102 | GEN 4:22 | Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. » |
157 | GEN 6:19 | Okokotisa mpe kati na masuwa, mibale-mibale, bikelamu nyonso ya bomoi, mwasi mpe mobali, mpo ete obatela yango na bomoi elongo na yo. |
246 | GEN 10:11 | Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala |
315 | GEN 12:16 | Basalelaki Abrami bolamu likolo ya Sarayi, mpe Abrami azwaki bameme, bantaba mpe bangombe, ba-ane, basali ya basi mpe ya mibali, bana ya ba-ane mpe bashamo. |
504 | GEN 20:8 | Na tongo-tongo, Abimeleki alamukaki mpe abengisaki basali na ye nyonso. Tango ayebisaki bango makambo oyo ekomelaki ye, babangaki makasi. |
545 | GEN 21:31 | Yango wana babengaki esika yango Beri-Sheba, pamba te na esika yango nde bango mibale balapaki ndayi. |
546 | GEN 21:32 | Sima na bango kosala boyokani kuna na Beri-Sheba, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bazongaki na mokili ya Filisitia. |
551 | GEN 22:3 | Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye. |
679 | GEN 25:20 | mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami. |
717 | GEN 26:24 | Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. » |
776 | GEN 28:2 | Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo. |
792 | GEN 28:18 | Na tongo-tongo, Jakobi azwaki libanga oyo atiaki moto, atelemisaki yango lokola elembo mpe asopaki mafuta na songe na yango. |
884 | GEN 31:10 | Bongo, na tango oyo bibwele esengelaki kosangisa nzoto, namonaki na ndoto ete bantaba ya mibali, oyo ezalaki kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezalaki ya madodo-madodo, ya banzela-nzela ya mwindo mpe ya banzela-nzela ya pembe. |
886 | GEN 31:12 | Alobaki na ngai : « Tombola miso mpe tala : bantaba nyonso ya mibali, oyo ezali kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezali na madodo-madodo, na banzela-nzela ya mwindo mpe na banzela-nzela ya pembe ; pamba te namoni makambo nyonso oyo Labani asali yo. |
892 | GEN 31:18 | Amemaki bibwele na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki, bibwele oyo azwaki tango avandaki na Padani-Arami, mpo na kozonga epai ya Izaki, tata na ye, na mokili ya Kanana. |
934 | GEN 32:6 | Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi ; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye. ’ › » |
979 | GEN 33:18 | Longwa na mokili ya Padani-Arami, Jakobi akomaki na kimia na engumba Sishemi oyo ezali na mokili ya Kanana ; mpe atelemisaki ndako na ye ya kapo liboso ya engumba. |
1079 | GEN 36:38 | Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi. |
1080 | GEN 36:39 | Tango Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akufaki, Adari akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi, mwana mwasi ya Mezaabi. |
1241 | GEN 41:45 | Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito. |
1246 | GEN 41:50 | Liboso ete mibu ya nzala makasi eya, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale. |
1323 | GEN 43:32 | Batielaki Jozefi bilei na mesa na ye moko, bandeko na ye mpe na mesa na bango ; bongo bato ya Ejipito oyo bazalaki kolia na ye esika moko, bango mpe na mesa na bango, pamba te bato ya Ejipito bakokaki te kolia esika moko na Ba-Ebre, pamba te ezalaki ekila mpo na bato ya Ejipito. |
1328 | GEN 44:3 | Na tongo-tongo, batikaki bandeko ya Jozefi kozonga elongo na ba-ane na bango. |
1388 | GEN 46:1 | Isalaele akendeki na nyonso oyo azalaki na yango. Tango akomaki na Beri-Sheba, abonzaki mbeka epai ya Nzambe ya Izaki, tata na ye. |
