bamonaki ete Sarayi azalaki mwasi kitoko penza. |
320 | GEN 13:1 | Boye Abrami alongwaki na Ejipito mpe akendeki na Negevi elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango ; Loti mpe akendeki na ye elongo. |
329 | GEN 13:10 | Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito. |
379 | GEN 15:18 | Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate : |
383 | GEN 16:1 | Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito ; kombo na ye « Agari. » |
385 | GEN 16:3 | Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye. |
389 | GEN 16:7 | Anjelu ya Yawe amonaki Agari na esobe, pene ya etima oyo ezali na nzela ya Shuri. |
391 | GEN 16:9 | Anjelu ya Yawe alobaki na ye : — Zonga epai ya nkolo na yo mpe mikitisa liboso na ye. |
392 | GEN 16:10 | Anjelu ya Yawe alobaki na ye lisusu : — Nakokomisa bakitani na yo ebele penza mpe moto moko te akokoka kotanga bango. |
459 | GEN 19:1 | Ba-anjelu oyo mibale bakomaki na Sodome na pokwa. Wana Loti avandaki na ekuke, amonaki bango, akendeki koyamba bango mpe afukamaki elongi kino na mabele. |
473 | GEN 19:15 | Tango kaka tongo etanaki, ba-anjelu batungisaki Loti mpe balobaki : — Sala noki, kamata mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya basi oyo bazali awa ; soki te, bokobebisama tango engumba oyo ekozwa etumbu. |
479 | GEN 19:21 | Anjelu alobaki na ye : — Malamu mingi, nakokokisela yo lisusu bosenga oyo. Nakobebisa te engumba oyo ozali kolobela. |
523 | GEN 21:9 | Kasi tango Sara amonaki ete Isimaeli, mwana oyo Agari, moto ya Ejipito, abotelaki Abrayami, azali koseka ; |
531 | GEN 21:17 | Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye : « Agari, likambo nini ? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye. |
535 | GEN 21:21 | Wana azalaki kovanda kati na esobe ya Parani, mama na ye azwelaki ye mwasi ya mokili ya Ejipito. |
550 | GEN 22:2 | Nzambe alobaki na ye : — Zwa Izaki, mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko oyo olingaka ; kende na mokili ya Morija, mpe kuna, okopesa Ngai ye lokola mbeka ya kotumba na likolo ya ngomba oyo nakolakisa yo. |
559 | GEN 22:11 | Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo : — Abrayami ! Abrayami ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo. |
560 | GEN 22:12 | Anjelu alobaki : — Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko. |
563 | GEN 22:15 | Anjelu ya Yawe abengaki Abrayami na mbala ya mibale wuta na likolo |
599 | GEN 24:7 | Yawe, Nzambe ya likolo, oyo abimisaki ngai na ndako ya tata na ngai mpe na mokili epai wapi nabotama, oyo alobaki na ngai mpe alakaki ngai na nzela ya ndayi ete akopesa mokili oyo na bakitani na ngai, akotindela yo anjelu na Ye mpo ete azala liboso na yo mpe mpo ete okoka koyela mwana na ngai ya mobali mwasi ya mokili wana. |
632 | GEN 24:40 | Mpe ye alobaki na ngai lisusu : « Yawe oyo natambolaki liboso na Ye akotinda anjelu na Ye elongo na yo mpe akolongisa mobembo na yo mpo ete ozwela mwana na ngai ya mobali mwasi oyo akowuta na ekolo na ngai mpe na libota ya tata na ngai. |
671 | GEN 25:12 | Tala molongo ya bakitani ya Isimaeli, mwana mobali ya Abrayami, oyo Agari, moto ya Ejipito mpe mwasi mosali ya Sara, abotelaki Abrayami. |
