18181 | ISA 24:16 | Wuta na suka ya mokili, tozali koyoka banzembo : « Nkembo epai ya Nkolo-Na-Bosembo. » Kasi nalobaki : « Nakomi na suka, nakomi na suka ! Mawa mpo na ngai ! Bazoba bateki mboka, na bozoba penza, bazoba bateki mboka ! » |
29774 | 1TI 1:11 | kolanda Sango Malamu oyo napesamelaki mokumba, Sango Malamu ya nkembo ya Nkolo-Na-Esengo. |
30618 | 1JN 2:1 | Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki esali ete moko kati na bino akweyi na lisumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata : Yesu-Klisto, Nkolo-Na-Bosembo. |
31070 | REV 18:8 | Yango wana, bitumbu nyonso ekokweyela yango na mokolo moko : kufa, matanga mpe nzala. Ekozikisama na moto, pamba te Nzambe oyo apesi yango etumbu azali Nkolo-Na-Nguya. |