4902 | DEU 1:8 | Tala, napesi bino mokili oyo. Bokota mpe bokamata mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino —Abrayami, Izaki, Jakobi— mpe bakitani na bango. › » |
5114 | DEU 7:1 | Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kozwa yango lokola libula mpe tango akobengana liboso na yo bikolo ebele—bato ya Iti, ya Girigazi, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, bikolo sambo oyo eleki yo na motango ya bato mpe na makasi— |
9024 | 1KI 8:36 | yoka bango wuta na likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo. |
9747 | 2KI 8:16 | Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mitano na bokonzi —Jozafati azalaki mokonzi ya Yuda— Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi. |
9872 | 2KI 12:19 | Kasi Joasi, mokonzi ya Yuda, azwaki biloko nyonso ya bule oyo bakoko na ye —Jozafati, Yorami mpe Akazia, bakonzi ya Yuda— babulisaki. Joasi azwaki mpe bakado oyo ye moko abulisaki mpe wolo nyonso oyo amonaki kati na bibombelo ya bozwi ya Tempelo ya Yawe mpe na ndako ya mokonzi. Atindaki yango epai ya Azaeli, mokonzi ya Siri. Sima na yango, Azaeli akendeki mosika ya Yelusalemi. |
11314 | 2CH 6:27 | yoka bango wuta na Likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo. |
12906 | JOB 2:11 | Tango baninga misato ya Yobo —Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa ; mpe Tsofari, moto ya Naama— bayokaki sango ya pasi nyonso oyo ekomelaki Yobo, batikaki bandako na bango mpe bayokanaki mpo na kokende kokabola pasi elongo na ye mpe kobondisa ye. |
13610 | JOB 31:18 | —nzokande wuta bolenge na ngai, nazalaki kobokola bana bitike lokola tata na bango ; mpe wuta mbotama na ngai, nazalaki kolakisa nzela na mwasi oyo akufisa mobali— |
13662 | JOB 33:8 | Kasi olobaki na matoyi na ngai— mpe nazali nanu koyoka makelele ya maloba na yo— |
14698 | PSA 49:19 | Atako, wana azalaki na bomoi, azalaki komimona moto apambolama— atako bato bakokumisa yo, pamba te omisali bolamu— |
17544 | ECC 8:16 | Tango natiaki mayele na ngai mpo na koluka koyeba bwanya mpe kososola mosala ya moto kati na mokili, —ata soki miso na ye ezwaka pongi te, ezala na moyi to na butu— |
21382 | EZK 33:33 | Tango makambo oyo nyonso ekokokisama —mpe ekokokisama solo— bakososola penza ete mosakoli moko azalaki kati na bango. » |
24041 | MAT 24:15 | Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— |
24800 | MRK 13:14 | Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ; |
26419 | JHN 7:22 | Bokanisa nanu : Moyize apesaki bino mitindo ya kokatisa ngenga, —mobeko yango ewutaki kutu na Moyize te, kasi na bakoko— mpe botosaka mitindo yango ata na mokolo ya Saba. |
26565 | JHN 10:15 | —ndenge kaka Tata ayebi Ngai, mpe Ngai nayebi Tata— Nazali kokaba bomoi na Ngai mpo na bameme na Ngai. |
26794 | JHN 15:26 | Tango Molobeli akoya, oyo nakotindela bino kowuta epai ya Tata —Molimo ya bosolo, oyo akowuta epai ya Tata— akotatola Ye moko na tina na Ngai ; |
28160 | ROM 7:1 | Bandeko—nazali koloba na bato oyo bayebi Mobeko— bobosani ete Mobeko ezalaka na nguya likolo ya moto kaka na tango oyo azali na bomoi ? |
29078 | 2CO 11:21 | Nalobi yango na soni ete tozalaki penza babolole mpo na komitika bongo. Nzokande, makambo oyo bato mosusu balingi komikumisa na tina na yango —nazali koloba lokola moto ya liboma— ngai mpe nakoki komikumisa na tina na yango. |
29080 | 2CO 11:23 | Bazali basali ya Klisto ? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi. |
29304 | EPH 2:8 | Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe— |
29319 | EPH 3:1 | Yango wana, ngai Polo, mokangami na boloko mpo ete nazali mosali ya Yesu-Klisto mpo na bolamu na bino Bapagano— |