Wildebeest analysis examples for:   lin-lin   Word’Word    February 11, 2023 at 19:00    Script wb_pprint_html.py   by Ulf Hermjakob

94  GEN 4:14  Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele ; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.
209  GEN 9:3  Bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi mpe oyo etambolaka, ekozala bilei na bino. Ndenge kaka napesaki bino matiti, sik’oyo napesi bino biloko nyonso.
215  GEN 9:9  « Nasali sik’oyo boyokani elongo na yo mpe na bakitani na yo sima na yo,
273  GEN 11:6  Yawe alobaki : « Lokola bato oyo nyonso balongi kokoma ekolo moko mpe koloba monoko moko, bongo bakomi kino kosala mosala monene oyo, eloko moko te ekopekisa bango sik’oyo kokokisa mabongisi nyonso oyo bakokana kosala !
318  GEN 12:19  Mpo na nini olobaki : ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi ? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende ! »
387  GEN 16:5  Boye, Sarayi alobaki na Abrami : — Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye ; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo.
467  GEN 19:9  Bazongisaki : — Longwa wana. Balobaki lisusu : — Botala moto oyo, ayaki awa lokola mopaya ; sik’oyo alingi komikomisa mosambisi. Tokosala yo mabe koleka bango. Bongo batindikaki Loti na makasi mpe bapusanaki pene ya ekuke mpo na koluka kobuka yango.
560  GEN 22:12  Anjelu alobaki : — Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko.
731  GEN 27:3  Yango wana, zwa sik’oyo mandoki na yo ya bokila, saki ya bokila mpe tolotolo ; kende na zamba mpe bomela ngai nyama.
736  GEN 27:8  Mwana na ngai, yoka ngai malamu sik’oyo mpe sala makambo oyo nakoyebisa yo :
764  GEN 27:36  Ezawu alobaki : — Mpo ete kombo na ye ezali « Jakobi, » yango wana akosi ngai mbala mibale ? Ya liboso, azwaki boyaya na ngai, mpe tala sik’oyo azwi lisusu mapamboli na ngai ! Bongo atunaki : — Boni, obombelaki ngai mapamboli te ?
771  GEN 27:43  Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo : ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani.
918  GEN 31:44  Sik’oyo Jakobi, tosala boyokani kati na yo mpe ngai, mpe tika ete yango ezala litatoli kati na biso.
935  GEN 32:7  Tango bantoma bazongaki epai ya Jakobi, balobaki : « Tokendeki epai ya Ezawu, ndeko na yo, mpe sik’oyo azali koya elongo na bato nkama minei mpo na kokutana na yo. »
939  GEN 32:11  Nazali nani mpo ete otalisa ngai mosali na Yo bolamu mpe bosembo nyonso oyo ! Nazalaki kaka na lingenda tango nakatisaki Yordani, kasi sik’oyo nazali na masanga mibale.
1114  GEN 37:30  azongaki epai ya bandeko na ye mpe alobaki : « Elenge mobali azali lisusu kuna te ! Sik’oyo ngai, nakosuka wapi ? »
1229  GEN 41:33  Tika sik’oyo Faraon aluka moto moko ya mayele mpe ya bwanya, atia ye na moto ya mokili ya Ejipito.
1266  GEN 42:13  Kasi bango bazongisaki : — Basali na yo bazalaki bandeko mibali zomi na mibale ; tozali bana ya moto moko oyo azali kovanda na mokili ya Kanana. Mwana ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, mpe mosusu azalaka lisusu te.
1275  GEN 42:22  Ribeni alobaki na bango : — Nayebisaki bino ete bosala mwana wana mabe te ? Kasi boyokelaki ngai te. Sik’oyo tosengeli kofuta makila na ye !
1285  GEN 42:32  Tozalaki bandeko mibali zomi na mibale, bana ya tata moko. Moko azalaka lisusu te mpe oyo ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, na mokili ya Kanana. »
1289  GEN 42:36  Tata na bango Jakobi alobaki na bango : — Bozangisi ngai bana na ngai mibale ya mibali : Jozefi azali lisusu te, Simeoni mpe azali lisusu te. Mpe sik’oyo bolingi kozwa lisusu Benjame ! Makambo oyo nyonso ezali kokweyela kaka ngai !