677 | GEN 25:18 | Bakitani na ye bazalaki kovanda na mokili oyo ezalaki kati na Avila mpe Shuri, pene ya Ejipito, na nzela oyo ekenda na Asiri. Bazalaki tango nyonso kovanda lokola banguna ya bandeko na bango nyonso. |
695 | GEN 26:2 | Boye Yawe abimelaki ye mpe ayebisaki ye : — Kokende na Ejipito te ! Vanda na mokili oyo nakolakisa yo. |
786 | GEN 28:12 | Na se ya pongi, alotaki ndoto : Amonaki ematelo moko ebanda na mabele mpe songe na yango etutaki likolo. Ba-anjelu ya Nzambe bazalaki komata mpe kokita na ematelo yango. |
885 | GEN 31:11 | Anjelu na Nzambe alobaki na ngai kati na ndoto : « Jakobi ! » Mpe ngai nazongisaki : « Ngai oyo, nazali awa. » |
930 | GEN 32:2 | Wana Jakobi azalaki kokoba mobembo na ye, ba-anjelu ya Nzambe bayaki kokutana na ye. |
1030 | GEN 35:18 | Lokola azalaki kobundana mpo na kokufa, liboso ya kokata motema, apesaki mwana na ye ya mobali kombo Beni-Oni. Kasi tata na ye apesaki ye kombo Benjame. |
1036 | GEN 35:24 | Bana mibali ya Rasheli : Jozefi mpe Benjame. |
1109 | GEN 37:25 | Wana bavandaki mpo na kolia, batombolaki miso mpe bamonaki bato ya libota ya Isimaeli elongo na bashamo na bango koya wuta na Galadi. Bashamo na bango ezalaki komema na Ejipito : biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mafuta ya solo kitoko mpe mire. |
1112 | GEN 37:28 | Nzokande tango bato ya mombongo ya mokili ya Madiani balekaki wana, babimisaki Jozefi wuta na libulu mpe batekaki ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, na motuya ya mbongo ya bibende, tuku mibale ; mpe bango bamemaki ye na Ejipito. |
1120 | GEN 37:36 | Bato ya mokili ya Madiani batekaki Jozefi na Ejipito epai ya Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. |
1151 | GEN 39:1 | Sima, bamemaki Jozefi na Ejipito. Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, moto ya Ejipito, asombaki ye na maboko ya bato ya Isimaeli oyo bamemaki ye kuna. |
1152 | GEN 39:2 | Yawe azalaki elongo na Jozefi ; boye Jozefi azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala, mpe avandaki kati na ndako ya moto ya Ejipito, nkolo na ye. |
1155 | GEN 39:5 | Wuta tango Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe mokonzi ya biloko nyonso oyo azalaki na yango, Yawe apambolaki ndako ya moto ya Ejipito mpo na Jozefi ; lipamboli ya Yawe ezalaki na likolo ya biloko nyonso oyo azalaki na yango, kati na ndako na ye mpe na bilanga. |
1174 | GEN 40:1 | Sima na mwa tango, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, basalaki mabe liboso ya nkolo na bango, mokonzi ya Ejipito. |
1178 | GEN 40:5 | Ezalaki mokolo moko na butu, bango mibale, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, balotaki moto na moto ndoto na ye mpe ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango. |
1182 | GEN 40:9 | Bongo kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito ayebisaki Jozefi ndoto na ye. Alobaki : — Na ndoto na ngai, namonaki nzete ya vino liboso na ngai. |
1189 | GEN 40:16 | Tango kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito asosolaki ete Jozefi apesaki ndimbola ya malamu, alobaki na Jozefi : — Ngai mpe nalotaki ndoto : « Bitunga misato ya mapa ezalaki likolo ya moto na ngai. |