1407 | GEN 46:20 | Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi. |
1438 | GEN 47:17 | Bamemaki epai ya Jozefi bampunda, bantaba mpe bangombe na bango ; bongo Jozefi apesaki bango bilei na esika ya bampunda, ba-ane, bameme, bantaba mpe bangombe na bango. Na mibu nyonso wana oyo Jozefi azalaki kopesa bango bilei, bango bazalaki kopesa ye bibwele na bango. |
1518 | GEN 50:11 | Bongo tango bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna bamonaki matanga wana na etando ya Atadi, balobaki : « Bato ya Ejipito bazali na milulu minene ya matanga. » Yango wana babengaki esika yango Abele-Mitsirayimi, oyo ezali pembeni ya Yordani. |
1548 | EXO 1:15 | Mokonzi ya Ejipito alobaki na basi oyo babotisaka basi ya Ba-Ebre, oyo bakombo na bango ezalaki Shifra mpe Puwa : |
1549 | EXO 1:16 | « Tango bokobotisa basi ya Ba-Ebre, botala soki mwana nini abotami ; soki azali mwana mobali, boboma ye ; kasi soki azali mwana mwasi, botika ye na bomoi. » |
1701 | EXO 7:15 | Kende epai ya Faraon na tongo-tongo, na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Zela ye pembeni ya Nili mpo na kokutana na ye mpe simba na loboko na yo lingenda oyo ebongwanaki nyoka. |
1702 | EXO 7:16 | Bongo okoloba na ye : ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te. |
1744 | EXO 9:1 | Yawe alobaki na Moyize : « Kende koyebisa Faraon : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‘ Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai ! ’ |
1746 | EXO 9:3 | loboko na Yawe ekomema mopepe ya bokono ya somo kati na bibwele na yo, oyo ezali na elanga : bampunda, ba-ane, bashamo, bangombe, bameme mpe bantaba. |
1756 | EXO 9:13 | Yawe alobaki na Moyize : « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. |
1781 | EXO 10:3 | Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. |
1892 | EXO 14:2 | « Loba na bana ya Isalaele ete bazonga mpe batonga molako pembeni ya Pi-Ayiroti, kati ya Migidoli mpe ebale monene. Batonga yango etalana na Bala-Tsefoni pembeni ya ebale monene. |
2033 | EXO 19:6 | kasi bino bokozala mpo na Ngai ekolo oyo ekosala mosala ya bonganga-Nzambe, ekolo ya bule. » Oyo nde maloba okoyebisa bana ya Isalaele. |
2367 | EXO 29:30 | Mikolo sambo, moko kati na bana na ye ya mibali oyo akokitana na ye lokola Nganga-Nzambe, akolata yango mpe akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe kati na Esika ya bule. |
2431 | EXO 31:10 | bilamba ya mosala, bilamba nyonso ya bule ya Nganga-Nzambe Aron, bilamba oyo bana na ye ya mibali bakolata tango bakosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe, |
2499 | EXO 34:2 | Omilengela mpo na lobi na tongo. Na tongo-tongo, okomata na ngomba Sinai mpe okotelema liboso na Ngai, kuna na songe ya ngomba. |
2751 | LEV 1:5 | Akokata kingo ya ngombe liboso ya Yawe, bongo bakitani ya Aron, Banganga-Nzambe, bakozwa makila na yango mpe bakosopa yango na bangambo nyonso ya etumbelo oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. |
2754 | LEV 1:8 | Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bakotia lisusu biteni ya ngombe, moto mpe biteni ya mafuta, na likolo ya bakoni oyo ezali kopela na etumbelo. |
2765 | LEV 2:2 | Akomema yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, oyo moko kati na bango akozwa loboko mobimba ya farine mpe mafuta elongo na ansa nyonso, mpe akotumba yango na etumbelo lokola ekaniseli. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. |
2781 | LEV 3:2 | Akotia loboko na ye na moto ya mbeka, akokata yango kingo na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo, Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. |