1341  GEN 44:16  Yuda azongisaki : — Likambo nini tokoki koloba na nkolo na ngai ? Tokoloba lisusu nini ? Ndenge nini tokoki kotalisa ete toyebi likambo te ? Nzambe alakisi polele mbeba ya basali na yo. Tokomi sik’oyo bawumbu ya nkolo na ngai, biso nyonso elongo na ye oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye.
1421  GEN 46:34  Bokozongisa : « Basali na yo babokolaka bibwele wuta bomwana na biso kino sik’oyo ndenge bakoko na biso bazalaki kosala. » Soki kaka bolobi bongo, akopesa bino nzela ya kovanda na Gosheni, pamba te bato ya Ejipito balingaka te babateli nyonso ya bibwele.
1422  GEN 47:1  Jozefi akendeki mpe alobaki na Faraon : — Tata na ngai elongo na bandeko na ngai bayei wuta na mokili ya Kanana na bameme, bantaba, bangombe mpe biloko na bango nyonso ; bazali sik’oyo na Gosheni.
1463  GEN 48:11  Isalaele alobaki na Jozefi : — Nazalaki na elikya te ete nakomona lisusu elongi na yo ; kasi sik’oyo Nzambe apesi ngai nzela ya komona kutu bana na yo.
1590  EXO 3:10  Yango wana natindi yo sik’oyo mpo ete okende epai ya Faraon mpo na kobimisa bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito.
1614  EXO 4:12  Sik’oyo kende, Ngai moko nakosunga yo mpo ete oloba malamu, mpe nakoteya yo makambo oyo osengeli koloba.
1649  EXO 5:16  Bazali kopesa lisusu te matiti epai ya basali na yo, nzokande bazali koloba na biso : « Bosala babiliki ! » Sik’oyo tala, basali na yo bazali kobetama, kasi mbeba ezali epai ya bato na yo moko.
1795  EXO 10:17  Sik’oyo lisusu, bolimbisa lisumu na ngai. Bobondela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete alongola etumbu oyo ya kufa kati na ngai.
2011  EXO 18:11  Nandimi sik’oyo ete Yawe azali monene koleka banzambe nyonso, pamba te asali makambo ya lolenge oyo epai ya banyokoli ya Isalaele.
2019  EXO 18:19  Yoka sik’oyo toli oyo nalingi kopesa yo, mpe tika ete Nzambe azala na yo. Mosala na yo ezali : kozala molobeli ya bato liboso ya Nzambe, komema mikumba na bango epai ya Nzambe
4043  NUM 11:18  Loba na bato : « Bomibongisa mpe bomibulisa mpo na lobi, pamba te bokolia misuni. Yawe ayokaki tango bozalaki kolelalela : ‹ Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia ? Biso oyo tozalaki na biso malamu na Ejipito ! › Sik’oyo Yawe akopesa bino misuni mpe bokolia yango.
4048  NUM 11:23  Yawe alobaki na Moyize : — Boni, loboko na Yawe ezali solo mokuse ? Okomona sik’oyo soki maloba oyo nalobi ekokokisama to ekokokisama te mpo na yo.
4203  NUM 16:8  Moyize alobaki lisusu na Kore : — Bino Balevi, boyoka sik’oyo !
4208  NUM 16:13  Ekoki kaka te mpo na yo kobimisa biso na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpo na koya kobomisa biso kati na esobe ? Sik’oyo olingi lisusu kokoma mokonzi na biso ?
4328  NUM 20:16  kasi tango togangaki epai na Yawe, ayokaki kolela na biso, atindelaki biso anjelu oyo abimisaki biso na Ejipito. Sik’oyo tozali awa na kadeshi, engumba oyo ezali na suka ya mokili na yo.
4381  NUM 22:5  Atindaki bantoma kobenga Balami, mwana mobali ya Beori, oyo azalaki kovanda na Petori, pembeni ya ebale Efrate, mboka oyo ye abotama. Balaki alobaki na Balami : — Bato moko bawuti kobima na Ejipito, batondisi mokili mobimba mpe bayei sik’oyo kovanda pembeni na ngai.