1196 | GEN 40:23 | Kasi kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito atikalaki kokanisa lisusu Jozefi te : abosanaki ye. |
1204 | GEN 41:8 | Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango. |
1215 | GEN 41:19 | Sima na yango, bangombe mosusu sambo ya basi ebimaki : ya mike, ya mabe penza mpe ekonda ; nanu natikala komona te bangombe ya ndenge wana na mokili mobimba ya Ejipito. |
1225 | GEN 41:29 | Mibu sambo ya bofuluki ekoya na mokili mobimba ya Ejipito. |
1226 | GEN 41:30 | Kasi mibu sambo ya nzala makasi ekolanda yango ; boye bakobosana bofuluki nyonso ya mokili ya Ejipito mpo ete nzala makasi yango ekokawusa mokili. |
1229 | GEN 41:33 | Tika sik’oyo Faraon aluka moto moko ya mayele mpe ya bwanya, atia ye na moto ya mokili ya Ejipito. |
1230 | GEN 41:34 | Tika ete Faraon asala bongo ; tika ete apona basali na mokili, ba-oyo bakokongola eteni ya mitano ya bambuma ya Ejipito na tango ya mibu sambo ya bofuluki. |
1232 | GEN 41:36 | Bakobatela biloko yango mpo na mokili, mpo na mibu sambo ya nzala makasi oyo ekozala na mokili ya Ejipito ; na bongo nzala makasi ekobebisa mokili te. |
1237 | GEN 41:41 | Faraon alobaki na Jozefi : — Natie yo mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito. |
1239 | GEN 41:43 | Amatisaki ye na shareti na ye ya mibale mpe bato bazalaki koganga : « Bofukama ! » Boye, atiaki Jozefi mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito. |
1240 | GEN 41:44 | Faraon alobaki lisusu na Jozefi : — Nazali Faraon. Kasi awa na Ejipito, moto moko te akotombola loboko to lokolo soki kaka na mitindo na yo te. |
1241 | GEN 41:45 | Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito. |
1242 | GEN 41:46 | Azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akotaki na mosala ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Jozefi alongwaki na miso ya Faraon mpe atambolaki na mokili mobimba ya Ejipito. |
1244 | GEN 41:48 | Jozefi asangisaki biloko nyonso ya kolia oyo ebotaki na mibu yango sambo ya bofuluki kati na Ejipito mpe abombaki yango kati na engumba. Na engumba moko na moko, atiaki biloko ya kolia oyo ewutaki na bilanga oyo ezalaki zingazinga na yango. |
1249 | GEN 41:53 | Mibu sambo ya bofuluki oyo ezalaki na Ejipito ekomaki na suka, |
1250 | GEN 41:54 | mpe mibu sambo ya nzala makasi ebandaki, ndenge kaka Jozefi alobaki. Nzala makasi ekotaki na mikili nyonso, kasi na mokili mobimba ya Ejipito biloko ya kolia ezangaki te. |
1251 | GEN 41:55 | Tango bato nyonso ya Ejipito bakomaki na nzala makasi, bagangaki epai ya Faraon mpo na koluka biloko ya kolia. Bongo Faraon alobaki na bato nyonso ya Ejipito : « Bokende epai ya Jozefi mpe bosala makambo oyo akoyebisa bino. » |
1252 | GEN 41:56 | Tango nzala ekotaki na mokili mobimba ya Ejipito, Jozefi afungolaki ndako oyo batiaki biloko mpe atekaki ble epai ya bato ya Ejipito ; kasi nzala makasi ekobaki kaka. |
1253 | GEN 41:57 | Mikili nyonso ezalaki koya na Ejipito mpo na kosomba ble epai ya Jozefi mpo ete nzala makasi ekotaki na mokili mobimba. |
1254 | GEN 42:1 | Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, alobaki na bana na ye ya mibali : « Mpo na nini bozali kotalana bino na bino ? |