2844 | LEV 5:13 | Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. Ndambo ya mbeka oyo ekotikala ekozala ya Nganga-Nzambe, ndenge kaka esalemaka mpo na mbeka ya bambuma. » |
2847 | LEV 5:16 | Lisusu, mpo na mabe oyo asali liboso ya Esika ya bule, moto yango asengeli kobakisa likolo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani : eteni moko kati na biteni mitano ya motuya ya mbeka wana. Boye akopesa biloko nyonso epai ya Nganga-Nzambe, mpe Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana na nzela ya meme ya mobali oyo ebonzami lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; boye moto yango akolimbisama. |
2920 | LEV 8:2 | « Mema Aron mpe bana na ye ya mibali, bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe, mafuta ya epakolami, mwana ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu, bameme mibale ya mibali, mpe kitunga oyo ezali na mapa ezanga levire ; |
3002 | LEV 11:4 | Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, mpe kati na banyama oyo litindi na yango epasuka na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia : shamo, pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino ; |
3051 | LEV 12:6 | Soki mikolo ya kopetolama na ye ekoki, ezala abotaki mwana mobali to mwana mwasi, akomema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwana meme ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba mpe ebenga moko ya mboka to ebenga moko ya zamba lokola mbeka mpo na masumu. |
3063 | LEV 13:10 | Nganga-Nzambe akotala ye malamu. Soki amoni ete poso ya nzoto na ye ebimisi bambuma ya pembe ya mike-mike, ekomisi bapwale ya nzoto na ye pembe, efungwami mpe ebimisi bapota, |
3109 | LEV 13:56 | Nzokande, soki Nganga-Nzambe, sima na kotala malamu elamba, amoni ete litono elongwaki na tango basukolaki elamba ; akokata kaka eteni ya elamba epai wapi litono ezali. |
3135 | LEV 14:23 | Na mokolo ya mwambe, akomema yango epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, liboso ya Yawe, mpo na kopetolama na ye. |
3168 | LEV 14:56 | bambuma ya mike-mike, mapalata mpe matono oyo ezali kongenga, |
3241 | LEV 17:5 | Boye, na esika ete bana ya Isalaele bamemaka bambeka na bango na bilanga, bakomema yango mpo na Yawe epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani lokola mbeka ya boyokani epai na Yawe. |
3313 | LEV 19:31 | Bokende te kotuna makambo na bino epai ya bato oyo basololaka na bakufi to epai ya banganga-kisi, noki te bokomikomisa mbindo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. |
3347 | LEV 21:1 | Yawe ayebisaki Moyize : « Loba na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron : ‹ Nganga-Nzambe akoki te komikomisa mbindo na kosimba ebembe ya moto moko kati na libota na ye, |
3501 | LEV 25:31 | Kasi bandako oyo ezali kati na bamboka oyo bazingela te na bamir pembeni-pembeni, ekozala lokola bilanga ya mboka. Bakoki kosikola yango, mpe ekozonga epai na nkolo na yango na mobu ya kosepela kokangolama. |
3801 | NUM 5:8 | Kasi soki moto yango azali na ndeko te oyo akoki kozwa eloko oyo bakozongisa mpo na mabe oyo basalaki ye, bakopesa eloko oyo basengelaki kozongisela ye epai na Yawe na nzela ya Nganga-Nzambe, bakisa meme moko ya mobali oyo Nganga-Nzambe akosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na moto oyo asalaki mabe. |
3834 | NUM 6:10 | Na mokolo ya mwambe, asengeli komema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani : bibenga mibale ya zamba mpe bana mibale ya ebenga ya mboka. |