4387  NUM 22:11  « Bato moko bawuti kobima na Ejipito mpe batondisi mokili mobimba. Sik’oyo yaka mpe lakela bango mabe mpo na ngai. Tango mosusu nakokoka kobundisa bango mpe kobengana bango. »
4405  NUM 22:29  Balami azongiselaki ane : — Ozali kosakana na ngai ! Soki nazalaki na mopanga na loboko na ngai, mbele nabomi yo kaka sik’oyo !
4414  NUM 22:38  Balami azongiselaki Balaki : — Malamu, nayei sik’oyo epai na yo. Kasi nakoki solo koloba na yo kaka likambo moko ? Nakoloba kaka makambo oyo Nzambe akotia na monoko na ngai.
4440  NUM 23:23  Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi, mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele. Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele : ‹ Tala makambo oyo Nzambe asali ! ›
4464  NUM 24:17  ‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ; natali ye, kasi na pembeni te. Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi, mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele. Akotobola mito ya bato ya Moabi mpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti.
4943  DEU 2:3  « Bowumeli mingi na kobaluka zingazinga ya etuka ya bangomba oyo ; sik’oyo bokende na ngambo ya nor.
5007  DEU 4:1  Sik’oyo Isalaele, yoka malamu mitindo mpe mibeko oyo nalingi koteya yo. Salela yango mpo ete ozala na bomoi mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na yo, apesi yo.
5080  DEU 5:25  Kasi sik’oyo mpo na nini tokufa kaka boye ? Moto ya monene oyo ekoki kozikisa biso mpe koboma biso soki tokobi koyoka mongongo na Yawe, Nzambe na biso, kolobela biso.
5160  DEU 9:1  Oh Isalaele, yoka malamu ! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo.
5578  DEU 26:10  Sik’oyo oh Yawe, tala, namemi bambuma ya liboso ya mabele oyo opesaki ngai. » Sima na yango, okotia kitunga liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okogumbama liboso na Ye.
5732  DEU 31:2  « Nakokisi sik’oyo mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama mpe nazali lisusu na makasi te ya kokamba bino. Yawe alobaki na ngai : ‹ Okokatisa Yordani te oyo ozali komona. ›
5986  JOS 7:8  Oh Nkolo, sik’oyo naloba nini, awa Isalaele akimi liboso ya banguna na ye ?
6051  JOS 9:12  Tala kutu mapa na biso, ezalaki ya moto tango tobongisaki yango na bandako na biso lokola bilei ya mobembo, na mokolo oyo tolongwaki mpo ete toya epai na bino. Kasi sik’oyo tala ndenge nini esili kokawuka mpe kokoma biteni-biteni.
6052  JOS 9:13  Mpe lisusu, totondisaki bambeki oyo na vino tango ezalaki nanu ya sika, kasi tala sik’oyo ndenge nini esili kopasuka-pasuka mpe tala ndenge nini bilamba mpe basapato na biso esili kokufa mpo ete nzela ya mobembo eleki molayi.
6062  JOS 9:23  Bozali sik’oyo na se ya elakeli mabe mpe bokotikala libela kozala bawumbu ; bokobanda kokataka bakoni mpe kotokaka mayi mpo na Ndako ya Nzambe na ngai.
6199  JOS 14:10  Sik’oyo tala, eleki mibu tuku minei na mitano oyo Yawe abateli ngai na bomoi, wuta tango alobaki liloba oyo epai ya Moyize tango bana ya Isalaele bazalaki kotambola na esobe. Boye, ndenge nazali awa lelo, nakokisi mibu tuku mwambe na mitano ya mbotama,
6432  JOS 22:4  Lokola Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bandeko na bino bopemi, ndenge alakaki, bokoki sik’oyo kozonga na bandako na bino, kati na mokili oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino, na ngambo mosusu ya Yordani.
6459  JOS 22:31  Mpe Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, alobaki na bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase : — Lelo, tososoli ete Yawe azali kati na biso, pamba te bosali likambo moko te ya mabe liboso ya Yawe. Sik’oyo bokangoli nde bana ya Isalaele wuta na loboko na Yawe.