1255 | GEN 42:2 | Nayoki ete ble ezali na Ejipito. Bokende kuna mpe bosomba ndambo mpo na biso mpo ete towumela na bomoi mpe tokufa te na nzala. » |
1256 | GEN 42:3 | Bandeko mibali zomi ya Jozefi bakendeki na Ejipito mpo na kosomba ble. |
1257 | GEN 42:4 | Kasi Jakobi atikaki te Benjame, ndeko ya Jozefi ya mobali, ete akende elongo na bango, pamba te azalaki kobanga ete likama ekweyela ye. |
1258 | GEN 42:5 | Kati na bato oyo bakendeki kosomba ble na Ejipito, bana mibali ya Isalaele mpe bazalaki ; pamba te nzala makasi ekotaki mpe na mokili ya Kanana. |
1289 | GEN 42:36 | Tata na bango Jakobi alobaki na bango : — Bozangisi ngai bana na ngai mibale ya mibali : Jozefi azali lisusu te, Simeoni mpe azali lisusu te. Mpe sik’oyo bolingi kozwa lisusu Benjame ! Makambo oyo nyonso ezali kokweyela kaka ngai ! |
1290 | GEN 42:37 | Ribeni alobaki na tata na ye : — Pesa ngai Benjame, mpe nakomemela yo ye. Soki namemeli yo ye te, boma bana na ngai mibale ya mibali. |
1293 | GEN 43:2 | Tango libota ya Jakobi baliaki biloko nyonso oyo bamemaki wuta na Ejipito, Jakobi alobaki na bana na ye : — Bozonga kuna kosomba ndambo ya biloko. |
1295 | GEN 43:4 | Soki otiki ndeko na biso kokende elongo na biso, wana tokokende na Ejipito mpe tokosombela yo biloko. |
1299 | GEN 43:8 | Yuda ayebisaki tata na ye Isalaele : — Tata, tika Benjame akende elongo na ngai. Tokotelema mpe tokokende mpo ete biso elongo na yo mpe bana na biso, tozala na bomoi, kasi tokufa te na nzala. |
1305 | GEN 43:14 | Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso ayokela bino mawa tango bokotelema liboso ya moto wana, mpo ete bokoka kozwa ndeko na bino mosusu, mpe Benjame azonga elongo na bino. Kasi mpo na ngai, soki nakozanga bana, malamu nazanga bango ! |
1306 | GEN 43:15 | Boye bato yango bazwaki bakado ; bazwaki lisusu mbala mibale motuya ya mbongo oyo ezalaki na basaki na bango mpe Benjame. Bakendeki na Ejipito mpe bamilakisaki na miso ya Jozefi. |
1307 | GEN 43:16 | Tango Jozefi amonaki Benjame elongo na bango, alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi na ye : « Mema bato oyo na ndako na ngai ; boboma nyama moko mpe bolamba yango mpo ete bato oyo bakolia elongo na ngai na midi. » |
1320 | GEN 43:29 | Tango Jozefi atombolaki miso, amonaki Benjame, ndeko na ye ya mobali, mwana ya mama na ye. Atunaki : — Ye wana nde ndeko na bino ya suka oyo boyebisaki ngai ? Abakisaki : — Tika ete Nzambe atalisa yo ngolu na Ye. |
1323 | GEN 43:32 | Batielaki Jozefi bilei na mesa na ye moko, bandeko na ye mpe na mesa na bango ; bongo bato ya Ejipito oyo bazalaki kolia na ye esika moko, bango mpe na mesa na bango, pamba te bato ya Ejipito bakokaki te kolia esika moko na Ba-Ebre, pamba te ezalaki ekila mpo na bato ya Ejipito. |
1325 | GEN 43:34 | Jozefi apesaki bango biloko oyo ewutaki na mesa na ye ; mpe Benjame azwaki mbala mitano koleka bango nyonso. Na bongo, bamelaki elongo na ye mpe balangwaki. |
1337 | GEN 44:12 | Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Jozefi abandaki koluka kobanda na kulutu kino na leki. Mpe kopo emonanaki na saki ya Benjame. |
1361 | GEN 45:2 | Lokola alelaki na mongongo makasi, bato ya Ejipito bayokaki ye ; mpe sango ekendeki kino na ndako ya Faraon. |
