355 | GEN 14:18 | Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo |
357 | GEN 14:20 | Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba. |
777 | GEN 28:3 | Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso apambola yo, apesa yo bana, akomisa bana na yo ebele mpe okoma lisanga monene ya bato. |
1305 | GEN 43:14 | Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso ayokela bino mawa tango bokotelema liboso ya moto wana, mpo ete bokoka kozwa ndeko na bino mosusu, mpe Benjame azonga elongo na bino. Kasi mpo na ngai, soki nakozanga bana, malamu nazanga bango ! |
1455 | GEN 48:3 | Jakobi alobaki na Jozefi : — Nzambe-Na-Nguya-Nyonso abimelaki ngai na Luze, na mokili ya Kanana ; mpe kuna, apambolaki ngai. |
2329 | EXO 28:35 | Aron asengeli kolata yango tango azali kosala mosala. Makelele ya bangonga ya mike-mike ekoyokana tango akotelema liboso ya Yawe na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe tango akobima ; wana ekolakisa ete akufi te. |
5768 | DEU 32:8 | Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki na ekolo moko na moko mabele na yango, tango akabolaki bato nyonso, atiaki bandelo mpo na bato kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe. |
7149 | RUT 1:20 | Ye alobaki na bango : — Bobenga ngai lisusu Naomi te, kasi Mara ; pamba te Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayokisi ngai mawa mingi. |
7150 | RUT 1:21 | Nazalaki na biloko ebele tango nakendeki, kasi Yawe azongisi ngai maboko pamba. Bongo mpo na nini kobenga ngai lisusu Naomi ? Yawe ayokisi ngai pasi, mpe Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayokisi ngai mawa. |
8619 | 2SA 22:14 | Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki. |
8904 | 1KI 6:5 | Atongaki pembeni ya bamir ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo mpe pembeni ya Esika-Oyo-Eleki-Bule biteni ya mike, ngambo na ngambo, na lolenge ya etaje. |
8918 | 1KI 6:19 | Salomo abongisaki Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo na kotia Sanduku ya Boyokani ya Yawe. |
8919 | 1KI 6:20 | Molayi ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki na bametele pene zomi, mokuse na yango, bametele pene zomi ; bongo bosanda na yango, bametele pene zomi. Salomo abambaki kati na yango wolo ya peto ; abambaki lisusu wolo na etumbelo oyo basala na mabaya ya banzete ya sedele. |
8926 | 1KI 6:27 | Salomo atiaki bililingi ya basheribe yango na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule kati na Tempelo. Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama : lipapu moko ya sheribe ya liboso etutaki mir, mpe lipapu mosusu ya sheribe ya mibale etutaki mir mosusu ; mpe mapapu na bango mibale mosusu etutanaki na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule. |
10507 | 1CH 6:34 | Kasi Aron mpe bana na ye ya mibali bapesamelaki mokumba ya kotumba mbeka na likolo ya etumbelo ya nyama mpe etumbelo ya malasi. Bazalaki kosala misala nyonso oyo etali Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe mosala ya bolimbisi masumu ya Isalaele kolanda mitindo nyonso oyo Moyize, mosali na Nzambe, apesaki. |
11242 | 2CH 3:8 | Atongaki Esika-Oyo-Eleki-Bule ; molayi na yango ekokanaki na mokuse ya Tempelo ya Yawe : bametele pene zomi, na molayi, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto ya bakilo pene nkoto tuku mibale kati na Tempelo ya Yawe. |
11244 | 2CH 3:10 | Atiaki bililingi ya basheribe mibale kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe apakolaki yango wolo. |
11273 | 2CH 4:22 | bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, bikangelo ya wolo ya bikuke ya Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo. |
11282 | 2CH 5:9 | Mpo ete banzete yango elekaki milayi, basonge na yango ezalaki komonana wuta na likolo ya Sanduku, na liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ; kasi ezalaki komonana te wuta na libanda. Sanduku etikala wana kino na mokolo ya lelo. |
12986 | JOB 6:4 | Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye. |
13036 | JOB 8:3 | Boni, Nzambe abukaka mibeko, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abalolaka penza bosembo ? |
13119 | JOB 11:7 | Okoki penza kososola mabombami ya Nzambe ? Okoki solo kososola bandelo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ? |
13160 | JOB 13:3 | Kasi nalingi nde koloba na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe kobundela likambo na ngai liboso ya Nzambe. |
13374 | JOB 21:15 | Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde nani mpo ete tosalela ye ? Tokozwa litomba nini na kosambela ye ? › |
13396 | JOB 22:3 | Ezala soki ozali moyengebene, litomba nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kozwa, ata ozali kobongisa nzela na yo ya bosembo ? |