6476  JOS 23:14  Sik’oyo ngai nakomi pene ya kokende na nzela oyo moto nyonso akendaka. Na motema mpe elimo na bino mobimba, boyeba ete elaka moko te kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino ekotikala kokweya. Bilaka nyonso esila kokokisama, moko te ekotikala kokweya.
6492  JOS 24:14  Sik’oyo botosa Yawe mpe bosalela Ye na motema mobimba mpe na bosembo. Bobwaka banzambe oyo batata na bino basalelaki na ngambo mosusu ya ebale mpe na Ejipito, mpe bosalela Yawe.
6501  JOS 24:23  Jozue alobaki : — Na bongo, bolongola sik’oyo banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino mpe bopesa mitema na bino nyonso epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele.
6788  JDG 9:32  Sik’oyo telema, na butu, yo elongo na bato na yo ; bokende kovanda kati na elanga, na esika ya kobombama.
6794  JDG 9:38  Zebuli alobaki na Gali : — Sik’oyo, tia lisusu monoko ! Mpe loba lisusu : « Abimeleki nde nani mpo ete tosalela ye ? » Ezali te bato oyo yo otiolaki ? Kende sik’oyo kobunda !
6828  JDG 10:15  Kasi bana ya Isalaele balobaki na Yawe : — Ya solo, tosalaki lisumu na miso na Yo. Oyo omoni ete ezali malamu na miso na Yo, sala yango na biso ; kasi tobondeli Yo : bikisa biso lisusu sik’oyo !
6838  JDG 11:7  Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi : — Boni, ezali bino te bato oyo boyinaki ngai mpe bobenganaki ngai wuta na ndako ya tata na ngai ? Mpo na nini bozali koya sik’oyo epai na ngai, awa bokomi na pasi ?
6839  JDG 11:8  Bampaka ya Galadi balobaki lisusu na Jefite : — Soki tozongi sik’oyo epai na yo, ezali mpo ete oya elongo na biso, obundisa bato ya Amoni mpe okoma mokonzi na biso, mokonzi ya bavandi nyonso ya Galadi.
6854  JDG 11:23  Awa Yawe, Nzambe ya Isalaele, asili kobotola mokili ya bato ya Amori mpe apesi yango epai ya bana ya Isalaele, yo olingi sik’oyo kobotola bango yango ?
6909  JDG 13:23  Kasi mwasi na ye azongisaki : — Soki Yawe asepelaki koboma biso, akokaki kondima te mbeka ya kotumba mpe mbeka ya gato oyo esalemi na maboko na biso to kolakisa biso makambo oyo nyonso to mpe koyebisa biso sik’oyo makambo oyo.
6949  JDG 15:18  Lokola azalaki na posa makasi ya mayi, asambelaki Yawe : « Opesi mosali na Yo elonga oyo monene ; boni, nakufa sik’oyo na posa ya mayi mpe nakweya na maboko ya bato oyo bakatama ngenga te ? »
6995  JDG 17:13  Mika alobaki : « Sik’oyo nayebi ete Yawe akosalela ngai bolamu lokola moto ya libota ya Levi akomi nganga-nzambe na ngai. »
7044  JDG 19:18  Moto ya mobembo azongiselaki ye : — Towuti na Beteleemi ya Yuda ; tozali kokende na esika oyo navandaka, na suka ya mboka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nazalaki na Beteleemi, na Yuda, sik’oyo nazali kokende na Ndako ya Yawe. Moto moko te ayambi ngai kati na ndako na ye.
7050  JDG 19:24  Botala mwana na ngai ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe makangu ya mobali oyo azali kati na ndako ! Nazali kobimisa bango sik’oyo libanda mpo na bino mpo ete bokoka kosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi mpo na mobali oyo, bosala likambo ya soni ya boye te.
7065  JDG 20:9  Tala sik’oyo likambo oyo tokosala bato ya Gibea : Tokokende kobundisa bango kolanda ndenge zeke oyo tokobeta ekotalisa.