1363 | GEN 45:4 | Jozefi alobaki na bango : — Bopusana pembeni na ngai ! Tango bapusanaki, alobaki : — Nazali Jozefi, ndeko na bino ya mobali oyo botekaki mpo ete bamema ngai na Ejipito. |
1367 | GEN 45:8 | Ezali bino te bato botindaki ngai awa, kasi ezali nde Nzambe. Akomisaki ngai tata ya Faraon, nkolo ya ndako na ye mpe moyangeli ya mokili mobimba ya Ejipito. |
1368 | GEN 45:9 | Bozonga noki epai ya tata na ngai mpe boloba na ye : « Mwana na yo, Jozefi, alobi : ‹ Nzambe akomisa ngai nkolo ya Ejipito mobimba ; yaka epai na ngai, kowumela te. |
1371 | GEN 45:12 | Bino moko bozali komona ! Ndeko na ngai, Benjame, akoki mpe komona yango, ete ezali ngai moto nazali koloba na bino. |
1372 | GEN 45:13 | Boyebisa tata na ngai lokumu nyonso oyo nazali na yango awa na Ejipito, boyebisa ye makambo nyonso oyo bosili komona mpe bomemela ngai ye awa na lombangu. › » |
1373 | GEN 45:14 | Sima, amibwakaki na kingo ya ndeko na ye Benjame mpe alelaki ; Benjame mpe akangaki ye na kingo, bongo alelaki. |
1377 | GEN 45:18 | Boyela ngai tata na bino mpe mabota na bino ; nakopesa bino mabele oyo eleki kitoko kati na Ejipito mpe bokolia biloko na yango oyo eleki kitoko. » |
1378 | GEN 45:19 | Okoyebisa bango lisusu : « Bozwa ndambo ya bashario ya Ejipito mpo na bana mpe basi na bino ; bongo bozwa tata na bino mpe bozonga awa. |
1379 | GEN 45:20 | Boyoka mawa te mpo na oyo bokotika na Kanana, pamba te biloko nyonso ya kitoko oyo ezali na Ejipito ekozala mpo na bino. » |
1381 | GEN 45:22 | Jozefi apesaki epai ya moko na moko kati na bango bilamba ya sika ; apesaki Benjame mbongo ya bibende, nkama misato, elongo na bilamba ya sika. |
1382 | GEN 45:23 | Atindelaki tata na ye biloko oyo : ba-ane zomi etonda na bilamba ya kitoko ya Ejipito mpe bampunda zomi ya basi etonda na ble, mapa mpe bilei mpo na mobembo na ye. |
1384 | GEN 45:25 | Balongwaki na Ejipito mpe bakendeki epai ya tata na bango Jakobi, na mokili ya Kanana. |
1385 | GEN 45:26 | Balobaki na ye : — Jozefi azali nanu na bomoi. Ye nde moto azali koyangela Ejipito mobimba. Jakobi ayokaki nzoto malili mpe andimelaki bango te. |
1386 | GEN 45:27 | Kasi tango bayebisaki ye makambo nyonso oyo Jozefi alobaki mpo na bango mpe tango amonaki bashario oyo Jozefi atindaki mpo na komema ye na Ejipito, molimo ya tata na bango Jakobi ezongaki. |
1390 | GEN 46:3 | Nzambe alobaki : — Nazali Nzambe, Nzambe ya tata na yo. Kobanga te kokende na Ejipito, pamba te nakokomisa yo ekolo monene kuna. |
1391 | GEN 46:4 | Ngai moko nakokende elongo na yo na Ejipito ; mpe ya solo, nakozongisa yo lisusu. Loboko ya Jozefi ekozipa miso na yo. |
1393 | GEN 46:6 | Bamemaki lisusu bibwele na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango na mokili ya Kanana ; mpe Jakobi elongo na bakitani na ye nyonso bakendeki na Ejipito. |
1394 | GEN 46:7 | Azwaki elongo na ye mpo na kokende na Ejipito : bana na ye ya mibali, bakoko na ye ya mibali mpe bana na ye ya basi elongo na bakoko na ye ya basi : bakitani na ye nyonso. |
1395 | GEN 46:8 | Tala bakombo ya bana mibali ya Isalaele, oyo bakendeki na Ejipito : Ribeni, mwana liboso ya Jakobi. |