13410 | JOB 22:17 | Bazalaki koloba na Nzambe : ‹ Tika biso, biso moko ! Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akosala biso nini ? › |
13418 | JOB 22:25 | bongo Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akozala wolo na yo, mpe palata oyo eleki kitoko mpo na yo. |
13419 | JOB 22:26 | Solo, okozwa esengo epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe okotombola elongi na yo epai ya Nzambe. |
13439 | JOB 23:16 | Nzambe alembisi ngai, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abangisi ngai. |
13441 | JOB 24:1 | Mpo na nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akataka tango te mpo na esambiselo ? Mpo na nini bato oyo bayebi Ye basengeli koluka na pamba mikolo ya boye ? |
13487 | JOB 27:2 | « Na Kombo ya Nzambe oyo awangani bosembo na ngai, na Kombo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso oyo atungisi motema na ngai, |
13495 | JOB 27:10 | Boni, akosepela penza na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso to akobelela lisusu Nzambe tango nyonso ? |
13498 | JOB 27:13 | Tala lifuti oyo Nzambe abongiseli moto mabe, libula oyo moto ya mobulu azwaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso : |
13541 | JOB 29:5 | tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaki nanu elongo na ngai bana mibali na ngai bazingelaki ngai, |
13594 | JOB 31:2 | Pamba te, libula nini Nzambe akoki kobongisela ngai wuta na likolo ? Libonza nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kotindela ngai wuta na likolo ? |
13627 | JOB 31:35 | Ah, soki nazalaki ata na moto oyo akokaki koyoka ngai ! Yango nde sik’oyo liloba na ngai ya suka. Tika ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayanola ngai ! Tika ete moto oyo afundi ngai akoma na mokanda makambo oyo afundeli ngai ! |
13640 | JOB 32:8 | Nzokande, kati na moto, ezali nde molimo, ezali pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde epesaka moto boyebi. |
13658 | JOB 33:4 | Molimo ya Nzambe asalaki ngai, pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso epesi ngai bomoi. |
13697 | JOB 34:10 | Boye, bino bato ya mayele, boyoka ngai ! Ekoki kosalema te ete Nzambe asala mabe ; ekoki kosalema te ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso asala makambo oyo ezangi bosembo. |
13699 | JOB 34:12 | Te, Nzambe akoki kosala mabe te, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kobuka bosembo te. |
13737 | JOB 35:13 | Pamba te, Nzambe ayokaka te maloba na bango ya pamba, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaka ata na bokebi na yango te. |
13870 | JOB 40:2 | « Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki koteya Ye ? Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye ! » |
14014 | PSA 7:11 | Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali nguba na ngai, abikisaka bato ya sembo. |
14021 | PSA 7:18 | Nakokumisa Yawe mpo na bosembo na Ye, mpe nakosanzola Yawe-Oyo-Aleki-Likolo na banzembo. |
14144 | PSA 18:14 | Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki na nzela ya mvula ya mabanga mpe makala ya moto. |
14967 | PSA 68:15 | Tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abenganaki kuna bakonzi, anokisaki mvula ya pembe na ngomba Tsalimoni. |
15086 | PSA 73:11 | Balobaka : « Nzambe akoyeba ndenge nini ? Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali ata na boyebi ? » |
15161 | PSA 77:11 | Mpe namilobelaka : « Tala likambo oyo ezali kosala ngai pasi : loboko ya mobali ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ebongwani ! » |
15206 | PSA 78:35 | Bazalaki kozongisa na makanisi na bango ete Nzambe nde azali Libanga na bango, ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Mosikoli na bango. |
15227 | PSA 78:56 | Kasi bamekaki Nzambe, batombokelaki Ye-Oyo-Aleki-Likolo mpe babatelaki te malako na Ye ; |
15271 | PSA 80:15 | Zongela biso lisusu, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso ! Wuta na likolo, tala mpe mona ! Senzela mpo na nzete oyo ya vino ! |
15299 | PSA 82:6 | Nalobaki : « Bozali banzambe, bozali bino nyonso bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ! » |
15320 | PSA 83:19 | Tika bayeba ete Yo, oyo Kombo na Yo ezali Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo kati na mokili mobimba ! |
15369 | PSA 87:5 | Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama : « Bato nyonso babimela awa, mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde alendisaka yango. » |
15461 | PSA 91:1 | Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. |
15469 | PSA 91:9 | Soki otatoli : « Yawe azali ebombamelo na ngai, » mpe okomisi Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekimelo na yo, |