7185  RUT 3:11  Mpe sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, kobanga te ; nakosalela yo nyonso oyo okosenga, pamba te bato nyonso ya esika oyo bayebi ete ozali mwasi ya malonga.
7192  RUT 3:18  Bongo Naomi alobaki na ye : — Sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, vanda awa kino okomona ndenge makambo oyo ekosuka ; pamba te mobali wana akozala na kimia te kino akosilisa likambo oyo, kaka na mokolo ya lelo.
7242  1SA 1:28  Boye, ngai mpe nakabi ye sik’oyo epai na Yawe : bomoi na ye mobimba, akozala ya Yawe. Sima na yango, agumbamelaki Yawe na esika yango.
7340  1SA 6:7  Boye bino, bosala sik’oyo shario moko ya sika ; bozwa bangombe mibale ya basi oyo ezali komelisa mpe oyo nanu balatisi te ekangiseli na kingo. Bokangisa bangombe yango na shario, kasi bozongisa bana na yango na lopango.
7405  1SA 9:12  Bazongiselaki ye : — Iyo ! Azali liboso na bino. Kasi bosala noki ; awuti kokoma kaka sik’oyo kati na engumba na biso, pamba te bato bakobonza lelo mbeka, na esambelo ya likolo ya ngomba.
7420  1SA 9:27  Wana bazalaki kokende mpe bakomaki na mondelo ya engumba, Samuele alobaki na Saulo : « Loba na mosali na yo ete aleka liboso na biso. » Boye mosali alekaki liboso, mpe Samuele alobaki lisusu na Saulo : « Telema awa sik’oyo mpo ete napesa yo sango oyo ewuti epai ya Nzambe. »
7439  1SA 10:19  Kasi, na mokolo ya lelo, bobwaki Nzambe na bino, oyo abikisaka bino na pasi na bino nyonso mpe na minyoko na bino. Mpe bolobi na Ye : ‹ Ponela biso mokonzi oyo akokamba biso ! › Lokola ezali bongo, botelema sik’oyo bino moko liboso ya Yawe kolanda bikolo mpe bituka na bino. »
7464  1SA 12:2  Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo.
7478  1SA 12:16  Yango wana sik’oyo lisusu, bobongama mpo na kotala likambo monene oyo Yawe alingi kosala na miso na bino.
7543  1SA 14:33  Moto moko alobaki na Saulo : — Tala ! Bato bazali kosala masumu liboso ya Yawe na ndenge bazali kolia nyama na likolo ya makila. Saulo alobaki : — Bokweyisi kondima ! Botindika sik’oyo libanga moko ya monene kino awa.
7553  1SA 14:43  Bongo Saulo alobaki na Jonatan : — Yebisa ngai likambo oyo osalaki. Jonatan alobaki : — Namekaki ndambo ya mafuta ya nzoyi na songe ya nzete oyo nazalaki na yango na maboko. Mpe sik’oyo nasengeli kokufa !
7563  1SA 15:1  Samuele alobaki na Saulo : « Yawe atindaki ngai kopakola yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya bato na Ye, Isalaele. Boye, yoka sik’oyo makambo oyo ewuti epai na Yawe.
7587  1SA 15:25  Sik’oyo nabondeli yo, limbisa masumu na ngai ; mpe zonga elongo na ngai, mpo ete nakoka kogumbamela Yawe.
7598  1SA 16:1  Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.