3844 | NUM 6:20 | Nganga-Nzambe akobulisa mpe akotombola yango mpo na kopesa yango epai na Yawe, pamba te ezali biloko ya bule mpe ya Nganga-Nzambe, ndenge moko na tolo mpe mopende. |
3997 | NUM 10:8 | Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bango nde bakobanda kobeta bakelelo yango. Ekozala mobeko ya libela mpo na bino mpe bakitani na bino. |
4059 | NUM 11:34 | Yango wana, bakomaki kobenga esika yango « Kibiroti-Atava, » pamba te ezalaki na esika wana nde bakundaki bato ya lokoso. |
4060 | NUM 11:35 | Longwa na Kibiroti-Atava, bana ya Isalaele basalaki mobembo kino na Atseroti mpe bavandaki kuna. |
4352 | NUM 21:11 | Kolongwa na Oboti bakendeki kotonga molako na bango na Iye-Abarimi, na esobe oyo etalana na Moabi, na ngambo oyo moyi ebimaka. |
4453 | NUM 24:6 | Epanzana lokola miluka ya mike-mike, lokola bilanga oyo ezalaka pembeni ya ebale, lokola banzete ya aloe oyo Yawe alona, lokola banzete ya sedele pembeni ya mayi. |
4455 | NUM 24:8 | Nzambe abimisaki bango na Ejipito, bazalaka makasi lokola mpakasa, babebisaka bikolo oyo ebundisaka bango mpe babukaka mikuwa na bango na biteni-biteni, batobolaka yango na makonga na bango. |
4755 | NUM 32:35 | Aroti-Shofani, Yaezeri, Yogibeka ; |
4758 | NUM 32:38 | elongo na Nebo mpe Bala-Meoni, kombo oyo babongola na Sibima. Bapesaki bakombo na bingumba oyo batongaki. |
4769 | NUM 33:7 | Tango balongwaki na Etami, bazongaki na ngambo ya Pi-Ayiroti oyo etalana na Bala-Tsefoni, mpe batongaki molako na bango liboso ya Migidoli. |
4770 | NUM 33:8 | Kolongwa na Pi-Ayiroti, bakatisaki ebale monene mpe bakomaki na esobe ; batambolaki mikolo misato na esobe ya Etami mpe batongaki molako na bango, na Mara. |
4779 | NUM 33:17 | Kolongwa na Kibiroti-Atava, bakendeki kotonga molako na bango na Atseroti. |
4782 | NUM 33:20 | Kolongwa na Rimoni-Peretsi, bakendeki kotonga molako na bango na Libina. |
4794 | NUM 33:32 | Kolongwa na Bene-Yaakani, bakendeki kotonga molako na bango na Ori-Gidigadi. |
4795 | NUM 33:33 | Kolongwa na Ori-Gidigadi, bakendeki kotonga molako na bango na Yotibata. |
4798 | NUM 33:36 | Kolongwa na Etsioni-Geberi, bakendeki kotonga molako na bango na Kadeshi, na esobe ya Tsini. |
4806 | NUM 33:44 | Kolongwa na Oboti, bakendeki kotonga molako na bango na Iye-Abarimi, na mondelo ya Moabi. |
4807 | NUM 33:45 | Kolongwa na Iye-Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na Diboni-Gadi. |
4808 | NUM 33:46 | Kolongwa na Diboni-Gadi, bakendeki kotonga molako na bango na Alimoni-Dibilatayimi. |
4809 | NUM 33:47 | Kolongwa na Alimoni-Dibilatayimi, bakendeki kotonga molako na bango na bangomba Abarimi, pembeni ya Nebo. |
4811 | NUM 33:49 | Batongaki molako na bango pembeni ya Yordani, kolongwa na Beti-Yeshimoti kino na Abele-Shitimi, na etando ya Moabi. |
4896 | DEU 1:2 | Esengaka mikolo zomi na moko ya mobembo wuta na Orebi kino na Kadeshi-Barinea, na nzela ya ngomba Seiri. |
4948 | DEU 2:8 | Na sima, totikaki bandeko na biso, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Tobalukaki wuta na nzela ya Araba oyo ewuta na Eyilati mpe na Etsioni-Geberi, mpe tokendeki na nzela ya esobe ya Moabi. |
5052 | DEU 4:46 | mpe tango bazalaki na lubwaku etalana na Beti-Peori, na ngambo ya este ya Yordani, kati na mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni oyo Moyize mpe bana ya Isalaele balongaki tango babimaki na Ejipito. |