15478 | PSA 92:2 | Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo ! |
15553 | PSA 97:9 | Pamba te, na mokili mobimba, Yo nde Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; oleki banzambe nyonso. |
17878 | ISA 8:1 | Yawe alobaki na ngai : « Kamata etando monene ya libanga mpe salela ekomeli mpo na kokoma makambo oyo na likolo na yango : Maher-Shalal-Hash-Baz (pene bomengo ya bitumba, pene kobebisama). » |
20461 | LAM 3:38 | Boni, ezali te wuta na monoko ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde pasi mpe bolamu ekomelaka bato ? |
20557 | EZK 1:24 | Tango bikelamu yango ezalaki kotambola, nazalaki koyoka makelele ya mapapu na yango lokola makelele ya bambonge ya ebale monene to lokola mongongo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso to lokola lokito ya mampinga. Tango ezalaki kotelema, ezalaki kokitisa mapapu na yango. |
21908 | DAN 3:32 | Nazali na esengo ya koyebisa bino bikamwa mpe makambo minene oyo Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo asali mpo na ngai ! |
21923 | DAN 4:14 | Ba-anjelu nde bazwi mokano wana ; basantu nde bakati yango mpo ete bato ya bomoi bayeba ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya mokili ya bato, apesaka bokonzi na yango na moto nyonso oyo Ye alingi mpe azali na makoki ya kotombola kati na yango moto ya suka kati na bato. › |
21931 | DAN 4:22 | « Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okobanda kolia matiti ya zamba lokola ngombe, mpe mamwe ekopolisa nzoto na yo. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala makambo oyo Ye alingi kati na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi. |
21938 | DAN 4:29 | Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okokoma kolia matiti lokola ngombe. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala oyo Ye alingi, na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi. » |
21961 | DAN 5:18 | Oh mokonzi, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apesaki tata na yo, Nabukodonozori, bokonzi ; akomisaki ye moto monene mpe apesaki ye nkembo mpe lokumu. |
21964 | DAN 5:21 | Babenganaki ye na molongo ya bato mpe bapesaki ye mayele ya banyama ; akomaki kovanda elongo na ba-ane ya zamba, kolia matiti lokola bangombe mpe nzoto na ye ezalaki kopola na mamwe ya tongo, kino tango asosolaki ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya bokonzi nyonso ya bato mpe atombolaka na bokonzi moto nyonso oyo Ye alingi. |
22020 | DAN 7:18 | kasi basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo bakozwa bokonzi mpe bakobatela yango mpo na libela, seko na seko. |
22723 | MIC 6:6 | Eloko nini penza tokoki komema epai na Yawe mpo na kofukama liboso ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo ? Boni, tomema bambeka ya kotumba to bana ngombe ya mibali ya mobu moko ? |
24187 | MAT 26:64 | Yesu azongiselaki ye : — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo. |
24885 | MRK 14:62 | Yesu azongisaki : — Iyo, ezali se bongo. Mpe bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya elongo na mapata ya Likolo. |
24997 | LUK 1:35 | Anjelu azongiselaki ye : — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe. |
25011 | LUK 1:49 | pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ; Kombo na Ye ezali Bule. |
25038 | LUK 1:76 | Bongo yo, mwana na ngai, bakobenga yo : mosakoli ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te okotambola na liboso ya Nkolo mpo na kobongisela Ye nzela |
25250 | LUK 6:35 | Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe. |
27233 | ACT 7:48 | Nzokande, Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka te kati na bandako oyo bato batonga, ndenge kaka mosakoli aloba : |
30130 | HEB 6:19 | Mpo na biso, elikya yango ezali lokola longo ya bomoi na biso ; epolaka te mpe esimba biso makasi, ekota kino koleka rido, kati penza na Esika-Oyo-Eleki-Bule |
30180 | HEB 9:8 | Na nzela ya biloko oyo, Molimo Mosantu azalaki kotalisa polele ete, wana Mongombo ya liboso ezalaki nanu, nzela mpo na kokota kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki ya kokangama. |
30219 | HEB 10:19 | Yango wana, bandeko na ngai, tozali solo na elikya ete tokokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo ete Yesu asopaki makila na Ye. |
30319 | HEB 13:11 | pamba te banzoto ya banyama oyo mokonzi ya Banganga-Nzambe amemaka makila na yango kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule lokola mbeka mpo na bolimbisi ya masumu, etumbamaka na libanda ya molako. |
31144 | REV 21:22 | Namonaki ata tempelo moko te kati na engumba, pamba te Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso mpe Mpate nde bazali Tempelo na yango. |