7699  1SA 18:21  Boye Saulo amilobelaki : « Nakobalisa Mikali epai ya Davidi, mpo ete azala motambo mpo na ye, mpe ete loboko ya bato ya Filisitia ekanga ye Davidi. » Boye Saulo alobaki na Davidi : « Ozwi sik’oyo libaku ya mibale ya kokoma bokilo na ngai. »
7700  1SA 18:22  Bongo Saulo apesaki mitindo epai ya basali na ye : « Bosolola na Davidi na nkuku mpe boyebisa ye : ‹ Tala ndenge nini mokonzi azali kosepela na yo, mpe basali na ye nyonso balingi yo ! Koma na yo sik’oyo bokilo na ye ! › »
7725  1SA 19:17  Saulo alobaki na Mikali : — Mpo na nini oyokisi ngai soni mpe okimisi monguna na ngai, mpe sik’oyo abiki ? Mikali alobaki na Saulo : — Davidi alobaki na ngai : « Tika ngai nakima, noki te nakoboma yo. »
7843  1SA 24:2  Sima na Saulo kolanda bato ya Filisitia, azongaki ; bongo bayebisaki ye : « Davidi azali sik’oyo kati na esobe ya Eyini-Gedi. »
7852  1SA 24:11  Omoni sik’oyo yo moko na miso na yo ndenge nini Yawe akabaki yo na maboko na ngai kati na ebombamelo, kati na mabanga. Bato mosusu batungisaki ngai ete naboma yo, kasi nabikisaki yo. Nalobaki : « Nakosembola te loboko na ngai mpo na kotelemela nkolo na ngai, pamba te azali mopakolami na Yawe. »
7860  1SA 24:19  Owuti sik’oyo kotalisa ngai bolamu oyo osaleli ngai : Yawe akabaki ngai penza na maboko na yo, kasi oboyaki na yo koboma ngai.
7862  1SA 24:21  Tala, nayebi sik’oyo ete okozala penza mokonzi, mpe bokonzi ya Isalaele ekolendisama na maboko na yo.
7863  1SA 24:22  Lapa sik’oyo ndayi epai na ngai na Kombo na Yawe ete okoboma bakitani na ngai te to okolimwisa kombo na ngai te wuta na libota ya botata na ngai.
7916  1SA 26:8  Abishayi alobaki na Davidi : — Lelo, Nzambe akabi monguna na yo na maboko na yo. Pesa ngai sik’oyo nzela mpo ete natobola ye kaka mbala moko likonga na ngai mpe apikama na mabele, nakozongela yango te mbala mibale.
8058  2SA 2:6  Tika ete Yawe atalisa bino sik’oyo bolamu mpe boyengebene ! Lokola bosalaki bongo, ngai mpe nakotalisa bino bolamu yango kaka.
8092  2SA 3:8  Tango Abineri ayokaki makambo oyo Ishi-Bosheti alobaki, asilikaki makasi mpe azongisaki : — Boni ! Ngai nazali moto ya mbwa na ngambo ya bato ya Yuda ? Ngai oyo, na mokolo ya lelo, nazali kosalela bosembo epai ya libota ya Saulo, tata na yo, epai ya bandeko na ye mpe epai ya baninga na ye ; ngai oyo nakabaki yo te na maboko ya Davidi, ngai nde sik’oyo ozali kofunda ete nasali mabe na tina na mwasi oyo !
8102  2SA 3:18  bosala yango sik’oyo ; pamba te Yawe alobaki boye na tina na ye : « Ezali na nzela ya Davidi, mosali na ngai, nde nakobikisa bato na Ngai, Isalaele, na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya banguna na bango nyonso. »
8105  2SA 3:21  Abineri alobaki na Davidi : — Na ndingisa na yo mokonzi, nkolo na ngai, nalingi kokende sik’oyo kosangisela yo bato nyonso ya Isalaele mpo ete basala boyokani elongo na yo ; mpe na bongo, yo okokonza na bisika nyonso oyo olingi. Davidi atikaki Abineri kokende, mpe Abineri azongaki na kimia.
8191  2SA 7:8  Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai : « Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele.
8307  2SA 12:18  Na mokolo ya sambo, mwana akufaki. Basali ya Davidi babangaki koyebisa ye ete mwana akufi, pamba te bazalaki komilobela : « Wana mwana azalaki nanu na bomoi, tango tolobaki na Davidi, ayokaki biso te. Awa sik’oyo mwana akufi, tokoloba na ye ndenge nini ? Soki toyebisi ye sik’oyo ete mwana akufi, akoki kosala likambo moko ya mabe ! »
8310  2SA 12:21  Basali na ye batunaki : — Mpo na nini ozali kosala boye ? Wana mwana azalaki na bomoi, ozalaki komilalisa nzala mpe ozalaki kolela ; awa sik’oyo mwana akufi, otelemi mpe okomi kolia !