5162 | DEU 9:3 | Kasi lelo, yeba malamu ete Yawe, Nzambe na yo, azali Ye moko kotambola liboso na yo lokola moto oyo ezikisaka ; akobebisa bango mpe akobuka bango liboso na yo ; bongo yo okokamata mabele na bango mpe okosilisa bango noki-noki, ndenge Yawe alakaki yo. |
5181 | DEU 9:22 | Na Tabeera, na Masa, na Kibiroti-Atava, bokobaki kaka kopesa Yawe kanda. |
5182 | DEU 9:23 | Mpe tango Yawe alingaki ete bolongwa na Kadeshi-Barinea, apesaki bino mitindo : « Bokende ! Bokamata mokili oyo napesi bino. » Kasi botosaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bino ; botiaki elikya te kati na Ye mpe botosaki Ye te. |
5299 | DEU 14:7 | Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia : shamo, mpanya ya matoyi milayi mpe mpanya ya zamba ; pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino. |
5333 | DEU 15:12 | Soki moko kati na bandeko na yo, Mo-Ebre, azala mobali to mwasi, amiteki ye moko epai na yo, akosalela yo mibu motoba ; na mobu ya sambo, okotika ye kokende na bonsomi. |
5454 | DEU 21:5 | Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, bakopusana ; pamba te ezali bango nde Yawe, Nzambe na bino, apona mpo na kosala mosala na Ye, mpo na kopambola bato na Kombo na Yawe mpe mpo na kokata makambo tango nyonso kowelana mpe kozokisana ezali. |
5535 | DEU 24:8 | Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango. |
5663 | DEU 28:50 | Bato ya ekolo yango bazali na bilongi ya kanda-kanda, batosaka te bato oyo bazali mikolo mpe bayokelaka bilenge mawa te. |
5678 | DEU 28:65 | Kati na bikolo wana, bokozala na kimia te, bokozala na esika te ya kopemisa matambe ya makolo na bino. Kuna Yawe akokomisa bino motema likolo-likolo, miso elemba mpe nzoto elemba. |
5739 | DEU 31:9 | Boye Moyize akomaki mibeko oyo mpe apesaki yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe epai ya bampaka nyonso ya Isalaele. |
5896 | JOS 3:1 | Na tongo-tongo, Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele babimaki wuta na Shitimi mpe bakendeki kino na Yordani epai wapi batongaki molako na bango liboso ete bakatisa. |
5980 | JOS 7:2 | Wuta na Jeriko, Jozue atindaki bato kokende na engumba Ayi oyo ezalaki pene ya Beti-Aveni, na ngambo ya este ya Beteli. Alobaki na bango : « Bokende kononga mokili wana. » Bato yango bakendeki mpe banongaki Ayi. |
6067 | JOS 10:1 | Nzokande, Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, ayokaki ete Jozue abotolaki Ayi mpe abebisaki yango nyonso ; asalaki Ayi mpe mokonzi na yango ndenge kaka asalaki Jeriko mpe mokonzi na yango. Ayokaki lisusu ete bavandi ya Gabaoni basalaki boyokani ya kimia elongo na Isalaele mpe bakomaki kovanda kati na bango. |
6069 | JOS 10:3 | Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, atindaki maloba epai ya Oami, mokonzi ya Ebron ; epai ya Pireami, mokonzi ya Yarimuti ; epai ya Yafia, mokonzi ya Lakishi ; mpe epai ya Debiri, mokonzi ya Egiloni. |
6077 | JOS 10:11 | Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga. |
6105 | JOS 10:39 | Babotolaki engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, bakangaki mokonzi na yango mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi. Jozue asalaki engumba Debiri elongo na mokonzi na yango, ndenge kaka asalaki engumba Libina elongo na mokonzi na yango, mpe Ebron elongo na mokonzi na yango. |
6126 | JOS 11:17 | wuta na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri kino na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani na ebandeli ya ngomba Erimoni. Abundisaki bakonzi na yango nyonso mpe abomaki bango. |